Sepelá na boyekoli na yo moko ya Liloba ya Nzambe
“Nakomanyola mpenza mosala na yo nyonso, mpe nakotya makanisi na ngai na ndenge oyo osalaka makambo.”—NZEMBO 77:12, NW.
1, 2. (a) Mpo na nini tosengeli kozwaka ntango ya komanyola? (b) Komanyola mpe kokanisa malamumalamu elimboli nini?
BISO bayekoli ya Yesu Klisto tosengeli koluka kobatela malamumalamu boyokani na biso na Nzambe mpe bantina oyo etindaka biso tósalela Ye. Nzokande, lelo oyo, bomoi ya bato mingi ezali kosɛnga bango básalaka makambo nyonso mbangumbangu; yango wana bazalaka ata na ntango te mpo na komanyola. Bato yango bamipesi mobimba na koluka biloko ya mokili, na kosomba biloko mpe na bisengo ya mpambampamba. Ndenge nini tokoki kokima makambo ya ndenge wana oyo ekomemela biso eloko moko ya malonga te? Mokolo na mokolo tozwaka ntango mpo na kosala makambo ya ntina mingi lokola kolya mpe kolala; ndenge moko mpe, mokolo na mokolo tosengeli kozwaka ntango ya komanyola misala ya Yehova mpe ndenge oyo asalaka makambo.—Deteronome 8:3; Matai 4:4.
2 Ozwaka ntango ya komanyola? Komanyola elimboli mpenza nini? Komanyola elimboli kotya makanisi nyonso na likambo moko, kokanisa yango malamumalamu. Kokanisa malamumalamu elimboli kotalela malamumalamu, na likebi mpe na bozindo. Yango elingi koloba nini mpo na biso?
3. Likambo nini esalisaka mpenza moto na kokola na elimo?
3 Ya liboso, yango esengeli kolamusa na makanisi na biso maloba oyo ntoma Paulo akomelaki Timote, moninga na ye ya mosala, ete: “Liboso ete naya, kobá komipesa na botángi liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya. . . . Kanisaká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango, mpo bokoli na yo emonana polele na miso ya bato nyonso.” Esengelaki komonana ete Timote azali kokola to kokende liboso, mpe maloba ya Paulo emonisaki ete kokanisa malamumalamu makambo ya elimo esalisaka moto akola. Ezali mpe bongo lelo oyo. Mpo tókola na elimo, tosengeli ‘kokanisaka malamumalamu’ Liloba ya Nzambe mpe ‘komipesa’ na yango.—1 Timote 4:13-15.
4. Biloko nini okoki kosalela mpo esalisa yo okanisaka malamumalamu Liloba ya Yehova?
4 Ntango malamu mpenza mpo na komanyola etalelaka misala na yo mpe ndenge oyo bobongisá makambo na bino na kati ya libota. Bato mingi bakanisaka malamumalamu mokapo moko ya Biblia na ntɔngɔ na kati ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Bandeko soki 20 000 oyo basalaka na Babetele ya mokili mobimba ntɔngɔ nyonso batalelaka mokapo ya mokolo na boumeli ya miniti 15 liboso ya kobanda mosala. Na Betele mokomoko, kaka bato minei oyo baponamaki liboso nde bapesaka makanisi na mokapo ya mokolo, bamosusu nyonso balandaka oyo ezali kolobama mpe kotángama mpe bakanisaka yango malamumalamu. Batatoli mosusu bakanisaka malamumalamu Liloba ya Yehova ntango bazali kokende na mosala. Bayokaka bakasɛti ya botángi ya Biblia, ya masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! Bamama mingi bayokaka bakasɛti yango ntango bazali kosala misala ya ndako. Bato yango nyonso balandaka nde ndakisa ya Asafa, mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Nakokanisa ndenge oyo Yah asalaka makambo; mpamba te nakokanisa lisusu misala ya kokamwa oyo asalá kalakala. Nakomanyola mosala na yo nyonso, mpe nakotya makanisi na ngai na ndenge oyo osalaka makambo.”—Nzembo 77:11, 12, NW.
Ezaleli malamu ebotaka mbuma malamu
5. Mpo na nini koyekola biso moko esengeli kozala na ntina mingi mpo na biso?
5 Na mikolo oyo, lokola bato mingi bakómi na batelevizyo, bavideo, mpe baordinatɛrɛ, mingi bakómi na bolɛmbu ya kotánga, to mpe batángaka lisusu mpenza te. Kasi, esengeli kozala bongo te mpo na Batatoli ya Yehova. Kotánga Biblia ezali lokola koyoka Yehova azali koloba na biso. Eleki bambula ebele mpenza, Yosua azwaki mokumba ya Moize ya kotambwisa libota ya Yisalaele. Mpo Yehova apambola ye, esengelaki ete Yosua atángaka Liloba ya Nzambe. (Yosua 1:8; Nzembo 1:1, 2) Likambo yango ezali kosɛngama ata na moi ya lelo. Kasi, lokola bato mosusu bakɔtá kelasi mingi te, bazalaka na mokakatano mpo na kotánga to bamonaka ete kotánga ezali mosala monene. Nini ekoki kosalisa biso tósepelaka kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe? Tokoki kozwa eyano na maloba ya Mokonzi Salomo, na Masese 2:1-6. Fungolá Biblia na yo mpe tángá bavɛrsɛ yango. Na nsima, tokotalela yango elongo.
6. Ndenge nini tosengeli kotalela boyebi ya Nzambe?
6 Vɛrsɛ yango ebandi na elendiseli oyo: “Mwana na ngai, soki okozwa maloba na ngai mpe soki okobatela malamumalamu mibeko na ngai, mpo na kotya litoi na yo na bwanya, mpo na kobalola motema na yo na bososoli; . . . ” (Masese 2:1, 2, NW) Maloba yango ezali koteya biso nini? Ezali koteya biso ete koyekola Liloba ya Nzambe ezali mokumba ya mokomoko kati na biso. Toyoki lisɛngami oyo elobi ete “soki okozwa maloba na ngai.” Yango ezali likambo monene mpamba te bato mingi batyelaka Liloba ya Nzambe likebi te. Mpo tóyoka esengo ya koyekola Liloba ya Nzambe, tosengeli koyamba maloba ya Yehova mpe kotalela yango lokola eloko ya motuya oyo tokolinga kobungisa yango te. Tosengeli kotika nzela ata moke te ete makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo ezangisa biso ntango to ebosanisa biso koyekola Liloba ya Nzambe, bongo na nsima tókóma kotalela yango bongobongo, to tókóma kokakatana mpo na kondima yango.—Baloma 3:3, 4.
7. Soki ntina ya solosolo ezali te mpo na kozangisa yango, mpo na nini tosengeli koyanganaka mpe koyoka malamu na makita nyonso?
7 Ntango bazali kolimbola Liloba ya Nzambe na makita ya lisangá, totyaka mpenza likebi mpe toyokaka malamumalamu? (Baefese 4:20, 21) ‘Totyaka mpenza motema’ mpo na kozwa bososoli? Ekoki kokóma ete ndeko oyo azali kosala lisolo azali mpenza molobi ya makoki te; kasi lokola azali kosembola Liloba ya Nzambe, ebongi ete tólanda ye malamumalamu. Lisusu, mpo na koyoka bwanya ya Yehova, tosengeli ntango nyonso koyanganaka na makita ya lisangá soki ntina moko ya solosolo ezali te mpo na kozangisa yango. (Masese 18:1) Tókamata ndakisa ete moyekoli moko azalaki te ntango baninga na ye bayanganaki na ndako ya likoló na Yelusaleme na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), tókanisa naino mawa oyo azalaki na yango! Ya solo, na makita na biso tomonaka makambo ya kokamwa te lokola oyo esalemaki mokolo wana, kasi tokendaka kuna mpo na koyekola Biblia, mokanda na biso ya liboso. Na bongo, tokoki kozwa litomba na likita mokomoko soki tozali kotya likebi mpe soki tozali kolanda na Babiblia na biso bavɛrsɛ oyo ezali kotángama.—Misala 2:1-4; Baebele 10:24, 25.
8, 9. (a) Koyekola biso moko esɛngaka nini? (b) Kokanisá motuya ya wolo na motuya ya boyebi ya Nzambe.
8 Salomo, mokonzi ya bwanya alobaki mpe boye: “Lisusu, soki okobenga mayele mpe soki okobimisa mongongo na yo na bososoli, . . . ” (Masese 2:3, NW) Maloba yango ezali kopesa biso mposa nini? Na ntembe te, ezali kopesa biso mposa makasi ya kokanga ntina ya Liloba ya Yehova! Ezali komonisa ete tosengeli kozala na mposa ya koyekola mpo na kozwa bososoli mpe koyeba mokano ya Yehova. Kasi, nyonso wana esɛngaka kosala milende. Yango mpe ememi biso na kotalela maloba oyo Salomo alobaki na nsima mpe ndakisa oyo asalelaki.—Baefese 5:15-17.
9 Salomo alobaki lisusu boye: “Soki okotika te koluka [mayele] lokola palata, mpe soki okolukaluka yango lokola biloko ya motuya bibombami; . . . ” (Masese 2:4, NW) Yango ememi makanisi na biso na mosala ya kotimola oyo bato basalaka banda kalakala mpo na koluka biloko ya motuya lokola palata na wolo. Bato babomaná mpo na wolo. Bamosusu balekisaki bomoi na bango mobimba mpo na koluka wolo. Kasi, motuya nini ya solosolo wolo ezalaka na yango? Soki na ndakisa obungi na kati ya esobe mpe olingi kokufa na mposa ya mai, okopona nini: liboke ya wolo to kɔpɔ ya mai? Nzokande, kanisá molende oyo bato basalaka mpo na koluka wolo, oyo bango moko nde bakataka motuya na yango!a Yango wana tosengeli kosala molende koleka mpo na koluka bwanya, bososoli mpe mayele ya Nzambe mpe mokano na ye! Kasi, milende nyonso wana ekomemela biso matomba nini?—Nzembo 19:7-10; Masese 3:13-18.
10. Eloko nini tokoki kozwa soki toyekoli Liloba ya Nzambe?
10 Salomo alobaki lisusu boye: “Na bongo, okokanga ntina ya kobanga Yehova, mpe okozwa boyebi ya Nzambe.” (Masese 2:5, NW) Kanisá naino likambo monene bongo: biso bato ya masumu tokoki kozwa “boyebi ya Nzambe,” Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́, Yehova! (Nzembo 73:28; Misala 4:24) Bato ya filozifi mpe bato ya mayele ya mokili oyo balukaka banda kala koyeba makambo ya bomoi mpe ya molɔ́ngɔ́ oyo ebombamá. Nzokande, balongi te kozwa “boyebi ya Nzambe.” Mpo na nini? Mpamba te atako banda kalakala boyebi yango ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe, bamonaka ete ezali pɛtɛɛ mingi; yango wana bandimaka yango te mpe bakangaka ntina na yango te.—1 Bakolinti 1:18-21.
11. Tángá mwa matomba ya koyekola biso moko.
11 Yoká likambo mosusu oyo Salomo alobaki oyo ekopesa biso mposa ya koyekola: “Yehova apesaka bwanya; boyebi mpe bososoli eutaka na monɔkɔ na ye.” (Masese 2:6, NW) Yehova afungolaka mpenza lobɔkɔ mpo na kopesa bwanya, boyebi mpe bososoli na moto nyonso oyo azali koluka yango. Makambo mingi esengeli kopesa biso mposa ya koyekola Liloba ya Nzambe, atako kosala yango esɛngaka molende, komityela mibeko mpe komipimela makambo mosusu. Kutu, likambo ya malamu mpo na biso ezali ete tozali na Babiblia oyo ekomami na masini; tosɛngisami te na kokoma yango na mabɔkɔ lokola bato ya kala!—Deteronome 17:18, 19.
Mpo na kotambola na ndenge ebongi na Yehova
12. Tosengeli koluka boyebi ya Nzambe na mokano nini?
12 Mokano nini esengeli kotinda biso na koyekola biso moko? Mpo bámona ete biso toleki basusu? Mpo na kolakisa ete toyebi mingi? Kaka mpo na kokóma bato oyo bayebi Biblia mingi? Te. Mokano na biso esengeli kozala ya kokóma bato oyo bazali komitambwisa, koloba mpe kosala makambo na ndenge ya baklisto, oyo bazali ntango nyonso pene mpo na kosalisa basusu, na elimo ya kolendisa lokola oyo ya Klisto. (Matai 11:28-30) Ntoma Paulo alobaki ete: “Boyebi evimbisaka na lolendo, kasi bolingo etongaka.” (1 Bakolinti 8:1) Yango wana, tosengeli kozala na komikitisa lokola Moize ntango alobaki na Yehova ete: “Nabondeli yo, . . . monisá ngai nzela na yo [sikoyo] ete nayeba yo mpe nabonga na miso na yo.” (Exode 33:13) Ya solo, tosengeli koluka boyebi mpo na kosepelisa Nzambe, kasi mpo na kokamwisa bato te. Tosengeli kozala basaleli ya Nzambe oyo babongi mpe bazali na komikitisa. Ndenge nini tokolonga kosala yango?
13. Nini esengeli mpo na kokóma mosaleli ya Nzambe oyo abongi?
13 Paulo apesaki Timote toli na ndenge ya kosepelisa Nzambe, alobaki na ye boye: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15) Maloba “kosembola . . . malamumalamu” ebongoli verbe ya Grɛki oyo ezalaki libosoliboso na ndimbola ya “kokata alima.” (Kingdom Interlinear) Bato mosusu ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete yango ezali ndenge oyo moto oyo atongaka bilamba alandaka eloko oyo babengi patron mpo na kokata elamba, to ndenge oyo moto oyo asalaka bilanga asalaka milɔngɔ, mpe bongo na bongo. Ata soki maloba yango esalelami mpo na kolobela mosala nini, likanisi ezali ete mosala yango esengeli kolanda malamumalamu nzela, to kozala alima. Elingi koloba ete mpo Timote azala mosaleli oyo abongi mpe andimami na miso ya Nzambe, asengelaki ‘kosala nyonso oyo ekoki na ye’ mpo ete mateya na ye mpe etamboli na ye elanda mpenza liloba ya solo.—1 Timote 4:16.
14. Boyekoli na biso esengeli kosala nini na maloba mpe na misala na biso?
14 Paulo amonisaki likanisi moko wana ntango alendisaki baninga na ye baklisto na Kolose na ‘kotambola na ndenge ebongi na Yehova mpo na kosepelisa ye mpenza’ na ndenge bazali ‘kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu mpe kokola na kati ya boyebi ya solosolo ya Nzambe.’ (Bakolose 1:10) Na vɛrsɛ yango Paulo ayokanisi likambo ya kozala mosaleli ya Yehova oyo abongi na likambo ya “kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu” mpe “kokola na kati ya boyebi ya solosolo ya Nzambe.” Na maloba mosusu, likambo ya ntina mpo na Yehova ezali kaka te ya koyeba soki tolingaka mpenza boyebi, kasi ya koyeba ndenge nini tolandaka Liloba ya Nzambe na misala mpe na maloba na biso. (Baloma 2:21, 22) Yango elingi koloba ete mpo tósepelisa Nzambe, boyekoli na biso moko esengeli kobongola makanisi mpe etamboli na biso.
15. Ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso?
15 Lelo oyo, Satana azali koluka kolɛmbisa makanisi na biso mpo na koboma biso na elimo. (Baloma 7:14-25) Yango wana, tosengeli kobatela elimo mpe makanisi na biso mpo tótambola na ndenge ebongi na Nzambe na biso Yehova. Ebundeli tozali na yango mpo na kosala yango ezali “boyebi ya Nzambe,” oyo ekoki “kokómisa likanisi nyonso mokangami mpo na kopusa yango etosa Klisto.” Yango mpe ezali ntina mosusu oyo tosengeli koyekolaka Biblia mokolo na mokolo, mpamba te tosengeli kobengana na bɔɔngɔ na biso makanisi ya mabe mpe ya mosuni.—2 Bakolinti 10:5.
Biloko oyo ekosalisa biso na koyeba Biblia
16. Ndenge nini tokoki kozwa matomba ntango Yehova azali koteya biso?
16 Mateya ya Yehova ememelaka bato matomba na elimo mpe na nzoto. Yango ezali te lokola mateya ya teoloji oyo bato bayekolaka yango kaka mpo na kotondisa bɔɔngɔ. Yango wana, totángaka boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” (Yisaya 48:17) Ndenge nini Yehova atambwisaka biso na nzela na ye oyo ememelaka biso litomba? Ya liboso, tozali na Biblia Mosantu, Liloba na ye oyo epemami. Yango ezali buku ya libosoliboso oyo totalelaka ntango nyonso. Yango wana ezali malamu tólandaka makita na Babiblia na biso na mabɔkɔ. Lisolo ya mokube Moetiopia, na Misala mokapo 8, ezali komonisa matomba ya kosala ndenge yango.
17. Likambo nini ekómelaki mokube Moetiopia, mpe yango ezali komonisa nini?
17 Mokube Moetiopia azalaki na Lingomba ya Bayuda. Azalaki mpenza mondimi ya solo mpe asilaki koyekola Makomami. Ntango azalaki na mobembo na likalo na ye, nzelanzela azalaki kotánga mokanda ya Yisaya ntango Filipo akendaki mbangu pembeni na ye mpe atunaki ye boye: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Mokube yango apesaki eyano nini? Alobaki ete: “ ‘Ndenge nini nakoki koyeba yango mpenza soki moto alakisi ngai te?’ Mpe abondelaki Filipo amata mpe afanda elongo na ye.” Na nsima, na lisalisi ya elimo santu, Filipo alimbwelaki mokube yango esakweli ya Yisaya. (Misala 8:27-35) Yango ezali komonisa nini? Ezali komonisa ete tosengeli kosuka kaka te na kotánga Biblia biso moko. Yehova azali kopesa moombo ya sembo mpe ya mayele elimo na ye mpo asalisa biso tókanga ntina ya Liloba na ye na ntango oyo ebongi. Yango esalemaka ndenge nini?—Matai 24:45-47; Luka 12:42.
18. Ndenge nini moombo ya sembo mpe ya mayele asalisaka biso?
18 Atako moombo yango abengami “ya sembo mpe ya mayele,” Yesu alobaki te ete akoki kosala libunga ata moke te. Yango ezali etuluku ya bandeko oyo bazali baklisto ya sembo mpe bapakolami na elimo; atako bongo, bazali kaka bato ya kozanga kokoka. Atako bazalaka mpenza na makanisi ya sembo, bakoki kosala mabunga, se ndenge oyo baninga na bango na ekeke ya liboso bazalaki mpe ntango mosusu kosala mabunga. (Misala 10:9-15; Bagalatia 2:8, 11-14) Kasi, bazalaka na makanisi ya mabe te, mpe Yehova azali kosalela bango mpo na kopesa biso biloko oyo tosengeli na yango mpo na koyekola Biblia mpo na kolendisa kondima na biso na Liloba ya Nzambe mpe na bilaka na ye. Eloko ya libosoliboso oyo moombo apesi biso mpo na koyekola biso moko ezali Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu. Lelo oyo, libongoli yango ezali na minɔkɔ 42, mpe Babiblia milio 114 esili kobimisama. Ndenge nini tokoki kosalela yango malamu mpenza na boyekoli na biso moko?—2 Timote 3:14-17.
19. Wapi mwa makambo ya Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ezali na mitindami oyo ekoki kosalisa moto na boyekoli na ye moko?
19 Na ndakisa, tótalela Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu oyo ezali na mitindami. Longola mitindami, ezali na maloba na nse ya nkasa, “Index ya maloba ya Biblia” mpe “Index ya maloba oyo ezali na nse ya nkasa”; ezali mpe na mwa masolo mpo na kolimbola mitó ya makambo 43, bakisa mpe bakarte mpe bitanda. Ezali mpe na “Maloba ya ebandeli” oyo ezali kolimbola ebele ya mikanda oyo basalelaki mpo na kobongola Biblia yango. Soki ezali na monɔkɔ moko oyo oyebi, salá makasi mpo oyeba makambo na yango nyonso oyo tolobeli mpe salelaká yango. Biblia ezali mpe ekotikala mokanda ya liboso mpo na boyekoli na biso moko, mpe Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika elobeli mingi nkombo ya Nzambe mpe emonisi polele boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe.—Nzembo 149:1-9; Danyele 2:44; Matai 6:9, 10.
20. Wapi mituna oyo etaleli boyekoli na biso moko oyo tosengeli kozwela yango biyano?
20 Mituna mosusu oyo tokoki kotuna yango oyo: ‘Lisalisi nini lisusu tozali na yango mposa mpo na koyeba Biblia? Ndenge nini tokoki kozwa ntango mpo na koyekola Biblia biso moko? Ndenge nini tokoki kobongisa lisusu boyekoli na biso? Ndenge nini tokoki kosalisa bato mosusu na makambo oyo tozali koyekola?’ Lisolo oyo elandi ekolobela makambo yango ya ntina mingi na bokoli na biso baklisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Banda 1979 tii lelo oyo, wolo emataki ntalo makasi na 1980, gramɛ 31 ekómaki na dolare 850; nzokande, ntalo na yango ekitaki makasi na 1999, gramɛ 31 ekómaki na dolare 252,80.
Ozali koyeba lisusu?
• Komanyola mpe kokanisa malamumalamu elimboli nini?
• Ndenge nini tosengeli kotalelaka Liloba ya Nzambe?
• Mokano nini esengeli kotinda biso na koyekola biso moko?
• Wapi bisaleli tozali na yango mpo na koyeba Biblia?
[Elilingi na lokasa 15]
Bandeko ya Betele balendisamaka na elimo na ndenge babandaka mokolo na kotalela mokapo ya mokolo
[Bililingi na lokasa 15]
Tokoki kosalela ntango malamu soki tozali koyoka bakasɛti ya botángi ya Biblia ntango tozali na motuka
[Elilingi na lokasa 16]
Bato babomaki nzoto mpe balekisaki bambula mpo na koluka wolo. Milende nini osalaka mpo na koyekola Liloba ya Nzambe?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya California State Parks, 2002
[Bililingi na lokasa 17]
Biblia ezali eloko ya motuya oyo ekoki komema na bomoi ya seko