Tólendisa elikya na biso kati na bosembo ya Nzambe
“Napesi yo boyebi, mpo ete otyela Yehova elikya.”—MASESE 22:19, NW.
1, 2. (a) Mpo na nini Batatoli ya Yehova batyelaka Yehova elikya? (Masese 22:19) (b) Nini emonisi ete bato mosusu basengeli kolendisa elikya na bango epai na Yehova?
BAKLISTO ya solo bazali na lipamboli ya kozala na boyebi ya sikisiki ya Yehova mpe ya mikano na ye. Na bolingo nyonso, “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa bango “bilei [ya elimo] na elaka na yango.” (Matai 24:45) Boyebi oyo bazali kozwa ezali kosalisa bango mingi mpo ete bátyela Nzambe elikya. Yango wana mingimingi, Batatoli ya Yehova batyelaka mpenza Yehova mpe bosembo na ye elikya.
2 Kasi, ezali komonana lokola ete basusu kati na bango basengeli kolendisa elikya wana. Ntango mosusu la Société azwaka mikanda oyo mizali komonisa ete bato oyo bazali kotinda yango bazali na ntembe mpo na kondima bandimbola oyo epesami na mikanda oyo azali kobimisa. Ntembe yango ekoki kobima mpo na bingɛngiseli ya sika, to ekoki kotalela makambo ya moto oyo akomi mokanda, mingimingi mayoki na ye.—Kokanisá na Yoane 6:60, 61.
3. Nini ekoki kokómela ata basaleli ya sembo ya Yehova, mpe mpo na nini?
3 Mosakoli 9:11 ekokisamaka ata epai ya basaleli ya solo ya Yehova. Elobi ete: “Nabutwi mpe namoni ete na nse na moi elonga kati na komekama ezali mpo na bato na mbangu te, to etumba epai na bato na makasi te, to kwanga epai na bato na mayele te, to mosolo epai na bato na boyebi te, to ngɔlu epai na bato bamesani na mosala te; nde ntango mpe [makambo makanami te, NW] ikokwela bango nyonso.” Ndenge nini yango ekoki komonana na makambo ya elimo? Mbala mosusu toyebaki baklisto oyo bazalaki kolanda toli ya Biblia kozanga kokakatana, bazalaki na mpiko mpo na kolobela solo ya Biblia, bazalaki na mayele mpo na kosalela mitinda ya Biblia, mpe bazalaki na molende mpo na kozwa boyebi ya sikisiki. Kasi, na ntina na “ntango mpe makambo makanami te,” bamoko bakoki kozanga makoki mosusu, mbala mosusu bazwaki likama to bakómi mibange. Bakoki komituna soki bakokɔta na mokili ya sika kozanga ete bákufa.
4, 5. Mpo na nini baklisto bazali na ntina moko te ya kobungisa elikya na bango na bosembo ya Yehova?
4 Ntango moklisto akufeli molongani, motungisi mpe mpasi ya kobungisa moto ezalaka makasi. Mbala mosusu ntango bazalaki bango mibale, basalelaki Yehova na boumeli ya bambula ebele. Moto oyo atikali ayebi ete liwa esukisaka libala.a (1 Bakolinti 7:39) Yango wana, mpo ete abungisa elikya na ye te, asengeli kokeba na mayoki na ye.—Kokanisá na Malako 16:8.
5 Ezali mpenza likambo ya mayele ete tótalela liwa ya molongani, ya moboti, ya mwana to ya moklisto moko oyo azalaki moninga na biso ya motema lokola libaku ya komonisa elikya na biso na bosembo ya Yehova! Ata soki biso moko tozwi likama, tokoki kozala na elikya ete Yehova azali sembo. Tokoki kozala na elikya ete moto nyonso oyo akozwa bomoi ya seko, ata soki akobika na Armagedon to akosekwisama, akozala na esengo. Mokomi na nzembo alobaki mpo na Nzambe ete: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa na nyonso na bomoi. [Yehova] azali na boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe na ngɔlu na misala na ye nyonso. [Yehova] azali penepene na bango nyonso bakobyanga ye, baoyo bakobyanga ye na solo. Akosukisa mposa na bango baoyo bakobanga ye, akoyoka mpe konganga na bango mpe akobikisa bango.”—Nzembo 145:16-19.
Soki tozali komona lokola ete tosalaki mosala ya mpunda
6, 7. (a) Mpo na nini Batatoli mosusu oyo banyokwamaki liboso bazali sikawa kososola makambo ndenge mosusu? (b) Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete Yehova azali sembo te na ndenge atikaki nzela ete bányokwama na mikolo mileká?
6 Na bambula eleki, Batatoli mosusu banyokwamaki mpo ete baboyaki kosala likambo oyo bakoki kondima kosala yango sikoyo mpe lisosoli na bango ekotungisama te. Na ndakisa, ekoki kozala ete bakokaki kondima misala mosusu oyo Leta asɛngaka na banamboka. Ndeko mosusu akoki sikawa komona ete lisosoli na ye elingaki kotungisama te na kosala mosala motindo wana kozanga ete amikɔtisa na makambo ya ebongiseli ya biloko oyo.
7 Tokoloba ete Yehova azalaki sembo te na ndenge atikaki ye ete anyokwama mpo ete aboyaki kosala likambo oyo akoki sikawa kosala? Mingi na baoyo bakutanaki na likambo yango bakokanisa bongo te. Kutu, bazali kosepela ete bazwaki libaku ya komonisa polele mpe na miso ya bato nyonso ete bazalaki na ekateli ya kotikala ngwi mpo na likambo oyo etali boyangeli ya mokili mobimba. (Kokanisá na Yobo 27:5.) Ntina nini moto akoyoka mawa mpo ete alandaki lisosoli na ye na ndenge akangamaki makasi na ngámbo ya Yehova? Lokola babatelaki na bosembo nyonso mitinda ya boklisto na ndenge oyo basosolaki yango to batosaki lisosoli na bango, bamonisaki ete babongi kozala baninga ya Yehova. Na ntembe te, ezali malamu ete tóboya etamboli oyo ekotungisa lisosoli na biso to oyo ekobɛtisa basusu libaku. Na likambo oyo, tokoki kokanisa ndakisa ya malamu mpenza ntoma Paulo apesaki.—1 Bakolinti 8:12, 13; 10:31-33.
8. Mpo na nini Bayuda oyo bakómaki baklisto, oyo bazalaki liboso kotosa Mibeko, basengelaki kotyela bosembo ya Yehova ntembe te?
8 Mpo na kosepelisa Yehova, Bayuda basengelaki kotosa Mibeko Zomi mpe mibeko mosusu ndenge na ndenge soko 600. Na nsima, kati na ebongiseli ya boklisto, mpo na kosalela Yehova, esɛngamaki lisusu kotosa mibeko yango te, ata mpo na baoyo bazalaki Bayuda na mosuni. Kati na mibeko oyo misɛngamaki lisusu te ezalaki na mobeko ya kokata ngenga, kobatela Sabata, kopesa mbeka ya nyama, mpe kobatela bikila mosusu etali kolya. (1 Bakolinti 7:19; 10:25; Bakolose 2:16, 17; Baebele 10:1, 11-14) Bayuda nyonso oyo bakómaki baklisto, ezala bantoma, basɛngaki bango lisusu te ete bátosa mibeko oyo bazalaki na yango kati na kondimana ya Mibeko. Bamilelalelaki ete ebongiseli ya Nzambe ezalaki sembo te mpo esɛngaki bango liboso makambo oyo na nsima ezalaki lisusu na ntina te? Te, basepelaki na lolenge oyo bososoli na bango ya mikano ya Yehova ebakisamaki.—Misala 16:4, 5.
9. Likambo nini ekómelaki Batatoli mosusu na ntango ya kala, kasi mpo na nini basengeli koyoka mawa te?
9 Na mikolo na biso, Batatoli mosusu bamikatelaki na bosikisiki makambo oyo bakokaki kosala mpe oyo bakokaki kosala te. Mpo na yango, banyokwamaki mingi koleka bandeko na bango mosusu. Na nsima, kobakisama ya boyebi esalisaki bango ete bákolisa bososoli na bango. Kasi basengeli koyoka mawa te ete liboso balandaki lisosoli na bango, ata soki yango ebakiselaki bango mpasi. Babongi mpenza kozwa longonya mpamba te bamonisaki ete bazali pene ya konyokwama mpo na bosembo na bango epai na Yehova; ɛɛ, bazali pene ya “kosala nyonso mpo na Nsango Malamu.” Yehova apambolaka komipesa motindo wana. (1 Bakolinti 9:23; Baebele 6:10) Ntoma Petelo akomaki likambo ya mayele ete: “Soko bokoyika mpiko wana ekosalaka bino malamu mpe ekoyokaka bino mpasi mpo na yango, bongo ezali malamu na miso na Nzambe.”—1 Petelo 2:20.
Tózwa liteya na ndakisa ya Yona
10, 11. Ndenge nini Yona amonisaki ete atyelaki Yehova elikya te (a) ntango batindaki ye na Ninive? (b) ntango Yehova abomaki bato ya Ninive te?
10 Ntango batindaki ye na Ninive, Yona amonisaki botɔndi te na elikya oyo Yehova azalaki kotyela ye. Nsima ya kokutana na makambo ya nsɔmɔ mpo ete aboyaki kotosa, Yona azongelaki makanisi malamu, amonaki mabe na ye, andimaki kokende na mboka mopaya, mpe akebisaki bafandi ya Ninive ete etumbu elingi kokwela bango. Na nsima, likambo moko oyo ye akanisaki te esalemaki: Lokola bato ya Ninive babongolaki motema, Yehova azwaki ekateli ete akoboma bango lisusu te.—Yona 1:1–3:10.
11 Yona atalelaki ekateli yango ndenge nini? Asepelaki te, amilelaki epai ya Nzambe kati na libondeli. Na mokuse alobaki lokola boye: ‘Nayebaki ete makambo ekosuka bongo. Yango wana liboso naboyaki koya na Ninive. Sikawa, nsima ya makambo nyonso oyo nakutani na yango, kino mbisi monene emeli ngai—likambo ya nsɔmɔ mpe ya nsɔni, mpe nsima ya koboma nzoto mpo na kokebisa bato ya Ninive ete libebi ezali koya, talá sikawa! Nyonso oyo nasalaki mpe bampasi na ngai ezalaki se mosala ya mpunda! Ebongaki kutu nakufa na ngai!’—Yona 4:1-3.
12. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yona?
12 Yona azalaki na ntina ya komilela? Tokoki mpenza koloba ete Yehova azalaki sembo te na ndenge ayokelaki basali na mabe mawa lokola babongolaki motema? Yona asengelaki kutu kosepela; bankóto ya bato babikaki na liwa! (Yona 4:11) Kasi kozanga limemya mpe komilelalela na ye emonisaki ete atyelaki bosembo ya Yehova elikya mobimba te. Amibanzabanzaki mingi mpo na ye moko kasi mpo na basusu te. Tózwa liteya na likambo ya Yona mpe tómitya biso moko mpe mayoki na biso na esika ya mibale. Tózala na elikya ete kotosa Yehova, kolanda litambwisi oyo azali kopesa na nzela ya lisangá na ye mpe kondima bikateli na ye, ezali likambo oyo ebongi na biso kosala. Tondimisami ete “ekozala malamu epai na bango bazali kotosa Nzambe.”—Mosakoli 8:12.
Ntango ya kolendisa elikya na biso yango oyo!
13. Ndenge nini biso nyonso tokoki kolendisa elikya na biso epai na Yehova?
13 Ezali likambo ya mayele ete tólendisa elikya na biso epai na Yehova. (Masese 3:5-8) Ya solo, tosengeli kosuka kaka na kobondela Yehova te ete asalisa biso tótyela ye elikya mingi koleka. Elikya oyo etongami na boyebi ya sikisiki ekolaka; yango wana, mokolo na mokolo, tosengeli kozala na momeseno ya koyekola Biblia, kotánga Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia. Ezali na ntina mingi ete tóyanganaka na makita ya boklisto pɔsɔ na pɔsɔ. Mpe lisusu ezali na ntina ete tómibongisa malamu mpe tópesa biyano soki likoki ezali. Tózala na momeseno ya koteya bato mosusu solo ya Biblia, tózala na mayele ya kolonga ntembe, mpe tókolisa elikya na biso epai na Yehova mpe kati na Liloba na ye. Na ndenge yango, tokokóma baninga na ye mpenza ya mikolo nyonso.
14. Mpo na nini mosika te ekosɛnga ete basaleli ya Nzambe bátya elikya koleka epai na Yehova?
14 Mosika te, bolɔzi oyo eleki monene kati na malɔzi nyonso oyo ekómelá bato ekobima na mbalakaka. (Matai 24:21) Ntango ekobanda, basaleli ya Nzambe bakozala na mposa ya kotya elikya mingi koleka na bosembo ya Yehova mpe lisusu ya kotya elikya na litambwisi oyo azali kopesa na nzela ya lisangá na ye. Na ndenge ya elilingi, bakotosa etinda ya Nzambe na kondimisama nyonso ete: “Yaká bato na ngai, ingelá na biteni na ndako na yo, kangá bikuke nsima na yo; omibomba ntango mwa moke kino nkanda esili koleka.” (Yisaya 26:20) Sikawa bazali na esika ya libateli, elingi koloba masangá koleka 85 000 na mikili 232. Tokoki kolikya ete Yehova akosalisa biso tókokisa likambo mosusu nyonso oyo ekoki kobakisama na etinda oyo ete “ingelá na biteni na ndako na yo.”
15. Ndenge nini likambo ya kozala na elikya ezali kolobelama mingi na boumeli ya 1998, mpe mpo na nini ebongi bongo?
15 Ezali na ntina ete tólendisa elikya na biso sikawa. Soki tozali kotyela bandeko na biso motema te, to tozali kotyela lisangá ya Yehova motema te, mpe na koleka, tozali kotyela Yehova elikya te, tokobika te. Na yango, ebongi mpenza ete na boumeli ya mobu mobimba ya 1998, na mokili mobimba, mokapo mpo na mobu ekundwela Batatoli ya Yehova ete “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika”! (Baloma 10:13) Tosengeli ntango nyonso komindimisa likambo yango. Soki tososoli ete tobandi kobɛtɛla elikya yango ntembe ata moke, tosengeli kosala nyonso mpo na kobongisa yango sikawa, ɛɛ, lelo oyo.
Yehova akosambisa na bosembo
16. Nini ekoki kokómela elikya soki ekolisami te, mpe ndenge nini tokoki kopekisa likambo yango?
16 Baebele 3:14 ekebisi baklisto bapakolami na maloba oyo: “Zambi tozwi likabo na Klisto soko tokosimba kino nsuka mpiko oyo na ebandeli.” Maloba yango mataleli mpe baklisto oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé. Elikya ya ebandeli ekoki kobunga soki tokolisi yango te. Ezali na ntina mingi ete tókoba kozwa boyebi ya sikisiki, na ndenge yango tokolendisa moboko oyo esimbi elikya na biso!
17. Na oyo etali lobiko, mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Yesu akosambisa na bosembo?
17 Mosika te Klisto akoya kotala mabota nyonso mpo na ‘kokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba.’ (Matai 25:31-33) Tokoki kolikya ete Klisto akozala sembo mpo na kokata nani oyo abongi kobika. Yehova apesi ye mayele, bososoli, mpe makoki mosusu oyo masengeli mpo na ‘kosambisa mokili nyonso na sembo.’ (Misala 17:30, 31) Tiká ete elikya na biso ezala lokola elikya ya Abalayama oyo alobaki ete: “Ebongi na yo [Yehova] te kosala likambo boye ete oboma bayengebene na bato mabe elongo, ete bayengebene bázwa likamba lokola na oyo na bato mabe! Yango ebongi na yo te! Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo te?”—Genese 18:25.
18. Mpo na nini tosengeli komitungisa mingi te na ntina na makambo oyo tokoki koyeba yango sikawa te?
18 Wana totii elikya nyonso na bosembo ya Yehova, tosengeli komitungisa te na koluka biyano na mituna lokola oyo: ‘Ndenge nini bana mike bakosambisama? Ekoki nde kozala ete bato mingi bakoyoka naino nsango malamu te ntango Armagedon ekoya? Nini ekokómela bato ya ligboma? Ezali boni mpo na boye to boye?’ Ya solo, sikawa toyebi te ndenge nini Yehova akokata makambo yango. Kasi, akosala yango na bosembo mpe na ngɔlu. Tosengeli kobɛtɛla yango ntembe te. Kutu, mbala mosusu tokokamwa mpe tokosepela komona ete akokata makambo yango na ndenge oyo tokanisaki ata moke te.—Kokanisá na Yobo 42:3; Nzembo 78:11-16; 136:4-9; Matai 15:31; Luka 2:47.
19, 20. (a) Mpo na nini ezali mabe te kotuna mituna ya mayele? (b) Ntango nini Yehova akopesa biyano bisengeli?
19 Lisangá ya Yehova ezali kopekisa te ete tótuna mituna na bosembo nyonso mpe na ntango oyo ebongi, lokola batɛmɛli mosusu balobaka yango na libunga nyonso. (1 Petelo 1:10-12) Nzokande, Biblia epesi biso toli ete tóboya mituna oyo ezangi mayele, oyo mizali kobimisa bilobaloba. (Tito 3:9) Kotuna mituna ya mayele mpe koluka biyano kati na Liloba ya Nzambe mpe na mikanda oyo lisangá ya boklisto ezali kobimisa ekoki kobakisa boyebi ya sikisiki oyo tozali na yango mpe ekolendisa elikya na biso epai na Yehova. Lisangá elandaka ndakisa ya Yesu. Aboyaki kolobelalobela mituna oyo ntango ya kozwela yango biyano ekokaki naino te. Alimbolaki ete: “Nazali na makambo mingi na koloba na bino nde bokoki koyamba yango [sikawa] te.” (Yoane 16:12) Lisusu, andimaki ete na ntango wana, makambo mosusu ye moko ayebaki yango te.—Matai 24:36.
20 Yehova azali naino na makambo mingi ya komonisa. Likambo ya mayele ezali kozela ye, na elikya ete Nzambe akomonisa mikano na ye na ntango oyo ebongi. Tokoki kondimisama ete soki ntango ya Yehova ekoki, tokozala na esengo ya kozwa bososoli mingi lisusu ya banzela na ye. Ɛɛ, tokozwa mbano, soki tokotya elikya mobimba epai na Yehova mpe lisangá oyo azali kosalela. Masese 14:26 (NW) eyebisi biso ete: “Elikya makasi ezali na kobanga Yehova, mpe ebombamelo ekozala mpo na bana na ye.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yulí 1968, lokasa 414; mpe 1 Yúni 1987, lokasa 30 (bibimeli ya Lifalanse).
Okanisi nini?
◻ Mpo na nini ezali likambo ya mayele te kotika ete mayoki na biso ebebisa elikya na biso epai na Yehova?
◻ Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yona?
◻ Mpo na nini boyekoli ya Biblia mpe koyangana na mikita ezali na ntina mingi?
[Elilingi na lokasa 16]
Ata soki tozwi likama, tokoki kondimisama ete Yehova azali sembo
[Bililingi na lokasa 18]
Omindimisi ete otyelaka Yehova elikya?