Tómitambwisa na bonsomi engebene komipesa ya Boklisto
“Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.” —2 BAKOLINTI 3:17, NW.
1. Batatoli ya Yehova bamipesi na nani, mpe mpo na nini bazali kosalela bisaleli bindimami na mibeko ya Leta?
BATATOLI YA YEHOVA bandimaka ete lingomba na bango ekozala mpo na libela. Na yango bazelaka ntango oyo bakosalela Nzambe “na elimo mpe na solo” libela na libela. (Yoane 4:23, 24) Lokola bato oyo bazali na bonsomi, baklisto yango bamipesi mobimba na Yehova Nzambe mpe bazali na ekateli ya komitambwisa engebene komipesa na bango. Mpo na yango, batyelaka Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye motema. Wana bazali, na motema mobimba, kolanda nzela ya komipesa na bango ya boklisto na bonsomi oyo Nzambe apesi bango, Batatoli bamonisaka botosi oyo ebongi na “bakonzi bazali liboso,” elingi koloba bakonzi ya Leta, mpe basalelaka malamu bibongiseli mpe bisaleli nyonso bindimami na mibeko ya Leta. (Baloma 13:1; Yakobo 1:25) Na ndakisa, Batatoli basalelaka Société Watch Tower lokola esaleli oyo endimami na mibeko ya Leta—bisaleli mosusu mpe bizali na bikólo ndenge na ndenge—mpo na kokokisa mosala ya kosalisa bazalani na bango, mingi mpenza na elimo. Nzokande, Batatoli bamipesi na Nzambe, kasi na esaleli moko te oyo endimami na mibeko ya Leta, mpe komipesa na bango na Yehova ezali mpo na libela.
2. Mpo na nini Batatoli ya Yehova basepelaka mingi na bisaleli lokola Société Watch Tower mpe bisaleli mosusu ya lolenge yango oyo endimami na mibeko ya Leta?
2 Lokola basaleli bamipesi na Nzambe, Batatoli ya Yehova basɛngisami kolanda malako ya Yesu matali ‘kozalisa bato bayekoli kati na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteya bango.’ (Matai 28:19, 20, NW) Mosala yango mokokoba kino nsuka ya ebongiseli ya biloko, mpamba te Yesu alobaki lisusu ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:3, 14) Mbula na mbula, bamasini ya konyata mikanda ya Société Watch Tower mpe bibongiseli mosusu oyo lisangá ezali kosalela, ezali kobimisela Batatoli ya Yehova bankóto ya Babiblia, babuku, mwa babuku, mpe bazulunalo mpo na kosalela na mosala na bango ya kosakola kati na mokili mobimba. Bisaleli wana bindimami na mibeko ya Leta bizali na ntina mingi mpo na kosunga basaleli bamipesi na Nzambe mpo ete bámitambwisa engebene komipesa na bango epai na ye.
3. Batatoli ya Yehova bazalaki liboso kosalela liloba “la Société” na ndimbola nini?
3 Moto mosusu akoki koloba ete lolenge oyo Batatoli balobelaka Société Watch Tower—to mingimingi bobele “la Société”—emonisi ete batalelaka yango ete ezali te bobele esaleli mpamba oyo endimami na mibeko ya Leta. Batalelaka yango lokola mokonzi oyo azali na liloba ya nsuka na makambo ya losambo, boye te? Buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu emonisi likambo yango polele na kolimboláká boye: “Ntango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [ya 1 Yúni 1938] elobelaki ‘la Société,’ elingaki kolobela esaleli mpamba te oyo endimami na mibeko ya Leta, kasi lisangani ya baklisto bapakolami oyo ebongisaki esaleli yango mpe esalelaki yango.”a Na bongo ebéngeli yango esalelamaki mpo na kolobela “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Ezali na ndimbola wana nde mbala mingi Batatoli basalelaki nkombo “la Société.” Ya solo, “la Société” lokola esaleli oyo endimami na mibeko ya Leta ekeseni na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Bakambi ya Société Watch Tower baponamaka na voti, nzokande Batatoli oyo bazali basangani ya kelasi ya ‘moombo ya sembo’ bapakolami na elimo santu ya Yehova.
4. (a) Batatoli mosusu basalelaka maloba nini mpo ete bato mosusu bázala na mobulungano te na makanisi? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati na ntina na elobeli?
4 Mpo na kopɛngola ete bato bázala na mobulungano te na makanisi, Batatoli ya Yehova bakebaka na maloba na bango. Na esika ya koloba ete, “la Société ateyaka,” Batatoli mingi basepelaka kosalela maloba lokola, “Biblia elobi” to, “Nakanisi ete Biblia eteyi.” Na lolenge yango bazali kobenda likebi na ekateli oyo Motatoli mokomoko azwaki na ntango andimaki mateya ya Biblia mpe lisusu bazali kopɛngola likanisi ya lokuta oyo bato mosusu bakoki kozwa ete Batatoli bazali, na lolenge moko to mosusu, kolanda bobele mateya oyo mwa lingomba moko ezali kondimisa bango na makasi. Ya solo, makanisi oyo mapesami mpo na elobeli masengeli soko moke te kokóma likambo ya kobɛta ntembe mpo na yango. Soki totali malamu, elobeli ezali na ntina bobele mpo na kosalisa ete bato bázala na mobulungano te kati na makanisi. Tósengeli kozala na bokatikati ya boklisto. Biblia epesi biso toli ete ‘tówelana mpo na maloba te.’ (2 Timoté 2:14, 15) Makomami mazali mpe kopesa etinda oyo: “Soko bokobimisa maloba mayebani ntina te, mpo na kolobaloba na ndenge na ndenge, nani akososola yango elobami?”—1 Bakolinti 14:9.
Elimo ya Nzambe ezali kokutola ntina ya kotya mibeko mingi
5. Lolenge nini tosengeli kokanga ntina ya 1 Bakolinti 10:23?
5 Ntoma Paulo amonisaki ete: “Topesameli [nzela ya, NW] kosalaka makambo nyonso; nde makambo nyonso makosungaka te.” Abakisaki ete: “Topesameli [nzela ya, NW] kosalaka makambo nyonso, nde makambo nyonso makolendisaka te.” (1 Bakolinti 10:23) Ezali polele ete Paulo alingaki koloba te ete topesameli nzela ya kosala makambo oyo Liloba ya Nzambe epekisi. Soki tokokanisi yango na mibeko 600 oyo mipesamaki na Yisalaele ya kala, tokomona ete mibeko ya sikisiki mipesami moke mpo na kotambwisa bomoi ya moklisto. Na yango, na makambo mingi moto na moto asengeli kosalela lisosoli na ye. Moto oyo amipesi na Yehova azali na bonsomi oyo euti na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Lokola andimi solo, moklisto atosaka lisosoli na ye liteyami na Biblia mpe atyaka motema na litambwisi oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya elimo santu. Yango esalisaka moklisto oyo amipesi na kokata nini ‘ekolendisa’ mpe ‘ekosunga’ ye mpe bato mosusu. Asosolaka ete makatami oyo azali kozwa makozala na bopusi likoló ya boyokani na ye elongo na Nzambe oyo amipesi na ye.
6. Na makita ya boklisto, lolenge nini tokoki komonisa ete tondimi solo?
6 Motatoli amonisaka ete andimi solo na kopesáká biyano na makita ya boklisto. Na ebandeli, akoki kozongela makambo oyo malobami kati na mokanda oyo bazali koyekola. Nzokande, nsima, akokola kino kolimbola mateya ya Biblia na maloba na ye moko. Na ndenge yango akomonisa ete azali kokolisa makoki na ye ya kokanisa, kasi te bobele kozongela maloba oyo bato mosusu basilaki koloba. Soki akotonga makanisi na maloba na ye moko mpe na motema mobimba kobimisa maloba ya solo oyo mabongi, yango ekopesa ye esengo mpe ekomonisa ete andimisami kati na makanisi na ye moko.—Mosakoli 12:10; kokanisá na Baloma 14:5b.
7. Na bonsomi nyonso, basaleli ya Yehova bazwaki bikateli nini?
7 Batatoli ya Yehova bapusami na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango. (Matai 22:36-40) Ya solo, bakangani makasi bango na bango na ekanganeli ya bolingo lokola oyo ya Klisto kati na lisangá ya bandeko na mokili mobimba. (Bakolose 3:14; 1 Petelo 5:9) Kasi lokola bato oyo bazali na bonsomi, moto na moto azwaki ekateli ye moko ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, ya komikɔtisa te na makambo ya politiki, ya koboya makila, ya koboya lolenge mosusu ya kominanola, mpe ya kolanda mitinda ya Biblia. Yango ezali te bikateli oyo batyeli bango na makasi. Ezali bikateli biyokani na lolenge ya bomoi bato oyo balingaki kokóma Batatoli baponaki na bonsomi nyonso liboso ya komipesa lokola baklisto.
Bakozongisa monɔkɔ epai na lisangani ya Mikóló-Bakambi?
8. Motuna nini mosengeli kolimbolama?
8 Biblia emonisi polele ete baklisto ya solo basalelaka Nzambe na kotindikama na makasi te. Elobi ete: “Yehova azali elimo; mpe esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.” (2 Bakolinti 3:17, NW) Kasi lolenge nini likambo yango ekoki koyokana na likanisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe lisangani na yango ya Mikóló-Bakambi?—Matai 24:45-47.
9, 10. (a) Lolenge nini etinda ya bokonzi esalelamaka na lisangá ya boklisto? (b) Kolanda etinda ya bokonzi esɛngaki nini na ekeke ya liboso?
9 Mpo na koyanola na motuna yango, tosengeli koyeba malamu etinda ya Makomami mpo na bokonzi. (1 Bakolinti 11:3) Kati na Baefese 5:21-24 (NW), Klisto amonisami lokola “motó ya lisangá,” mpe lisangá ezali ‘kotosa’ ye. Batatoli ya Yehova bayebi ete moombo ya sembo mpe ya mayele ezali bongo lisangani ya bandeko ya Yesu na elimo. (Baebele 2:10-13) Kelasi yango ya moombo ya sembo eponamaki mpo na kopesa libota ya Nzambe “bilei” ya elimo “na elaka na yango.” Na ntango oyo ya nsuka, Klisto asili kotya moombo yango “likoló na biloko nyonso bizwi ye.” Na bongo, moto na moto oyo amibéngi moklisto asengeli komemya etɛlɛmɛlo ya moombo yango.
10 Mokano ya bokonzi ezali mpo na kobatela bomoko mpe komindimisa ete ‘makambo nyonso mazali kosalema na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.’ (1 Bakolinti 14:40) Mpo na kosala yango na ekeke ya liboso, etuluku ya baklisto bapakolami oyo bautaki na kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele baponamaki mpo na kozala bamonisi ya etuluku mobimba. Lokola makambo oyo masalemaki nsima mamonisaki yango, Yehova andimaki mpe apambolaki litambwisi oyo lisangani ya mikóló-bakambi epesaki na ekeke ya liboso. Baklisto ya ekeke ya liboso bandimaki ebongiseli yango na esengo. Ɛɛ, bandimaki mpe bazongisaki matɔ́ndi mpo na mbuma oyo yango ebotaki.—Misala 15:1-32.
11. Lolenge nini tosengeli kotalela lisangani ya Mikóló-Bakambi na mikolo na biso?
11 Motuya ya ebongiseli motindo yango ezali kino na ntango oyo. Lelo oyo, lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esangisi baklisto bapakolami zomi, bango nyonso bayekoli makambo mingi na boumeli ya ebele ya bambula oyo balekisi lokola baklisto. Bazali kopesa litambwisi ya elimo na Batatoli ya Yehova, lokola lisangani ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso esalaki yango. (Misala 16:4) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, Batatoli balandaka litambwisi ya bandeko wana bakɔmeli na elimo oyo basali lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo na kozwa toli oyo ezwi moboko na Biblia mpe litambwisi na makambo matali losambo. Atako baoyo bazali kati na lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali baombo ya Yehova mpe ya Klisto, lolenge moko na bandeko na bango baklisto, Biblia elobi na biso boye: “Bótosa bango bakokambaka bino mpe bómisɔkisa liboso na bango. Zambi bazali kokɛngɛlaka milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monɔkɔ na ntina na makambo na bango. Tiká ete básala mosala na esengo, na mawa te mpe ete yango ekosungaka bino te.”—Baebele 13:17.
12. Moklisto mokomoko asengeli kozongisa monɔkɔ epai ya nani?
12 Yango elingi nde koloba ete etɛlɛmɛlo ya kokɛngɛla oyo Makomami epesi na lisangani ya Mikóló-Bakambi elimboli ete Motatoli ya Yehova mokomoko asengeli kozongisa monɔkɔ epai na lisangani yango mpo na mosala na ye? Ezali bongo te, mpamba te Paulo alobaki na baklisto ya Loma ete: “Mpo na nini okofundaka ndeko na yo? Mpo na nini yo okotyola ndeko na yo? Zambi biso nyonso tokotɛlɛma liboso na esambiselo na Nzambe. . . . Moto na moto na biso akotánga makambo na ye mpenza liboso na Nzambe.”—Baloma 14:10-12.
13. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazongisaka lapolo ya mosala na bango ya kosakola?
13 Nzokande, ezali solo ete Motatoli mokomoko asɛngisami kopesa lapolo ya mosala na ye ya kosakola, boye te? Ɛɛ, kasi ntina ya kopesa lapolo elimbolami kati na buku moko oyo Motatoli nyonso azali na yango, oyo elobi ete: “Bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto bazalaki kotalela ete ezali likambo ya ntina kopesa lapolo na ntina etali bokoli ya mosala ya kosakola. (Malako 6:30) Na meko oyo mosala yango ezalaki kokola, mituya mikɔtaki kati na masolo oyo mazalaki koyebisa makambo na kokamwa oyo basakoli ya nsango malamu bakutanaki na yango. . . . (Misala 2:5-11, 41, 47; 6:7; 1:15; 4:4) . . . Boni ezalaki likambo na koyikisama mpiko mpo na basakoli wana na sembo na koyoka nsango na matomba ya mosala na bango! . . . Bobele bongo, lisangá na Yehova ezali kosala makasi lelo mpo na kolanda penepene bokoli ya mosala oyo ezali kokokisa esakweli ya Matai 24:14.”
14, 15. (a) Lolenge nini 2 Bakolinti 1:24 etaleli lisangani ya Mikóló-Bakambi? (b) Na moboko nini baklisto basengeli kozwa bikateli ya moto na moto, kasi bakobosana te likambo nini?
14 Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali ebongiseli ya bolingo mpe ndakisa ya kondima oyo ebongi na biso komekola. (Bafilipi 3:17; Baebele 13:7) Na ndenge bazali kondima mpe kolanda Klisto lokola ndakisa, bakoki mpe koloba maloba oyo ya Paulo ete: “Ezali te ete tozali na bokonzi likoló ya kondima na bino, kasi tozali baninga ya mosala mpo na esengo na bino, mpamba te soki botɛlɛmi, ezali na kondima na bino moko.” (2 Bakolinti 1:24, NW) Na kotaláká lolenge makambo mazali koleka na mokili, lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kobenda likebi na matomba ya kolanda toli ya Biblia, ezali kopesa toli na lolenge ya kosalela mibeko mpe mitinda ya Biblia, ezali mpe kokebisa na makama mabombami, mpe ezali kopesa elendiseli oyo ebongi epai na “basalani” na bango. Na lolenge yango, lisangani yango ezali kokokisa mokumba na yango ya moombo ya Klisto, mpe ezali kosalisa bango ete bábatela esengo na bango, mpe lisusu ezali kotonga bango kati na kondima mpo ete bátikala ngwi.—1 Bakolinti 4:1, 2; Tito 1:7-9.
15 Soki Motatoli azali kozwa bikateli na moboko ya toli ya Biblia oyo lisangani ya Mikóló-Bakambi epesi, azali kosala yango na liponi na ye moko mpamba te boyekoli na ye moko ya Biblia endimisi ye ete kosala bongo ezali likambo oyo ebongi. Motatoli mokomoko azali kozwa bopusi ya Liloba ya Nzambe mpo na kosalela toli malamu ya Makomami oyo lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kopesa, na koyebáká malamu ete bikateli oyo azali kozwa bikozala na bopusi likoló na boyokani na ye na Nzambe mpamba te amipesi nde na ye.—1 Batesaloniki 2:13.
Bayekoli mpe basoda
16. Atako bikateli na ntina na etamboli ezali likambo ya moto na moto, mpo na nini bamosusu bazali kobimisama na lisangá?
16 Kasi, soki ezali solo ete bikateli na ntina na etamboli ezali likambo ya moto na moto, mpo na nini Batatoli ya Yehova mosusu bazali kobimisama na lisangá? Moto moko te akataka na makanisi na ye moko ete ntango moto asali lisumu boye esengeli kobimisama na lisangá. Nzokande, likambo yango esɛngisamaka na Makomami bobele na ntango moto moko kati na lisangá azali kosala masumu minene, lokola oyo etángami na mokanda ya Bakolinti mokapo ya mitano mpe aboyi kobongola motema. Na bongo, atako moklisto moko akoki kobimisama na lisangá mpo ete azali kosala pite, yango esalemaka bobele soki moto yango aboyi lisungi ya elimo ya babateli oyo bazali komonisa bolingo. Batatoli ya Yehova bazali bango moko te oyo balandaka etinda yango ya boklisto. Buku The Encyclopedia of Religion elobi ete: “Lingomba na lingomba elingaka kozala na lotomo ya koboya basangani oyo bazali kolanda mitinda na yango te, oyo bakoki kobebisa bolamu ya basangani nyonso. Na makambo ya losambo, mbala mingi lotomo yango elendisamaki na endimeli oyo ete etumbu [ya kobengana moto na lisangá] ezalaka na bopusi na etɛlɛmɛlo oyo azali na yango liboso ya Nzambe.”
17, 18. Lolenge nini tokoki komonisa ete kobimisa moto na lisangá ezali likambo elongobani?
17 Batatoli ya Yehova bazali bayekoli ya Biblia. (Yosua 1:8; Nzembo 1:2; Misala 17:11) Tokoki kokokanisa ebongiseli ya mateya ya Biblia oyo elɛngɛlami na lisangani ya Mikóló-Bakambi na manaka ya kelasi oyo mabongisami na lisangani ya bakambi ya eteyelo. Atako ezali lisangani yango te nde eutelo ya mateya oyo makolakisama, kasi ebongisaka manaka, eponaka lolenge ya kolakisa, mpe epesaka malako masengeli. Soki moto moko aboyi kolanda masɛngami ya eteyelo, to abimiseli baninga na ye banakelasi mikakatano, to soki abwaki nsɔni na eteyelo, bakoki kobengana ye. Bakambi ya eteyelo bazali na lotomo ya kosala bongo mpo na litomba ya banakelasi nyonso.
18 Longola likambo oyo ete bazali bayekoli, Batatoli ya Yehova bazali basoda ya Yesu Klisto, balakisami mpo na “kobunda etumba malamu na kondima.” (1 Timoté 6:12; 2 Timoté 2:3) Ezali solo ete soki moto moko azali kokoba na etamboli oyo elongobani te mpo na soda ya Klisto, Nzambe akoki koboya ye. Lokola moto oyo azali na bonsomi ya kopona, soda ya Klisto akoki kozwa ekateli na lolenge asepeli, kasi asengeli kondima makambo oyo ekateli na ye ekobimisa. Paulo alobaki boye: “Soda oyo azali kobunda, akobulungana kati na makambo na bomoi na mokolo na mokolo te ete asepelisa ye oyo abyangi ye na mosala. Soko moto nani akopota na komekana, akozwa motole te bobele soko atosi mibeko.” (2 Timoté 2:4, 5) Baklisto oyo bakɔmeli, bakisa mpe baoyo bazali na lisangani ya Mikóló-Bakambi, bazali pene ya kotosa mitinda ya Mokambi na bango, Yesu Klisto, kobateláká “mibeko” mpo ete bákoka kozwa mbano ya bomoi ya seko.—Yoane 17:3; Emoniseli 2:10.
19. Nsima ya kotalela bilembeteli na ntina na komipesa ya boklisto, tokoki kondimisama na likambo nini?
19 Bilembeteli bizali komonisa polele ete Batatoli ya Yehova bazali basaleli ya Nzambe, kasi baombo ya bato te, boye te? Lokola baklisto oyo bamipesi, bazali na bonsomi oyo Klisto apesi bango, balingi ete elimo ya Nzambe mpe Liloba na ye etambwisa bomoi na bango wana bazali kosala na bomoko elongo na bandeko na bango na lisangá ya Nzambe. (Nzembo 133:1) Solo na ntina na likambo yango esengeli mpe kosilisa ntembe nyonso na ntina na eutelo ya makasi na bango. Bakoki koyemba elongo na mokomi na nzembo ete: “[Yehova] azali nguya na ngai mpe nguba na ngai; motema na ngai ezali na elikya epai na ye; boye nasungami mpe motema na ngai eyoki esengo, nakotɔ́nda ye na nzembo na ngai.”—Nzembo 28:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na 1993 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Lolenge nini Société Watch Tower mpe bisaleli mosusu bindimami na mibeko ya Leta ezali kosalisa Batatoli ya Yehova?
◻ Lolenge nini baklisto bazali kozwa litomba na mosala ya lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova?
◻ Mpo na nini bato ya libota ya Yehova bapesaka lapolo ya mosala na bango?
◻ Na makambo nini ebongi kobimisa na lisangá moklisto oyo amipesa?
[Elilingi na lokasa 19]
Lisangani ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso ebatelaki bomoko ya mateya.
[Elilingi na lokasa 23]
Kati na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kosepela na bonsomi oyo Klisto apesi bango.