‘Luká kimya mpe landá yango’
“Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso kimya.”—BALOMA 12:18.
1, 2. Tángá mwa bantina oyo kimya oyo bato batii ekoki koumela te.
KANISÁ ndako moko oyo ezali na moboko ya malamu te, makonzí na yango ebebi mpe nsamba na yango elɛmbi. Okosepela kokɔta na ndako ya ndenge wana mpe obanda kofanda kuna? Tokanisi ete ezali mwa mpasi. Ata soki bapakoli yango langi ya sika, yango te ekokómisa ndako yango makasi. Nsukansuka, ndako wana ekokwea.
2 Kimya nyonso oyo bato bakoki kotya na mokili oyo ezali lokola ndako wana. Kimya yango ezali na moboko ya makasi te, elingi koloba ete etongami likoló ya bilaka mpe mayele ya moto, ye “azali na lobiko te.” (Nzembo 146:3) Bitumba kati na bato ya bamboka, bituluku mpe bikólo ndenge na ndenge ebandi lelo te. Ya solo, ntango mosusu mwa kimya ekɔtaka; kasi, ezalaka kimya ya ndenge nini? Soki bikólo mibale ezali kobunda mpe na nsima, etumba esili mpo ekólo moko elongi to mokomoko na yango ezali komona litomba ya kokoba kobunda te, tokoki mpenza koloba ete wana ezali kimya? Koyinana, makanisi mabe mpe zuwa oyo etindaki bango bábunda esili te. Kimya ya likolólikoló, oyo ezali lokola ‘langi’ oyo ezipi bonguna, ezali kimya ya solosolo te.—Ezekiele 13:10.
3. Mpo na nini kimya ya basaleli ya Nzambe ekeseni na oyo bato bazali kotya?
3 Atako bongo, na kati ya mokili oyo etondi na bitumba, kimya ya solosolo ezali. Ezali epai wapi? Ezali na kati ya bato oyo balandaka matambe ya Yesu Klisto, elingi koloba baklisto ya solo oyo batosaka maloba ya Yesu mpe basalaka makasi ete bálanda ndakisa na ye. (1 Bakolinti 11:1; 1 Petelo 2:21) Kimya oyo ezali kati na baklisto ya solo atako bakeseni na mposo, na makambo ya bomoi mpe bikólo, ezali kimya ya solosolo mpamba te euti na boyokani ya kimya oyo bazali na yango na Nzambe, oyo esimbami na kondima na bango na mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola bato. Kimya na bango ezali likabo ya Nzambe, ezali eloko oyo bato babongisi te. (Baloma 15:33; Baefese 6:23, 24) Bazali na kimya yango mpo bazali kotosa Yesu Klisto, “Nkolo ya kimya,” mpe bazali kosambela Yehova, “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya.”—Yisaya 9:6; 2 Bakolinti 13:11.
4. Ndenge nini moklisto ‘alukaka’ kimya?
4 Kimya eyaka yango moko te na kati ya bato ya kozanga kokoka. Yango wana, Petelo alobaki ete moklisto mokomoko asengeli ‘koluka kimya mpe kolanda yango.’ (1 Petelo 3:11, NW) Ndenge nini tokoki koluka kimya mpe kolanda yango? Esakweli moko ya kalakala ezali kopesa biso eyano. Na nzela ya Yisaya, Yehova alobaki boye: “Bana na yo nyonso bakolakisama na [Yehova], mpe [kimya, NW] ya bana na yo ekozala monene.” (Yisaya 54:13; Bafilipi 4:9) Baoyo balandaka mateya ya Yehova nde bazwaka kimya ya solosolo. Lisusu, kimya, elongo na “bolingo, esengo, . . . motema molai, motema malamu, malamu, kondima, boboto, komipekisa,” ezali mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23, NW) Moto oyo azangi bolingo, azangi esengo, azali na motema mokuse, azali na boboto te, azali na motema mabe, azali na kondima te, azali moto ya nkanda to ayebi komipekisa te, akoki kozala na kimya yango te.
“Bózala na bato nyonso kimya”
5, 6. (a) Bokeseni nini ezali kati na kozala na kimya mpe kozala moto oyo alukaka kimya? (b) Baklisto basengeli kosala makasi bázala bato oyo balukaka kimya na banani?
5 Kimya elimboli “kozanga mobulu to kozala nyɛɛ.” Ndimbola yango ebongi na makambo mingi oyo kowelana ezali te. Yango wana, ata moto oyo akufá, tokoki koloba ete azali na kimya! Kasi, mpo moto azala na kimya ya solosolo, ekoki kaka te azala moto ya kimya. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Mapamboli epai na bango bakoyeisa kimya, zambi bakotángama bana ya Nzambe.” (Matai 5:9) Yesu azalaki koloba na bato oyo na nsima, basengelaki kozwa libaku malamu ya kokóma bana ya Nzambe na elimo mpe kozwa bomoi ezangi kufa kuna na likoló. (Yoane 1:12; Baloma 8:14-17) Na nsuka, bato nyonso ya sembo oyo bazali na elikya ya kokende na likoló te bakozwa “lisiko ya nkembo ya bana ya Nzambe.” (Baloma 8:21) Kaka bato oyo balukaka kimya nde bakoki kozala na elikya ya ndenge wana. Bokeseni ezali kati na kozala na kimya mpe kozala moto oyo alukaka kimya. Na ndenge oyo Makomami ezali kolobela yango, kozala moto oyo alukaka kimya elimboli kolendisa mpenza kimya, ntango mosusu kotya kimya na esika oyo ezalaki te.
6 Na likanisi wana na motó, tótalela toli oyo ntoma Paulo apesaki Baloma: “Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso kimya.” (Baloma 12:18) Paulo alingaki kaka te koloba na Baloma ete bázalaka bato oyo basalaka mobulu te, atako yango ezalaki mpe na ntina. Azalaki kolendisa bango na kotya kimya. Na banani? Na “bato nyonso,” ezala na kati ya libota, na bandeko ya lisangá, ata na bato oyo bazalaki baklisto te lokola bango. Alendisaki Baloma ete ‘lokola ezali likambo na bango,’ bázalaka na kimya na bato mosusu. Alingaki koloba te ete bándimaka kobongola to kokakola bindimeli na bango kaka mpo na kotya kimya. Na esika bázalaka na matata mpambampamba na bato mosusu, basengelaki koluka ete báfandaka na bango na kimya. Baklisto basengelaki kosala bongo ezala na bato oyo bazali na lisangá to te. (Bagalatia 6:10) Yango wana, Paulo akomaki ete: “Ntango nyonso bómekaka kosalelana malamu kati na bino mpenza mpe na bato nyonso.”—1 Batesaloniki 5:15.
7, 8. Ndenge nini mpe mpo na nini baklisto balukaka kimya na bato oyo bazali na bango lingomba moko te?
7 Ndenge nini tokoki kozala bato oyo balukaka kimya na bato oyo tozali na bango lingomba moko te, baoyo bakoki ntango mosusu kotɛmɛla biso? Ya liboso, tosengeli koboya komitombola. Na ndakisa, tokomonisa mpenza elimo ya kimya te soki, na ndakisa, tozali kobenga moto moko na nkombo ya kotyola. Yehova ayebisi bitumbu oyo akopesa bibongiseli mpe masangá ya bato, kasi tozali na lotomo te ya koloba na moto lokola nde basili kokatela ye etumbu. Tosengeli kosambisaka bato te, ata banguna na biso. Paulo ayebisaki Tito apesa baklisto ya Kelete toli na ndenge oyo basengeli kozalaka liboso ya bakonzi, na nsima alobaki na ye ayebisa bango lisusu ete “bátuka te, báboya kowelana, bázala na boboto, bámonisa bopɔlɔ epai ya bato nyonso.”—Tito 3:1, 2.
8 Koluka kimya na baoyo tozali na bango lingomba moko te epesaka biso nzela ya komonisa bango mateya ya solo. Ya solo, tosengeli te kosala na bango boninga oyo ‘ebebisaka bizaleli ya malamu.’ (1 Korinto 15:33, Boyokani ya Sika) Kasi, tokoki kozala na bonkonde mpe tosengeli kopesa bango lokumu mpe kosalela bango boboto. Petelo akomaki ete: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.”—1 Petelo 2:12.
Tóluka kimya na mosala ya kosakola
9, 10. Ntoma Paulo apesaki ndakisa nini na likambo etali kozala na kimya na bato oyo bazali bandimi te?
9 Na ekeke ya liboso, bato nyonso bayebaki ete baklisto bazalaki na molende. Bazalaki kolɛmbisa nsango na bango te, mpe soki batɛmɛli bango, bazalaki na ekateli ya kotosa Nzambe lokola mokonzi na esika ya kotosa bato. (Misala 4:29; 5:29) Atako bongo, bayebaki kokesenisa molende na makambo makasi. Tótalela makambo Paulo asalaki ntango asambaki mpo na kondima na ye liboso ya Mokonzi Elode Akalipa II. Mokonzi yango Elode Akalipa akamataki leki na ye ya mwasi Belenike mpe akómisaki ye mwasi na ye. Kasi, Paulo akanisaki te ete abanda koteya Akalipa bizaleli malamu. Alobelaki mingimingi nde makambo oyo bango mibale bazalaki kondima, akumisaki Akalipa ete ayebi mimeseno ya Bayuda mingi mpe azali kondima basakoli.—Misala 26: 2, 3, 27.
10 Tokoki nde koloba ete Paulo azalaki koloba na moto yango maloba ya sukali mpo abimisa ye na bolɔkɔ? Te. Paulo asalaki kaka ndenge oyo apesaki bato mosusu toli mpe alobaki solo. Alobaki na Elode Akalipa ata likambo moko te ya lokuta. (Baefese 4:15) Kasi Paulo azalaki moto oyo atyaka kimya mpe ayebaki kokóma “ndenge nyonso epai ya bato nyonso.” (1 Bakolinti 9:22) Mokano na ye ezalaki ya kolongisa lotomo na ye ya kosakola nsango ya Yesu. Lokola moteyi nyonso ya malamu, Paulo abandaki na likambo oyo ye na Akalipa bazalaki koyokana na yango. Na ndenge yango, Paulo asalisaki mokonzi yango oyo azalaki moto ya misala ya mbindo na komona ete lingomba ya boklisto ezali mabe te.—Misala 26:28-31.
11. Ndenge nini tokoki kozala bato oyo balukaka kimya na mosala na biso ya kosakola?
11 Ndenge nini tokoki kozala bato oyo batyaka kimya na mosala na biso ya kosakola? Na ndakisa ya Paulo, tosengeli koboya koswana. Ezali solo ete ntango mosusu esɛngaka ‘tóloba Liloba ya Nzambe na kozanga nsɔmɔ,” elingi koloba tózala na molende mpo na kolongisa kondima na biso. (Bafilipi 1:14) Kasi, mbala mingi mokano na biso ya libosoliboso ezalaka ya koteya bato nsango malamu. (Matai 24:14) Soki moto asosoli solo ya mikano ya Nzambe, akoki kobanda kotika mateya ya lokuta ya mangomba mpe akoki komipɛtola mpe kotika misala ya mabe. Yango wana, soki likoki ezali, ekozala malamu tólobelaka mingi makambo oyo ekosepelisa bato oyo tokosolola na bango, tosengeli kobanda na makambo oyo biso na bango tondimaka. Ezali na litomba moko te na kobanda kotyana ntembe na moto oyo, soki tosaleli mayele mpo na kosolola na ye, akoki koyoka nsango na biso.—2 Bakolinti 6:3.
Tózala bato oyo batyaka kimya na kati ya libota
12. Ndenge nini tokoki kozala bato oyo batyaka kimya na kati ya libota?
12 Paulo alobaki ete baoyo bazali kobala “bakozala na mpasi na nzoto.” (1 Bakolinti 7:28) Bakokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Moko na makambo yango ezali ete basi mosusu na mibali na bango bakobanda koyokana te na bantango mosusu. Ndenge nini basengeli kosilisa matata yango? Na kimya. Soki matata ebandi, moto oyo atyaka kimya akosala makasi ete aboma mɔ́tɔ. Ndenge nini? Ya liboso, akobatela lolemo na ye. Mwa enama yango, soki ekómi eloko ya kobimisa na yango maloba ya kotyola to mpe kofinga, ekoki mpenza kozala “eloko mabe eyebi kokitisama te, etondi na ngɛngɛ ya kufa.” (Yakobo 3:8) Moto oyo atyaka kimya asalelaka lolemo na ye mpo na kotonga, kasi mpo na kobebisa te.—Masese 12:18.
13, 14. Ndenge nini tokoki kobatela kimya soki tobɛti libaku na monɔkɔ to soki nkanda esi emati?
13 Biso nyonso, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ekómelaka biso tóbimisa maloba oyo, na nsima, tomonaka ete ebongaki te tóloba yango. Soki likambo ya ndenge wana ekómeli yo, sɛngá bolimbisi nokinoki mpo na kotya kimya. (Masese 19:11; Bakolose 3:13) Koluka te “kotyana ntembe mpo na maloba” mpe “koswana mpo na makambo ezangi ntina.” (1 Timote 6:4, 5, NW) Luká nde kososola likambo mpe meká komitya na esika ya molongani na yo mpo na koyeba ndenge oyo azali koyoka. Soki balobi na yo maloba ya kozokisa, kozongisa mabe na mabe te. Kobosana te ete “kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda.”—Masese 15:1.
14 Ntango mosusu, ekozala malamu olanda toli ya Masese 17:14 (NW) ete: “Liboso koswana ebanda, longwá na yo.” Bendá nzoto liboso ya makambo oyo epelisaka mɔ́tɔ. Na nsima, soki nkanda ekiti, mbala mosusu bokokoka kobongisa likambo na kimya. Ntango mosusu, ekoki kozala malamu kosɛnga lisalisi ya nkulutu moko oyo akɔmeli. Bato wana oyo bayebi makambo mingi mpe bayebi komitya na esika ya basusu bakoki kosunga ntango kimya ebandi kobeba na kati ya mwasi na mobali.—Yisaya 32:1, 2.
Bato oyo batyaka kimya na kati ya lisangá
15. Yakobo alobeli elimo nini ya mabe oyo ekolaki na kati ya baklisto mosusu, mpe mpo na nini elimo yango ezali “ya mokili,” “ya bonyama,” mpe ya “bilimu mabe”?
15 Likambo moko ya mabe ezalaki na baklisto mosusu na ekeke ya liboso: bazalaki na elimo ya zuwa mpe ya matata, elimo oyo eyokani ata moke te na kimya. Yakobo alobaki ete: “Yango ezali mayele mauti na Likoló te kasi mauti na mokili, mayele ya [bonyama, NW], mayele ya [bilimu] mabe. Mpo ete esika ezali na bilulela na [matata], wana [ezali] makɛlɛlɛ mpe makambo ya mpamba nyonso.” (Yakobo 3:14-16) Bato mosusu balobaka ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “matata” elimboli mposa ya kozwa lokumu, ya kowela esika ya liboso. Yango wana mpenza Yakobo abengi yango “ya mokili, ya bonyama, ya bilimu mabe.” Banda kalakala, bakonzi ya mokili oyo bawelanaka lokola banyama ya zamba oyo bazali kobunda. Matata ezali mpenza ezaleli “ya mokili” mpe “ya bonyama.” Ezali mpe “ya bilimu mabe.” Moto ya liboso oyo amonisaki ezaleli mabe yango ezali anzelu oyo azalaki na mposa makasi ya lokumu, atɛmɛlaki Yehova Nzambe mpe amikómisaki Satana, mokonzi ya bademo.
16. Ndenge nini baklisto mosusu na ekeke ya liboso bamonisaki elimo lokola oyo ya Satana?
16 Yakobo alendisaki baklisto ete básala makasi ete elimo ya matata ekola kati na bango te, mpamba te elimo yango ebebisaka kimya. Akomaki boye: “Bitumba mpe koswana na kati na bino iuti wapi? Iuti te na mposa mabe na bino oyo ekobundaka na kati na bilembo na nzoto na bino?” (Yakobo 4:1) Na vɛrsɛ oyo “mposa mabe” ekoki kolimbola lokoso mpo na biloko ya mokili to mposa ya kozala moto monene, ya koyangela to ya lokumu. Tomoni mpenza ete bato mosusu na kati ya masangá basalaki lokola Satana, balingaki lokumu na esika ya kozala ‘baoyo baleki mike,’ ndenge oyo Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ya solo. (Luka 9:48) Elimo ya ndenge wana ekoki kolongola kimya na kati ya lisangá.
17. Lelo oyo, ndenge nini baklisto bakoki kozala bato oyo batyaka kimya na kati ya lisangá?
17 Lelo oyo, tosengeli mpe koboya kozala na mposa mingi ya biloko ya mokili, zuwa to mposa ezangi ntina ya koluka bokonzi. Soki tozali mpenza bato oyo batyaka kimya, tokomitungisa te soki bandeko mosusu na kati ya lisangá bayebi kosala makambo mosusu koleka biso, tokotɔnga bango mpe te epai ya bandeko mosusu na maloba lokola: ‘Yango ye kutu alakisaka nini?’ Soki mpe tozali na mayele na likambo moko boye, tokosalela yango te mpo na komilakisa, lokola nde tozali koloba ete soki lisangá ezali kokola ezali mpo na makasi mpe na mayele na biso. Elimo ya ndenge wana ekokɔtisa bokabwani; ekotya kimya te. Bato oyo batyaka kimya bamilakisaka te ete bazali na mayele, kasi basalelaka mayele na bango na bopɔlɔ nyonso mpo na kosunga bandeko na bango mpe kokumisa nkombo ya Yehova. Bayebaka ete tókende epai, tózonga epai, ezali nde bolingo, kasi mayele te, nde elembo oyo emonisaka moklisto ya solo.—Yoane 13:35; 1 Bakolinti 13:1-3.
“Kimya lokola bakɛngɛli na bino”
18. Ndenge nini bankulutu balendisaka kimya na kati na bango?
18 Bankulutu bapesaka ndakisa na likambo etali kotya kimya na kati ya lisangá. Mpo na basaleli na ye, Yehova asakolaki boye: “Nakotya kimya lokola bakɛngɛli na bino mpe boyengebene lokola bakapita na bino.” (Yisaya 60:17, NW) Baklisto oyo bazali kosala lokola babateli ya mpate bakokisaka esakweli yango, elingi koloba ete basalaka makasi mpo na kolendisa kimya na kati na bango mpe na etonga. Bankulutu bakoki kobatela kimya na kati na bango soki bazali komonisa “mayele ya likoló” oyo ezali na kimya mpe ezali na makambo makasi te. (Yakobo 3:17, NW) Lokola babɔkwamá ndenge moko te mpe bakutaná na makambo ndenge moko te na bomoi na bango, bankulutu ya lisangá moko bakoki ntango mosusu kozala na likanisi moke te na likambo moko boye. Tokoloba na ntango wana ete bazali na kimya te? Tokoloba bongo te soki bazali kotalela likambo yango na ndenge oyo ebongi. Baoyo bazali bato oyo batyaka kimya bamonisaka makanisi na bango na komikitisa mpe na nsima bayokaka makanisi ya baninga na limemya. Na esika atingama na likanisi na ye, moto oyo atyaka kimya akotalela makanisi ya ndeko na ye malamumalamu mpe na kati ya libondeli. Soki babuki mobeko moko te ya Biblia, bato bakoki kozala na makanisi ndenge na ndenge. Soki baninga bazali na makanisi mosusu, moto oyo atyaka kimya akotika likanisi na ye mpe akondima ekateli oyo mingi bamoni malamu. Na ndenge yango akomonisa ete azali moto ya makambo makasi te. (1 Timote 3:2, 3) Bakɛngɛli oyo bameseni na makambo mingi bayebaka ete eleki malamu moto abatela kimya na esika ya kolongisa makanisi na ye moko.
19. Ndenge nini bankulutu batyaka kimya na kati ya lisangá?
19 Bankulutu balendisaka kimya elongo na bampate soki bazali kosunga bango mpe soki bazali te koluka kaka esika ya mabe na makambo oyo bazali kosala. Ya solo, ntango mosusu ekoki kosɛnga ete bato mosusu básembolama. (Bagalatia 6:1) Kasi, mokumba ya libosoliboso ya mokɛngɛli moklisto ezali ya kopamela te. Asengeli mbala mingi kopesaka longonya. Bankulutu oyo bazali na bolingo basalaka makasi ete báluka makambo ya malamu epai ya bandeko. Bakɛngɛli bakumisaka mosala makasi ya baninga na bango baklisto, mpe batyaka motema ete bandeko na bango bazali kosala oyo ekoki na bango.—2 Bakolinti 2:3, 4.
20. Lisangá ezwaka matomba nini ntango bandeko nyonso bazali bato oyo batyaka kimya?
20 Yango wana, na kati ya libota, na lisangá mpe na ndenge na biso ya kozala na bato oyo bazali Batatoli te, tosalaka makasi ete tózala bato ya kimya, tolukaka kimya. Soki tozali ntango nyonso koluka kimya, tokosunga mpo ete lisangá ezala na esengo. Lisusu, tokobatelama mpe tokolendisama na ndenge ebele, ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
• Kozala moto oyo alukaka kimya elimboli nini?
• Ndenge nini tokoki kozala bato oyo balukaka kimya liboso ya bato oyo bazali Batatoli te?
• Tángá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kotya kimya na kati ya libota.
• Ndenge nini bankulutu bakoki kolendisa kimya na kati ya lisangá?
[Elilingi na lokasa 9]
Bato oyo batyaka kimya bamitombolaka te
[Bililingi na lokasa 10]
Baklisto bazali bato oyo batyaka kimya na mosala ya kosakola, na libota mpe na lisangá