Basaleli ya Yehova bazali bato ya esengo
“Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”—MATAI 5:3.
1. Esengo ya solosolo ezali nini, mpe emonisaka nini?
ESENGO ezali eloko moko ya motuya mingi oyo basaleli ya Yehova bazali na yango. Davidi, mokomi ya nzembo, alobaki boye: “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.” (Nzembo 144:15) Kozala na esengo elimboli komiyoka malamu. Koyeba ete Yehova azali kopambola biso epesaka biso esengo mingi, oyo eutaka mpenza na motema. (Masese 10:22) Esengo ya ndenge wana emonisaka ete tozali na boyokani malamu na Tata na biso ya likoló mpe toyebi ete tozali kosala mokano na ye. (Nzembo 112:1; 119:1, 2) Kutu, Yesu atángaki ntina libwa oyo tokoki koloba ete tozali na esengo. Lisolo oyo mpe oyo elandi ekolobela mokomoko na bantina wana mpe yango ekosalisa biso tómona ete tokoki mpenza kozala na esengo mingi soki, na bosembo nyonso, tozali kosalela Yehova, “Nzambe ya esengo.”—1 Timote 1:11.
Koyeba bobola na biso ya elimo
2. Na libaku nini Yesu alobelaki esengo, mpe abandaki na maloba nini?
2 Na mobu 31 ya ntango na biso (T.B.), Yesu asalaki moko na masukulu oyo eyebani na mokili mobimba. Babengaka yango Lisolo Likoló ya Ngomba mpamba te Yesu asalaki yango na ngomba moko pembeni ya Mbu ya Galilai. Evanzile ya Matai elobi boye: “Ntango [Yesu] amonaki bibele yango ya bato amataki na ngomba; mpe nsima wana afandaki bayekoli na ye bayaki epai na ye; mpe afungolaki monɔkɔ na ye mpe abandaki koteya bango, kolobáká ete: ‘Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.’ ” Soki tobongoli liloba na liloba, maloba ya liboso ya Yesu ekozala boye: “Esengo na babola (na) elimo,” to “Esengo na baoyo bazali basɛngi mpo na elimo.” (Matai 5:1-3; Kingdom Interlinear; maloba na nse ya lokasa) Biblia haut fleuve elobi boye: “Mapamboli epai ya babola na elimo.”
3. Ndenge nini elimo ya komikitisa esalisaka biso tózala na esengo?
3 Na lisolo ya Yesu na ngomba, amonisaki ete moto azalaka na esengo mingi soki ayebi bobola na ye ya elimo. Baklisto oyo bazali na komikitisa, oyo bayebi ete bazali bato ya masumu, basɛngaka Yehova bolimbisi na nzela ya mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kobikisa bato. (1 Yoane 1:9) Na ndenge yango, bazwaka kimya ya motema mpe esengo ya solosolo. “Esengo na ye oyo alimbisami mabunga na ye, ye oyo masumu na ye mazipami!”—Nzembo 32:1; 119:165.
4. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete toyebi bobola na biso ya elimo mpe oyo ya basusu? (b) Nini ebakisaka esengo na biso ntango toyebi bobola na biso ya elimo?
4 Koyeba bobola na biso ya elimo etindaka biso tótángaka Biblia mokolo na mokolo, tólyaka bilei ya elimo oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso “na ntango oyo ebongi,” mpe tóyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ. (Matai 24:45; Nzembo 1:1, 2; 119:111; Baebele 10:25) Kolinga bazalani na biso esalisaka biso tóyeba bamposa ya elimo ya basusu mpe epesaka biso molende ya kosakola mpe koteya nsango malamu ya Bokonzi. (Malako 13:10; Baloma 1:14-16) Koyebisa basusu solo ya Biblia epesaka biso esengo. (Misala 20:20, 35) Esengo na biso ebakisamaka ntango tozali kokanisa elikya kitoko ya Bokonzi mpe mapamboli oyo bokonzi yango ekomema. Mpo na “etonga moke” ya baklisto bapakolami, elikya ya Bokonzi elimboli bomoi oyo ekoki kosuka te na likoló, na kati ya guvɛrnema ya Klisto. (Luka 12:32; 1 Bakolinti 15:50, 54) Mpo na “bampate mosusu,” yango elimboli bomoi ya seko na paladiso na mabelé oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.—Yoane 10:16; Nzembo 37:11; Matai 25:34, 46.
Ndenge baoyo bazali na mawa bakoki kozala na esengo
5. (a) Maloba “baoyo bazali na mawa” elimboli nini? (b) Ndenge nini bato yango oyo bazali na mawa bazali kobɔndisama?
5 Maloba oyo Yesu alobaki na nsima mpo na komonisa ntina ya mibale ya esengo ekoki komonana bongolabongola. Alobaki boye: “Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama.” (Matai 5:4) Ndenge nini moto akoki kozala na mawa mpe na esengo mbala moko? Mpo na kokanga ntina ya maloba ya Yesu, tosengeli liboso koyeba mawa nini alobelaki. Moyekoli Yakobo alobaki ete tosengeli koyokaka mawa mpo na ezaleli na biso ya bato ya masumu. Akomaki boye: “Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki, mpe bókómisa mitema na bino pɛto, bino bato ya mitema mibale. Bókóma mawamawa, bólela mpe bóbimisa mpisoli. Tiká kosɛka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino kolɛmba nzoto. Bómikitisa na miso ya Yehova, mpe ye akotombola bino.” (Yakobo 4:8-10) Mitema ya bato oyo bayokaka mpenza mawa mpo bazali bato ya masumu ekitaka ntango bayebi ete masumu na bango ekoki kolimbisama soki bandimi mbeka oyo Klisto apesaki mpe babongoli mpenza motema mpe bakómi kosala mokano ya Yehova. (Yoane 3:16; 2 Bakolinti 7:9, 10) Na ndenge yango, bakoki kokóma baninga ya Yehova mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko mpo na kosalela mpe kosanzola ye. Yango epesaka bango esengo mingi na motema.—Baloma 4:7, 8.
6. Na ndenge nini bato mosusu bazali na mawa, mpe ndenge nini bazali kobɔndisama?
6 Maloba ya Yesu etaleli mpe baoyo bazali koyoka mawa mpo na makambo mabe oyo etondi awa na mabelé. Yesu alobaki ete esakweli ya Yisaya 61:1, 2 (NW) elobeli nde ye: “Elimo ya Nkolo Mokonzi Yehova ezali likoló na ngai, mpo Yehova apakoli ngai mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu. Atindi ngai nasalisa baoyo bazoki na motema; . . . nabɔndisa bato nyonso oyo bazali na mawa.” Mokumba yango ezali mpe ya baklisto bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé, oyo bazali kokokisa yango na lisalisi ya “bampate mosusu.” Na maloba ya elilingi, bango nyonso bazali kotya bilembo na bilongi ya ‘mibali oyo bazali kokimela mpe kolela na ntina na makambo ya mbindo nyonso oyo mazali kosalama na kati ya [Yelusaleme oyo epɛngwá, elingi koloba mangomba ya boklisto].’ (Ezekiele 9:4) “Nsango malamu ya bokonzi” ezali kobɔndisa bato yango oyo bazali na mawa. (Matai 24:14) Bazali na esengo ya koyeba ete etikali moke mokili mabe ya Satana elongwa mpe etika esika na mokili ya sika ya Yehova oyo ekozala na boyengebene.
Esengo na bato ya elimo ya boboto
7. Maloba “elimo ya boboto” elimboli nini te?
7 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki lisusu boye: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5) Bato mosusu batalelaka elimo ya boboto lokola bolɛmbu. Kasi, ezali bongo te. Moto moko ya mayele na maloba ya Biblia akomaki boye: “Likambo ya libosoliboso emonanaka epai ya moto oyo azali na [elimo ya boboto] ezali ete ayebaka mpenza komipekisa. Boboto na ye elimboli te ete azalaka malilimalili, atalaka kaka makambo na miso, to afandaka kimya mpo azali kobanga. Ezali ezaleli ya moto oyo azali na makasi mingi, kasi ayebi komipekisa.” Yesu alobaki na ntina na ye moko boye: “Nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema.” (Matai 11:29) Nzokande, toyebi ete Yesu azalaki na mpiko mpo na kolongisa makambo oyo ezali sembo.—Matai 21:12, 13; 23:13-33.
8. Elimo ya boboto ezali ndeko ya ezaleli nini, mpe mpo na nini tosengeli komonisa ezaleli yango?
8 Na bongo, elimo ya boboto ezali ndeko ya komipekisa. Kutu, Paulo atángaki boboto ná komikitisa na kati ya “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:22, 23) Moto asengeli na elimo santu mpo na kolona elimo ya boboto. Ezaleli yango esalisaka moklisto azala na kimya na bato oyo bazali Batatoli te mpe na bandeko na kati ya lisangá. Paulo akomaki boye: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.” —Bakolose 3:12, 13.
9. (a) Mpo na nini tolobi ete tomonisaka elimo ya boboto kaka epai ya bato te? (b) Ndenge nini bato ya elimo ya boboto “bakosangola mabelé”?
9 Kasi, tomonisaka elimo ya boboto kaka epai ya bato te. Ntango tozali kotosa na motema moko bokonzi ya Yehova, tozali komonisa ete tozali na elimo ya boboto. Yesu Klisto atiká ndakisa eleki monene na likambo yango mpamba te, ntango azalaki awa na mabelé, amonisaki elimo ya boboto mpe azalaki kotosa mokano ya Tata na ye na makambo nyonso. (Yoane 5:19, 30) Yesu nde mosangoli ya libosoliboso ya mabelé, mpamba te Nzambe aponi ye Mokonzi na yango. (Nzembo 2:6-8; Danyele 7:13, 14) Akozala ye ná ‘bazwi-ya-libula elongo na ye,’ elingi koloba bato 144 000, oyo baponami na “kati ya bato” mpo na “koyangela mabelé.” (Baloma 8:17; Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3, 4; Danyele 7:27) Klisto ná bato 144 000 wana bakoyangela bamilio ya bato oyo bazali na bizaleli ya bampate, oyo esakweli ya nzembo ekokokisama epai na bango: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:11; Matai 25:33, 34, 46.
Esengo na baoyo bazali na nzala ya boyengebene
10. Wapi lolenge moko oyo bato oyo bazali na ‘nzala mpe na mposa ya boyengebene’ bakoki kotonda?
10 Na lisolo na ye na ngomba wana ya Galilai, Yesu alobaki lisusu boye: “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpo bakotonda.” (Matai 5:6) Mpo na baklisto, Yehova nde alakisaka mitinda ya boyengebene. Yango wana, baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, bazali nde na mposa ete Nzambe atambwisa bango. Bato yango bayebaka malamu ete bazali bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka mpe bazalaka na mposa Yehova andima bango. Basepelaka mingi ntango bayekoli na Liloba ya Nzambe ete soki babongoli motema mpe basɛngi bolimbisi na nzela ya mbeka ya Klisto, Nzambe akobenga bango bayengebene!—Misala 2:38; 10:43; 13:38, 39; Baloma 5:19.
11, 12. (a) Ndenge nini baklisto bapakolami bazali kobengama bayengebene? (b) Ndenge nini mposa ya boyengebene ya baninga ya bapakolami ezali kokokisama?
11 Yesu alobaki ete bato ya ndenge wana bazali na esengo, mpamba te “bakotonda.” (Matai 5:6) Baklisto bapakolami oyo ‘bakoyangela’ ná Klisto na likoló babengami “bayengebene mpo na bomoi.” (Baloma 5:1, 9, 16-18) Yehova azali kondima bango lokola bana na ye ya elimo. Bazali kokóma bazwi-ya-libula elongo na Klisto, bakokóma bakonzi mpe banganga na Bokonzi ya likoló.—Yoane 3:3; 1 Petelo 2:9.
12 Baninga ya bapakolami babengami naino te bayengebene mpo na bomoi. Kasi, na miso ya Yehova, bazali na mwa boyengebene mpamba te bazali na kondima na makila ya Klisto oyo esopamaki. (Yakobo 2:22-25; Emoniseli 7:9, 10) Babengami bayengebene mpo bazali baninga ya Yehova mpe bakobikisama na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:14) Mposa na bango ya boyengebene ekokokisama malamumalamu na boyangeli ya “likoló ya sika,” ntango bakozala na mabelé ya sika epai “boyengebene ekofanda.” —2 Petelo 3:13; Nzembo 37:29.
Esengo na bato ya motema mawa
13, 14. Na ndenge nini tosengeli komonisa ete tozali na motema mawa, mpe tokozwela yango matomba nini?
13 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki lisusu boye: “Esengo na bato ya motema mawa, mpo bakomonisamela motema mawa.” (Matai 5:7) Na mibeko, motema mawa elimbolaka kolɛmbisa motema ndenge zuzi asalaka ntango apesi te moto etumbu oyo abongaki mpenza kozwa. Nzokande, na Biblia, maloba oyo ebongolami na “motema mawa” elimbolaka libosoliboso boboto to mawa oyo etindaka moto asalisa baoyo bazali na mpasi. Na bongo, bato ya motema mawa bamonisaka ezaleli yango na misala. Ndakisa ya Mosamalia ya motema malamu oyo Yesu apesaki ezali komonisa ndenge oyo moto moko “amimonisaki moto ya motema mawa” epai ya mozalani na ye oyo azali na mpasi.—Luka 10:29-37.
14 Mpo na koyoka esengo oyo eutaka na motema mawa, tosengeli komonisela bazalani na biso oyo bazali na mpasi boboto. (Bagalatia 6:10) Yesu ayokelaki bato mawa. “Mawa ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate bazangi mobateli. Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.” (Malako 6:34) Yesu amonaki ete mposa eleki monene oyo bato bazali na yango ezali ya elimo. Biso mpe tokomonisa motema mawa soki tozali komemela bato eloko oyo bazali na yango mpenza mposa koleka, elingi koloba “nsango malamu ya bokonzi.” (Matai 24:14) Tokoki mpe kosalisa bandeko na biso baklisto oyo bakómi mibange, oyo bakufelá mibali, mpe oyo bazali bitike mpe ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14; Masese 12:25; Yakobo 1:27) Yango ekopesa biso esengo, kasi ekosala mpe ete Yehova ayokela biso mawa. —Misala 20:35; Yakobo 2:13.
Bato ya motema pɛto mpe bato oyo batyaka kimya
15. Ndenge nini tokoki kozala bato ya motema pɛto mpe bato oyo batyaka kimya?
15 Yesu amonisaki ntina ya motoba mpe ya nsambo ya kozala na esengo na maloba oyo: “Esengo na bato ya motema pɛto, mpo bakomona Nzambe. Esengo na bato batyaka kimya, mpo bakobengama ‘bana ya Nzambe.’ ” (Matai 5:8, 9) Motema ya pɛto ezali motema oyo ezali na mabe te, oyo ezali mpɛmbɛ mpe emipesi mobimba epai ya Yehova. (1 Ntango 28:9; Nzembo 86:11) Bato oyo batyaka kimya bazalaka na matata te na bandeko na bango baklisto mpe basalaka nyonso mpo na kofanda na kimya na bazalani na bango. (Baloma 12:17-21) ‘Balukaka kimya mpe balandaka yango.’—1 Petelo 3:11.
16, 17. (a) Mpo na nini bapakolami babengami “bana ya Nzambe,” mpe ndenge nini bazali “komona Nzambe”? (b) Na ndenge nini “bampate mosusu” bazali “komona Nzambe”? (c) Ndenge nini mpe ntango nini “bampate mosusu” bakokóma mpenzampenza “bana ya Nzambe”?
16 Biblia elaki ete bato oyo batyaka kimya mpe bazali mitema pɛto “bakobengama ‘bana ya Nzambe’ ” mpe “bakomona Nzambe.” Baklisto bapakolami babotami na elimo mpe Yehova andimi bango lokola “bana” na ye ntango bazali naino awa na mabelé. (Baloma 8:14-17) Ntango bazali kosekwa mpo na kozala na Klisto na likoló, bazali kosala mosala liboso ya Yehova mpe bazali komona Ye.—1 Yoane 3:1, 2; Emoniseli 4:9-11.
17 “Bampate mosusu,” oyo bazali mpe bato batyaka kimya, bazali kosalela Yehova na litambwisi ya Mobateli ya Mpate aleki malamu, Klisto Yesu, oyo akómi mpo na bango “Tata ya seko.” (Yoane 10:14, 16; Yisaya 9:6) Baoyo bakoleka komekama ya nsuka nsima ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, Yehova akondima bango lokola bana na ye oyo bakofanda awa na mabelé mpe ‘bakozwa bonsomi ya bana ya Nzambe.’ (Baloma 8:21; Emoniseli 20:7, 9) Ntango bazali kozela eleko yango, bazali kobenga Yehova Tata na bango, mpamba te bamipesi epai na ye, bazali kondima ete ye nde Mopesi ya bomoi. (Yisaya 64:8) Bakoki “komona Nzambe” na miso ya kondima ndenge Yobo ná Moize bamonaki ye na ntango ya kala. (Yobo 42:5; Baebele 11:27) Na “miso ya motema” mpe na lisalisi ya boyebi ya sikisiki ya Nzambe, bazali komona bizaleli malamu mingi ya Yehova mpe bazali kosala makasi mpo na komekola ye wana bazali kosala mokano na ye.—Baefese 1:18; Baloma 1:19, 20; 3 Yoane 11.
18. Na kotalela makambo nsambo oyo tolobeli, oyo Yesu alobaki ete epesaka esengo, banani bazali na esengo ya solosolo lelo oyo?
18 Tomoni ete baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, baoyo bazali na mawa, bato ya elimo ya boboto, baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, bato ya motema mawa, oyo bazali mitema pɛto, mpe baoyo batyaka kimya, bayokaka esengo ya solosolo na kosalela Yehova. Kasi, bato mosusu bazali ntango nyonso kotɛmɛla bango, ata mpe konyokola bango. Yango esilisaka esengo na bango? Tokozwa eyano na motuna yango na lisolo elandi.
Bozongeli
• Baoyo bayebi bobola na bango ya elimo bayokaka esengo nini?
• Ndenge nini bato oyo bazali na mawa bazali kobɔndisama?
• Ndenge nini tomonisaka elimo ya boboto?
• Mpo na nini tosengeli kozala na motema mawa, na motema pɛto, mpe kozala bato oyo batyaka kimya?
[Elilingi na lokasa 10]
“Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo”
[Bililingi na lokasa 10]
“Esengo na bato ya motema mawa”
[Elilingi na lokasa 10]
“Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene”