Sikoyo tosengeli mpenza kokɛngɛla mingi koleka
“Na yango, bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.”—MATAI 24:42.
1, 2. Nini ezali komonisa ete tokómi na bosukisi ya ebongiseli ya makambo?
MOKOMI Bill Emmott alobaki ete: “Bambula ya 1900 ezalaki mpenzampenza bambula ya bitumba.” Alobaki ete bitumba mpe mobulu ezalaki na bileko nyonso; kasi, abakisaki boye: “Atako na bileko mosusu mpe bitumba ezalaki, oyo ya bambula ya 1900 elekaki. Ezali na bambula yango nde, mpo na mbala ya liboso, etumba ya mokili mobimba esalemaki . . . Mpe, mpo na kondimisa yango malamumalamu, etumba ya mokili mobimba esalemaki kaka moko te, kasi mibale.”
2 Yesu Klisto asakolaki bitumba wana “ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi.” Kasi, yango ezali kaka moko na makambo ya ‘elembo ya kozala ya Klisto mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.’ Na esakweli monene yango, Yesu atángaki mpe nzala, maladi, mpe koningana ya mabelé. (Matai 24:3, 7, 8; Luka 21:6, 7, 10, 11) Na lolenge ebele, makambo yango ebakisami mpe ekómi makasi koleka. Bato bakómi kosala mabe mingi mpe tozali komona yango na ezaleli na bango epai ya Nzambe mpe bazalani na bango. Ezali komonana polele ete misala ya mabe mpe mobulu ekómi mingi. Bato bakómi kolinga mbongo koleka Nzambe, bamipesi na bisengo. Nyonso wana ezali komonisa ete tozali na “bantango ya ndenge mosusu.”—2 Timote 3:1-5.
3. “Bilembo ya bantango” esengeli kotinda biso na kosala nini?
3 Ozali kokanisa nini ndenge makambo ezali se kobeba na mokili? Mingi bazali kokipe te; kutu, bamosusu bakómi mitema libanga liboso ya makambo mabe oyo ezali kosalema lelo oyo. Bato minene mpe bato ya mayele ya mokili bazali kososola te “bilembo ya bantango”; bakonzi ya mangomba bazali mpe kolimbwela bato likambo yango malamu te. (Matai 16:1-3) Kasi, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Na yango, bókɛngɛlaka mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.” (Matai 24:42) Na maloba yango, Yesu alendisaki biso tókɛngɛla kaka te, kasi ‘tókɛngɛlaka.’ Mpo tókɛngɛlaka, tosengeli kotikala miso mpe matoi efungwamá. Yango esɛngi koyeba kaka te ete tozali na mikolo ya nsuka mpe na ntango ya mpasi. Tosengeli kondima mpenza ete “nsuka ya makambo nyonso ekómi pene.” (1 Petelo 4:7) Kaka soki tozali na kondima ndenge yango nde tokokɛngɛla mingi lisusu koleka. Yango wana, tosengeli komituna motuna oyo: ‘Nini ekosalisa biso tólendisa kondima na biso ete nsuka ekómi pene?’
4, 5. (a) Nini ekondimisa biso lisusu makasi ete nsuka ya ebongiseli ya mabe ya ntango oyo ekómi pene, mpe mpo na nini? (b) Tángá likambo moko ya ntango ya Noa oyo ekokani na ntango ya kozala ya Mwana ya moto?
4 Tótalela makambo oyo ezalaki liboso ya likambo moko monene oyo esalemaká na mokili: Mpela monene ya ntango ya Noa. Bato bakómaki kosala mabe mingi mpe “likambo yango epesaki [Yehova] bolɔzi na motema.” Yehova alobaki ete: “Nakolongola na mokili bato oyo esalaki ngai.” (Genese 6:6, 7) Asalaki mpe ndenge alobaki. Yesu akokanisaki makambo oyo elekaki ntango wana na oyo ezali koleka lelo na maloba oyo: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”—Matai 24:37.
5 Tokanisi mpenza ete lelo oyo Yehova azali koyoka na motema na ye ndenge kaka azalaki koyoka liboso ya Mpela. Lokola Nzambe abomaki bato oyo bazalaki kotosa ye te na mikolo ya Noa, akoboma mpe bato mabe oyo bazali lelo. Soki tomoni malamu ndenge oyo makambo ya ntango na biso ekokani na makambo ya ntango wana, tokondima lisusu makasi ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene. Na bongo, makambo nini ya lelo oyo ekokani na makambo ya ntango wana? Ezali soki makambo mitano. Ya liboso ezali ete likebisi ya polele ezali kopesama ete nsuka ezali koya.
Bakebisamaki mpo na “biloko oyo emonanaki naino te”
6. Na mikolo ya Noa, Yehova azwaki mokano ya kosala nini?
6 Na mikolo ya Noa, Yehova alobaki boye: “[Elimo, NW] na ngai ekoumela seko kati na bato te, mpe ete moto azali bobele mosuni, mpe mikolo na ye ekozala mbula mokama na ntuku mibale.” (Genese 6:3) Nzambe ayebisaki ekateli wana na mobu 2490 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe na mbula wana, nsuka ebandaki mpo na mokili mabe ya ntango wana. Kanisá oyo yango elimbolaki mpo na bato oyo bazalaki na bomoi na ntango wana! Etikalaki kaka mbula 120 mpo Yehova ayeisa “mpela na mokili mpo na kobebisa mosuni nyonso yango ezali na mpema ya bomoi na nse ya likoló.”—Genese 6:17.
7. (a) Noa asalaki nini ntango ayokaki likebisi ete Mpela ezali koya? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela makebisi oyo elobeli nsuka ya mokili?
7 Bambula mingi liboso, Noa azwaki likebisi ete Mpela ekoya mpe asalelaki malamu ntango oyo etikalaki mpo na komibongisa mpo akoka kobika. Ntoma Paulo alobaki boye: “Nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe na ntina etali biloko oyo emonanaki naino te, [Noa] amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye.” (Baebele 11:7) Ezali boni mpo na biso? Eleki mbula soki 90 banda mikolo ya nsuka ya mokili oyo ebandaki na 1914. Ntembe ezali te ete tozali na “ntango ya nsuka.” (Danyele 12:4, NW) Ndenge nini tosengeli kotalela makebisi oyo bazali kopesa biso? Biblia elobi ete: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Yango wana, oyo ezali ntango ya komipesa lisusu koleka mpo na kosala mokano ya Yehova.
8, 9. Makebisi nini ezali kopesama na mikolo na biso, mpe ndenge nini ezali kosakolama?
8 Na ntango na biso, Makomami esalisi bayekoli ya solosolo ya Biblia báyeba ete mokili oyo ekobomama. Tondimaka likambo yango? Yoká likambo oyo Yesu Klisto alobaki polele: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te.” (Matai 24:21) Yesu alobaki mpe ete akoya lokola Zuzi oyo Nzambe aponi mpo na kokabola bato ndenge mobateli akabolaka bampate ná bantaba. Bato oyo akoboya “bakokende na kolongolama ya seko, kasi bayengebene na bomoi ya seko.”—Matai 25:31-33, 46.
9 Yehova azali mbala na mbala kozongela makebisi yango epai ya basaleli na ye na nzela ya bilei ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa. (Matai 24:45-47) Lisusu, bato ya bikólo nyonso, mabota nyonso, minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso bazali kolendisama ete ‘bábanga Nzambe mpe bápesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei.’ (Emoniseli 14:6, 7) Ntango Batatoli ya Yehova basakolaka nsango ya Bokonzi na mokili mobimba, bakebisaka mpe bato ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe elongola boyangeli ya bato. (Danyele 2:44) Esengeli kozwa likebisi yango na lisɛki te. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azangisaka te kokokisa maloba na ye. (Yisaya 55:10, 11) Asalaki yango na mikolo ya Noa, akosala yango mpe na mikolo na biso.—2 Petelo 3:3-7.
Bato bamipesi na pite mpe ekóbo
10. Tokoki koloba nini mpo na pite mpe ekobo na mikolo ya Noa?
10 Eleko na biso ekokani mpe na mikolo ya Noa na likambo mosusu lisusu. Lokola Yehova abalisaki mobali ná mwasi ya liboso, atindaki bango básangisaka nzoto na ndenge ya lokumu mpo ‘bátondisa mokili.’ (Genese 1:28) Na mikolo ya Noa, baanzelu oyo bazangaki botosi bakómaki kosala likambo ebongi te ya kosangisa nzoto na bato. Baanzelu yango bakitaki awa na mabelé, balataki nzoto ya mosuni, bazwaki basi ya kitoko mpe babotaki na bango bana oyo bazalaki bato-bademo, babengamaki Banefilime. (Genese 6:2, 4) Biblia ekokanisi lisumu oyo baanzelu mabe wana basalaki na misala ya mbindo ya bato ya Sodomo ná Gomola. (Yuda 6, 7) Yango wana, bato ya ntango wana bamipesaki na pite mpe ekobo.
11. Bizaleli nini ezali komonisa ete mikolo na biso ekokani na mikolo ya Noa?
11 Makambo ezali ndenge nini na ntango biso? Na mikolo ya nsuka oyo tozali, bato mingi bazali kokanisa kaka kosala pite to ekobo. Paulo alobaki mpo na bato yango ete ‘babungisi bizaleli nyonso ya malamu’; mingi kati na bango bamipesi “na etamboli ya mbindo mpo na kosala bosɔtɔ ya ndenge nyonso na lokoso.” (Baefese 4:19) Bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto, pite, kobebisa bana mike, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ekómi komonana mpambampamba. Bato mosusu bazali ‘komizwela mbano mobimba’ na ndenge bazali kozwa bamaladi oyo epalanganaka na kosangisa nzoto, mabota na bango ezali kobeba, mpe bazali kokutana na mikakatano mosusu.—Baloma 1:26, 27.
12. Mpo na nini tosengeli koyina makambo ya mabe?
12 Na mikolo ya Noa, Yehova atindaki Mpela monene mpe abomaki bato oyo bamipesaki na pite mpe ekobo. Tosengeli kobosana ata moke te ete mikolo oyo ezali mpenza lokola mikolo ya Noa. ‘Bolɔzi monene’ oyo ezali koya ekolongola ‘bato ya pite, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mpe mibali oyo balalaka na mibali.’ (Matai 24:21; 1 Bakolinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8) Sikoyo mpenza nde tosengeli koyina makambo mabe mpe kokima makambo oyo ekoki komema biso na pite to ekobo!—Nzembo 97:10; 1 Bakolinti 6:18.
Mabelé ‘etondi na mobulu’
13. Na mikolo ya Noa, mpo na nini mabelé ‘etondaki na mobulu’?
13 Biblia elobeli likambo mosusu oyo ezalaki na mikolo ya Noa na maloba oyo: “Mokili ezalaki mabe na miso ya Nzambe; mokili etondaki na [mobulu].” (Genese 6:11) Mobulu ebandaki na ntango wana te. Kaina, mwana ya Adama, abomaká ndeko na ye oyo azalaki moto ya sembo. (Genese 4:8) Lameke asalaki nzembo moko oyo emonisi ete na ntango na ye mpe bato ya mobulu bazalaki mpamba te amikumisaki ete abomaki elenge mobali moko mpo na komibatela. (Genese 4:23,24) Likambo ya sika na mikolo ya Noa ezalaki ete mobulu ekómaki mingi koleka. Lokola baanzelu ya mabe babalaki basi awa na mabelé mpe babotaki Banefilime, mobulu ebakisamaki na ndenge oyo emonanaki naino te. Bingambe yango ya mobulu bazalaki “Bakweisi,” “baoyo bazalaki kokweisa basusu.” (Genese 6:4, NW; maloba na nse ya lokasa) Yango wana, mabelé ‘etondaki na mobulu.’ (Genese 6:13, NW) Kanisa mokakatano oyo Noa azalaki na yango mpo na kobɔkɔla bana na ye na mokili ya ndenge wana! Kasi, Noa amonanaki ‘moyengebene na miso ya Yehova na kati ya bato ya ntango wana.’—Genese 7:1, NW.
14. Na ndenge nini mokili ya lelo ‘etondi na mobulu’?
14 Bato basalaka mobulu banda mokili ebandá. Kasi, se ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, na mikolo na biso mpe mobulu ebakisami na ndenge oyo emonaná naino te. Mbala na mbala tozali koyoka nsango ya mobulu na kati ya mabota, misala ya bateroriste, kobomama ya bato ya ekólo mobimba na mokano ya kosilisa bango, mpe bato bazali kobɛta masasi mpe koboma ebele ya bato kaka mpamba. Longola yango, ebele ya bato bazali kokufa na bitumba. Mabelé etondi lisusu na mobulu. Mpo na nini? Nini esali ete mobulu ekóma mingi? Eyano na motuna yango ekomonisa biso likambo mosusu oyo ezalaki mpe na ntango ya Noa.
15. (a) Nini esali ete mobulu ebakisama mingi na mikolo ya nsuka oyo? (b) Elikya nini tosengeli kozala na yango?
15 Ntango Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na 1914, Mokonzi na yango, Yesu Klisto, asalaki likambo moko monene. Abenganaki Satana Zabolo ná bademo na ye na likoló mpe abwakaki bango na mabelé. (Emoniseli 12:9-12) Liboso ya Mpela, baanzelu oyo batosaki Nzambe te batikaki bisika na bango na likoló bango moko; kasi, na ntango na biso, babenganaki bango kobengana. Bakoki mpe lisusu kolata nzoto ya mosuni te mpo na kosangisa nzoto na bato awa na mabelé. Lokola bazali na nkanda mpe bazali kobanga etumbu oyo ezali koyela bango, bazali kotinda bato mpe bibongiseli mosusu na kosala makambo ya mabe mpe mobulu makasi koleka kutu na ntango ya Noa. Yehova abomaki mokili na Mpela ntango baanzelu oyo bazangaki botosi ná bana na bango batondisaki yango na mabe. Tóyeba ete akoboma mpe mokili ya ntango na biso! (Nzembo 37:10) Kasi, baoyo bazali kokɛngɛla lelo oyo bayebi ete lobiko na bango ekómi pene.
Nsango ezali kosakolama
16, 17. Wapi likambo ya minei oyo emonisi ete mokili na biso ekokani na mokili ya ntango ya Noa?
16 Likambo ya minei oyo emonisi ete mokili na biso ekokani mokili liboso ya Mpela ezali mosala oyo bapesaki Noa. Noa atongaki masuwa moko monene. Azalaki mpe “mosakoli.” (2 Petelo 2:5) Noa azalaki kosakola nsango nini? Emonani ete Noa azalaki kolendisa bato bábongola mitema mpe azalaki koyebisa bango ete etikali moke mokili ebomama. Yesu alobaki ete bato ya ntango ya Noa “batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”—Matai 24:38, 39.
17 Ndenge moko mpe, ntango Batatoli ya Yehova bazali kokokisa na molende nyonso mokumba na bango ya kosakola, bazali kopalanganisa nsango ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba. Na mokili mobimba, bato bakoki koyoka mpe kotánga nsango ya Bokonzi na minɔkɔ na bango. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, zulunalo oyo eyebisaka Bokonzi ya Yehova, ezali kobimisama koleka milio 25 na minɔkɔ koleka 140. Ya solo, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama “na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso.” Ntango Nzambe akomona ete mosala wana ekokisami na ndenge oyo ye alingi, nsuka ekoya.—Matai 24:14.
18. Ndenge oyo bato mingi bazali kotalela nsango na biso ekokani na nini na ndenge oyo bato mingi bazalaki kosala na mikolo ya Noa?
18 Soki tokanisi ndenge oyo makanisi mpe bizaleli ya bato ebebaki liboso ya Mpela, ezali mpasi te tókanga ntina oyo bato yango oyo bazangi kondima bazalaki kosɛka, kofinga mpe kotyola Noa ná libota na ye. Kasi, nsuka eyaki. Ndenge moko mpe, ‘basɛki ná kosɛka na bango’ bakómi ebele na mikolo ya nsuka. Kasi Biblia elobi ete: “Nzokande mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi.” (2 Petelo 3:3, 4, 10) Ekoya na ntango oyo Yehova abongisá. Ntango yango ekoleka te. (Habakuku 2:3) Esengeli mpenza tókɛngɛlaka!
Kaka bato moke nde babikaki
19, 20. Kobomama ya ebongiseli ya makambo oyo ná Mpela ya ntango ya Noa ekokokana na nini?
19 Mikolo ya Noa mpe mikolo na biso ekokani kaka te na mabe ya bato mpe kobomama na bango. Bato mosusu babikaki na Mpela; ndenge moko mpe, bato mosusu bakobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Baoyo babikaki na Mpela ezalaki bato ya komikitisa oyo balandaki te bomoi ya bato mingi na ntango wana. Bayokaki likebisi ya Nzambe mpe bakabwanaki na bato mabe ya ntango wana. Biblia elobi ete: “Noa azwaki ngɔlu na miso ya [Yehova]. . . . Noa azalaki moto ya . . . boyengebene kati na bato ya ntango na ye.” (Genese 6:8, 9) Na mokili mobimba, kaka libota moko, “bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, bamemamaki kozanga likama na mai.” (1 Petelo 3:20) Na nsima, Nzambe alobaki na bango boye: “Bóbota mpe bózala mingi mpe bótondisa mokili.”—Genese 9:1.
20 Liloba ya Nzambe ezali koyebisa biso ete “ebele ya bato” ‘bakouta na bolɔzi monene.’ (Emoniseli 7:9, 14) Ebele ya bato yango bakozala mingi ndenge nini? Yesu alobaki boye: “Ekuke oyo ezali nkaka mpe nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:13, 14) Soki tokokanisi bango na bamiliare ya bato oyo bazali lelo na mokili, bato oyo bakobika na bolɔzi monene bakozala moke. Kasi ekoki mpenza kozala ete bakopesa bango libaku malamu lokola oyo bapesaki bato oyo babikaki na Mpela. Ekoki mpenza kozala ete bato oyo bakobika na bolɔzi monene bakozwa libaku ya kobota bana na mokili ya sika.—Yisaya 65:23.
“Bókɛngɛlaka”
21, 22. (a) Litomba nini ozwi na boyekoli na biso ya lisolo ya Mpela? (b) Nini ekozala mokapo mpo na mobu 2004, mpe mpo na nini tosengeli koyoka toli ya mokapo yango?
21 Atako Mpela ezali likambo oyo eleká kalakala, ezali kopesa biso likebisi ya polele oyo tosengeli kobosana te. (Baloma 15:4) Makambo ya mikolo ya Noa oyo ekokani na makambo ya mikolo na biso esengeli kotinda biso tómona mpenza bonene ya likambo oyo ezali koya mpe kolamusa biso na koya ya Yesu oyo ekozala lokola moyibi mpo na kopesa bato mabe etumbu.
22 Lelo oyo, Yesu Klisto azali kotambwisa mosala monene ya kotonga na elimo. Mpo tóbatelama mpe tóbikisama, biso basambeli ya solo tokɔti na kati ya paladiso ya elimo oyo tokoki kokokanisa na masuwa. (2 Bakolinti 12:3, 4) Mpo na kobika na bolɔzi monene, tosengeli kotikala na paladiso yango. Libanda ya paladiso yango ya elimo ezali mokili ya Satana, oyo azali pene ya kolya moto nyonso oyo abandi kolala mpɔngi na elimo. Esengeli mpenza ‘tókɛngɛlaka’ mpe tómilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova.—Matai 24:42, 44.
Ozali koyeba lisusu?
• Likebisi nini Yesu apesaki na ntina na koya na ye?
• Yesu akokanisaki ntango ya kozala na ye na nini?
• Na makambo nini mikolo na biso ekokani na mikolo ya Noa?
• Ndenge nini kokokana oyo ezali kati na mikolo na biso mpe mikolo ya Noa ezali kosalisa biso tómona ete mikolo etikali ya kotánga?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]
Mokapo mpo na mobu 2004 ekozala: “Bókɛngɛlaka . . . Bómilɛngɛla.”—Matai 24:42, 44.
[Elilingi na lokasa 15]
Noa ayokaki likebisi ya Nzambe. Biso mpe tozali koyoka yango?
[Bililingi na lokasa 16]
“Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo”