“Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?”
“Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye?”—MAT. 24:45.
1, 2. Nzela nini Yesu azali kosalela mpo na koleisa biso lelo, mpe mpo na nini ezali na ntina tóyeba soki moombo ya sembo ezali nani?
NDEKO mwasi moko akomaki mokanda mpo na kopesa matɔndi na bandeko oyo basalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Akomaki boye: “Bandeko, nayebi lisusu te mbala boni natángaka masolo oyo ezalaka na makambo oyo etali ngai mpenza mpe oyo eyei na ntango oyo nasengeli na yango.” Yo mpe okoki koloba bongo? Mingi kati na biso tokoki koloba bongo. Yango esengeli kokamwisa biso? Mpenza te.
2 Bilei ya elimo oyo tozwaka na ntango oyo ebongi emonisi ete Yesu, Mokonzi ya lisangá, azali kokokisa elaka oyo apesaki ete akoleisa biso. Azali kosala yango na nzela ya nani? Ntango alobelaki makambo oyo ekomonisa kozala na ye, Yesu alobaki ete akosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa basali ya ndako na ye “bilei na bango na ntango oyo ebongi.”a (Tángá Matai 24:45-47.) Na ntango oyo ya nsuka, moombo ya sembo yango nde nzela oyo Yesu azali kosalela mpo na koleisa bayekoli na ye ya solo. Ezali na ntina mingi tóyeba soki moombo ya sembo ezali nani. Bokoli na biso ya elimo mpe boyokani na biso na Nzambe ezali na mabɔkɔ ya moombo yango.—Mat. 4:4; Yoa. 17:3.
3. Mikanda na biso ezalaki koloba nini mpo na ndakisa ya moombo ya sembo?
3 Na yango, ndakisa ya Yesu oyo elobeli moombo ya sembo elimboli nini? Kala, mikanda na biso ezalaki koloba boye: Na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yesu atyaki moombo ya sembo abatela basali ya ndako na ye. Tozalaki koloba ete moombo yango ezali bakristo nyonso oyo batyami mafuta, oyo bazali awa na mabele na eleko nyonso kobanda na mobu 33 T.B. Tozalaki koloba ete basali ya ndako ezali mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo. Tolobaki mpe ete na 1919, Yesu atyaki moombo ya sembo “abatela biloko na ye nyonso,” elingi koloba makambo nyonso oyo etali Bokonzi awa na mabele. Kasi, nsima ya koyekola likambo yango malamu, kobondela, mpe komanyola mpo na yango, tomoni ete tosengeli kosembola ndimbola oyo tozalaki kopesa na maloba ya Yesu oyo etali moombo ya sembo mpe ya mayele. (Mas. 4:18) Tótalela ndakisa yango mpe ndenge oyo etali biso, tózala na elikya ya kokende na likoló to ya kofanda awa na mabele.
NTANGO NINI NDAKISA YANGO EKOKOKISAMA?
4-6. Mpo na nini tokoki koloba ete ndakisa ya Yesu oyo etali moombo ya sembo ebandaki kokokisama kaka nsima ya 1914?
4 Makambo mosusu oyo Yesu alobelaki liboso apesa ndakisa ya moombo ya sembo mpe ya mayele emonisi ete ndakisa yango ebandaki kokokisama na Pantekote ya mobu 33 T.B. te, kasi nde na ntango oyo ya nsuka. Tótala ndenge Makomami etindi biso tóloba bongo.
5 Yesu alobelaki ndakisa ya moombo ya sembo na esakweli oyo apesaki mpo na ‘elembo oyo ekomonisa kozala na ye mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo.’ (Mat. 24:3) Eteni ya liboso ya esakweli yango, oyo ezali na Matai 24:4-22, esengelaki kokokisama mbala mibale: mbala ya liboso kobanda na mobu 33 T.B. tii na mobu 70 T.B., mpe mpo na mbala ya mibale, ezali kokokisama na ndenge ya kokamwa na mikolo na biso. Yango elingi nde koloba ete maloba ya Yesu oyo etali moombo ya sembo ekokokisama mpe mbala mibale? Te.
6 Kobanda na Matai 24:29, Yesu alobelaki mingimingi makambo oyo esengelaki kosalema na mikolo na biso. (Tángá Matai 24:30, 42, 44.) Mpo na makambo oyo ekosalema na bolɔzi monene, alobaki ete bato “bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló.” Na nsima, na maloba na ye oyo etalelaki bato oyo bakozala na bomoi na mikolo ya nsuka, alendisaki bato básɛnzɛla; alobaki ete: “Boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya” mpe “Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”b Nsima ya kolobela makambo wana oyo esengelaki kosalema na mikolo ya nsuka nde Yesu apesaki ndakisa ya moombo ya sembo. Na yango, tokoki koloba ete maloba na ye oyo etali moombo ya sembo ebandaki kokokisama kaka nsima ya ebandeli ya mikolo ya nsuka na 1914. Koloba bongo ebongi mpenza. Mpo na nini?
7. Motuna nini ya ntina mingi ebimaki ntango eleko ya kobuka mbuma ebandaki, mpe mpo na nini?
7 Tókanisa naino mwa moke na motuna oyo: “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?” Na siɛklɛ ya liboso, ezalaki mwa mpasi mpo moto atuna motuna ya ndenge wana. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, makamwisi oyo bantoma bazalaki kosala mpe ndenge bazalaki ata kopesa bato mosusu makabo ya kosala makamwisi emonisaki ete Nzambe azalaki elongo na bango. (Mis. 5:12) Na yango, ezalaki na ntina te ya kotuna soki nani mpenza Kristo atyaki mpo na kotambwisa mosala. Kasi, na 1914, makambo ezalaki ndenge wana te. Na mbula yango, eleko ya kobuka mbuma ebandaki. Nsukansuka ntango ya kokabola blé ná matiti mabe ekokaki. (Mat. 13:36-43) Na yango, ntango eleko ya kobuka mbuma ebandaki, motuna moko ya ntina mingi ebimaki: Lokola bakristo ya lokuta oyo bazalaki komibenga bayekoli ya Yesu bazalaki mingi mpenza, ndenge nini koyeba blé, elingi koloba bakristo ya solo oyo batyami mafuta na elimo? Ndakisa ya moombo ya sembo epesi eyano. Bayekoli ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo basengelaki kozala bato oyo bazali koleisama malamu na elimo.
NANI AZALI MOOMBO YA SEMBO MPE YA MAYELE?
8. Mpo na nini ebongi ete bato oyo basali moombo ya sembo bázala bakristo oyo batyami mafuta na elimo?
8 Bato oyo basali moombo ya sembo basengeli kozala bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali awa na mabele. Bango babengami “bonganga-nzambe ya bokonzi” mpe bazwi mokumba ya “‘kosakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bango bálongwa na molili bákɔta na pole na ye ya kokamwa.” (1 Pe. 2:9) Na yango, ebongi ete bato oyo bazali koteya bandeko na bango solo ya Biblia báuta na “bonganga-nzambe [wana] ya bokonzi.”—Mal. 2:7; Em. 12:17.
9. Bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo nde basali moombo ya sembo? Limbolá.
9 Bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele nde basali moombo ya sembo? Te. Likambo ya solo ezali ete bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo basanganaka te na kokabolela bandeko bilei ya elimo na mokili mobimba. Na kati ya bakristo oyo bazali lokola blé, bandeko mosusu bazali basaleli na misala to bankulutu na masangá na bango. Basakolaka ndako na ndako, bateyaka na lisangá, mpe balandaka na bosembo nyonso litambwisi ya biro monene ya Batatoli ya Yehova. Kasi, basanganaka te na mosala ya kokabolela bandeko ya mokili mobimba bilei ya elimo. Longola yango, bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bazali bandeko basi, mpe bakoluka ata mokolo moko te kozwa mokumba ya koteya na kati ya lisangá.—1 Ko. 11:3; 14:34.
10. Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?
10 Boye, nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele? Na kolanda likambo oyo Yesu asalaki ya koleisa bato ebele na nzela ya bato moke, moombo ya sembo yango esalemi na mwa etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali kosala mpenza mosala ya kobongisa bilei ya elimo mpe ya kokabola yango na boumeli ya ntango oyo ya kozala ya Kristo. Na boumeli ya mikolo ya nsuka, bandeko oyo batyami mafuta na elimo, oyo basali moombo ya sembo, basalaka elongo na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Banda bambula mwa mingi sikoyo, ekómaki komonana ete moombo yango ezali nde Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Kasi, tósimba ete Yesu alobelaki “moombo” kaka moko; yango emonisi ete moombo yango ezali etuluku ya bato. Na yango, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazwaka bikateli bango nyonso elongo.
BANANI BAZALI BASALI YA NDAKO?
11, 12. (a) Mikumba nini mibale moombo ya sembo mpe ya mayele asengelaki kozwa? (b) Ntango nini Yesu atyaki moombo ya sembo abatela basali ya ndako na ye, mpe aponaki banani?
11 Ezali na ntina mingi tóyeba ete na ndakisa ya Yesu, moombo ya sembo mpe ya mayele azwaki mikumba mibale. Mokumba ya liboso ezali ya kobatela basali ya ndako; ya mibale ezali ya kobatela biloko nyonso ya nkolo. Lokola ndakisa yango ezali kokokisama nde na ntango oyo ya nsuka, boye asengelaki kozwa mikumba yango mibale nsima ya 1914, ntango oyo kozala ya Yesu lokola mokonzi ya nguya ebandaki.
12 Ntango nini Yesu atyaki moombo ya sembo abatela basali ya ndako na ye? Mpo na koyanola motuna yango, tosengeli kozonga na 1914, na ebandeli ya eleko ya kobuka mbuma. Ndenge tomonaki yango liboso, na ntango wana ezalaki na bituluku mingi ya bato oyo bazalaki komibenga bakristo. Na etuluku nini Yesu alingaki kopona mpe kotya moombo ya sembo? Motuna wana ezwaki eyano nsima ya ntango oyo Yesu ná Tata na ye bayaki kotala tempelo ya elimo, to ebongiseli ya losambo, kobanda 1914 tii na ebandeli ya 1919.c (Mal. 3:1) Basepelaki na mwa etuluku moko ya Bayekoli ya Biblia ya sembo oyo bamonisaki ete bazalaki mpenza kolinga Yehova mpe Liloba na ye. Ya solo, esɛngaki mpe kopɛtola bango, kasi na komikitisa nyonso, bandimaki básembola bango na boumeli ya eleko wana mpe bapɛtolamaki. (Mal. 3:2-4) Bayekoli ya Biblia wana ya sembo bazalaki bakristo ya solo oyo bazalaki lokola blé. Na 1919, ntango bazongaki makasi na elimo, Yesu aponaki kati na bango bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo mpe bakɔmɛli na elimo, mpo bázala moombo ya sembo mpe ya mayele mpe atyaki bango bábatela basali ya ndako na ye.
13. Banani bazali mpe na kati ya basali ya ndako, mpe mpo na nini?
13 Bongo, banani bazali basali ya ndako? Na mokuse, ezali bato oyo bazali koleisama. Na ebandeli ya mikolo ya nsuka, basali nyonso ya ndako bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na nsima, ebele ya bato ya bampate mosusu bakɔtaki mpe na molɔngɔ ya basali ya ndako. Lelo oyo, bampate mosusu nde bazali mingi na kati ya “etonga kaka moko” oyo Kristo azali kotambwisa. (Yoa. 10:16) Bituluku yango nyonso mibale ezali kozwa bilei ya elimo kaka moko oyo moombo ya sembo azali kopesa na ntango oyo ebongi. Ezali boni mpo na bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo basali moombo ya sembo mpe ya mayele lelo oyo? Bango mpe basengeli kolya na elimo. Na yango, na komikitisa nyonso bayebaka ete mokomoko na bango azali mosali ya ndako, kaka lokola bayekoli mosusu nyonso ya Yesu.
14. (a) Moombo ya sembo azwaki mokumba nini, mpe mokumba yango esangisi nini? (b) Likebisi nini Yesu apesaki moombo ya sembo mpe ya mayele? (Talá etanda “Soki moombo yango azali mabe . . .”)
14 Yesu apesaki moombo ya sembo mpe ya mayele mokumba moko monene. Na ntango ya kala, moombo oyo bazalaki kotyela motema, to kapita, azalaki kotambwisa misala ya ndako ya nkolo na ye. (Luka 12:42) Na yango, moombo ya sembo mpe ya mayele azali na mokumba ya kotambwisa ndako ya kondima. Yango esangisi kokɛngɛla biloko ya mosuni, mosala ya kosakola, kobongisa mayangani ya mike mpe ya minene, mpe kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo tosalelaka na mosala ya kosakola, na boyekoli na biso moko, mpe na lisangá. Basali ya ndako babikelaka kaka na bilei ya elimo oyo moombo ya sembo apesaka.
NTANGO NINI AKOTYAMA MPO NA KOBATELA BILOKO NYONSO YA NKOLO?
15, 16. Ntango nini Yesu akotya moombo ya sembo abatela biloko na ye nyonso?
15 Ntango nini Yesu akopesa moombo ya sembo mokumba ya mibale, elingi koloba kotya ye “abatela biloko na ye nyonso”? Yesu alobaki boye: “Esengo na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo! Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Akotya ye abatela biloko na ye nyonso.” (Mat. 24:46, 47) Vɛrsɛ yango elobi ete Yesu apesi moombo mokumba ya mibale nsima ya koya mpe kokuta ye azali “kosala bongo,” elingi koloba kokabola bilei ya elimo na bosembo nyonso. Na yango, esengeli kozala na eleko moko oyo ekaboli ntango ya kopesa ye mokumba ya liboso mpe oyo ya mibale. Mpo tóyeba ndenge nini mpe ntango nini Yesu akotya moombo ya sembo abatela biloko na ye nyonso, tosengeli koyeba makambo mibale: ntango nini akoya, mpe biloko na ye esangisi nini.
16 Ntango nini Yesu akoya? Eyano ezali na bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango. Tóbosana te ete na bavɛrsɛ ya liboso oyo elobelaki “koya” ya Yesu, liloba yango etaleli ntango oyo akoya mpo na kosambisa bikólo mpe kokata makambo na nsuka ya mokili oyo.d (Mat. 24:30, 42, 44) Na yango, “koya” na ye oyo Yesu alobelaki na ndakisa ya moombo ya sembo ekozala na ntango ya bolɔzi monene.
17. Biloko ya Yesu esangisi mpe nini?
17 Biloko “nyonso” ya Yesu esangisi nini? Biloko ya Yesu ezali kaka awa na mabele te. Yesu azali mpe na bokonzi monene na likoló. Alobaki boye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” (Mat. 28:18; Ef. 1:20-23) Lelo oyo, biloko na ye esangisi mpe Bokonzi ya Masiya, oyo ekómaki ya ye banda 1914 mpe oyo akokabola yango ná bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo.—Em. 11:15.
18. Mpo na nini Yesu akosepela kotya moombo ya sembo abatela biloko na ye nyonso?
18 Na kotalela makambo oyo toyekoli tii awa, tokoki koloba nini? Ntango Yesu akoya mpo na kokata makambo na ntango ya bolɔzi monene, akokuta moombo ya sembo azali kopesa basali ya ndako na ye bilei ya elimo na bosembo nyonso mpe na ntango oyo ebongi. Na ntango yango, Yesu akosepela kopesa ye mokumba ya mibale: akotya ye abatela biloko na ye nyonso. Bandeko oyo basali moombo ya sembo bakozwa mokumba yango ntango bakozwa mbano na bango ya kokende likoló mpo na koyangela elongo na Kristo.
19. Moombo ya sembo akozwa mbano monene na likoló koleka bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo? Limbolá.
19 Moombo ya sembo akozwa nde mbano monene na likoló koleka bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo? Te. Mbano oyo balaki kaka bato moke na libaku moko boye ekoki nsukansuka kotalela mpe bato mosusu. Na ndakisa, talá makambo oyo Yesu alakaki bantoma na ye 11 ya sembo na butu na ye ya nsuka liboso akufa. (Tángá Luka 22:28-30.) Yesu alakaki etuluku wana ya bato moke ete bakozwa mbano monene mpo na bosembo na bango. Bakoyangela elongo na ye na Bokonzi na ye. Kasi bambula mingi na nsima, amonisaki ete bato nyonso 144 000 bakofanda na bakiti ya bokonzi mpe bakoyangela elongo na ye. (Em. 1:1; 3:21) Ndenge mpe Matai 24:47 emonisi yango, Yesu alakaki ete etuluku moko ya bato moke—bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo basali moombo ya sembo—bakotyama mpo bábatela biloko na ye nyonso. Nzokande, ezali bango nyonso 144 000 nde bakoyangela elongo na ye na Bokonzi ya likoló.—Em. 20:4, 6.
20. Mpo na nini Yesu atyaki moombo ya sembo, mpe ekateli na yo ezali nini?
20 Na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, Yesu azali kosala ndenge asalaki na siɛklɛ ya liboso: azali koleisa bato ebele na nzela ya bato moke. Yesu atyaki moombo ya sembo mpo bayekoli na ye, ezala oyo batyami mafuta na elimo to bampate mosusu, bázala na esika ya kozwa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi na boumeli ya mikolo ya nsuka. Tiká tózala na ekateli ya komonisa botɔndi na biso na kopesáká mabɔkɔ na bosembo nyonso na bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo oyo basali moombo ya sembo mpe ya mayele.—Ebr. 13:7, 17.
a Paragrafe 2: Liboso, Yesu apesaki ndakisa moko ya ndenge wana, mpe na ndakisa yango abengaki “moombo,” “kapita” mpe “basali ya ndako,” “basaleli.”—Luka 12:42-44.
b Paragrafe 6: “Koya” ya Kristo (na Grɛki, érkhomaï) ekeseni na “kozala” na ye (parousia). Kozala na ye na elimo esengelaki kobanda liboso ya koya na ye mpo na kokata makambo.
c Paragrafe 12: Talá lisolo “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso,” nkasa 10-12, paragrafe 5-8.
d Paragrafe 16: Talá lisolo “Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini?” nkasa 7-8, paragrafe 14-18.