Milenere moko na kokamwisa ebelemi
Namonaki kiti na bokonzi mingi, mpe baoyo bafandi na yango, mpe nguya na kosambisa epesami na bango. Namoni mpe milimo na bango basili kokatama nkingo na epasola mpo na litatoli na Yesu mpe mpo na Liloba na Nzambe, mpe baoyo baboyaki kosambela nyama na yauli na ekeko na ye mpe kozwa elembo na yango na bilongi na bango mpe maboko na bango. Bazongaki na bomoi, mpe bazalaki bakonzi mbula nkoto esika moko na klisto. Mpe (nzambe) akolongola mpisoli nyonso na miso na bango (oyo ya bato),mpe kufa ekozala lisusu te; na (matanga), na kolela, na mpasi, lisusu mpe te. Mpo ete makambo na liboso masili koleka.—Emoniseli 20:4; 21:4.
NA YANGO, Biblia ezali kosakola mbula nkoto na kokamwisa, Boyangeli ya mbula nkoto ya Yesu Klisto mpe na etuluku ya bakonzi na likoló baoyo bakosala elongo na ye. Mbala mosusu ozali koboya esakweli oyo na komonáká yango lokola ndoto. Nzokande, bantina ya sikisiki ezali mpo na kotalela Millénium (mbula nkoto) yango ete ezali likambo likosalema solo na ntango ezali koya.
Yambo mpenza, boyekoli ya Biblia ekomonisa yo ete mokanda yango ezali koloba mpo na mbula nkoto motoba oyo esili koleka na Lisolo ya bato na lolenge ya sikisiki mpe na kokamwisa. Lisusu, Biblia ezali mokanda na bisakweli mpe mingi kati na yango bisili kokokisama kino na makambo na yango mike.a Na yango, mpo na nini kondimela Biblia te ntango ezali kosakola mpo na koya ya Boyangeli ya mbula nkoto na Klisto? Kasi, okoki komituna mpo na oyo Biblia ezali koloba mpo na ntango wana. Mbula yango nkoto ekokokisa mokano nini? Mpe yango etali yo na likambo nini mpe ndenge nini ekoki kozala na bopusi likoló na bomoi na yo?
Libula libungaki
Biblia emonisi ete na boumeli na Boyangeli na ye ya mbula nkoto, Klisto akopesa epai na “bana” na ye libula oyo lizali na motuya mingi koleka. Kasi libula yango ezali nini? Mpe “bana” na ye bazali banani? Libula ekoki kolimbolama lokola mwa eloko oyo moto atiki mpo na bakitani na ye wana elingi ye kokufa. Ntango Adam, nkoko na biso, amimonisaki moto na kozanga botosi epai na Nzambe, abungisaki mpo na ye moko mpe mpo na bakitani na ye nyonso, mabota nyonso, lotomo ya kozala na bomoi ya seko na paradis na mabelé. Epai na bakitani na ye, Adam apesaki bango libula oyo ete masumu, liwa mpe mpasi.—Genese 3:1-19; Baloma 5:12.
Yesu ayaki na mabelé, kati na nzoto, mpo na kozongisa epai na bato libula oyo Adam abungisaki. Asalaki yango na komonisáká bosembo na ye epai na Nzambe mpe na kopesáká na bolingo nyonso bomoi na ye mpo na bato. (Yoane 3:16) Na kozaláká na bomoi ya bomoto na kokoka, oyo ezalaki na masumu te, Yesu azwaki lotomo ya bomoi ya seko kati na Paradis na mabelé, eloko oyo Adam abungisaki. Nzokande, Yesu asalelaki lotomo yango te, to abungisaki yango te ntango akufaki mpe asekwaki mpo na kozala na bomoi na Likoló. Akokaki bongo kosalela lotomo yango lokola libula na motuya mingi mpe kopesa yango epai na “bana” na ye.—Baloma 5:18, 19.
Babulami: “bana” na Klisto
Na Yisaya 9:6, Yesu abyangami “Tata na seko” na elobeli ya esakweli. Akómi Tata na seko ya bato na mokili baoyo basikwami, azali na likoki ya kopesa libula epai na bato yango basikwami, to bana babokolami. (Matai 20:28; tala Nzembo 37:18, 29). Ezali yango amonisaki polele ntango apesaki elaka oyo: “Yaka bino bopambwami na Tata na ngai, bosangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa ebandeli ya mokili.” Mpe alobaki lisusu ete: “Esengo epai na basokemi, mpamba te bakosangola mabelé.”—Matai 5:5; 25:34.
Kasi, mpo ete mabelé ezali libula ya motuya, esengeli ete makambo oyo mokozala na kati makoka kobongwana mpenza, mazala makambo na kokoka. Mabelé esengeli kozala esika oyo boyokani mpe kimya ekozala kati na bikelamu nyonso ye Nzambe. (Yisaya 11:6,9) Elembo nyonso ya kozanga kokoka ya bomoto esengeli kolimwa, na liwa mpe kati na yango. (1 Bakolinti 15:25, 26) Yango elimboli ete bakufi, oyo bazali eteni na mokili ya bato oyo basikwamaki, basengeli kosekwa. Ezali bobele na lolenge wana nde bakozwa likoki ya kozala babulami na Klisto.—Yoane 5:28, 29.
Na yango, Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto ekozala ntango moko yo esengo oyo na boumeli na yango bato “bakosikolama na boombo na libebisi” moke moke kino bakokoma na kokoka (Baloma 8:21) Ata bato ya mokili bayebi ete yango nde ezali mpenza mokano ya Millénium (mbula nkoto). Diksionere moko na lokotá ya lingelisi (Webster’s Ninth New collegiate Dictionary, ebimeli ya 1985) elimboli “Millénium” lokola “ntango moko ya bomengo monene to ya kokoka mpo na moto”.
Eleki boyangeli ya Salomon
Millénium (mbula nkoto) wana ekoki kokokisama na boyangeli ya kimya mpe ya bolamu oyo Salomon ayangelaki mbula 40 likolo na Yisraele ya kala. (1 Mikonzi 4:24, 25, 29) Ntango mokonzi mwasi ya Schéba akendaki kotala mokonzi Salomon, alobaki boye: “Liloba liyokaki ngai na mokili na ngai mpenza mpo na makambo na yo mpe mayele na yo ezalaki ya solo. Kasi nalingaki kondima maloba te bobele ete naya ngai moko mpe miso na ngai mamona yango. Tala nayebisameli ata ndambo te. Mayele na yo mpe mosolo na yo ezali koleka lokumu loyokaki ngai. Bato na yo bazali na esengo, baombo na yo bazali na esengo baoyo bakotelemaka liboso na yo mikolo nyonso mpe bakoyokaka mayele na yo!”—1 Mikonzi 10:6-8.
Soki kimya, bolamu mpe mayele na boyangeli na mbula 40 ya mokonzi Salomon elekaki mingi oyo mokonzi mwasi na Schéba azalaki kozela amona, Boyangeli na mbula nkoto ya Mokonzi monene Salomo na likoló, Yesu Klisto, ekoleka mpenza nyonso oyo moto akoki kokanisa! Yesu alobaki mpo na ye moko ete ye “aleki Salomon”. (Matai 12:42.) Meka kokanisa lolenge na bomoi kitoko mpenza, ya bolamu, ya kimya, ya boyengebene mpe ya esengo, kasi okozala bobele na mwa makanisi moke na oyo Millénium (mbula nkoto) ya Klisto ebombi.
Ekoya ntango moko na milenere ya misato?
Uta 1914, makambo mazali koleka na mokili mazali elembo ete tozali kobika na “nsuka na biloko na ntango”. Yesu mpe alobaki ete libota oyo ekomona makambo oyo masakolamaki ‘ekoleka te kino makambo nyonso makoya’. Bongo yango elimboli ete ebandeli ya Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto ekoya elongo na milenere ya misato?
Yesu apesaki toli epai na bayekoli na ye ete bamibanzabanza mpo na date te. Alobaki boye: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te.” (Misala 1:7) Mpe mpo na oyo etali “mokolo mpe (ngonga, MN)” ya sikisiki ya ntango makambo oyo makobima, Yesu alobaki ete bobele Tata na ye Jéhovah Nzambe, nde ayebi. (Matai 24:36) Na yango Biblia ezali kondima ata moke te kati na ebele na basakoli to bituluku na bato, baoyo bazali kosakola mpasi mpe bazali kokanisa ete na molulu ya butu ya 1999, na minuit, nsuka ya mokili ekoya.
Kasi, makambo mazali koleka na mokili mazali elembo oyo ezali komonisa polele ete nsuka ya ebongiseli na biloko mabe mpe ya mokili ‘epusani’ mpe ete Boyangeli ya mbula nkoto na Klisto “ebelemi”. (Baloma 13:12) Ne esika ya kokanisakanisa likoló ya mokolo to date oyo yango ekoya, ezali sikawa nde ntango ya kozwa boyebi na masengami na Nzambe mpo na kobika. (Yoane 17:3) Na kosaláká bongo, okoki koyekola ndenge nini okozala kati na baoyo Yesu akoloba epai na bango boye: “Yaka bino bopambwami na Tata na ngai, bosangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli ya mokili.” (Matai 25:34) Ba Témoins de Jéhovah bakoki, mpe bazali na mposa ya kosalisa yo mpo ozali kati na baoyo bakosepela na bolamu mingi oyo Millénium na kokamwisa ekomema na ntango ezali koya.b
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc.
b Soki olingi boyekoli ya Biblia na ndako na yo kozanga lifuti, okoki kotuna batemwe ya esika oyo ofandaka.
[Likanisi ya paragrafe on page 6]
Yaka bino bopambwami na Tata na ngai, bosangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli ya mokili