-
Lisolo likoló ya NgombaYesu azali nzela, solo mpe bomoi
-
-
Alobi boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. Esengo na baoyo bazali na mawa, mpo bakobɔndisama. . . . Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpo bakotonda. . . . Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino . . . mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo.”—Matai 5:3-12.
-
-
Lisolo likoló ya NgombaYesu azali nzela, solo mpe bomoi
-
-
Yesu alobi ete baoyo bayebi mposa na bango ya elimo, oyo bayokaka mawa mpo bazali bato ya masumu, mpe balukaka koyeba Nzambe mpe kosalela ye, bazali mpenza bato ya esengo. Ata soki bato bayini to banyokoli bango mpo bazali kosala mokano ya Nzambe, bazali na esengo mpo bayebi ete bazali kosepelisa ye mpe ete akopesa bango bomoi ya seko.
-