“Moombo ya sembo” alongi komekama!
“Ezali ntango etyamá mpo lisambisi ebanda na ndako ya Nzambe.”—1 PETELO 4:17.
1. Makambo nini Yesu amonaki ntango ayaki kotalela makambo ya “moombo”?
MOKOLO ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yesu aponaki “moombo” moko mpo apesaka “basali ya ndako” na ye bilei na ntango ebongi. Na 1914, Yesu akómaki Mokonzi, mpe mwa moke na nsima, ayaki kotalela makambo ya “moombo” yango. Na makambo mingi, amonaki ete “moombo” azalaki ‘sembo mpe mayele.’ Yango wana, atyaki ye “likoló ya biloko na ye nyonso.” (Matai 24:45-47) Kasi, moombo mosusu ya mabe mpe azalaki, oyo azalaki sembo te, mayele mpe te.
“Moombo wana ya mabe”
2, 3. “Moombo wana ya mabe” autaki wapi, mpe likambo yango esalemaki ndenge nini?
2 Ntango kaka Yesu asilisaki kolobela “moombo ya sembo mpe ya mayele,” alobelaki mpe moombo ya mabe. Alobaki boye: “Soki moombo wana ya mabe alobi na motema na ye ete, ‘Nkolo na ngai azali koumela,’ mpe abandi kobɛta baninga na ye baombo mpe alei mpe amɛli elongo na balangwi minene ya masanga, nkolo ya moombo wana akoya na mokolo oyo ye azali kokanisa na yango te mpe na ngonga oyo ye ayebi te, mpe akopesa ye etumbu na ndenge ya makasi koleka mpe akopesa ye lifuti na ye esika moko na bakosi. Kuna nde kolela na ye mpe kokekitinya mino na ye ekozala.” (Matai 24:48-51) Maloba “moombo wana ya mabe” ezali kotinda biso tókanisa maloba oyo Yesu alobaki mpo na moombo ya sembo mpe ya mayele. Yango emonisi ete ‘moombo ya mabe’ autaki na kati ya moombo ya sembo.a Na ndenge nini?
3 Liboso ya 1914, bato oyo bazali na kati ya moombo ya sembo bazalaki mpenza na elikya ete na mbula wana balingaki kobuta na likoló mpo na kokutana na Mobali ya libala, kasi elikya na bango ekokisamaki te. Mpo na likambo yango mpe mpo na makambo mosusu, mingi balɛmbaki nzoto mpe mwa ndambo bakómaki na nkanda. Bamosusu kati na bango bakómaki “kobɛta” bandeko na bango na maloba mpe bakómaki baninga ya “balangwi minene ya masanga,” elingi koloba bato ya mangomba ya boklisto.—Yisaya 28:1-3; 32:6.
4. Nini Yesu asalaki ‘moombo ya mabe’ mpe baoyo nyonso bamonisaki elimo na ye?
4 Bato yango oyo bazalaki liboso baklisto bakómaki ‘moombo ya mabe’ mpe Yesu apesaki bango etumbu “na ndenge ya makasi koleka.” Na ndenge nini? Aboyaki bango, mpe bazangaki elikya ya kozala na bomoi na likoló. Kasi, abomaki bango na ntango wana te. Basengelaki naino kolela mpe kokekitinya mino na “molili ya libándá” ya lisangá ya boklisto. (Matai 8:12) Banda na bambula wana, bapakolami mosusu, ya mokomoko, bamonisaki elimo ya mabe ndenge wana; na bongo, bamityaki na ngámbo ya ‘moombo ya mabe.’ Bato mosusu mpe na kati ya “bampate mosusu” balandaki ndakisa na bango ya kozanga bosembo. (Yoane 10:16) Banguna nyonso wana ya Klisto basukaki na “molili ya libándá.”
5. Moombo ya sembo mpe ya mayele amonisaki ezaleli nini oyo ekeseni na ezaleli ya ‘moombo ya mabe’?
5 Kasi, moombo ya sembo mpe ya mayele amekamaki ndenge moko na “moombo wana ya mabe.” Nzokande, na esika bandeko yango básilika, bandimaki kosembolama. (2 Bakolinti 13:11) Bolingo na bango mpo na Yehova mpe bandeko na bango ebakisamaki. Yango wana, bakómaki “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo” na “mikolo ya nsuka” oyo etondi na yikiyiki.—1 Timote 3:15; 2 Timote 3:1.
Bangɔndɔ ya mayele mpe bangɔndɔ bazoba
6. (a) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na kolobela mayele ya moombo ya sembo? (b) Liboso ya 1914, baklisto bapakolami bazalaki kosakola nsango nini?
6 Nsima ya kolobela “moombo wana ya mabe,” Yesu apesaki bandakisa mibale mpo na kolimbola ntina oyo baklisto mosusu bapakolami bakozala sembo mpe mayele, kasi ekozala bongo te mpo na bamosusu.b Mpo na kolobela mayele, alobaki boye: “Bokonzi ya likoló ekokóma lokola bangɔndɔ zomi oyo bakamataki miinda na bango mpe babimaki mpo na kokutana na mobali ya libala. Mitano na bango bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele. Mpo bazoba bakamataki miinda na bango kasi bakamataki mafuta elongo na bango te, nzokande baoyo ya mayele bakamataki mafuta na kati ya milangi na bango elongo na miinda na bango.” (Matai 25:1-4) Bangɔndɔ zomi bazali komonisa biso ezaleli ya baklisto bapakolami liboso ya 1914. Nsima ya koyekola makambo, bamonaki ete etikalaki moke mobali ya libala, Yesu Klisto, amonana. Yango wana, “babimaki” mpo na kokutana na ye, bazalaki kosakola na molende ete “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu” ekosuka na 1914.—Luka 21:24.
7. Ntango nini mpe mpo na nini baklisto bapakolami ‘balalaki’?
7 Bamikosaki te. Bantango oyo etyamá mpo na bikólo mosusu esukaki na 1914, mpe Klisto Yesu abandaki koyangela na kati ya Bokonzi ya Nzambe. Kasi, yango ezalaki na likoló. Awa na mabelé, bato bakómaki na “mawa” oyo Biblia esakolaki. (Emoniseli 12:10, 12) Na nsima, komekama ebandaki. Baklisto bapakolami bakangaki ntina ya makambo malamu te mpe bakanisaki ete “mobali ya libala azalaki koumela.” Lokola makanisi na bango ebulunganaki mpe lokola mokili elingaki bango te, mingi balɛmbaki mpe batikaki mpenza kosakola. Basalaki lokola bangɔndɔ na ndakisa ya Yesu, elingi koloba ete “batungisamaki na mpɔngi mpe balalaki” na elimo, se ndenge oyo baklisto oyo bazalaki sembo te basalaki nsima ya liwa ya bantoma ya Yesu.—Matai 25:5; Emoniseli 11:7, 8; 12:17.
8. Mpo na nini mongongo moko egangaki ete: “Mobali ya libala ye oyo!” mpe na ntango yango baklisto bapakolami basengelaki kosala nini?
8 Na nsima, na 1919, likambo moko oyo bakanisaki te esalemaki. Biblia elobi boye: “Na katikati mpenza ya butu koganga moko ebimaki ete, ‘Mobali ya libala ye oyo! Bóbima mpo na kokutana na ye.’ Boye bangɔndɔ nyonso wana batɛlɛmaki mpe babongisaki miinda na bango.” (Matai 25:6, 7) Na ntango oyo makambo nyonso ekómaki molili mpenza mpo na bango, bayokaki mongongo moko ezali koganga mpo na kolendisa bango na kosala mosala! Na 1918, Yesu, “ntoma ya kondimana,” ayaki na tempelo ya Yehova mpo na kotala lisangá ya Nzambe mpe kopɛtola yango. (Malaki 3:1) Na ntango yango, esengelaki ete baklisto bapakolami bábima mpo na kokutana na ye na tempelo wana, na lopango na yango oyo ezali awa na mabelé. Ntango ekokaki mpo ‘bángɛnga.’—Yisaya 60:1; Bafilipi 2:14, 15.
9, 10. Na 1919, mpo na nini baklisto mosusu bazalaki “mayele” mpe bamosusu bazalaki “bazoba”?
9 Kasi, na ndakisa ya Yesu, bangɔndɔ mosusu bazalaki na mokakatano moko. Yesu alobaki lisusu boye: “Bazoba balobaki na baoyo ya mayele ete, ‘Bópesa biso ndambo ya mafuta na bino, mpamba te miinda na biso elingi ekufa.’” (Matai 25:8) Soki miinda ezangi mafuta, ekopela te. Na bongo, mafuta ya miinda ezali elilingi ya Liloba ya solo ya Nzambe mpe elimo santu na ye, oyo epesaka basambeli ya solo nguya ya kozala bamemi-pole. (Nzembo 119:130; Danyele 5:14) Liboso ya 1919, bapakolami ya mayele batikaki te koluka koyeba mokano ya Nzambe mpo na bango, atako balɛmbaki mpo na mwa ntango. Yango wana, ntango bayokaki mongongo oyo egangaki ete bángɛngisa pole, bamibongisaki.—2 Timote 4:2; Baebele 10:24, 25.
10 Kasi, bapakolami mosusu bamibongisaki te mpo na komipesa to kosala molende atako bazalaki mpenza na mposa ya kozala na Mobali ya libala. Yango wana, ntango ngonga ekokaki mpo na komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu, bamibongisaki te. (Matai 24:14) Kutu, balukaki kolɛmbisa baninga na bango oyo bazalaki kosala na molende na ndenge bazalaki kosɛnga bango ndambo ya mafuta na bango. Na ndakisa ya Yesu, bangɔndɔ ya mayele bapesaki bango eyano nini? Balobaki boye: “Mbala mosusu ekokoka mpenza te mpo na biso mpe mpo na bino. Nde, bókende epai ya baoyo batɛkaka yango mpe bósomba mpo na bino moko.” (Matai 25:9) Ndenge moko mpe, na 1919, bapakolami ya sembo baboyaki kosala likambo nyonso oyo ekokaki kokitisa molende na bango ya kopesa pole. Na ndenge yango, balongaki komekama.
11. Nini ekómelaki bangɔndɔ ya bazoba?
11 Yesu asukisaki boye: “Wana [bangɔndɔ bazoba] bazalaki kokende kosomba, mobali ya libala akómaki, mpe bangɔndɔ oyo basilaki komilɛngɛla bakɔtaki elongo na ye na fɛti ya libala; mpe ekuke ekangamaki. Na nsima bangɔndɔ mosusu mpe bayaki, kolobáká ete, ‘Tata, tata, fungolá biso!’ Ye azongisaki ete, ‘Nazali koyebisa bino solo, Nayebi bino te.’” (Matai 25:10-12) Tomoni ete bamosusu bamibongisaki te ntango Mobali ya libala akómaki. Yango wana, bamonanaki sembo te ntango batalaki makambo na bango mpe bazangaki libaku ya kozala na fɛti ya libala na likoló. Mawa mpo na bango!
Ndakisa ya batalanta
12. (a) Yesu apesaki ndakisa nini mpo na kolobela bosembo? (b) Moto oyo asalaki mobembo na mboka mopaya ezali nani?
12 Nsima ya kopesa ndakisa oyo elobelaki mayele, Yesu apesaki ndakisa mosusu oyo elobelaki bosembo. Alobaki boye: “Ezali lokola ntango moto moko, pene ya kosala mobembo na mboka mopaya, abengisaki baombo na ye mpe apesaki na mabɔkɔ na bango biloko na ye. Mpe epai na moko apesaki talanta mitano, epai na mosusu mibale, epai na mosusu lisusu moko, epai na moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza, mpe akendaki na mboka mopaya.” (Matai 25:14, 15) Moto yango ezali Yesu ye moko, oyo ‘asalaki mobembo na mboka mopaya’ ntango akendaki na likoló na mobu 33 T.B. Liboso Yesu amata na likoló, apesaki bayekoli na ye ya sembo “biloko na ye.” Na ndenge nini?
13. Ndenge nini Yesu abongisaki makambo mpo na mosala na elanga moko monene mpe atindaki “baombo” na ye básala mombongo?
13 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi oyo asalaki na Yisalaele ebongisaki makambo mpo na mosala na elanga moko monene. (Matai 9:35-38) Liboso ‘asala mobembo na mboka mopaya,’ apesaki bayekoli na ye ya sembo elanga yango mpe alobaki na bango boye: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:18-20) Na maloba yango, Yesu atindaki “baombo” na ye básala mombongo tii ntango akozonga, “moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza.”
14. Mpo na nini baklisto nyonso bakokaki kosala mombongo ndenge moko te?
14 Maloba yango ezali komonisa ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki bango nyonso na makoki ndenge moko te. Bamosusu, lokola Paulo ná Timote, bakokaki komipesa mobimba na mosala ya kosakola mpe koteya. Bomoi ya bamosusu ezalaki kopesa bango nzela te ya kosala mingi. Na ndakisa, baklisto mosusu bazalaki baombo, bamosusu mpe bazalaki maladi, mibange, to bazalaki na mabota. Ya solo, baklisto nyonso bakokaki kokokisa mikumba mosusu na lisangá. Bapakolami ya basi ná mosusu ya mibali bazalaki koteya te na kati ya lisangá. (1 Bakolinti 14:34; 1 Timote 3:1; Yakobo 3:1) Nzokande, ata soki moto na moto azalaki na bomoi ya ndenge nini, bapakolami nyonso ya Klisto—mibali mpe basi—basengelaki kosala mombongo, kosalela ntango mpe makoki na bango na mosala ya boklisto. Baninga na bango oyo bazali na bomoi lelo oyo bazali mpe kosala ndenge yango.
Ntango ya kotalela makambo ebandi!
15, 16. (a) Ntango ya kotalela makambo ya moto na moto ekokaki na mbula nini? (b) Bato ya sembo bazwaki mabaku nini ya sika ya ‘kosala mombongo’?
15 Ndakisa yango elobaki lisusu boye: “Nsima ya ntango moko molai nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki makambo ya mbongo na ye elongo na bango.” (Matai 25:19) Na 1914, nsima ya ntango mpenza molai banda mobu 33 T.B., kozala ya Klisto Yesu lokola mokonzi ebandaki. Mbula misato na ndambo na nsima, na 1918, ayaki na tempelo ya elimo mpe akokisaki maloba ya Petelo oyo: “Yango ezali ntango etyamá mpo lisambisi ebanda na ndako ya Nzambe.” (1 Petelo 4:17; Malaki 3:1) Ntango ekokaki mpo na kotalela makambo ya moto na moto.
16 Ndenge nini baombo, bandeko ya Yesu bapakolami basalelaki “batalanta” ya Mokonzi? Bambula nyonso, kobanda na mobu 33 T.B. tii na 1914, mingi bazalaki koboma nzoto mpo na kosala “mombongo” ya Yesu. (Matai 25:16) Ata na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bazalaki na mposa makasi ya kosalela Nkolo. Na mbula yango, ebongaki bápesa bato ya sembo mabaku mosusu ya ‘kosala mombongo.’ Ntango ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo ebandaki. Esengelaki ete nsango malamu esakolama na mokili mobimba. Esengelaki kobuka “mbuma ya mabelé.” (Emoniseli 14:6, 7, 14-16) Esengelaki koluka bato ya nsuka oyo bazali na kati ya blé mpe esengelaki koyanganisa “ebele ya bato” oyo bazali na kati ya bampate mosusu.—Emoniseli 7:9; Matai 13:24-30.
17. Ndenge nini baklisto bapakolami ya sembo ‘bakɔtaki na esengo ya nkolo na bango’?
17 Ntango ya kobuka mbula ezalaka ntango ya esengo. (Nzembo 126:6) Yango wana, ntango Yesu apesaki bandeko na ye bapakolami ya sembo mikumba mosusu na 1919, alobaki na bango malamu ete: “Ozalaki sembo na mwa makambo moke. Nakotya yo likoló ya biloko mingi. Kɔtá na esengo ya nkolo na yo.” (Matai 25:21, 23) Lisusu, tokoki te koyeba bonene ya esengo oyo Nkolo ayokaki ntango afandaki na kiti ya Bokonzi ya Nzambe. (Nzembo 45:1, 2, 6, 7) Bandeko oyo bazali na etuluku oyo tobengi moombo ya sembo bazali mpe koyoka esengo yango ndenge bazali bamonisi ya Mokonzi mpe bazali kobakisa biloko na ye awa na mabelé. (2 Bakolinti 5:20) Esakweli ya Yisaya 61:10 ezali komonisa esengo na bango na maloba oyo: “Nakosepela kosepela mingi kati na [Yehova], molimo na ngai ekozwa esengo mpo na Nzambe na ngai; mpo ete alatisi ngai bilamba ya lobiko.”
18. Mpo na nini bamosusu bamonakaki mabe ntango batalelaki makambo na bango, mpe nini ekómelaki bango?
18 Kasi, bamosusu bamonanaki mabe ntango batalelaki makambo na bango. Biblia elobi boye: “Oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki ete, ‘Nkolo, nayebaki ete yo ozali moto ya makambo makasi, obukaka epai olonaki te mpe oyanganisaka epai opupolaki te. Bongo nabangaki mpe nakendaki mpe nabombaki talanta na yo na mabelé. Talá eloko na yo yango oyo.’” (Matai 25:24, 25) Kaka ndenge yango, baklisto mosusu bapakolami basalaki “mombongo” te. Liboso ya 1914 bamipesaki te mpo na koyebisa bato mosusu bilikya oyo bazalaki na yango, mpe baboyaki kobanda kosala yango na 1919. Lokola bazangaki botosi, Yesu asalaki bango nini? Abɔtɔlaki bango nyonso oyo bazalaki na yango. ‘Babwakamaki na kati ya molili ya libándá, kuna nde kolela mpe kokekitinya mino na bango ezalaki.’—Matai 25:28, 30.
Kotalela makambo ezali kokoba
19. Na ndenge nini kotalela makambo ezali kokoba, mpe baklisto bapakolami nyonso bazali na ekateli nini?
19 Mingi kati na baoyo basengelaki kokóma bapakolami ya Klisto na ntango ya nsuka bazalaki naino kosalela Yehova te ntango Yesu abandaki kotalela makambo na 1918. Makambo ya bato yango esengelaki kotalelama te? Te. Kotalela makambo ebandaki nde kobanda na bambula 1918 mpe 1919, ntango etuluku mobimba ya moombo ya sembo mpe ya mayele emekamaki. Yesu azali kokoba kotalela makambo ya moklisto mopakolami mokomoko tii ntango bakotya bango bilembo mpo na libela. (Emoniseli 7:1-3) Yango wana, bandeko ya Klisto bapakolami bazali na ekateli ya kokoba ‘kosala mombongo’ na bosembo. Bazali na ekateli ya kozala mayele, ya kozala na mafuta mingi mpo ete pole engɛnga ntango nyonso. Bayebi ete moto mokomoko oyo atikali sembo tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu akoyamba ye na likoló.—Matai 24:13; Yoane 14:2-4; 1 Bakolinti 15:50, 51.
20. (a) Lelo oyo bampate mosusu bazali na ekateli ya kosala nini? (b) Likambo nini baklisto bapakolami bazali koyeba malamu?
20 “Ebele ya bato” oyo bazali na kati ya bampate mosusu balandi ndakisa ya bandeko na bango bapakolami. Babosani te ete soki moto ayebi mikano ya Nzambe, akómaka na mokumba monene. (Ezekiele 3:17-21) Yango wana, na lisalisi ya Liloba ya Yehova mpe ya elimo santu, bango mpe bazali koyekola mpe koyangana na makita mpo na kobatela mafuta mingi. Bazali mpe kongɛngisa pole na bango, bazali kosakola mpe koteya mpe na bongo, ‘kosala mombongo’ elongo na bandeko na bango bapakolami. Kasi, baklisto bapakolami bayebi malamu ete Yesu apesaki batalanta na mabɔkɔ na bango. Nkolo akotuna bango ndenge oyo bazali kobatela biloko na ye awa na mabelé. Atako batikali lisusu mingi te, bakoki te kotika mokumba wana epai ya “ebele ya bato.” Yango wana, moombo ya sembo mpe ya mayele azali kokoba kobatela mombongo ya Mokonzi mpe azali na botɔndi na ndenge oyo “ebele ya bato” bazali kopesa ye mabɔkɔ. “Ebele ya bato” bazali kondima mokumba ya bandeko na bango bapakolami mpe bazali komona ete bazali na libaku malamu ya kosala mosala oyo bapakolami bazali kotambwisa.
21. Elendiseli nini ezali mpo na baklisto nyonso banda liboso ya 1919 tii lelo oyo?
21 Yango wana, atako bandakisa yango mibale ezali kolimbola makambo oyo esalemaki na 1919 mpe mwa moke liboso mpe nsima, makanisi na yango ezali kotalela baklisto nyonso ya solo na mikolo ya nsuka. Yango wana, atako elendiseli oyo Yesu apesaki na nsuka ya ndakisa ya bangɔndɔ zomi etaleli libosoliboso baklisto bapakolami liboso ya 1919, makanisi na yango ebongi mpe mpo na moklisto mokomoko lelo oyo. Na yango, tiká ete biso nyonso tótosa maloba ya Yesu oyo: “Na yango, bókɛngɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”—Matai 25:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndenge moko mpe, ntango bantoma nyonso basilaki kokufa, “bambwa mabe ya zamba” babimaki na kati ya bankulutu baklisto bapakolami na elimo.—Misala 20:29, 30.
b Ndakisa ya Yesu elimbolami na buku Sécurité universelle sous le règne du “prince de paix,” mikapo 5 ná 6, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Ntango nini Yesu ayaki kotalela makambo ya bayekoli na ye, mpe amonaki nini?
• Mpo na nini bapakolami mosusu bakómaki na elimo ya “moombo wana ya mabe”?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mayele na elimo?
• Na ndakisa ya bandeko ya Yesu bapakolami, ndenge nini tokoki kokoba ‘kosala mombongo’?
[Etanda na lokasa 16]
YESU AKOYA NTANGO NINI?
“Koya” ya Yesu oyo Matai mokapo 24 elobeli ekeseni na oyo ya mokapo 25. Mpo Yesu ‘aya,’ ezali kosɛnga kaka te ete alongwa na likoló mpe aya awa na mabelé. Kasi, ‘koya’ na ye ezali kolimbola kotya makanisi na ye epai ya bato to bayekoli na ye, mingimingi mpo na kosambisa bango. Yango wana, na 1914 “ayaki” mpo na kobanda kozala na ye lokola Mokonzi oyo abandi koyangela. (Matai 16:28; 17:1; Misala 1:11) Na 1918 “ayaki” lokola ntoma ya kondimana mpe abandaki kosambisa baoyo bazalaki koloba ete bazali basaleli ya Yehova. (Malaki 3:1-3; 1 Petelo 4:17) Na Armagedon, “akoya” kopesa banguna ya Yehova etumbu.—Emoniseli 19:11-16.
Koya oyo elobelami na Matai 24:29-44 mpe 25:31-46 ekozala na ntango ya “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:14) Nzokande, koya oyo balobeli na Matai 24:45 tii 25:30 etaleli kosambisa oyo azali kosambisa bato oyo bazali komibenga bayekoli na ye banda 1918. Ezali likambo elongobani te na koloba, na ndakisa, ete Yesu akopesa moombo ya sembo mbano, akosambisa bangɔndɔ ya zoba, mpe akosambisa moombo ya mabe oyo abombaki talanta ya Nkolo, ntango “akoya” na bolɔzi monene. Soki bongo, ekomonisa ete bapakolami mingi bakozala sembo te na ntango wana mpe ekosɛnga kopona bato mosusu na esika na bango. Nzokande, Emoniseli 7:3 emonisi ete baombo bapakolami nyonso ya Klisto ‘bakotyama bilembo’ mpo na libela na ntango wana.
[Elilingi na lokasa 14]
‘Moombo mabe’ azwaki mapamboli te na 1919
[Elilingi na lokasa 15]
Bangɔndɔ ya mayele basilaki komilɛngɛla ntango mobali ya libala akómaki
[Elilingi na lokasa 17]
Moombo ya sembo amipesaki na “mombongo”
[Elilingi na lokasa 17]
Moombo ya mabe asalaki mombongo te
[Bililingi na lokasa 18]
Bapakolami ná “ebele ya bato” bazali kokoba kongɛngisa pole