Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”—MATAI 22:39.
1. Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka Nzambe?
YEHOVA asɛngaka basaleli na ye nini? Yesu apesaki eyano ya mokuse, oyo elobaki mingi. Alobaki ete mobeko oyo eleki monene ezali kolinga Yehova na motema mpe molimo na biso mobimba, na makanisi mpe makasi na biso nyonso. (Matai 22:37; Malako 12:30) Ndenge tomonaki na lisolo ya liboso, kolinga Nzambe elimboli kotosa ye mpe kobatela mibeko na ye, mpo na komonisa botɔndi mpo na bolingo oyo azali komonisela biso. Mpo na bato oyo balingaka Nzambe, kosala mokano na ye ezalaka kilo te, kasi ememelaka bango nde esengo.—Nzembo 40:8; 1 Yoane 5:2, 3.
2, 3. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na mobeko oyo esɛngi ete tólinga mozalani na biso, mpe yango ebimisi mituna nini?
2 Yesu abakisaki ete mobeko ya mibale oyo eleki monene eyokani na oyo ya liboso: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Mobeko wana ya mibale nde tokolobela na lisolo oyo, mpamba te ezali mpenza na ntina. Na ntango na biso, bato bakómi na lolenge moko mabe mpenza ya bolingo, oyo elukaka kaka matomba na bango moko. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki ete “na mikolo ya nsuka,” bato bakobanda kolinga bazalani na bango te, kasi bakokóma nde komilinga bango moko, kolinga mbongo mpe bisengo. Alobaki mpe ete bato mingi bakozanga “bolingo ya libota.” (2 Timote 3:1-4) Yesu Klisto asakolaki ete: “Mingi . . . bakotɛkana mpe bakoyinana. . . . Bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.”—Matai 24:10, 12.
3 Kasi, simbá ete Yesu alobaki te ete bolingo ya bato nyonso ekokóma mpiɔ. Banda kala, bato oyo bamonisaka bolingo oyo Yehova asɛngaka mpe abongi na yango bazangaka te. Bato oyo balingaka mpenza Yehova basalaka nyonso mpo bátalelaka basusu ndenge Yehova atalelaka bango. Kasi, nani azali mozalani na biso oyo tosengeli kolinga? Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka mozalani na biso? Tokoki kozwa biyano na mituna wana ya ntina mingi na Biblia.
Nani azali mozalani na ngai?
4. Levitike mokapo 19 emonisi ete Bayuda basengelaki mpe kolinga banani?
4 Ntango Yesu ayebisaki Mofalisai ete mobeko ya mibale oyo eleki monene ezali ete tólinga mozalani na biso lokola biso moko, azalaki kokanisa mobeko moko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele. Mobeko yango ezali na Levitike 19:18. Kaka na mokapo yango, Yehova alobaki na Bayuda ete basengeli kotalela bato oyo bazali bana ya Yisalaele te lokola bazalani na bango. Vɛrsɛ 34 elobi ete: “Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili ya Ezipito.” Na yango, basengelaki kolinga ata bato oyo bazalaki Bayuda te, mingimingi baprozelite.
5. Kolinga mozalani ezalaki na ndimbola nini epai ya Bayuda?
5 Kasi, bakambi ya Bayuda ya ntango ya Yesu bazalaki kokanisa bongo te. Bamosusu bazalaki koteya ete “moninga” mpe “mozalani” ya Moyuda ezali kaka Moyuda. Bakanisaki ete basengelaki koyina bato oyo bazali Bayuda te. Bateyi wana bazalaki kokanisa ete bato oyo babangaka Nzambe basengeli kotyola baoyo babangaka ye te. Buku moko elobi ete: “Mateya ya ndenge wana esengelaki kaka kobimisa koyinana.”
6. Wapi makambo mibale oyo Yesu amonisaki ntango alobelaki bolingo mpo na mozalani?
6 Na lisolo oyo asalaki Likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki likambo yango, mpe amonisaki polele nani tosengeli kolinga. Alobaki boye: “Boyokaki ete elobamaki, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo mpe koyina monguna na yo.’ Nzokande, ngai nazali koloba na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómimonisa bana ya Tata na bino oyo azali na likoló, mpo asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” (Matai 5:43-45) Yesu amonisaki makambo mibale awa. Ya liboso, Yehova akabelaka ná bato malamu ná bato mabe, mpe amoniselaka bango nyonso boboto. Ya mibale, tosengeli kolanda ndakisa na ye.
7. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Mosamalia ya motema malamu?
7 Mokolo mosusu, Moyuda moko oyo ayebaki mpenza mibeko atunaki Yesu ete: “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Mpo na koyanola ye, Yesu apesaki ye ndakisa ya Mosamalia moko oyo akutanaki na Moyuda moko oyo miyibi babɛtaki mpe bayibaki biloko na ye nyonso. Atako Bayuda bazalaki komona Basamalia bato mpamba, Mosamalia yango akangaki bampota ya Moyuda yango, asopelaki yango mafuta mpe vinyo mpe amemaki ye na otɛlɛ moko, epai bakokaki kosalisa ye. Yango epesi biso liteya nini? Mozalani oyo tosengeli kolinga ezali te kaka moto oyo tozali na ye mposo, ekólo to lingomba moko.—Luka 10:25, 29, 30, 33-37.
Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
8. Na kotalela Levitike mokapo 19, ndenge nini Bayisalaele basengelaki komonisa bolingo?
8 Kolinga mozalani na biso ekeseni te na kolinga Nzambe. Ezali kaka likambo ya motema te, kasi esengeli komonana na misala. Mpo na kokanga ntina ya mobeko oyo ezali na Levitike mokapo ya 19, oyo ezali kolendisa basaleli ya Nzambe bálinga bazalani na bango ndenge bango moko bamilingaka, tótalela makambo mosusu oyo ezali na mokapo yango. Kuna, tozali kotánga ete Bayisalaele basengelaki kotikaka ndambo ya mbuma na bilanga na bango mpo na bato ya mawa mpe bapaya. Koyiba mpe kokosa epekisamaki. Bazuzi basengelaki kosambisa makambo na bosembo. Atako basengelaki kopamela soki esengeli, Mobeko elobaki na bango boye: “Okoyina ndeko na yo na motema na yo te.” Mibeko wana mpe mibeko mosusu elobelami na mokuse na maloba oyo: “Okolinga moninga na yo lokola yo mpenza.”—Levitike 19:9-11, 15, 17, 18.
9. Mpo na nini Yehova asɛngaki Bayisalaele bákabwana na bato ya bikólo mosusu?
9 Atako Bayisalaele basengelaki kolinga bato ya bikólo mosusu, basengelaki mpe kokabwana na bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Yehova akebisaki bango na makama ya kozala na baninga ya mabe. Na ndakisa, Yehova alobaki na Bayisalaele mpo na bikólo oyo basengelaki kobɔtɔla ete: “Okobala kati na bango te, kopesa bana basi na yo epai na bana mibali na bango te, to kokamata bana basi na bango mpo na bana mibali na yo te. Mpo ete bakopɛngwisa bana mibali na yo ete [bálanda, NW] ngai te mpe básalela banzambe mosusu, bongo [nkanda ya Yehova, NW] ekopelela bino.”—Deteronome 7:3, 4.
10. Makambo nini tosengeli koboya?
10 Ndenge moko, baklisto bazalaka te baninga ya bato oyo bakoki kolɛmbisa kondima na bango. (1 Bakolinti 15:33) Biblia epesi biso toli oyo: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te,” elingi koloba bato oyo bazali na lisangá ya boklisto te. (2 Bakolinti 6:14) Lisusu, Biblia epesi baklisto toli ete bábalaka “na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakolinti 7:39) Kasi, tosengeli te kotyola bato oyo basambelaka Yehova te. Klisto akufaki mpo na basumuki, mpe bato mingi oyo bazalaki liboso kosala mabe babongwaná mpe bakómá na boyokani ná Nzambe.—Baloma 5:8; 1 Bakolinti 6:9-11.
11. Wapi lolenge eleki malamu ya komonisa ete tolingaka bato oyo basalelaka Yehova te, mpe mpo na nini?
11 Mpo na kolinga bato oyo basalelaka Nzambe te, tokosala malamu soki tomekoli ndakisa malamu ya Yehova. Atako ayinaka mabe, amonisaka motema-boboto epai ya bato nyonso, mpe apesá bango likoki ya kotika banzela na bango ya mabe mpo bázwa bomoi ya seko. (Ezekiele 18:23) Yehova ‘alingi nde bato nyonso bábongola motema.’ (2 Petelo 3:9) “Mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Yango wana, Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kosakola, koteya mpe ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 28:19, 20) Ntango tosalaka mosala yango, tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso, ata mpe banguna na biso!
Tólingaka bandeko na biso baklisto
12. Ntoma Yoane akomaki nini na oyo etali kolinga bandeko na biso?
12 Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10) Biso baklisto tozali na mokumba ya kolinga bandeko na biso na kati ya kondima, elingi koloba bandeko na biso ya elimo. Bolingo yango ezali na ntina nini? Ntoma Yoane amonisaki likambo yango ya ntina mingi ntango akomaki ete: “Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi . . . Soki moto azali koloba ete: ‘Nalingaka Nzambe,’ nzokande azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Mpo moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoane 3:15; 4:20) Oyo nde maloba makasi! Yesu Klisto abengaki Satana Zabolo “mobomi-bato” mpe “moto ya lokuta.” (Yoane 8:44) Tólinga soki moke te bábenga biso bongo.
13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bandeko na biso baklisto?
13 Baklisto ya solo ‘bateyami na Nzambe ete bálinganaka.’ (1 Batesaloniki 4:9) Tosengeli kolingaka “na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.” (1 Yoane 3:18) Tosengeli kozala na bolingo ‘ezangi bokosi.’ (Baloma 12:9) Bolingo etindaka biso tózala na boboto, motema mawa, tóyeba kolimbisa mpe tózala motema molai, tózala na zuwa te, lolendo te, lofundo te mpe moyimi te. (1 Bakolinti 13:4, 5; Baefese 4:32) Etindaka biso mpe ‘tósalelanaka lokola baombo.’ (Bagalatia 5:13) Yesu asɛngaki bayekoli na ye bálinganaka ndenge ye alingaki bango. (Yoane 13:34) Na yango, ntango mosusu moklisto asengeli kondima ata kokufa mpo na bandeko na ye baklisto.
14. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo na kati ya libota?
14 Na kati ya libota ya baklisto, bolingo esengeli komonana lisusu makasi, mingimingi na kati ya mobali ná mwasi na ye. Lokola libala ekómisaka mwasi ná mobali moto moko, Paulo alobaki boye: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko,” mpe abakisaki boye: “Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko.” (Baefese 5:28) Na vɛrsɛ 33, Paulo azongelaki lisusu toli yango. Mobali oyo alingaka mwasi na ye akosala te lokola Bayisalaele ya ntango ya Malaki, oyo bazalaki kokosa basi na bango. (Malaki 2:14) Akolinga ye makasi, ndenge Yesu alingaki lisangá. Ndenge moko, bolingo ekotinda mpe mwasi amemyaka mobali na ye makasi.—Baefese 5:25, 29-33.
15. Bato mosusu oyo bamonaki na miso bolingo ya bandeko na biso balobaki nini mpe basalaki nini?
15 Na ntembe te, bolingo ya ndenge wana ezali elembo ya baklisto ya solo. Yesu alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Kolingana biso na biso ebendaka bato epai ya Nzambe oyo tolingaka mpe oyo tozali bamonisi na ye. Na ndakisa, libota moko ya Batatoli na Mozambique bakomaki boye: “Naino tomoná likambo motindo wana te. Na mpokwa moko, mopɛpɛ makasi eyaki, mpe na nsima mbula monene ya mabanga ebɛtaki. Mopɛpɛ yango ebukaki ndako na biso mpe ememaki manzanza nyonso. Ntango bandeko ya masangá ya zingazinga bayaki mpe basalisaki biso na kotonga lisusu ndako na biso, bato ya kartye na biso bakamwaki mpe balobaki boye: ‘Lingomba na bino ezali malamu mpenza. Naino basalisá biso boye te na lingomba na biso.’ Tofungolaki Biblia mpe tolakisaki bango Yoane 13:34, 35. Bato mingi ya kartye na biso bazali sikoyo koyekola Biblia.”
Tólingaka moto mokomoko
16. Kolinga bato nyonso ná kolinga moto mokomoko ekeseni na nini?
16 Ezali mpasi te kolinga bato nyonso. Kasi, mpo na kolinga moto mokomoko, ezalaka pɛtɛɛ te. Na ndakisa, mpo na bato mosusu, kolinga mozalani esukaka kaka na kopesa makabo na bibongiseli oyo esungaka babola. Ezali mpasi te koloba ete tolingaka mozalani na biso. Kasi, ezali pɛtɛɛ te mpo na kolinga moninga ya mosala oyo alingaka biso te, to moto moko ya makambo mabe oyo afandaka pene na biso to moninga oyo asali biso mabe.
17, 18. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kolinga moto nyonso, mpe nini etindaki ye asala bongo?
17 Yesu, oyo amonisaki mpenza bizaleli ya Nzambe, azali ndakisa na biso na oyo etali kolinga moto nyonso. Atako ayaki awa na mabelé mpo na kolongola masumu ya mokili mobimba, amonisaki mpe ete alingaka moto mokomoko. Na ndakisa, abikisaki mwasi moko oyo aumelaki na maladi, moto moko ya maba mpe mwana moko. (Matai 9:20-22; Malako 1:40-42; 7:26, 29, 30; Yoane 1:29) Ndenge moko, biso mpe tomonisaka ete tolingaka bazalani na biso na makambo oyo tosalelaka bato oyo tokutanaka na bango mokolo na mokolo.
18 Kasi, tosengeli kobosana te ete kolinga mozalani na biso emonisaka ete tolingaka Nzambe. Atako Yesu asalisaki babola, abikisaki bato ya maladi, aleisaki bato oyo bazalaki na nzala mpe azalaki koteya ebele ya bato, mposa na ye ezalaki nde ya kosalisa bato bázongisa boyokani na bango na Yehova. (2 Bakolinti 5:19) Yesu azalaki kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe, mpe abosanaki ata mokolo moko te ete azalaki momonisi ya Nzambe oyo ye azalaki kolinga. (1 Bakolinti 10:31) Soki tolandi ndakisa ya Yesu, biso mpe tokomonisa bolingo ya solosolo epai ya bazalani na biso mpe tokoboya kosangana na mokili oyo ya mabe.
Na ndenge nini tolingaka mozalani na biso lokola biso moko?
19, 20. Kolinga mozalani na biso lokola biso moko elimboli nini?
19 Yesu alobaki ete: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” Koluka kokokisa bamposa na biso mpe komilinga na bokatikati ezali mabe te. Soki bongo te, mbele mobeko yango ezali na ntina te. Komilinga ya ndenge wana ekeseni na oyo ntoma Paulo alobeli na 2 Timote 3:2, oyo ya koluka kaka matomba na yo moko. Komilinga ezali nde komipesa nzoto kilo. Molimboli moko ya Biblia alobaki ete ezali “komilinga ya malamu, oyo ekeseni na koluka komitombola to komimona na nse ya bato mosusu.”
20 Kolinga bato mosusu lokola biso moko elimboli kotalela bango ndenge tolingaka bátalela biso mpe kosalela bango makambo ndenge tolingaka básalela biso. Yesu alobaki boye: “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Tósimba ete Yesu alobaki te ete tókanisaka makambo oyo bato basalaki biso mpe tózongisaka kaka ndenge bango basalaki. Alobaki nde ete tókanisaka makambo oyo tokolinga bato básalela biso mpe tósalelaka bango kaka bongo. Tósimba mpe ete Yesu alobelaki kaka te baninga mpe bandeko na biso. Asalelaki liloba “bato,” ntango mosusu mpo na komonisa ete tosengeli kosalaka bongo epai ya moto nyonso oyo tokutani na ye.
21. Tokomonisa nini soki tozali kolinga basusu?
21 Kolinga mozalani ekopekisa biso kosala mabe. Ntoma Paulo akomaki ete Mibeko oyo: “‘Osengeli kosala ekobo te, Osengeli koboma moto te, Osengeli koyiba te, Osengeli kolula eloko ya moto te,’ mpe komandema mosusu nyonso, esangisami na kati ya liloba oyo, ete, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Bolingo esalaka mozalani mabe te.” (Baloma 13:9, 10) Bolingo ekotinda biso tóluka kosalela basusu bolamu. Soki tozali kolinga bazalani na biso, tokomonisa ete tolingaka mpe Yehova Nzambe oyo akelaki moto na elilingi na ye.—Genese 1:26.
Okopesa eyano nini?
• Tosengeli kolinga nani, mpe mpo na nini?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bato oyo basalelaka Yehova te?
• Na kotalela Biblia, tosengeli kolinga bandeko na biso baklisto ndenge nini?
• Kolinga mozalani na biso lokola biso moko elimboli nini?
[Elilingi na lokasa 26]
“Nani mpenza azali mozalani na ngai?”
[Elilingi na lokasa 29]
Yesu azalaki kolinga moto mokomoko