Bólala Mpɔngi te, bómipesa na mosala!
“Bongo bókɛngɛlaka mpo ete boyebi mokolo soko ntango te.”—MATAI 25:13.
1. Ntoma Yoane azalaki kozela nini?
NA LISOLO ya nsuka oyo ezali na Biblia, Yesu alakaki ete: “Nakoya noki.” Ntoma Yoane ayanolaki ete: “Bobele bongo, Nkolo Yesu, oya.” Ntoma Yoane atyaki ntembe ata moke te ete Yesu akoya. azalaki moko ya bantoma oyo batunaki Yesu ete: “Nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na [kozala, NW; na Greke, parousia] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” Yoane azalaki mpenza kozela kozala ya Yesu na elikya nyonso.—Emoniseli 22:20; Matai 24:3.
2. Ndenge nini mangomba batalelaka kozala ya Yesu?
2 Na moi ya lelo, bato oyo bazali na elikya motindo wana bazali mingi te. Mangomba mingi eteyaka ete Yesu ‘akoya,’ kasi kaka bandimi moke ya mangomba yango nde bazelaka mpenza koya yango. Bomoi na bango ya mokolo na mokolo emonisaka te ete bazelaka boyei na ye. Buku moko (The Parousia in the New Testament) elobi ete: “Bomoi, makanisi mpe misala ya lingomba elakisaka te ete bazalaka na elikya ya Parousia. . . . Elimo oyo esengeli komonana na lingomba, elimo ya kokokisa nokinoki mikumba ya koteya bato bábongwana mpe kokende kosakola nsango malamu, elɛmbi to mpe ezali komonana ata moke te.” Kasi, ezali boye epai ya bato nyonso te!
3. (a) Ndenge nini baklisto ya solo batalelaka parousia ya Klisto? (b) Tosengeli mpenzampenza kotalela likambo nini sikoyo?
3 Bayekoli ya solosolo ya Yesu bazelaka nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo na mposa makasi. Ntango tozali kozela yango na bosembo nyonso, tosengeli koyeba malamumalamu makambo nyonso oyo etalelami na kozala ya Yesu mpe kosala makambo oyo eyokani na boyebi yango. Yango ekosalisa biso ‘tókanga motema tii na nsuka mpe tóbika.’ (Matai 24:13, NW) Ntango asakolaki makambo oyo ezali na Matai mokapo 24 mpe 25, Yesu apesaki toli malamu oyo tokoki kosalela mpo tózwa bolamu ya seko. Mokapo ya 25 ezali na masese oyo mbala mosusu oyebi yango, bakisa mpe lisese ya baseka zomi (baseka ya mayele mpe baseka ya bozoba) mpe lisese ya batalanta. (Matai 25:1-30) Masese yango ekoki kopesa biso litomba nini?
Tólala mpɔngi te lokola baseka mitano!
4. Lisese ya baseka ezali na liteya nini?
4 Mbala mosusu okosepela kotánga lisusu lisese ya baseka na Matai 25:1-13. Likambo yango ezali koleka na feti ya libala moko monene epai ya Bayuda; bongo, mobali akei na ndako ya tata ya mwasi mpo na kokamata mwasi mpe kokende na ye na ndako na ye (to na ndako ya tata na ye). Ekoki kozala ete ntango bazali kokende etuluku mobimba, babɛti miziki na bayembi bazali na kati, mpe ntango oyo bakokóma ekokaki koyebana te. Na lisese, baseka zomi bazalaki kozela ete mobali akóma na butu. Baseka mitano basalaki bozoba, bamemaki mafuta mingi te mpo na miinda na bango; yango wana, esengelaki bákende kosomba mafuta mosusu mpo na kobakisa. Baseka mosusu mitano bazalaki na mayele, bamemaki mafuta mosusu na milangi mpo na kobakisa na miinda na bango soki mafuta esili na ntango oyo bazalaki kozela. Baseka yango mitano nde bamibongisaki ntango mobali akómaki. Yango wana, bango kaka nde bazwaki ndingisa ya kokɔta na feti. Ntango baseka mitano ya bozoba bazongaki, ngonga esilaki koleka, bakokaki lisusu kokɔta te.
5. Vɛrsɛ nini ezali kongɛngisa ndimbola ya elilingi ya lisese ya baseka?
5 Makambo mingi ya lisese yango ezali na ndimbola ya elilingi. Na ndakisa, Biblia ebéngaka Yesu mobali ya libala. (Yoane 3:28-30) Yesu amikokanisaki na mwana ya mokonzi oyo babongiselaki feti ya libala. (Matai 22:1-14) Lisusu, Biblia ekokanisi Klisto na mobali. (Baefese 5:23) Likambo moko ebendi likebi na biso ezali ete na bisika mosusu, bakokanisi baklisto bapakolami na “mwasi” ya Klisto, kasi na lisese oyo balobeli mwasi te. (Yoane 3:29; Emoniseli 19:7; 21:2, 9) Nzokande, balobeli baseka zomi, mpe na bisika mosusu, bakokanisi bapakolami na moseka oyo Klisto alaki ete akobala ye.—2 Bakolinti 11:2.a
6. Yesu apesaki elendiseli nini ntango asukisaki lisese ya baseka?
6 Longola makambo nyonso wana mpe ndimbola na yango ya esakweli, lisese yango ekoki mpenza koteya biso makambo mingi ya malamu. Na ndakisa, talá maloba ya Yesu na nsuka ya lisese yango: “Bongo bókɛngɛlaka mpo ete boyebi mokolo soko ntango te.” Boye, tomoni ete lisese ezali koteya mokomoko na biso ete alala mpɔngi te, azala na ekɛngɛ lokola nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe oyo ekómi pene. Ntembe ezali te ete nsuka ezali koya, atako tokoki koyeba mokolo oyo yango ekoya te. Yango wana, tótya likebi na elimo oyo etuluku mokomoko ya baseka emonisaki.
7. Ndenge nini baseka mitano ya lisese bamimonisaki bazoba?
7 Yesu alobaki ete: “Mitano na bango bazalaki [bazoba].” Bazalaki nde bazoba mpo bandimaki te ete mobali azali koya? Babimaki mpo na kolanda bisengo? To mpe bakosamaki? Te. Yesu alobaki ete baseka yango mitano “bakendaki [koyamba] mobali ya libala.” Bayebaki ete azali koya, mpe balingaki ete bango mpe báyamba ye, mpe bázala na “feti ya libala.” Kasi, bamibongisaki malamu? Bazelaki ye mwa moke, tii “na kati ya butu,” kasi bamibongisaki te mpo na koyamba ye ata soki akómi na ngonga nini, ezala liboso to nsima ya ngonga oyo bakanisaki.
8. Ndenge nini baseka mitano ya lisese bamonisaki ete bazali na mayele?
8 Baseka mosusu mitano, baoyo Yesu alobaki ete bazali na mayele, bango mpe bapelisaki miinda na bango mpe babimaki mpo na kozela mobali. Bango mpe basengelaki kozela, kasi bazalaki na “mayele.” Liloba ya Greke oyo ebongolami na “mayele” ekoki kolimbola kozala na “ekɛngɛ, kozala na makanisi, na mayele ya kosala makambo.” Baseka yango mitano bamonisaki ete bazali na mayele mpamba te bamemaki milangi ya mafuta mosusu mpo na kotondisa lisusu miinda na bango soki esili mafuta. Ɛɛ, balukaki mpenza bámibongisa malamu mpo na kozela mobali na boye ete baboyaki kobebisa mafuta na bango. Kozala na ekɛngɛ motindo yango ezali mabe te, lokola emonisami na ndenge bazalaki wana mpe bamibongisi malamu ntango mobali akómaki. Baoyo “bamibongisaki bakɔti na ye na ndako ya feti, mpe porte ekangami.”
9, 10. Liteya nini tozwi na lisese ya baseka, mpe mituna nini tosengeli komituna?
9 Yesu azalaki koteya ndenge ya komibongisa mpo na feti ya libala te, azalaki mpe kopesa toli te na ntina etali kokaba. Likanisi na ye ezalaki oyo: “Bongo bókɛngɛlaka mpo ete boyebi mokolo soko ntango te.” Omituna naino, ‘Nazali mpenza na ekɛngɛ mpo na kozala ya Klisto?’ Tondimaka ete Yesu azali sikoyo koyangela na likoló, kasi totyaka mpenza makanisi na biso na bosolo ya likambo oyo ete ‘Mwana na moto azali koya na mapata na likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo’? (Matai 24:30) Na ntembe te, ntango bakómaki “na kati ya butu,” boyei ya mobali ekómaki mpenza pene koleka ntango oyo babimaki mpo na koyamba ye. Ndenge moko mpe, koya ya Mwana ya moto mpo na koboma ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo ekómi pene mpenza koleka na ntango oyo tobandaki kozela yango. (Baloma 13:11-14) Tozali ntango nyonso kokɛngɛla, kutu makasi lisusu koleka lokola ntango yango ekómi pene?
10 Mpo na kotosa etinda oyo elobi ‘tókɛngɛlaka,’ tosengeli ntango nyonso kozala miso gaa. Baseka mitano bazelaki mafuta na bango esila bongo bákende kosomba mosusu. Lelo oyo mpe moklisto akoki kotika nzela ete makanisi na ye ezala esika moko te, yango ekosala ete amibongisa malamu te mpo na boyei ya Yesu oyo ezali lisusu mosika te. Likambo yango ekómelaki baklisto mosusu na ekeke ya liboso. Ekoki mpe kokómela bato mosusu lelo oyo. Yango wana, tómituna motuna oyo, ‘Ezali bongo mpo na ngai?’—1 Batesaloniki 5:6-8; Baebele 2:1; 3:12; 12:3; Emoniseli 16:15.
Tómipesa na mosala lokola nsuka ekómi pene
11. Yesu apesaki lisese nini na nsima, mpe ekokanaki na lisese nini?
11 Na lisese na ye oyo elandaki, Yesu asukaki kaka te na kolendisa bayekoli na ye ete bákɛngɛlaka. Nsima ya koyebisa bango lisese ya baseka ya mayele mpe baseka ya bozoba, apesaki lisusu lisese ya batalanta. (Tángá Matai 25:14-30.) Na makambo mingi, lisese yango ekokani na lisese ya palata oyo Yesu apesaki liboso mpo bato mingi “bazalaki kobanza ete Bokonzi na Nzambe ekomonana nokinoki.”—Luka 19:11-27.
12. Lisese ya batalanta ezali na liteya nini?
12 Na lisese ya batalanta, Yesu alobelaki moto moko oyo, liboso akende mobembo na mboka mopaya, abéngaki baombo misato. Apesaki talanta mitano na moombo ya liboso, na oyo ya mibale apesaki talanta mibale, mpe na oyo ya nsuka apesaki talanta moko—“na kotalela makoki ya mokomoko.” Mbala mosusu ezalaki talanta ya ebende, motuya oyo mongamba akokaki kozwa nsima ya mbula 14 ya mosala—ezalaki mbongo mingi! Ntango moto yango azongaki, asɛngaki na moombo mokomoko apesa lapolo ya mosala na ye na boumeli ya “ntango molai” oyo azalaki na mobembo. Baombo mibale babakisaki mbala mibale mbongo oyo bapesaki bango. Alobaki ete “Malamu,” mpe alakaki ete akobakisela bango mikumba, mpe na nsuka alobaki boye: “[Kɔtá] na esengo na nkolo na yo.” Moombo oyo azwaki talanta moko abotisaki yango te, alobaki ete nkolo na ye azali na makambo makasi. Akundaki mbongo yango na mabelé, atyaki yango ata na banki te ete azwela yango matabisi. Nkolo abéngaki ye “moombo mabe mpe na goigoi” mpamba te alukaki matomba ya nkolo na ye te. Yango wana, babɔtɔlaki ye talanta yango, mpe babwakaki ye libándá “[epai bileli] mpe kokatakata na mino” ezalaki.
13. Ndenge nini Yesu akokanaki na nkolo oyo alobelami na lisese?
13 Tosengeli mpe kotalela likambo mokomoko ya lisese oyo na ndimbola ya elilingi. Na ndakisa, Yesu, oyo amonisami na moto oyo akei mobembo na mboka mopaya, asengelaki kotika bayekoli na ye mpo na kokende na likoló, mpe kozela ntango molai tii akozwa bokonzi.b (Nzembo 110:1-4; Misala 2:34-36; Baloma 8:34; Baebele 10:12, 13) Kasi, tokoki mpe kozwa liteya mosusu monene oyo biso nyonso tosengeli kosalela na bomoi na biso. Liteya yango nini?
14. Lisese ya batalanta emonisi mposa nini ya ntina mingi?
14 Ata soki tozali na elikya ya kozwa bomoi oyo ekoki kosuka te kuna na likoló to bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, lisese ya Yesu ezali komonisa ete tosengeli komipesa na mosala ya boklisto. Kutu, tokoki koloba na mokuse ete liteya ya lisese ezali komipesa na mosala. Bantoma bapesaki ndakisa banda na Pantekote ya mobu 33 T.B. Tozali kotánga boye: “Mpe na maloba mosusu mingi [Petelo] atatoli na bango, kopesaka bango toli ete, Bómibikisa na libota oyo na kilikili!” (Misala 2:40-42) Azwaki mbano kitoko mpo na milende na ye! Wana bato mosusu balandaki bantoma mpo na kosala mosala ya kosakola, bango mpe bamipesaki na mosala, mpe nsango malamu ‘epalanganaki na mokili mobimba.’—Bakolose 1:3-6, 23; 1 Bakolinti 3:5-9.
15. Na lolenge nini ya sikisiki tosengeli kosalela liteya monene ya lisese ya batalanta?
15 Tóbosana te libaku oyo Yesu alobaki lisese yango, azalaki kosakola kozala na ye. Tozali na makambo mingi oyo endimisi biso ete tozali sikoyo na ntango ya parousia ya Yesu mpe etikali moke esuka. Tókanisa lisusu boyokani oyo Yesu amonisaki ezali kati na “nsuka” mpe mosala oyo baklisto basengeli kosala: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Na kotalela likambo yango, biso tokokani na moombo oyo wapi? Omituna yo moko ete: ‘Ntango mosusu nazali te lokola moombo oyo akundaki mbongo oyo bapesaki ye, mbala mosusu mpo na koluka matomba na ye moko? To ezali mpenza komonana ete nazali lokola baoyo bazalaki malamu mpe sembo? Nazali na ekateli ya kosalela libaku nyonso mpo na kokolisa matomba ya Nkolo?’
Tólala mpɔngi te mpe tómipesa na mosala na eleko ya kozala na ye!
16. Masese mibale oyo tolobeli eteyi biso likambo nini?
16 Ɛɛ, longola bandimbola na yango ya elilingi mpe ya esakweli, Yesu ye moko azali kolendisa biso mpenza na nzela ya masese oyo mibale. Alobi na biso ete: Bólala mpɔngi te; bómipesa na mosala, mingimingi ntango elembo ya parousia ya Klisto ezali komonana. Ntango yango ezali nde sikoyo. Tozali solo kolala mpɔngi te mpe tomipesi na mosala?
17, 18. Moyekoli Yakobo apesaki toli nini na ntina na kozala ya Yesu?
17 Ntango Yesu alobaki esakweli wana na Ngomba ya Olive, ndeko na ye Yakobo azalaki wana te; kasi ayokaki yango nsima, mpe akangaki mpenza ntina na yango. Akomaki ete: “Bandeko, bózala na mitema milai kino Komonana na Nkolo. Bótala, motimoli na elanga akotalela mbuma na mabelé, azali na motema molai mpo na yango kino ekozwa ye mbula na liboso mpe mbula na nsima. Bino mpe, bózala na mitema milai, bólendisa mitema na bino, mpo ete [kozala, ‘NW’] na Nkolo [ekómi pene].”—Yakobo 5:7, 8.
18 Lokola akebisaki liboso ete Nzambe akopesa etumbu na baoyo bazali kosalela bozwi na bango na ndenge mabe, Yakobo alendisaki baklisto ete bázala na mitema mokuse te ntango bazali kozela ete Yehova ye moko azwa ekateli. Moklisto oyo azali na motema mokuse akoki kokóma na ezaleli ya kozongisaka mabe, lokola nde azali na lotomo ya kosembola mabe oyo bato basali. Kasi, esengeli kozala bongo te mpamba te ntango ya kosambisa ekoya mpenza. Ndakisa ya mosali bilanga emonisi yango, ndenge Yakobo alimbolaki.
19. Moyisalaele oyo azali mosali bilanga akokaki komonisa motema molai ya ndenge nini?
19 Moyisalaele oyo azalaki mosali bilanga soki aloni mbóto, asengelaki kozela. Ya liboso, milona ebima; bongo ekola, mpe na nsima akobuka mbuma. (Luka 8:5-8; Yoane 4:35) Na boumeli ya basanza wana nyonso, ezalaki na ntango, mpe mbala mosusu ntina ya komitungisa. Mbala mosusu mosali bilanga azalaki komituna ete bambula ya liboso ekobɛta mpe ekozala mingi? Bongo bambula ya nsuka? Mbala mosusu banyama mikemike to mopɛpɛ makasi ekobebisa milona? (Talá Yoele 1:4; 2:23-25.) Atako bongo, na makambo mingi Moyisalaele oyo azali mosali bilanga akokaki kotya motema epai na Yehova mpe na bileko oyo asilá kobongisa. (Deteronome 11:14; Yilimia 5:24) Motema molai ya mosali bilanga ekokaki mpenza kokokana na kozala na elikya makasi. Ayebaki ete akozwa eloko oyo azali kozela. Azalaki kotya ntembe te!
20. Ndenge nini tokoki komonisa motema molai na kolanda toli ya Yakobo?
20 Mosali bilanga akokaki koyeba mwa moke ntango oyo abukaka mbuma, nzokande, baklisto ya ekeke ya liboso bakokaki kotánga mikolo te mpo na koyeba ntango oyo kozala ya Klisto ekobanda. Kasi, bazalaki na elikya ete akoya. Yakobo akomaki ete: “Kozala [na Greke, parousia] ya Nkolo ekómi pene.” Na eleko oyo Yakobo akomaki makambo wana, elembo ya kozala ya Klisto emonanaki naino na mokili mobimba te. Kasi, sikoyo ezali komonana! Na yango, tosengeli kozala na mayoki nini sikoyo? Elembo ezali komonana polele. Tozali komona yango. Tokoki koloba na elikya nyonso ete, ‘Elembo ezali kokokisama na miso na ngai.’ Tokoki koloba na elikya nyonso ete, ‘Kozala ya Nkolo ezali sikoyo mpe etikali moke esuka.’
21. Tozali na ekateli makasi ya kosala nini?
21 Lokola ezali bongo, tozali mpenza na ntina malamu ya kotya likebi mpe kosalela mateya oyo tozwi na masese mibale ya Yesu oyo totaleli. Ye alobaki ete: “Bongo bókɛngɛlaka mpo ete boyebi mokolo soko ntango te.” (Matai 25:13) Ntembe ezali te ete tokómi mpenza na ntango oyo tosengeli kozala na molende na mosala ya boklisto. Tiká ete tómonisa na bomoi na biso ya mokolo na mokolo ete tosimbi liteya ya Yesu. Tólala mpɔngi te! Tómipesa na mosala!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa ndimbola ya likambo mokomoko ya lisese, talá buku Le Royaume millénaire de Dieu s’est approché, nkasa 167-211, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Talá buku Le Royaume millénaire de Dieu s’est approché, nkasa 208-249.
Ozali koyeba lisusu?
◻ Liteya nini ya ntina ozwi na lisese ya baseka ya mayele mpe baseka ya bozoba?
◻ Wapi toli ya ntina mingi Yesu apesi yo na nzela ya lisese ya batalanta?
◻ Na ndimbola nini motema molai na yo na ntina na parousia ekokani na motema molai ya Moyisalaele oyo azali mosali bilanga?
◻ Mpo na nini ntango oyo ezali na yikiyiki mpe ezali kosɛnga biso makambo mingi?
[Bililingi na lokasa 23]
Liteya nini ozwi na lisese ya baseka mpe na lisese ya batalanta?