Mikolo ya nsuka
Ndimbola: Biblia esalelaka maloba “mikolo ya nsuka” mpo na kolobela eleko ya nsuka ya ebongiseli moko boye oyo Nzambe akweisi mpe atye mokolo oyo akoboma yango. Ebongiseli ya Bayuda ná makambo na yango ya losambo oyo ezalaki kosalema na tempelo na Yerusaleme ekɔtaki na mikolo na yango ya nsuka banda 33 T.B. mpe esukaki ntango ebongiseli yango ebomamaki na mobu 70 T.B. Makambo oyo esalemaki na ntango wana emonisaki makambo minene oyo ekosalema na mokili mobimba ntango Nzambe akopesa bikólo nyonso etumbu. Ebongiseli ya mokili mobimba ya ntango oyo ekɔtaki na mikolo na yango ya nsuka na 1914.
Makambo nini emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” lelo oyo?
Biblia elobeli makambo minene ndenge na ndenge oyo ezali komonana na ntango ya nsuka, mpe makambo yango ekesenisi ntango ya nsuka na bantango mosusu. Epesi “elembo” moko oyo ezali na makambo mingi; mpo elembo yango ekokisama, esengeli ete makambo na yango nyonso emonana polele na eleko moko boye. Makambo ndenge na ndenge ya elembo yango elobelami na Matai mokapo 24 ná 25, Marko 13, mpe Luka 21; makambo mosusu elobelami na 2 Timote 3:1-5, 2 Petro 3:3, 4, mpe Emoniseli 6:1-8. Mpo na yango, tokotalela mwa makambo minene oyo ezali komonisa elembo yango.
“Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi” (Mat. 24:7)
Banda kala, bitumba ebomaka bato awa na mabele. Bikólo ezalaki kobunda mpe bana mboka bazalaki kobunda. Kasi na 1914 nde Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esalemaki. Yango ezalaki kaka te bitumba kati na mampinga mibale. Mpo na mbala ya liboso, bikólo minene ya mokili ekɔtaki na etumba. Bato nyonso, elingi koloba basoda mpe basivili, bakɔtaki to bapesaki mabɔkɔ na etumba. Balobaka ete na nsuka ya etumba yango, bato mingi mpenza na mokili (93%) bakɔtaki na bitumba. (Mpo na koyeba ntina ya makambo oyo elekaki na mobu 1914, talá nkasa 364, 365.)
Ndenge Emoniseli 6:4 esakolaki yango, ‘kimya elongwaki na mabele.’ Na yango, kobanda 1914, mokili ekɔtaki na yikiyiki. Kobanda 1939 tii 1945, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esalemaki. Gene La Rocque, oyo azalaki mokonzi ya basoda alobi ete banda 1945 tii 1982, bitumba 270 esalemaki. Bato koleka milio 100 bakufaki na bitumba na siɛklɛ oyo. Lisusu, mokanda moko (World Military and Social Expenditures), ebimeli ya 1982, elobi ete na mbula yango, bato milio 100 bakɔtaki to bapesaki mabɔkɔ na bitumba.
Tosengeli nde kozela likambo mosusu koleka oyo wana ekokisa esakweli yango? Bato babongisá ebele ya bibundeli ya nikleere mpo na bitumba. Bato ya siansi oyo bayebani mingi balobi ete soki bato basaleli kaka mwa ndambo moke ya bibundeli yango ya nikleere, bibongiseli ya bato mpe mbala mosusu bato nyonso na mabele bakokufa. Kasi bisakweli ya Biblia elobi te ete makambo ekosuka ndenge wana.
“Nzala ekozala . . . na bisika ndenge na ndenge” (Mat. 24:7)
Ezali solo ete banda kala ezali na bantango oyo nzala ezalaki. Kasi nini emonisi ete na mikolo na biso nde nzala ekómi makasi koleka? Bitumba ya mokili mobimba ekɔtisaki nzala na mikili ya Mpoto mpe ya Azia. Kozanga mbula ekɔtisaki nzala makasi na Afrika. Pene ya nsuka ya mobu 1980, lisangá moko ya ONU oyo babengi FAO, elobaki ete pene na bato milio 450 bazali kokufa nzala mpenza, mpe bato soki miliare moko bazali kolya malamu te. Kati na bato yango, bato soki milio 40 bazali kokufa mbula na mbula—bambula mosusu, motángo yango ezali kokóma bato milio 50—oyo bazali kokufa mpo na nzala.
Nzala ya mikolo oyo ekeseni nde na nzala ya ntango ya kala? Emoniseli 6:6 emonisi ete mwa biloko mike lokola blé ná ɔrge ekosombama na lifuti ya mokolo moko (dinari moko; talá Matai 20:2), mpe ekebisaki ete esengeli te kobebisa biloko lokola mafuta ya olive ná vinyo. Biloko nyonso wana ezalaki na ntina mingi na Moyen-Orient na ntango yango; esakweli yango emonisaki polele ete nzala ekozala. Likambo yango ezali kosalema kaka esika moko te, kasi na mokili mobimba. Na 1981, zulunalo moko (The New York Times) elobaki ete: “Lokola bomoi ya bato ezali kobonga mpe bisika nyonso na mokili bosɛnga ya biloko ya kolya ezali makasi, yango ezali komatisa ntalo ya biloko ya kolya mpe ekómi mpasi mpenza mpo bamboka ya bobola esomba biloko ya kolya oyo basengeli na yango na mikili ya bapaya.” Na mikili mingi, bato bazali kosalela bamasini ya sika mpo na kobimisa biloko ya kolya; atako bongo, biloko oyo bazali kobimisa ekoki te koleisa bato oyo motángo na bango ezali se kobakisama. Bato ya mayele na makambo ya kobimisa biloko ya kolya basili mayele.
“Mabele ekoningana makasi na bisika ndenge na ndenge” (Luka 21:11)
Ezali solo ete na basiɛklɛ oyo eleká mabele ezalaki koningana makasi; lisusu, bamasini ezali kosalisa bato ya siansi báyeba liboso ete na mbula mobimba mabele eninganaka mbala koleka milio moko. Kasi bato bazali na mposa ya masini moko boye te mpo na koyeba ete mabele eningani makasi.
Ezali nde na eleko mosusu liboso ya 1914, oyo mabele eninganaki mingi koleka? Nsima ya kotalela lapolo ya ebongiseli moko (Centre National de données géophysiques ya Boulder, na Colorado), mpe nsima ya kotalela mikanda mingi oyo ezali kolobela likambo yango, na 1984 bayebaki mbala nyonso oyo mabele eninganaki makasi (na degre 7,5 to koleka) oyo ebebisaki bandako ná biloko mosusu oyo motuya na yango ezalaki ya dolare milio 5 to koleka, to oyo ebomaki bato 100 to koleka. Na boumeli ya bambula 2 000 oyo elekaki liboso ya 1914, mabele eninganaki ndenge wana mbala 856. Nzokande, na boumeli ya mbula kaka 69 oyo ebandaki na 1914, mabele eninganaki ndenge wana mbala 605. Na yango kobanda 1914, mbula na mbula, mabele eninganaki makasi mbala 20 koleka oyo esalemaki na boumeli ya bambula 2 000 oyo ezalaki liboso ya 1914.
“Bamaladi mabe . . . ekozala bisika ndenge na ndenge” (Luka 21:11)
Pene na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, grippe espagnole ebimaki mpe ebomaki bato koleka milio 20; ebomaki bato mingi koleka bokɔnɔ mosusu nyonso liboso. Atako mayele ya minganga ezali kokola mingi, ebele ya bato bazali kokufa mbula nyonso mpo na kanser, maladi ya motema, maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto, sida, maladi ya motó, malaria, kokufa miso, mpe maladi ya Chagas.
“Makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita” (Mat. 24:11, 12)
Moto moko oyo ayekolaka makambo ya criminologie, oyo ayebani mingi, alobi ete: “Likambo oyo ezali kokamwisa mpo na kobomana oyo ezali kosalema na mokili ezali ete yango ezali kosalema mingi mpe kokola bipai nyonso. Bisika oyo likambo yango ezali kosalema mingi te ezali moke mpenza, mpe mosika te mopɛpɛ yango ekokɔta na bisika yango.” (The Growth of Crime, New York, 1977, Sir Leon Radzinowicz ná Joan King, nk. 4, 5) Likambo yango ezali mpenza kokola, ezali kaka te mpo bazulunalo ezali kolobela yango. Ezali solo ete bato bazalaki mpe kobomana liboso, kasi likambo yango epalangani mingi nde na ntango na biso. Bato oyo bakómi mibange bayebi ete likambo yango ezali mpenza solo.
Kobuka mibeko oyo esakweli elobeli etaleli mpe kotyola mibeko ya Nzambe, kotalela kaka makambo ya yo moko na esika ya kotya Nzambe liboso. Mpo na ezaleli yango, mabala ezali kokufa mingi, likambo ya kosangisa nzoto na moto oyo azali mobalani na yo te mpe kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ekómi kondimama bipai nyonso, mpe bamilio ya basi bazali kosopa zemi mbula nyonso. Kobuka mibeko oyo elobelami (na Matai 24:11, 12) ezali kosalema mingi mpo na makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosala; bazali kotya Liloba ya Nzambe pembeni mpo na koteya mateya na bango moko. Lokola bato balingi kolanda bafilozofi na bango na esika ya kolanda Biblia, bolingo ezali lisusu te na mokili. (1 Yoa. 4:8) Tángá 2 Timote 3:1-5, oyo elobeli makambo yango.
“Makambo ya nsɔmɔ ekomonana” (Luka 21:11)
Zulunalo moko (U.S. News & World Report, 11 Ɔkɔtɔbɛ 1965, lok. 144) elobi: “Ezali solo ete lelo oyo, bato bazali na kobanga mingi.” Zulunalo moko ya Allemagne (Hörzu—No. 25, 20 Yuni 1980, lok. 22) elobi ete “liboso bato bazalaki kobanga mingi lokola lelo te.”
Makambo mingi ezali kosala ete bato bábangaka: Kobomana na ndenge moko ya nsɔmɔ, kozanga mosala, kobeba ya nkita oyo ekɔtisi bikólo mingi na nyongo oyo bazali kokoka kofuta te, kobeba ya mai ná mopɛpɛ, kozanga bolingo na kati ya mabota, mpe kobanga ete etikali moke mokili ebomama na bibundeli ya nikleere.
‘Bikólo nyonso bakoyina bayekoli ya solo ya Kristo mpo na nkombo na ye’ (Mat. 24:9)
Soki bazali konyokola bayekoli ya Yesu, ezali te mpo bazali kokɔta na makambo ya politiki kasi ezali ‘mpo na nkombo ya Yesu Kristo,’ ezali mpo bandimaka ete Yesu azali Mokonzi Masiya oyo Yehova atye, mpo batosaka Kristo liboso ya kotosa bakonzi ya politiki, mpo bazali sembo na Bokonzi na ye mpe bakɔtaka te na makambo ya baguvɛrnema ya bato. Lelo oyo, soki Batatoli ya Yehova bazali konyokwama na mokili mobimba, ezali nde mpo na makambo yango.
‘Nsango malamu oyo ya bokonzi ezali kosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli’ (Mat. 24:14)
Nsango oyo esengeli kosakolama ezali ete Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na Yesu Kristo esili kobanda koyangela na likoló, ete mosika te Bokonzi yango ekoboma mokili mabe oyo, mpe na boyangeli yango bato bakokóma bato ya kokoka mpe mabele ekokóma paradiso. Lelo oyo, nsango malamu yango ezali kosakolama na mikili mpe bisanga koleka 230, tii na esika oyo eleki mpenza mosika na mabele. Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova basalaka ngonga koleka miliare moko na mosala yango, mbala na mbala basakolaka ndako na ndako mpo moto nyonso azwa libaku ya koyoka.
Makambo nyonso wana ya “mikolo ya nsuka” emonisi nini?
Luka 21:31, 32: “Ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene [elingi koloba ntango Bokonzi ya Nzambe ekoboma mokili mabe oyo mpe ekotambwisa makambo nyonso na mabele]. Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Libota oyo ekoleka ata moke te tii makambo nyonso ekosalema.” (Elembo yango ezali komonana banda 1914, na yango ntango oyo etikali ekómi mokuse mpenza. Makambo oyo ezali kosalema na mokili endimisi mpenza likambo yango.)
Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete “mikolo ya nsuka” ebandaki na 1914?
Bisakweli ya Biblia emonisi ete 1914 ekeseni na bambula mosusu. Mpo na makambo mosusu etali badati ya Biblia, talá nkasa 41-44, na motó ya likambo “Badati.” Makambo oyo Biblia esakolaki ete ekosalema na ntango ya nsuka ebandá kokokisama na 1914 kaka ndenge Biblia elobaki; yango emonisi ete 1914 ekeseni na bambula mosusu. Makambo oyo touti kolobela emonisi ete ezali mpenza bongo.
Bato ya mayele na makambo ya kala balobaka nini mpo na mobu 1914?
“Soki totali ndenge makambo ezalaki liboso, emonani polele ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandisaki eleko oyo Arnold Toynbee, moto ya Angleterre oyo ayekolaka makambo ya kala, abengi ete ‘Ntango ya mobulu.’ Banda ntango yango, makambo ya bato ebongá lisusu te. Makambo nyonso ya yikiyiki ya nsuka ya ndambo ya siɛklɛ ebandá na 1914.”—The Fall of the Dynasties: The Collapse of the Old Order (New York, 1963), Edmond Taylor, lok. 16.
“Bato oyo bamonaki Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato ya mbula na ngai, balobaka ntango nyonso ete etumba yango ekɔtisaki mbongwana monene oyo ezali komonana lelo. . . . Tiká tómikumisa ndenge tomonaki makambo wana. Kasi tosengeli koyeba ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba nde ekɔtisaki mpenza mbongwana monene na bomoi ya bato. Ezali na ntango wana nde bibongiseli ya politiki mpe bizaleli ya bato oyo eumelaki basiɛklɛ ebele ebebaki mpenza—mbala mosusu ebebaki kaka na mwa bapɔsɔ. Mpe mosusu ebebá libela. Ezali na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba nde makambo malamu ya kala ebungaki. . . . Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekolisaki mbongwana yango, eyeisaki yango monene mpe efandisaki yango. Bato balobaka ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki eteni ya nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.”—The Age of Uncertainty (Boston, 1977), John K. Galbraith, lok. 133.
“Mbula 50 esili koleka, kasi makambo ya nsɔmɔ oyo Etumba Monene [Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, oyo ebandaki na 1914] etikelaki bikólo esilá naino te . . . Makambo ya bato mpe bizaleli ebebaki mpenza, na ndenge oyo etiki ata eloko moko te ndenge yango ezalaki liboso. Makambo nyonso ya bato: baguvɛrnema, bandelo ya mboka, mibeko, mampinga ya basoda, boyokani kati na bikólo, kasi mpe ndenge bato bakanisaka, bomoi ya libota, bozwi, lokumu, boyokani na kati ya bato—makambo nyonso ebongwanaki mpenza. . . . Nsukansuka, bato babungisaki makambo nyonso ya malamu, oyo tii lelo bazongeli yango te.”—Général Charles de Gaulle, na lisukulu oyo asalaki na 1968 (Le Monde, 12 Novɛmbɛ 1968, lok. 9).
Bato mosusu bakotikala awa na mabele ntango mokili oyo ekobomama?
Ɛɛ. Kasi mokili oyo ekobomama te na etumba ya nikleere oyo ezali koboma bato kozanga kopona; ekobomama nde na bolɔzi monene oyo ekosuka na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 16:14, 16) Etumba yango ekoboma mabele te, ekoboma mpe bato nyonso te.
Mat. 24:21, 22: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te. Kutu, soki mikolo yango eyeisamaka mokuse te, mbɛlɛ ata moto moko abiki te; kasi mpo na bato oyo baponami mikolo yango ekoyeisama mokuse.” (Na yango, bato mosusu bakobika.)
Mas. 2:21, 22: “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.”
Nz. 37:29, 34: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko. Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye, mpe ye akotombola yo mpo na kozwa mabele. Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.”
Mpo na nini Nzambe atiki ntango molai boye liboso aboma bato mabe?
2 Pe. 3:9: “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.”
Mrk. 13:10: “Nsango malamu esengeli liboso kosakolama na bikólo nyonso.”
Mat. 25:31, 32, 46: “Ntango Mwana ya moto [Yesu Kristo] akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe bango [baoyo baboyi kondima ete bandeko ya Yesu ya elimo bazali bamonisi ya Mokonzi] bakokufa liwa ya seko, kasi bayengebene bakozwa bomoi ya seko.”
Talá nkasa 416, 417 mpe 325, 326.
Soki moto alobi—
‘Lelo oyo makambo ezali mabe te koleka ndenge ezalaki liboso mpo bitumba, nzala, koningana ya mabele, kobomana, ebandá kala’
Okoki koyanola: ‘Namoni mpo na nini okanisi bongo. Tobotamá na mokili oyo mikolo nyonso toyokaka kaka makambo yango. Kasi bato ya mayele balobi ete ntango na biso ekeseni mpenza na ntango mosusu nyonso. (Tángá maloba ya bato ya mayele oyo ezali na nkasa 364, 365.)’
To okoki koloba: ‘Bitumba, nzala, koningana ya mabele, mpe kobomana kaka yango moko boye ekoki kozala na ndimbola monene te. Oyebaka ete elembo oyo Yesu apesaki ezali na makambo mingi?’ Okoki kobakisa: ‘Alobaki te ete soki bomoni kaka likambo moko, yango nde elembo ya “mikolo ya nsuka.” Kasi alobelaki nde kokokisama ya makambo nyonso—mingimingi soki yango nyonso emonani na mokili mobimba mpe soki yango ebandi na mbula oyo emonisami na manaka ya Biblia.’ (Talá nkasa 359-364, mpe nkasa 41-44.)
‘Ntango mosusu makambo yango ekokokisama mingi koleka te na mikolo ezali koya’
Okoki kobakisa: ‘Likanisi na yo ezali malamu, mpe yango emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka.” Ndenge nini? Na kati ya makambo oyo Yesu alobaki, amonisaki ete ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi. Kasi lelo oyo ekosuka boni soki kokokisama ya elembo esɛngi ete etumba ebima kati na bikólo ya nguya oyo ezali na bibundeli ya makasimakasi? Na etumba ya ndenge wana, soki bato bakobika, bakozala moke mpenza. Na yango, lokola Nzambe alingi ete bato bábika, yango emonisi ete tokómi mpenza pene na nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo.’
To okoki koloba: ‘Makambo oyo ezali kokokisa esakweli yango ezali lokola bilembo ya mabɔkɔ. Moto na moto azali na bilembo na ye. Ndenge moko mpe, makambo oyo ebandaki na 1914 ekosalema lisusu te na eleko mosusu.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Makambo nyonso ya elembo ezali komonana polele.’ (2) ‘Na ntembe te, tokolinga kozala lokola bato ya ntango ya Noa te. (Mat. 24:37-39)’
‘Mbala mosusu tokozala na bomoi te ntango nsuka ekoya’
Okoki koyanola: ‘Kasi ondimaka ete mokolo mosusu Nzambe akoboma mokili oyo?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Tokoki koyeba ntango nsuka ekoya soki kaka Nzambe ayebisi biso yango. Nzokande, Yesu alobaki polele ete moto moko ayebi mokolo to ngonga te, kasi alobelaki makambo ndenge na ndenge oyo ekosalema liboso nsuka eya.’ (2) ‘Makambo oyo alobelaki ekokani mpenza na makambo oyo yo moko ozali komona. (Soki esengeli, lobelá makambo oyo emonisi kokokisama ya elembo oyo tolobeli na lisolo oyo.)’
‘Nakipaka makambo yango te; oyo ekoya lobi etali ngai te’
Okoki koyanola: ‘Ezali solo ete ezali malamu te komitungisa mingi koleka mpo na makambo oyo ekoya. Kasi biso nyonso tomekaka kobongisa bomoi na biso na ndenge ete tómibatela mpe tóbatela bato oyo tolingaka. Kobongisa makambo na ndenge esengeli ezali malamu. Biblia elobi ete makambo ya malamu mingi ezali kozela biso, mpe tokomonisa ete tozali na bwanya soki tomibongisi mpo na kozwa yango. (Mas. 1:33; 2 Pe. 3:13)’
‘Nalingaka kokanisa makambo wana ya mabe te; nayebi ete makambo ekobonga’
Okoki koyanola: ‘Simbá ete Yesu alobaki ete na mikolo na biso, ezali na makambo oyo ekotinda bayekoli na ye bázala na elikya ete makambo ekobonga. (Luka 21:31)’ Okoki kobakisa: ‘Kasi ayebisi bango te ete bakozala na esengo mpo bakangi miso na makambo oyo ezali kosalema na mokili. Alobi nde ete bakosepela mpo bazali kokanga ntina ya makambo oyo ezali koleka na mokili, mpe bayebi ndenge makambo ekosuka.’