Babiki na Bolózi Monene
“Bajali baoyo babimi na [bolózi monene, “NW”]. Basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate.”—EMƆNISƐLI 7:14.
1. Banani bakoyamba basekwi awa na mabelé na ntango ya lisekwa?
WANA bamilió mingi ya bato bakosekwa kati na ‘lisekwa ya bato sembo mpe ya bato sembo te,’ bakozongisama te na bomoi na mabelé oyo mazangi eloko. (Misala 24:15) Bakosekwisama na ezingelo oyo ebongisami malamu mpe bakokuta bifandelo kitoko, bilamba, mpe bilei mingi bisili kobongisama mpo na bango. Nani akobongisa biloko nyonso wana? Ya solo, ekozala na bato oyo bakofanda na mokili ya sika liboso ete lisekwa oyo ekosalema na mabelé ebanda. Ekozala bongo banani? Biblia emonisi ete bakozala babiki ya bolózi monene oyo ezali koya. Kozanga ntembe, kati na mateya nyonso ya Biblia, yango ezali moko na mateya maleki kobenda likebi—bamoko kati na bato sembo bakokatisa bolózi monene mpe bakokufa soko moke te. Elikya wana emonisami malamu kati na Makomami Mosantu.
Lokola mikolo ya Noa
2, 3. (a) Bokokani nini bozali kati na mikolo ya Noa mpe ntango na biso? (b) Kobika ya Noa mpe ya libota na ye na ntango ya Mpela emonisi nini?
2 Na Matai 24:37-39, Yesu Klisto akokanisaki mikolo ya Noa na mikolo ya nsuka, oyo tozali kobika kati na yango. Alobaki ete: “Jambi lokola ejalaki mikɔlɔ na Noa, [kozala, NW] na Mwana na moto ekojala bongo. Mpɔ ete na mikɔlɔ yango liboso na mpela monɛnɛ, bajalaki kolia mpe komɛla, kobala mpe kobalisa, kino mokɔlɔ eingelaki Noa na masuwa; bayebaki likambo tɛ kino eyaki mpela mpe elongolaki bango yɔnsɔ. [Kozala, NW] na Mwana na moto ekozala mpe bongo.”
3 Mpela ya mokili mobimba ebomaki baoyo nyonso batyaki te likebi na nsango ya likebisi ya Nzambe. Nzokande, ebomaki Noa mpe libota na ye te. Lokola Yesu alobaki yango, ‘bango baingelaki na masuwa.’ Na ntina na ezaleli na bango ya kobanga Nzambe, Yehova apesaki bango likoki ya kobika. Kobika ya Noa mpe ya libota na ye, elobelami na 2 Pɛtɛlɔ 2:5, 9 ete: “[Nzambe] . . . abateli Noa, mosakoli na boyɛngɛbɛnɛ, na bamosusu nsambo wana eyeisi ye mpela na mokili likolo na batioli. Boye [Yehova] ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ejali bango kati na komekama.” Yesu akokanisaki mikolo ya Noa na mikolo ya nsuka mpo na komonisa ete bato mingi bakotya likebi te na nsango ya likebisi ya Nzambe. Kasi, atako ayebisaki bongo, andimaki ete Noa mpe libota na ye batosaki Yehova Nzambe, bakɔtaki na masuwa, mpe babikaki na Mpela monene. Kobika ya Noa mpe ya libota na ye emonisi kobika ya basaleli ya sembo ya Nzambe na nsuka ya mokili ya lelo.
Ndakisa ya ekeke ya liboso
4. Na kokokisama ya maloba ya Yesu, makambo nini mamemaki na kobebisama ya Yelusaleme na mobu 70 T.B.?
4 Yesu alobelaki lisusu makambo makobima na nsuka ya mokili ya lelo. Na Matai 24:21, 22, tozali kotánga ete: “Ekojala na [bolózi monene, NW] lokola emɔnanaki longwa na ebandeli [ya mokili, NW] tɛ. Ekobima mpe boye lisusu tɛ. Sɔkɔ mikɔlɔ yango iyei mikuse tɛ mbɛ moto mɔkɔ akobika tɛ. Nde mpɔ na Bapɔnami, mikɔlɔ yango ikoya mikuse.” Maloba wana mazwaki kokokisama ya yambo na ekeke ya liboso ya Ntango na Biso. Na mobu 66 T.B., mampinga ya Baloma oyo matambwisamaki na Cestius Gallus mazingaki Yelusaleme. Basodá Baloma bakómaki pene ya kobebisa lopango ya tempelo, mpe Bayuda mingi bamilɛngɛlaki mpo na komitika na mabɔkɔ ya Baloma. Na mbala moko, mpe kozanga ntina ya sikisiki, Cestius Gallus alongolaki mampinga na ye. Komonáká ete Baloma bakei, baklisto batosaki maloba ya Yesu, oyo malobamaki bambula mingi liboso: “Sɔkɔ bokomɔna Yelusaleme kojingama na bibele na basoda, boyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma. Na ntango yango bango na kati na Yuda bakima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka balongwa wana, mpe bango na bilanga bakɔta mboka tɛ.” (Luka 21:20, 21) Bayuda oyo bakómaki baklisto, bapɔnami, balongwaki nokinoki na Yelusaleme oyo ezalaki pene na kobebisama mpe bongo bakimaki libebi ya nsɔ́mɔ oyo mosika te ekwelaki engumba yango. Na mobu 70 T.B., mampinga ya Baloma, oyo sikawa matambwisamaki na général Titus, bayaki lisusu. Bazingaki Yelusaleme, mpe babundisaki engumba mpe babebisaki yango.
5. Na ndimbola nini bolózi oyo ekwelaki Yelusaleme na mobu 70 T.B. eyeisamaki mokuse?
5 Josèphe, Moyuda, mokomi ya makambo na kala, alobi ete Bayuda 1 100 000 bakufaki, 97 000 babikaki mpe bamemamaki na boombo. Bayuda oyo bazalaki baklisto te bazalaki “bapɔnami” te oyo balobelami na esakweli ya Yesu. Wana ezalaki ye koloba epai na libota ya Bayuda batomboki, Yesu ayebisaki ete: “Tala, ndako na bino etikali mpamba. Jambi najali koloba sɔlɔ ete bokomɔna ngai lisusu tɛ kino bokoloba ete; ‘Mapamboli na ye oyo ajali koya na nkombo na [Yehova].’” (Matai 23:38, 39) Ezali na esika moko te epai kuna ekomami ete, na nsuka, Bayuda oyo batikalaki kati na Yelusaleme bandimaki Yesu lokola Masiya, ete bakómaki baklisto mpe bazwaki ngɔlu ya Yehova. Atako bongo, bolózi oyo ekwelaki Yelusaleme na mobu 70 T.B. eyeisamaki mokuse. Kozingelama ya nsuka ya engumba na mampinga ya Baloma eumelaki ntango molai te. Yango epesaki nzela na Bayuda mosusu ete bábika, atako yango ezalaki mpo ete bátindama na boombo kati na bitúká bikeseni ya Bokonzi ya Loma.
Ebele monene ya babiki
6, 7. (a) Engumba nini ya losambo oyo ekobebisama, lokola eteni ya bolózi monene oyo ekokani na mosusu te? (b) Yoane asakolaki nini na ntina na koya ya bolózi likoló ya mokili oyo?
6 Atako kobebisama ya Yelusaleme na mobu 70 T.B. ememaki solo “bolózi monene” likoló na engumba wana ya losambo, nzokande kokokisama monene ya maloba na Yesu ezali mpo na mikolo mizali koya. Babilone Monene, engumba monene ya losambo, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba nyonso ya lokuta, esengeli kobomama na bolózi monene oyo ekolandana nokinoki na bolózi monene koleka oyo ekokwea likoló na ebongiseli ya biloko ya Satana oyo etikalaki. (Matai 24:29, 30; Emoniseli 18:21) Mibu soko 26 nsima ya kobebisama ya Yelusaleme, ntoma Yoane, na Emoniseli 7:9-14, akomaki makambo matali bolózi monene wana oyo ekokwela mokili mobimba. Amonisaki ete ebele monene ya bato bakobika na yango.
7 Babiki wana, oyo babengami “ebele monene,” bayebani na likambo moko oyo bazali kosala na molende nyonso. Engebene Emɔnisɛli 7:14, moko kati na mikóló 24 kuna na likoló, alobaki na Yoane ete: “Bajali baoyo babimi na [bolózi monene, NW]. Basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate.” Ee, ebele monene bazali kosanzola Yehova, Mobikisi na bango. Bazali komonisa kondima kati na makila na Yesu mpe bamonani basembwi liboso ya Mozalisi na bango mpe liboso ya Mokonzi oyo atyami, Yesu Klisto.
8. Boyokani nini malamu ezali kati na “ebele monene” mpe batikali, bandeko bapakolami ya Yesu?
8 Lelo oyo, pene na bamilió mitano ya basangani ya ebele monene bazali kotambwisama na Yesu Klisto, Mokonzi ya likoló. Bazali kotosa Klisto mpe bazali kosalana elongo na bandeko na ye bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé. Na kotalela lolenge oyo ebele monene bazali kosala epai na baklisto bapakolami, Yesu alobi na bango ete: “Najali koloba na bino sɔlɔ ete lokola esalaki bino yango epai na mɔkɔ na bandeko na ngai baoyo baleki mokɛmokɛ, bosalelaki ngai yango.” (Matai 25:40) Ezali na ntina na lisungi ya motema moko oyo bazali kopesa na bandeko bapakolami ya Klisto nde basangani ya ebele monene batalelami lokola ete bazali kosala malamu epai na Yesu ye moko. Yango esali ete bázala na boyokani makasi elongo na Yesu Klisto mpe elongo na Yehova Nzambe. Bazwi libaku kitoko ya kosangana elongo na batikali bapakolami lokola Batatoli ya Nzambe oyo bamemi nkombo na ye.—Yisaya 43:10, 11; Yoele 2:31, 32.
Bazali kosɛnzɛla
9, 10. (a) Tosengeli kosala nini mpo na kobatela etɛlɛmɛlo na biso ya sembo liboso ya Mwana na moto? (b) Tosengeli kosala nini mpo na “kosɛnzɛla ntango nyonso”?
9 Ebele monene basengeli ntango nyonso kobatela ezalela na bango ya basembwi liboso ya Mwana na moto, mpe esengeli na bango kosɛnzɛla ntango nyonso kino nsuka. Yesu amonisaki masɛngami wana polele ntango alobaki ete: “Keba na bino ete mitema na bino mikoma makasi mpɔ na kolunda tɛ, sɔkɔ na kolanga tɛ, sɔkɔ na bitungiseli na bomɔi tɛ. Bongo mokɔlɔ yango ebimela bino pwasa lokola motambo tɛ. Mpɔ ete ekobimela bato yɔnsɔ bafandi na mikili yɔnsɔ. Sɛnjɛla ntango yɔnsɔ, mpe bɔndɛla ete bojala na makasi na kokima makambo oyo yɔnsɔ malingi koya, mpe na kotɛma liboso na Mwana na moto.”—Luka 21:34-36.
10 Mpo ete tókoka kotɛlɛma liboso ya Mwana na moto, tosengeli kondimama na ye; akoki kondima biso te soki tomitiki ete makanisi ya mokili oyo ezala na bopusi likoló na biso. Makanisi ya mokili malengolaka mingi mpe makoki komema moto na komipesa na bisengo ya mosuni to na komitika ete mikakatano ya bomoi milɛmbisa ye kino kozanga kopesa na Bokonzi esika ya liboso. (Matai 6:33) Kosala bongo ekoki kolɛmbisa moto na elimo mpe ekoki kosala ete asepela lisusu te na mikumba oyo azali na yango liboso ya Nzambe mpe liboso ya bazalani na ye. Akoki kokóma mpiɔ na elimo to kobebisa etɛlɛmɛlo na ye kati na lisangá na kosaláká lisumu moko monene mpe mbala mosusu, kino koboya kobongola motema. Mosangani moko na moko ya ebele monene asengeli komibatela. Asengeli ntango nyonso komikabola na mokili oyo ya mbindo mpe na misala na yango.—Yoane 17:16.
11. Mitinda nini ya Makomami oyo soki tosaleli yango ekosalisa biso na kobika na Armagedon?
11 Mpo na yango, Yehova azali kopesa biso oyo tozali na yango mposa na nzela ya Liloba na ye, na elimo santu na ye mpe na lisangá na ye oyo ezali komonana. Tosengeli kozwa mpenza litomba na bibongiseli oyo nyonso. Lisusu, soki tolingi mpenza kozwa ngɔlu ya Nzambe, esengeli na biso kobondela ye mpe kotosa ye. Ya liboso, tosengeli kolóna ezaleli ya koyina makasi oyo ezali mabe. Mokomi na Nzembo alobaki ete: “Nafandi esika mɔkɔ na bato na lokuta tɛ mpe naboyi kotambola na bakosi elɔngɔ mɔkɔ. Naboyi koyangana na bato mabe mpe nakofanda esika mɔkɔ na bato na masumu tɛ. [Bwaká molimo na ngai elongo na basumuki te to bomoi na ngai elongo na basopi na makila te, NW].” (Njembo 26:4, 5, 9) Kati na lisangá ya boklisto, bilenge mpe mikóló bakosɛnzɛla ete bázala te na boninga mingi elongo na bato oyo bamipesi te epai na Yehova. Mpo na kozwa ngɔlu ya Nzambe, esengeli na biso kosala makasi ete tózala na ekweli te mpe na litɔnɔ te na mokili oyo. (Nzembo 26:1-5; Yakobo 1:27; 4:4) Boye, tokondimisama ete na Armagedon, Yehova akoboma biso te elongo na bato mabe.
Basusu “bakokufa soko moke te”
12, 13. (a) Liboso ya kosekwisa Lasalo, maloba nini Yesu alobaki oyo Malata asosolaki yango malamu te? (b) Yesu alingaki koloba nini wana ayebisaki ete bato mosusu ‘bakokufa soko moke te’?
12 Kokanisa na ntina na kobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo mpe kozala na likoki ya kokufa soko moke te epesaka esengo. Yango ezali elikya oyo Yesu atye liboso na biso. Liboso ya kosekwisa Lasalo, moninga na ye oyo akufaki, Yesu ayebisaki na Malata ndeko mwasi ya Lasalo ete: “Najali lisekwa mpe bomɔi. Ye oyo ajali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika; mpe moto na moto oyo ajali na bomɔi mpe andimi ngai, libela akokufa tɛ. Ojali kondima oyo?” Malata azalaki kondima lisekwa, kasi asosolaki mpenza te makambo nyonso oyo Yesu alobaki.—Yoane 11:25, 26.
13 Yesu alobaki te ete bantoma na ye ya sembo bakolanda kozala na bomoi kati na mosuni mpe bakokufa soko moke te. Nkutu, na nsima, amonisaki ete bayekoli na ye basengelaki kokufa. (Yoane 21:16-23) Ya solo, kopakolama na bango na elimo santu na Pantekote ya mobu 33 T.B. elimbolaki ete basengelaki kokufa liboso ete básangola libula na bango na likoló lokola mikonzi mpe banganga. (Emoniseli 20:4, 6) Na yango, wana bambula ezalaki koleka, baklisto nyonso ya ekeke ya liboso bakufaki. Atako bongo, Yesu ayebisaki oyo akosala mpo na mokano yango. Maloba na ye na ntina na bato oyo bakokufa soko moke te makokokisama.
14, 15. (a) Maloba ya Yesu oyo ete bato mosusu ‘bakokufa soko moke te’ makokokisama lolenge nini? (b) Ezalela ya mokili ya lelo ezali nini, kasi elikya nini basembwi bazali na yango?
14 Na lolenge moko, baklisto bapakolami oyo bazali sembo bakomona kufa ya seko soko moke te. (Emoniseli 20:6) Lisusu, maloba wana ya Yesu mamonisaki ntango moko ya sikisiki wana Nzambe akotya mabɔkɔ kati na makambo ya bato mpe akolongola mabe na mabelé lokola asalaki yango na mikolo ya Noa. Basembwi oyo ntango wana bakozala kosala mokano ya Nzambe bakokufa te ntango bikateli ya Nzambe bikokwea. Nzokande, lokola Noa mpe libota na ye, bakozwa libaku kitoko ya kobika ntango mokili oyo ekobomama. Elikya wana ezali na moboko: etongami likoló na mateya mpe bandakisa oyo ezali kati na Biblia. (Kokanisá na Baebele 6:19; 2 Petelo 2:4-9.) Kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi ete mosika te mokili ya lelo, oyo esalemi na bato bazangi sembo, ekolimwa kati na kobomama. Ezalela ya mokili ya lelo ekoki kobongwana te, mpo ete ezwi ekateli ya kosala sé mabe. Oyo Nzambe alobaki mpo na mokili na ntango ya Noa ekokani mpe na mokili oyo ezingi biso. Mitema ya bato mingi mitondi na mabe, mpe makanisi na bango mazali ntango nyonso ya mabe.—Genese 6:5.
15 Yehova atikelaki bato nzela ete báyangela mabelé na boumeli ya bikeke mingi kozanga ete akɔta na kati, kasi ntango yango ekómi mpenza pene na nsuka. Lokola Biblia esakolaki yango, mosika te Yehova akoboma basáli nyonso na mabe. (Nzembo 145:20; Masese 2:21, 22) Nzokande, akoboma basembwi elongo na basáli na mabe te. Nzambe asilá kosala bongo ata mbala moko te! (Kokanisá na Genese 18:22, 23, 26.) Mpo na nini akoboma baoyo bazali kosala makasi na kosaleláká ye na bosembo nyonso, na komonisáká bobangi Nzambe? Ebongi na kokanisa ete basambeli ya sembo ya Yehova oyo bakozala na bomoi na ebandeli ya bolózi monene bakozwa ngɔlu na miso na ye mpe bakobomama te, lokola esalemaki mpo na Noa mpe libota na ye na ntango oyo libebi monene ekwelaki mokili mabe ya ntango na ye. (Genese 7:23) Bakobatelama na Nzambe mpe bakobika na nsuka ya mokili ya lelo.
16. Makambo nini ya kokamwa oyo makobima kati na mokili ya sika, mpe ekolimbola nini mpo na babíki?
16 Nini ekosalema na nsima? Kati na mokili ya sika, mapamboli ya kobikisa makosopana likoló na bato wana matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu ekosalelama na mobimba na yango mpenza. Biblia elobeli na elilingi “ebale na mai na bomɔi, kitɔkɔ lokola kulusatala, kobima na kiti na bokonji na Njambe mpe na Mwana na Mpate. Na kati na balabala na yango, mpe na ebale, na bipai yɔnsɔ mibale, ejalaki njete na bomɔi kobotaka mbuma na mitindo jomi na mibale, sanja na sanja kobotaka mbuma na sanja, mbuma na sanja. Nkasa na njete ijali mpɔ na kobikisa bato na mabota.” (Emɔnisɛli 22:1, 2) Oyo nde likambo kitoko na koloba ete “kobikisama” elimboli mpe bolóngi likoló na kufa ya Adama yango moko! “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi yɔnsɔ.” (Yisaya 25:8) Na yango, baoyo bakobika na bolózi monene mpo na kokɔta na mokili ya sika bakokufa soko moke te!
Elikya ya solo
17. Lolenge nini elikya oyo ete bato mosusu bakobika na Armagedon mpe bakokufa soko moke te, ekokokisama solo?
17 Tokoki mpenza kotya motema na elikya wana ya kokamwa? Ezali bongo mpenza! Yesu amonisaki na Malata ete ntango ekoya wana bato bakozala na bomoi kozanga kokufa. (Yoane 11:26) Lisusu, kati na mokapo 7 ya Emoniseli oyo Yesu apesaki na Yoane, emonisamaki ete ebele monene bakouta na bolózi monene, bakobika na yango. Tokoki kondima maloba ya Yesu Klisto mpe lisoló ya kala na ntina na Mpela oyo esalemaki na mikolo ya Noa? Ntembe ezali soko moke te! Lisusu, Biblia ezali na ebele na masoló oyo malobeli lolenge Nzambe abikisaki basaleli na ye na bileko oyo azalaki kokokisa bikateli na ye mpe wana azalaki kobebisa mabota. Tokoki kokanisa ete akozanga kosala bongo na ntango ya nsuka? Ezali na likambo moko lileki monene oyo Mozalisi akoki kosala yango te?—Kokanisá na Matai 19:26.
18. Lolenge nini tokoki kolikya kozala na bomoi kati na mokili ya sika ya Yehova, oyo ekozala na boyengebene?
18 Na kosaleláká Yehova na bosembo nyonso uta sikawa, tokozala na elikya ya bomoi ya seko kati na mokili na ye ya sika. Mpo na bamilió ya bato, bomoi kati na mokili wana ya sika ekozwama na nzela ya lisekwa. Nzokande, na mikolo na biso, bamilió ya basaleli ya Yehova—ee, ebele monene oyo moto te akoki kotánga motuya na bango soko mpe kokata yango—bakozala na libaku kitoko ya kobika na bolózi monene. Mpe bakomona kufa soko moke te.
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini kobika ya bato na Armagedon emonisamaki na makambo oyo masalemaki na mikolo ya Noa?
◻ Tosengeli kosala nini mpo tókoka kotɛlɛma ntango Yesu akoyeisa bikateli ya Nzambe?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete babiki na Armagedon “bakokufa soko moke te”?
[Elilingi na lokasa 15]
Baklisto babikaki na bolózi oyo ekwelaki Yelusaleme