Kondima na yo etindaka yo na misala?
MOKONZI moko ya basoda azalaki mpenza na kondima ete Yesu akoki kobikisa moombo na ye. Kasi, mokonzi yango abengisaki Yesu na ndako na ye te; ekoki kozala akanisaki ete abongi te to mpo azalaki Moyuda te. Atindaki nde mikóló mosusu na kati ya Bayuda básolola na Yesu mpe báyebisa ye boye: “Tata, ngai nabongi te ete yo okɔta na ndako na ngai, kasi lobá se liloba mpe mosaleli na ngai ya mobali akobika.” Ntango Yesu amonaki ete mokonzi yango ya basoda azalaki na kondima ete akoki kobikisa moto ata soki akómi esika azali te, ayebisaki ebele ya bato oyo bazalaki kolanda ye ete: “Nazali koyebisa bino solo ete, Namoná naino kondima ya monene boye te epai ya moto moko na Yisalaele.”—Matai 8:5-10; Luka 7:1-10.
Lisolo yango ekoki kosalisa biso tótalela na likebi likambo moko ya ntina mingi mpo na kondima. Kondima ya solosolo emonanaka na misala. Yakobo alobaki boye: “Kondima, soki ezali na misala te, ekufi na kati na yango moko.” (Yakobo 2:17) Tokoki komona likambo yango malamumalamu soki totaleli ndakisa moko oyo ezali komonisa ndenge kondima ekómaka soki ezangi misala.
Na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova Nzambe asalaki kondimana ya Mibeko ná ekólo Yisalaele. Moize, moyokanisi ya kondimana yango, ayebisaki Bayisalaele liloba ya Nzambe oyo: “Soki bokotosa monɔkɔ na ngai mpe [bokobatela] kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala . . . libota [mosantu].” (Exode 19:3-6) Mpo Yisalaele ezala libota mosantu, basengelaki kotosa.
Bankama ya bambula na nsima, Bayuda bakómaki kopesa motuya mingi na koyekola Mibeko na esika ya kosalela mitinda na yango. Na buku na ye (The Life and Times of Jesus the Messiah), Alfred Edersheim, akomaki boye: “[Balabi]—‘bakonzi ya lingomba’ balobá banda kala ete koyekola eleki misala.”
Ya solo, Nzambe asɛngaki Bayisalaele ya kala báyekolaka malamumalamu masɛngami na ye. Nzambe ye moko alobaki boye: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.” (Deteronome 6:6, 7) Kasi, tokoki nde kokanisa ete Yehova alingaki koloba ete esengeli komipesa na koyekola Mibeko koleka kosalela yango to Mibeko yango moko emonisi likanisi yango? Tótalela naino likambo yango.
Boyekoli ya bato ya mayele
Bayisaele bazalaki komona ete komipesa na koyekola Mibeko ezali na ntina, mpamba te, lisolo moko ya bonkɔkɔ ya Bayuda elobi ete Nzambe ye moko alekisaka ngonga misato mokolo na mokolo mpo na koyekola Mibeko. Yango ekoki kosalisa yo omona ntina oyo Bayuda mosusu bazalaki kokanisa boye, ‘Soki Nzambe ayekolaka Mibeko ntango nyonso, yango emonisi te ete bikelamu na ye awa na mabelé basengeli mpenza komipesa na koyekola yango?’
Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), lokola Balabi bamipesaki na koyekola mpe kolimbola Mibeko, makanisi na bango etɛngamaki mpenza. Yesu alobaki ete: “Bakomeli mpe Bafalisai . . . balobaka kasi bakokisaka te. Bazali kokangisa mikumba ya kilo mpe bazali kotya yango na mapeka ya bato, kasi bango moko balingaka koningisa yango na mosapi na bango te.” (Matai 23:2-4) Bakonzi yango ya mangomba bazalaki kotyela bato ebele ya mibeko, kasi bango moko bazalaki koluka ndenge bakoki kokima kokokisa yango. Lisusu, bato yango oyo bazalaki kosala milende mingi mpo na koyekola, bazalaki “kotyola makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo mpe motema mawa mpe kondima.”—Matai 23:16-24.
Lokola Bakomeli ná Bafalisai bazalaki koluka kotya boyengebene na bango moko, bakómaki kobuka Mibeko oyo bazalaki koloba ete batosaka! Ebele ya bambula oyo balekisaki na bantembe likoló ya maloba mpe makambo mikemike ya Mibeko esalisaki bango te bápusana penepene na Nzambe. Nyonso wana esalaki ete makambo oyo Paulo abengaki “bilobaloba ya mpamba,” “bongolabongola,” mpe “boyebi” ya lokuta ebungisa bango nzela. (1 Timote 6:20, 21) Kasi, mokakatano mosusu ezalaki mbuma oyo boyekoli yango ebotaki epai na bango moko. Bakómaki te na kondima oyo etindaki bango básala misala ya malamu.
Bazali na mayele na motó, kasi bazangi kondima na mitema
Makanisi ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda ekesanaki mpenza na oyo ya Nzambe! Liboso Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, Moize alobaki na bango boye: “Tyá mitema na bino na maloba nyonso oyo elakeli ngai bino lelo oyo, ete bókoka kolakela bana na bino yango, ete bango básɛnzɛla kosala maloba nyonso na mobeko oyo.” (Deteronome 32:46) Maloba yango emonisi ete basaleli ya Nzambe basengelaki te kozala bato oyo bamipesi kaka na koyekola Mibeko, kasi basengelaki mpe kozala batosi na yango.
Nzokande, bato ya Yisalaele bazalaki kopesa Yehova mokɔngɔ. Na esika ya kosala misala oyo ebongi, bana ya Yisalaele ‘bandimaki ye te mpe batosaki mongongo na ye te.’ (Deteronome 9:23; Basambisi 2:15, 16; 2 Ntango 24:18, 19; Yilimia 25:4-7) Nsukansuka, Bayuda basalaki likambo ya kozanga bosembo oyo eleki mabe na ndenge baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya. (Yoane 19:14-16) Yango wana mpe Yehova Nzambe aboyaki Yisalaele mpe abalolaki likebi na ye na bikólo mosusu.—Misala 13:46.
Biso tosengeli kokeba ete tókwea te na motambo ya ndenge wana, elingi koloba tókanisa ete tokoki kosambela Nzambe na mayele na motó, kasi na mitema oyo ezangi kondima. Na maloba mosusu, tosengeli te koyekola Biblia kaka mpo na kotondisa boyebi na motó. Boyebi ya sikisiki esengeli kosimba mitema na biso mpe kotinda biso tósala malamu na bomoi na biso. Okanisi ete ekozala na ntina soki toyekoli mosala ya kolona, kasi na nsima toloni ata molona moko te? Ya solo, tokoyeba makambo mwa mingi etali ndenge ya kolona, kasi tokobuka eloko te! Ndenge moko mpe, bato oyo bayekolaka Biblia mpo na koyeba mibeko ya Nzambe basengeli kotika ete solo efanda na mitema na bango mpo ekola mpe etinda bango na misala.—Matai 13:3-9, 19-23.
“Bókóma batosi ya liloba”
Ntoma Paulo alobaki ete “kondima eutaka na likambo oyo eyokami.” (Baloma 10:17) Likambo wana oyo ebandi na koyoka Liloba ya Nzambe tii na komonisa kondima epai ya Mwana na ye Yesu Klisto, epesaka moto nzela ya kozwa bomoi ya seko. Tomoni ete tosengeli kosuka kaka te na koloba ete, ‘Nandimaka Nzambe mpe Klisto.’
Yesu alendisaki bayekoli na ye bázala na kondima oyo ekotinda bango na misala: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo, ete bozali kokoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.” (Yoane 15:8) Na nsima, Yakobo, ndeko ya Yesu, akomaki boye: “Bókóma batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te.” (Yakobo 1:22) Kasi, ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo tosengeli kosala? Na maloba mpe na ndakisa na ye, Yesu amonisaki oyo tosengeli kosala mpo na kosepelisa Nzambe.
Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, asalaki mosala monene ya kosakola Bokonzi mpe ya kopesa nkombo ya Tata na ye nkembo. (Yoane 17:4-8) Na ndenge nini? Bato mingi bayebi ete Yesu abikisaki bato ya maladi mpe bibɔsɔnɔ na ndenge ya likamwisi. Nzokande, evanzile ya Matai emonisi mosala na ye ya libosoliboso: “Yesu azalaki kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka, koteyáká na basinagoga na bango mpe kosakoláká nsango malamu ya bokonzi.” Tomoni mpenza ete Yesu asukaki kaka te na kosolola na baninga soki azwi libaku to na bato oyo azalaki kofanda na bango esika moko. Azalaki mpenza komipesa na mosala yango, azalaki kotambola na makolo to kosalela mwaye mosusu nyonso oyo ezalaki na ntango wana mpo na kokutana na bato “na Galilai mobimba.”—Matai 4:23, 24; 9:35.
Yesu atindaki mpe bayekoli na ye básala mosala ya kokómisa bato bayekoli. Kutu, ye moko apesaki ndakisa eleki malamu oyo bakokaki komekola. (1 Petelo 2:21) Yesu alobaki na bayekoli na ye ya sembo boye: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”—Matai 28:19, 20.
Ya solo, mosala ya kosakola ezali na mikakatano mingi. Yesu ye moko alobaki boye: “Talá! Nazali kotinda bino lokola bana-mpate na kati ya bambwa ya zamba.” (Luka 10:3) Ntango bazali kotɛmɛla biso, toyokaka mposa ya kozonga nsima mpo tómibendela mindɔndɔ to mitungisi te. Ezali yango nde esalemaki na butu oyo bakangaki Yesu. Bantoma babangaki mpe bakimaki. Na nsima, kaka na butu wana, mbala misato mobimba, Petelo alobaki ete ayebi Yesu te.—Matai 26:56, 69-75.
Mbala mosusu mpe okokamwa na koyoka ete ntoma Paulo alobaki ete ye moko mpe azalaki kobunda etumba mpo na kosakola nsango malamu. Akomelaki bandeko ya lisangá ya Tesaloniki boye: “Tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe na kobunda mingi.”—1 Batesaloniki 2:1, 2.
Paulo ná bantoma mosusu balongaki kobanga nyonso mpo na koyebisa bato nsango ya Bokonzi ya Nzambe, yo mpe okoki kolonga yango. Na ndenge nini? Likambo eleki ntina ezali kotyela Yehova motema. Soki tozali na kondima makasi epai ya Yehova, kondima yango ekotinda biso na misala, mpe ekosalisa biso tósala mokano na ye.—Misala 4:17-20; 5:18, 27-29.
Okozwa mbano ya mosala na yo
Yehova ayebi malamu milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye. Na ndakisa, ayebaka ntango tozali maladi to tolɛmbi. Ayebaka mpe ntango tozali kotungisama. Ntango tozali na mikakatano ya mbongo to ntango tozali kotungisama na makanisi to mpo na maladi, Yehova ayebaka yango malamu.—2 Ntango 16:9; 1 Petelo 3:12.
Yehova ayokaka mpenza esengo ntango kondima na biso ezali kotinda biso na misala, atako tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozali na mikakatano mingi! Bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye ya sembo esuki kaka na makanisi te; apesi bango elaka mpo na komonisa yango. Ntoma Paulo apemamaki na Nzambe ntango akomaki boye: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.”—Baebele 6:10.
Okoki kondima ete Biblia elobi solo ete Yehova azali “Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, moyengebene mpe mosembwi,” mpe ete azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Deteronome 32:4; Baebele 11:6) Na ndakisa, mwasi moko na etúká ya Californie, na États-Unis, alobaki boye: “Tata na ngai asalaki mosala ya ntango nyonso mbula zomi liboso akóma tata ya libota. Azalaki kobɛtela ngai masolo oyo emonisi ndenge Yehova azalaki kosunga ye na mosala ya kosakola. Mbala mingi azalaki kosalela ata mwa mbongo moke oyo atikali na yango mpo na kosomba esansi ya motuka mpo abima na mosala ya kosakola. Soki auti kosakola, mbala mingi azalaki kokuta batikeli ye biloko ya kolya na porte.”
“Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso” asungaka biso na biloko ya mosuni, kasi asalisaka biso mpe tózala na kimya ya makanisi mpe tózala makasi na elimo. (2 Bakolinti 1:3) Motatoli moko oyo akutanaki na makambo mingi ya mpasi na boumeli ya bambula, alobaki boye: “Komitika na mabɔkɔ ya Yehova ekitisaka motema. Yango epesaka moto libaku ya kotyela Yehova motema mpe ya komona ndenge azali kosalisa ye.” Okoki kokende epai ya ‘Ye oyo ayokaka mabondeli’ na komikitisa nyonso, na elikya ete akotyela mabanzo na yo likebi.—Nzembo 65:2.
Mosala ya kobuka mbuma ya elimo ememaka mapamboli mpe bolamu mingi. (Matai 9:37, 38) Ebele ya bato bazwi matomba mingi na ndenge bazali komipesa na mosala ya kosakola; yo mpe okoki kozwa matomba yango. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete boninga na biso na Nzambe ekómaka makasi ntango tozali kopesa basusu litatoli.—Yakobo 2:23.
Kobá kosala malamu
Soki mikakatano ya nzoto to bobange ezali kopekisa mosaleli moko ya Nzambe asakola mingi ndenge motema na ye elingi, akomikosa soki akanisi ete Yehova azali kosepela na ye te. Ezali mpe bongo mpo na baoyo bazali na maladi, na mikumba mingi ya libota, to mpe na mikakatano mosusu.
Tóbosana te ete ntango ntoma Paulo amonaki ete mokakatano moko ezalaki kopekisa ye asala mingi, ‘abondelaki Nkolo mbala misato mpo yango ekoka kolongwa epai na ye.’ Na esika Yehova abikisa ye mpo asala mingi na mosala na ye, alobaki na ye ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo; mpo nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” (2 Bakolinti 12:7-10) Yango wana, yebá ete ata soki ozali na mikakatano nini, Tata na yo ya likoló asepelaka na nyonso oyo osalaka mpo mosala na ye ekende liboso.—Baebele 13:15, 16.
Tata na biso ya bolingo asɛngaka biso te tósala makambo oyo eleki biso. Azali kosɛnga kaka tózala na kondima oyo etindaka na misala.
[Elilingi na lokasa 26]
Esengelaki kosuka kaka na koyekola Mibeko?
[Bililingi na lokasa 29]
Kondima na biso esengeli komonana na misala