Koyika mpiko ezali na ntina mingi mpo na baklisto
“Wana ezali bino na kondima . . . bobakisa koyika mpiko.”—2 PETELO 1:5, 6, MN.
1, 2. Mpo na nini biso nyonso tosengeli koyika mpiko kino nsuka?
MOKƐNGƐLI moko ya zongazonga mpe mwasi na ye bakendaki kotala moninga moklisto moko oyo azalaki na mibu 90. Alekisaki mibu mingi mpenza kati na mosala ya pionnier. Wana bazalaki kosolola, ndeko mobali wana ya mobangé alobelaki mikumba oyo azwaki na boumeli ya bambula mingi. Amilelaki mpe mpisoli ebandaki kokita na elongi na ye, kolobáká ete: “Kasi, sikawa nakoki kosala lisusu mingi te.” Mokɛngɛli ya zongazonga afungolaki Biblia na ye mpe atangaki Matai 24:13, epai maloba oyo na Yesu Klisto matangami ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” Na nsima, mokɛngɛli atalaki ndeko wana ya bolingo mpe alobaki ete: “Ata tokosala mingi soko moke, eloko eleki ntina mpo na biso banso, ezali ya koyika mpiko kino nsuka.”
2 Ya solo, lokola baklisto, biso nyonso tosengeli koyika mpiko kino nsuka ya biloko ya ntango oyo to kino nsuka ya bomoi na biso. Ezali na nzela mosusu te mpo na kondimama na Jéhovah mpo na kozwa lobiko. Tozali kati na emekaneli mpo na bomoi, mpe tosengeli ‘kopota mbangu na koyika mpiko’ kino nsuka ya emekaneli. (Baebele 12:1) Ntoma Petelo alobelaki ntina ya ezaleli yango wana alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Wana ezali bino na kondima . . . bobakisa koyika mpiko.” (2 Petelo 1:5, 6, MN) Kasi koyika mpiko ezali mpenza nini?
Mpiko elimboli nini?
3, 4. Koyika mpiko elimboli nini?
3 Koyika mpiko elimboli nini? Verbe na Greke oyo ebongolami na “koyika mpiko” (hy·po·meʹno) elimboli mpenza “koumela to kofanda na nsé ya.” Yango ezwami mbala 17 kati na Biblia. Engebene W. Bauer, F. Gingrich mpe F. Danker, balimboli ya maloba na nkóta, yango elimboli “koumela na esika ya kokima . . . , kofanda na nsé ya, kotelema ngwi.” Liloba ya Greke oyo ebongolami na “mpiko” to “bompíkílíkí” (hy·po·mo·neʹ) ezwami mbala 30 kati na Makomami. Mpo na yango, mokanda A New Testament Wordbook, ya William Barclay, elobi ete: “Yango ezali elimo na moto oyo akoki kokanga motema na makambo, bobele na komitika te, kasi na kozaláká na elikya makasi . . . Ezali ezaleli oyo ezali kobatela moto liboso ya mopepe makasi ete akwea te. Ezali ezaleli oyo ekoki kobongola momekamo makasi kino nkembo mpo moto azali komona ete nsima na kooka mpasi akozwa mbano.”
4 Na yango, mpiko ezali kopesa biso makoki ya kotelema ngwi mpe ya kobungisa elikya te liboso ya botɛmɛli to mimekamo. (Baloma 5:3-5) Ata tozali lelo kooka mpasi, nde na mpiko tozali kotalela mbano elakami liboso na biso: lifuta to likabo ya bomoi ya seko, na likoló to na mabelé.—Yakobo 1:12.
Mpo na nini koyika mpiko?
5. (a) Mpo na nini baklisto nyonso “bazali na mposa ya koyika mpiko”? (b) Kati na mitindo nini mibale mimekamo na biso mikoki kokabolama?
5 Lokola tozali baklisto, biso nyonso “tozali na mposa ya koyika mpiko.” (Baebele 10:36) Mpo na nini? Ezali mpenza mpo ete tozali ‘kokutana na mimekamo ndenge na ndenge.’ Maloba ya Greke mazwami na Yakobo 1:2 mamonisi bokutani ya mbalakaka to ya mabe, lokola ntango moto akokutanaka pwasa na moyibi. (Tala Luka 10:30.) Tozali kokutana na mimekamo oyo ekoki kokabolama na mitindo mibale: oyo ekómelaka bato nyonso mpo na lisumu oyo tosili kosangola, mpe oyo ezali kobima na ntina na ezaleli na biso ya kobanga Nzambe. (1 Bakolinti 10:13; 2 Timoté 3:12) Wapi mwa ndambo ya mimekamo yango?
6. Lolenge nini Temwe moko ayikaki mpiko liboso na maladi makasi?
6 Maladi makasi. Lokola Timoté, baklisto mosusu basengeli koyika mpiko na “maladi mingi.” (1 Timoté 5:23, MN) Mingi mpenza soki tozali na maladi oyo ekosilaka te, mbala mosusu oyo ezali mpasi mingi, tosengeli koyika mpiko, kotelema ngwi, na lisalisi ya Nzambe mpe tobungisa te elikya na biso kitoko ya boklisto. Tozwa ndakisa ya Temwe moko ya mibu 50 oyo aumelaki mingi mpo na kobundisa cancer mabe oyo ezalaki kokóla nokinoki. Basalaki ye lipaso mbala mibale mpe na mbala nyonso aboyaki kozongisama makila. (Misala 15:28, 29) Kasi cancer ebimaki lisusu kati na libumu na ye mpe elandaki kokóla kino pene na mikuwa ya mokɔngɔ. Na bongo, azwaki mpasi makasi kati na nzoto oyo ebele ya bankisi ekokaki kosilisa yango te. Atako bongo, azalaki kotalela libonza ya bomoi ya seko kati na mokili ya sika nsima na mpasi oyo azalaki na yango. Alandaki koyebisa elikya na ye kitoko epai na minganga, na ba infirmiers, mpe na bato oyo bazalaki koya kotala ye. Ayikaki mpiko na bosembo nyonso kino nsuka—nsuka ya bomoi na ye. Mbala mosusu kolongono na yo ya nzoto ezali kotya bomoi na yo na likámá te to ezali kopesa yo mpasi mingi te lokola oyo ndeko na biso ya bolingo azwaki yango, kasi mbala mosusu ezali komekama makasi mpo na yo ete oyika mpiko.
7. Lolenge nini na mpasi oyo basusu kati na bandeko na biso ya elimo, basi mpe mibali, basengeli koyikela yango mpiko?
7 Mpasi na mayoki. Na bantango mosusu, basaleli mosusu ya Jéhovah bazwaka “mawa na motema” oyo eutaka na ‘kolemba ya elimo.’ (Masese 15:13) Konyokwama makasi na makanisi ezali komonana mingi na ‘ntango oyo ya mpasi mpe ya mikakatano.’ (2 Timoté 3:1, MN) Zulunalo Science News ya le 5 Décembre 1992, eyebisi ete: “Motuya ya baoyo bazali konyokwama mingi na makanisi, mbala mingi na motindo oyo ekolembisaka, ezali kobakisama na eleko moko na moko oyo ezali kolandana uta mobu 1915.” Bantina ya konyokwama na makanisi ezali mingi; euti na makambo matali lolenge nzoto na biso esalemi kino na makambo na mpasi mingi. Mpo na baklisto mosusu, koyika mpiko ezali etumba ya mokolo na mokolo mpo na kotelema ngwi liboso na mpasi ya mayoki. Atako bongo, bazali kolemba te. Bazali kotikala sembo epai na Jéhovah atako bazali na mpasi.—Tala Nzembo 126:5, 6.
8. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango mpo na makambo matali mosolo?
8 Kati na mimekamo ndenge na ndenge oyo tozali kozwa ekoki kozala na mikakatano makasi na makambo ya nkita. Ntango ndeko mobali moko ya mboka New Jersey, na Etats-Unis, alongolamaki na mosala na mbalakaka, azalaki komibanzabanza mingi na ntina na koleisa libota na ye mpe ete babimisa ye na ndako te. Kasi abungisaki elikya ya Bokonzi te. Wana azalaki koluka mosala mosusu, asalelaki libaku yango na lolenge malamu na kokómáká pionnier auxiliaire. Na nsuka, azwaki mosala.—Matai 6:25-34.
9. (a) Na nini kokufela moto oyo olingaki mingi esengi koyika mpiko? (b) Mikapo nini mimonisi ete ezali mabe te kobimisa mpisoli mpo na mawa?
9 Soki okufeli moto oyo olingaka, ozali na mposa ya koyika mpiko na ntango molai wana baoyo basanganaki na mawa na yo basili kozongela lolenge na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Ntango mosusu, ezali na eleko moko oyo ozalaka na mpasi mingi: eleko oyo molingami na yo akufaki. Koyika mpiko wana okufeli moto oyo olingaki mingi elimboli te ete ezali mabe na kobimisa mpisoli ya mawa. Kolela na liwa ya moto oyo olingaki mingi ezali mabe te, mpe yango elakisi te ete ozangi kondima kati na elikya ya lisekwa. (Genese 23:2; tala Baebele 11:19.) Yesu “atangisaki mpisoli” na liwa ya Lazare, atako alobaki na elikya nyonso epai na Malata ete: “Ndeko na yo akosekwa.” Mpe Lazare asekwaki!—Yoane 11:23, 32-35, 41-44.
10. Mpo na ntina nini basaleli ya Jéhovah basengeli koyika mpiko ekeseni na bato mosusu?
10 Longola koyika mpiko na mimekamo oyo mikómelaka bato nyonso, basaleli ya Jéhovah bazali na mposa ya koyika mpiko ekeseni na oyo ya bato nyonso. Yesu asakolaki ete: “Bokoyinama na mabota nyonso mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Alobaki lisusu ete: “Soki basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.” (Yoane 15:20) Mpo na nini koyina mpe minyoko nyonso wana? Mpo ete epai nyonso tofandi na mabelé lokola basaleli ya Nzambe, Satana azali komeka kobebisa bosembo na biso epai na Jéhovah. (1 Petelo 5:8; tala Emoniseli 12:17.) Ezali mpo na mokano yango nde Satana azali kobimisa minyoko makasi mbala na mbala, kotyáká mpiko na biso na komekama monene.
11, 12. (a) Ba Témoins de Jéhovah mpe bana na bango bakutanaki na komekama nini esengaki koyika mpiko, na bambula 1930 mpe na ebandeli ya bambula 1940? (b) Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bapesaka losako na elembo ya ekólo te?
11 Na ndakisa, na bambula 1930 mpe na ebandeli ya bambula 1940, ba Témoins de Jéhovah mpe bana na bango, na Etats-Unis mpe na Canada, bakutanaki na minyoko mpo ete bazalaki kopesa losako na elembo ya ekólo te na ntina na lisosoli na bango. Batemwe bazali na limemya mpo na elembo ya ekólo kati na yango bazali kofanda, kasi bazali kolanda etinda oyo ezwami na Mibeko ya Nzambe na Exode 20:4, 5 ete: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na likoló na lola te, na mokili na nsé te, to na mai na nsé na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te, mpo ete ngai Jéhovah Nzambe na yo, nazali Nzambe na zuwa.” Wana banakelasi mosusu oyo bazalaki Batemwe balongolamaki na eteyelo mpo ete balingaki kopesa losambo na bango bobele epai na Jéhovah Nzambe, Batemwe basalaki Biteyelo ya Bokonzi mpo na kolakisa bana na bango. Banakelasi wana bazongaki na biteyelo ya Leta na ntango Esambiselo Monene ya Etats-Unis endimaki etelemelo na bango ya losambo, lokola ezali lelo oyo kosalema na mikili mingi oyo mizali kolanda bosembo. Nzokande, mpiko mpe molende ya bilenge wana ezali ndakisa malamu, mingi mpenza mpo na bilenge baklisto oyo bakoki kotyolama lelo mpo ete bazali kosala makasi mpo na kolanda mitinda ya Biblia.—1 Yoane 5:21.
12 Mimekamo ndenge na ndenge oyo tozali kokutana na yango—ezala oyo ekokómelaka bato nyonso to mpe oyo tokokutana na yango mpo na kondima na biso ya boklisto—emonisi mpo na nini tozali na mposa ya koyika mpiko. Kasi lolenge nini tokoki koyika mpiko?
Lolenge nini koyika mpiko kino nsuka?
13. Lolenge nini Jéhovah azali kopesa mpiko?
13 Basaleli ya Nzambe bazali na libaku moko kitoko koleka baoyo bazali kosambela Jéhovah te. Mpo na kozwa lisungi, tokoki kobelela “Nzambe oyo akopesaka mpiko.” (Baloma 15:5, MN) Na bongo, lolenge nini Jéhovah azali kopesa koyika mpiko? Moko na banzela oyo azali kosalela ezali bongo bandakisa ya koyika mpiko oyo ekomami kati na Liloba na ye, Biblia. (Baloma 15:4) Wana tozali kokanisa na mozindo likoló na yango, tolendisami te bobele mpo na mpiko, kasi tozali mpe koyekola makambo mingi mpo na oyo etali lolenge ya mpiko. Totalela bandakisa mibale ya minene—molende mpe koyika mpiko ya Yobo; mpiko mpe bosembo ya Yesu Klisto.—Baebele 12:1-3; Yakobo 5:11.
14, 15. (a) Yobo ayikaki mpiko na mimekamo nini? (b) Lolenge nini Yobo akokaki koyika mpiko na mimekamo?
14 Makambo nini matyaki mpiko ya Yobo kati na komekama? Anyokwamaki na ntina na makambo matali nkita mpo ete abungisaki bozwi na ye. (Yobo 1:14-17; tala Yobo 1:3.) Yobo azwaki mpasi monene wana bana na ye nyonso zomi bakufaki mbala moko na mopepe makasi. (Yobo 1:18-21) Azwaki maladi makasi mpe ya mpasi mingi. (Yobo 2:7, 8; 7:4, 5) Mwasi na ye apusaki ye ete atika kosalela Nzambe. (Yobo 2:9) Baninga na ye ya penepene balobaki makambo ya kozokisa, ya mabe, mpe ya lokuta. (Tala Yobo 16:1-3 mpe Yobo 42:7.) Kasi, na nyonso wana, Yobo atelemaki ngwi, kobateláká bongo bosembo na ye. (Yobo 27:5) Makambo oyo ayikelaki mpiko ekokani na mimekamo oyo basaleli ya Jéhovah bazali kokutana na yango lelo oyo.
15 Ndenge nini Yobo akokaki koyika mpiko na mimekamo nyonso wana? Eloko oyo esalisaki mpenza Yobo, ezalaki elikya. Alobaki ete: “Nzeté ezali na elikya ete soko ekokatama, ekotoa lisusu, bitape na yango bikotika kobima te.” (Yobo 14:7) Elikya nini Yobo azalaki na yango? Lokola emonisami na mwa ba versets na nsima, alobaki ete: “Soko moto akokufa, akobika nde lisusu? . . . Okobénga ngai mpe ngai nakoyanola yo. Okozala na mposa na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:14, 15) Ya solo, Yobo azalaki komona mosika koleka mpasi oyo azalaki na yango. Ayebaki ete mimekamo na ye mizalaki mpo na seko te. Soki esengelaki, ekokaki na ye kondima ata liwa. Azalaki kozela na elikya nyonso ete Jéhovah, oyo alingi solo kosekwisa bakufi, akozongisa ye na bomoi.—Misala 24:15.
16. (a) Liteya nini tozwi na ndakisa ya koyika mpiko ya Yobo? (b) Lolenge nini elikya ya Bokonzi esengeli kozala solo mpo na biso, mpe mpo na nini?
16 Liteya nini tozwi na mpiko ya Yobo? Mpo na koyika mpiko kino nsuka, tosengeli te kobungisa elikya na biso. Lisusu, komikundola ete elikya ya Bokonzi ezali likambo ya solo, mpasi nyonso tozali kokutana na yango ezali bobele mpo na “ntango mokuse.” (2 Bakolinti 4:16-18) Elikya na biso ya ntina mingi etongami mpenza likoló na elaká ya Jéhovah mpo na ntango oyo esili kobelema wana “akolongola mpisoli nyonso na miso na [biso], mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:3, 4) Elikya wana, oyo “ekozimbisaka te,” esengeli kobatela makanisi na biso. (Baloma 5:4, 5; 1 Batesaloniki 5:8) Esengeli kozala solo mpo na biso—solo mpenza na boye ete na miso ya kondima, tokoki komimona ete tozali kati na mokili ya sika—maladi mpe konyokwama na makanisi ezali lisusu te, kasi tozali kolamuka mikolo nyonso na nzoto kolongono mpe na makanisi malamu; tozali kotungisama lisusu te mpo na mikakatano na makambo ya nkita, kasi tozali na kimya; kolela na ntina na liwa ya balingami na biso ezali lisusu te, kasi tozali komona na esengo nyonso wana bango bazali kosekwa. (Baebele 11:1) Kozanga elikya motindo wana, tokoki kobulungana na mimekamo ya lelo kino kolemba. Oyo nde nguya monene tozali na yango na nzela ya elikya na biso, mpo na kolanda kobunda ntango nyonso, mpo na koyika mpiko na bosembo nyonso kino nsuka!
17. (a) Yesu ayikaki mpiko na mimekamo nini? (b) Lolenge nini tokoki komikanisela mpasi makasi oyo Yesu ayikelaki yango mpiko? (Tala maloba na nsé na lokasa.)
17 Biblia epesi biso toli ya “kotala” Yesu mpe ‘kotalela ye malamu.’ Ayikaki mpiko liboso na mimekamo nini? Mosusu kati na yango eutaki na bato na ntina na masumu na bango mpe kozanga kokoka. Yesu ayikaki mpiko bobele te “na koyinama na bato na masumu,” kasi ayikaki mpiko lisusu na mikakatano oyo mizalaki kobima katikati na bayekoli na ye, kati na yango, kowelana monene oyo bawelanaki mpo na koyeba nani alekaki monene. Na nsuka, kondima na ye ekutanaki na komekama moko makasi koleka. “Ayikelaki nzeté na mpasi mpiko.” (Baebele 12:1-3; Luka 9:46; 22:24) Ezali pɛtɛɛ te mpo na kokanisa mpasi na mayoki mpe na nzoto oyo azalaki na yango ntango akakisamaki na nzeté mpe nsɔni oyo aokaki na kobomama lokola motuki.a
18. Engebene ntoma Paulo, wapi makambo mibale oyo masungaki Yesu?
18 Nini esalisaki Yesu na koyika mpiko kino nsuka? Ntoma Paulo alobeli makambo mibale masungaki Yesu: ‘mabondeli mpe malɔmbo’ mpe lisusu “esengo oyo etyamaki liboso na ye.” Yesu, Mwana ya kokoka na Nzambe, aokaki nsɔni te mpo na kosenga lisalisi. Abondelaki “na kongánga makasi mpe na mpisoli.” (Baebele 5:7; 12:2) Mingi mpenza, ntango momekamo na ye ya monene mobelemaki, amonaki ntina ya kobondela mbala na mbala mpe na molende nyonso mpo ete akoka kolendisama. (Luka 22:39-44) Mpo na koyanola na mabondeli na Yesu, Jéhovah alongolaki momekamo te, kasi apesaki Yesu nguya ya koyikela yango mpiko. Yesu ayikaki mpe mpiko mpo ete atalelaki mbano na ye nsima na koyika mpiko na nzeté na mpasi—esengo asengelaki kozala na yango mpo ete asangani na kokumisa nkombo ya Jéhovah mpe na kosikola bato longwa na kufa.—Matai 6:9; 20:28.
19, 20. Lolenge nini ndakisa na Yesu ezali kosalisa biso na kozala na likanisi libongi mpo oyo esengami na koyika mpiko?
19 Na kotalela ndakisa na Yesu, tozali koyekola makambo mingi oyo mazali kosalisa biso mpo na kozala na likanisi libongi mpo na oyo esengami na koyika mpiko. Koyika mpiko ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Soki tokanisi ete ezali mpasi mpo na koyika mpiko na momekamo moko, ezali libɔndisi na koyeba ete likambo yango moko likómelaki mpe Yesu. Mpo na koyika mpiko kino nsuka, tosengeli kobondela mbala na mbala mpo na kozwa nguya. Na ntango na momekamo, tokoki mbala mosusu komiyoka ete tobongi te mpo na kobondela. Kasi Jéhovah azali kosenga biso ete tozipwela ye mitema na biso ‘mpo ete azali kobatela biso.’ (1 Petelo 5:7) Lisusu, na nzela ya bilaka bikomami kati na Liloba na ye, Jéhovah alobi ete akopesa “nguya oyo eleki nguya na bomoto” epai na baoyo bazali kobelela ye kati na kondima.—2 Bakolinti 4:7-9.
20 Mbala mosusu tosengeli koyika mpiko elongo na mpisoli. Mpo na Yesu, mpasi oyo azwaki na nzeté ya mpasi ezalaki mpenza ntina ya esengo te. Kasi, esengo ezalaki nde kati na mbano oyo etyamaki liboso na ye. Mpo na biso, ebongi te na komizela ete tosepela mpe tozala na esengo ntango nyonso wana tozali kati na momekamo. (Tala Baebele 12:11.) Nzokande, na kotaláká mbano oyo ezali liboso, tokoki mpenza ‘kotalela yango lokola esengo monene’ ata soki tokutani na mimekamo makasi. (Yakobo 1:2-4; Misala 5:41) Likambo ya ntina mingi ezali ete totelema ngwi—ata soki esengeli kosalema elongo na mpisoli. Na nyonso wana, Yesu alobaki te ete: ‘Ye oyo akobimisa bobele mpisoli moke akobika’ kasi, “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.”—Matai 24:13.
21. (a) Na 2 Petelo 1:5, 6, tolendisami na kobakisa ezaleli nini likoló na koyika mpiko? (b) Mituna nini tokotalela na lisoló lilandi?
21 Koyika mpiko ezali bongo na ntina mingi mpo na kobika. Kasi na 2 Petelo 1:5, 6, tolendisami na kobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe likoló na koyika mpiko. Ezaleli ya kobanga Nzambe ezali nini? Lolenge nini ezali na boyokani elongo na koyika mpiko, mpe lolenge nini okoki kozwa yango? Mituna oyo mikotalelama na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpasi monene oyo Yesu ayikelaki yango mpiko ekoki komonana na likambo oyo ete nzoto na ye ya kokoka eumelaki te na kokufa nsima na mwa ngonga moke likoló na nzeté ya mpasi, nzokande mpo na basali na mabe baoyo bakakisamaki na nzeté esika moko na ye epai na epai, esengelaki ete babuka makolo na bango mpo ete bakufa nokinoki. (Yoane 19:31-33) Bango baokaki mpasi ya mayoki te mpe na nzoto te lokola oyo bato baokisaki Yesu na boumeli ya butu mobimba kozanga kolala liboso na kokakisama na nzeté, ntango mosusu ezali mpo na ntina yango nde akokaki lisusu te komema nzeté na ye ya mpasi.—Malako 15:15, 21.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Koyika mpiko elimboli nini?
◻ Mpo na nini libota ya Jéhovah bazali na mposa ya koyika mpiko ekeseni na bato mosusu?
◻ Nini esalisaki Yobo ete akoka koyika mpiko?
◻ Lolenge nini ndakisa na Yesu ezali kosalisa biso na kozala na likanisi libongi mpo na oyo etali koyika mpiko?
[Elilingi na lokasa 10]
Biteyelo ya Bokonzi bisalemaki mpo na kolakisa bilenge baklisto oyo balongolamaki na kelasi mpo ete losambo na bango ezalaki kopesama bobele epai na Jéhovah
[Elilingi na lokasa 12]
Lokola azwaki ekateli ya kokumisa Tata na ye, Yesu abondelaki mpo na kozwa nguya ya koyika mpiko na momekamo