Osili Kozwa “Elimo ya solo”?
“Tata . . . akopesa bino mosungi mosusu mpo azala na bino elongo mpo na libela, elimo ya solo.”—YOANE 14:16, 17, NW.
1. Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo nini ya ntina mingi ntango afandaki na bango na etaze, mokolo ya nsuka liboso akufa?
“MOTEI, okokenda wapi?” Wana ezali moko na mituna oyo bantoma ya Yesu batunaki ye mokolo ya nsuka liboso akufa, ntango afandaki na bango na etaze na ndako moko na Yelusaleme. (Yoane 13:36) Na kati ya masolo na bango, Yesu ayebisaki bango ete esengeli atika bango mpo azonga epai ya Tata na ye. (Yoane 14:28; 16:28) Elingi koloba ete akozala na bango lisusu boye te mpo ateyaka bango to ayanolaka na mituna na bango. Kasi mpo na kokitisa bango mitema, alobaki ete: “Ngai nakobondela Tata mpe akopesa bino mosungi mosusu [to, mobɔndisi] mpo azala na bino elongo mpo na libela.”—Yoane 14:16, NW, maloba na nse ya lokasa.
2. Yesu alakaki bayekoli na ye ete akotindela bango nini soki akei?
2 Yesu alimbolelaki bayekoli na ye mosungi yango mpe alimbolaki ndenge oyo akosunga bango. Alobaki na bango boye: “[Nalobaki] maloba oyo na ebandeli te mpo ete nazalaki na bino elongo. [Sikoyo] nakokenda epai na motindi na ngai . . . zambi ekoyeisa bino litomba soko nakolongwa. Mpo ete, soko nakolongwa te, Mosungi akoyela bino te. Kasi soko nakokenda, nakotinda ye epai na bino . . . Ekoya ye, [elimo, NW] ya solo, akokamba bino kati na solo nyonso.”—Yoane 16:4, 5, 7, 13.
3. (a) Ntango nini batindelaki baklisto ya liboso “elimo ya solo”? (b) Wapi lolenge moko ya ntina oyo elimo ezalaki “mosungi” na bango?
3 Likambo yango ekokisamaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.); ntoma Petelo amonisaki yango boye: “Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye, mpe biso nyonso tozali batatoli ya likambo yango. Na bongo esili ye [kotombwama na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, NW], mpe esili ye kozwa elaka ya [elimo santu, NW] ya Tata, asopi yango ezali bino komona mpe koyoka.” (Misala 2:32, 33) Tokomona na nsima ete elimo santu oyo ekitaki na Pantekote esalaki makambo mingi mpo na baklisto ya liboso. Kasi Yesu alakaki ete “elimo ya solo” yango ‘ekozongisa na makanisi na bango makambo nyonso oyo ayebisaki bango.’ (Yoane 14:26, NW) Ekozongisa na makanisi na bango mosala ya Yesu mpe mateya na ye, ata maloba oyo alobaki, mpe ekosalisa bango bákoma yango. Elimo yango esalisaki mpenza ntoma Yoane oyo akómaki mobange na nsuka ya ekeke ya liboso ya T.B., ntango abandaki kokoma Evanzile na ye. Evanzile yango ezali na toli ya ntina mingi oyo Yesu apesaki ntango alakisaki ndenge ya kosala Ekaniseli ya liwa na ye.—Yoane, mokapo 13 tii mokapo 17.
4. Ndenge nini “elimo ya solo” esungaki baklisto ya liboso oyo bazalaki bapakolami na elimo?
4 Yesu alakaki lisusu bayekoli wana ya liboso ete elimo ‘ekolakisa bango makambo nyonso’ mpe ‘ekokamba bango kati na solo nyonso.’ Elimo ekosalisa bango na kokanga ntina ya makambo oyo ezali makasi na kati ya Makomami mpe ekobatela bango mpo bázala ntango nyonso na likanisi moko, na bososoli ndenge moko, mpe na mokano moko. (1 Bakolinti 2:10, NW; Baefese 4:3, NW) Na bongo, elimo santu etyaki baklisto wana ya liboso lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa baklisto bapakolami nyonso “bilei [ya elimo] na elaka na yango.”—Matai 24:45.
Elimo ezali kotatola
5. (a) Elikya nini ya sika Yesu apesaki bayekoli na ye na butu ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B.? (b) Elimo santu esengelaki kosala mosala nini mpo na kokokisa elaka ya Yesu?
5 Na butu ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete na mikolo ekoya nsima, akoyamba bango kuna na likoló mpe bakofanda na ye mpe na Tata na ye. Alobaki na bango boye: “Na ndako ya Tata na ngai bifandelo bizali mingi. Soko bongo te [mbɛlɛ] nasili koloba na bino; zambi nakokenda kobongisela bino esika. Mpe soko nakokenda kobongisela bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika ezali ngai, bino bózala mpe wana lokola.” (Yoane 13:36; 14:2, 3) Bakoyangela na ye na Bokonzi na ye. (Luka 22:28-30) Mpo bákóma na elikya wana ya kokende na likoló, basengelaki “kobotama na elimo” lokola bana ya Nzambe na elimo mpe basengelaki kopakolama na elimo mpo na kozala bakonzi mpe banganga elongo na Klisto kuna na likoló.—Yoane 3:5-8, NW; 2 Bakolinti 1:21, 22, NW; Tito 3:5-7, NW; 1 Petelo 1:3, 4; Emoniseli 20:6.
6. (a) Kobengama mpo na likoló ebandaki ntango nini, mpe bato boni babengami? (b) Baoyo babengami babatisamaki na nini?
6 ‘Kobengama mpo na likoló’ ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpe, makambo nyonso ezali kolakisa ete esukaki na katikati ya bambula ya 1930. (Baebele 3:1) Bato nyonso oyo bazwaki elembo ya elimo santu mpo bázala na Yisalaele ya elimo bazali 144 000, “basombamaki na kati ya bato.” (Emoniseli 7:4; 14:1-4, NW) Bato yango bazwaki batisimo na nzoto ya elimo ya Klisto, na lisangá na ye, mpe na liwa na ye. (Baloma 6:3; 1 Bakolinti 12:12, 13, 27, NW; Baefese 1:22, 23, NW) Nsima ya kozwa batisimo ya mai mpe kopakolama na elimo santu, bakómaki na bomoi ya bato oyo bamikabi, basengelaki kozala sembo tii liwa na bango.—Baloma 6:4, 5.
7. Mpo na nini kaka baklisto bapakolami na elimo nde basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli?
7 Yehova asalaki kondimana ya sika na “Yisalaele ya Nzambe,” elingi koloba baklisto yango oyo bapakolami na elimo; yango wana babengami Bayisalaele ya elimo. (Bagalatia 6:16; Yilimia 31:31-34) Makila ya Klisto oyo esopanaki nde endimisaki kondimana ya sika. Yesu alobaki likambo yango ntango asalaki Ekaniseli ya liboso ya liwa na ye. Luka akomaki boye: “Akamataki [limpa], atɔndaki, mpe abukaki yango mpe apesaki na bango, mpe alobaki ete, Oyo [elakisi, NW] nzoto na ngai esili kopesama mpo na bino. [Bósalaka, NW] boye mpo na ekaniseli na ngai. Bobele bongo akamataki kɔpɔ na nsima ya kolya, mpe alobaki ete, Kɔpɔ oyo [elakisi, NW] kondimana ya sika na makila na ngai masili kosopana mpo na bino.” (Luka 22:19, 20) Mwa ndambo ya ba 144 000 oyo bazali naino awa na mabele nde basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Klisto.
8. Ndenge nini moto ayebaka ete azali mopakolami na elimo mpe akokende na likoló?
8 Ndenge nini moto ayebaka ete azali mopakolami mpe akokende na likoló? Elimo santu emonisaka ye yango polele. Ntoma Paulo akomelaki bato yango boye: “Baoyo nyonso bakambami na [elimo, NW] ya Nzambe bazali bana ya Nzambe. . . . [Elimo, NW] yango ekosangana na [elimo, NW] na biso kotatola ete tozali bana na Nzambe. Soko tozali bana, [boye] tozali basangoli ya libula ya Nzambe, basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo, soko tokoyokaka mpasi na ye elongo ete tózwa nkembo esika moko na ye.” (Baloma 8:14-17) Elimo emonisaka bango yango polele mpenza na boye ete soki moto azali kokakatana ata moke ete abengami mpo na kokende likoló, ebongi alongola na makanisi na ye ete abengami; ameka mpe te kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli.
Ndenge oyo elimo esalaka epai ya bampate mosusu
9. Wapi bituluku mibale oyo Baevanzile mpe mokanda ya Emoniseli elobeli?
9 Yesu abengaki Bayisalaele ya elimo, bato oyo bazali na kati ya “lopango” ya kondimana ya sika ete “etonga moke.” Ayebaki ete bazali moke soki tokokanisi bango na ebele ya “bampate mosusu,” baoyo Yesu alobaki mpe ete akoyanganisa bango. (Luka 12:32; Yoane 10:16) Bampate mosusu oyo bazali koyanganisama na ntango ya nsuka bango nde bazali “ebele monene” oyo bakobika na “bolɔzi monene” mpe bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Likambo moko oyo esimbi likebi na biso ezali ete emonaneli oyo Yoane amonaki na nsuka ya ekeke ya liboso T.B. emonisi ete ebele monene bakeseni na ba 144 000. (Emoniseli 7:4, 9, 14) Bampate mosusu, bango mpe bazwaka elimo santu? Soki bazwaka yango, esalaka mosala nini na kati ya bomoi na bango?
10. Na ndimbola nini bampate mosusu bazwaka batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu”?
10 Elimo santu esalaka mosala monene na bomoi ya bampate mosusu. Mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova, bampate mosusu bazwaka batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu, NW].” (Matai 28:19) Bandimaka ete Yehova azali mokonzi monene, batosaka Klisto mpo azali Mokonzi mpe Mobikisi mpe na bomoi na bango, bandimaka ete elimo ya Nzambe, oyo ezali nguya oyo asalaka na yango mosala, etambwisa bango. Bampate mosusu basalaka makasi ete, na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, bálona “mbuma ya elimo” oyo ezali “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, motema malamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa.”—Bagalatia 5:22, 23, NW.
11, 12. (a) Bapakolami na elimo bazali kosantisama na ndenge nini oyo ekeseni mpenza? (b) Ndenge nini bampate mosusu bazali kokóma basantu?
11 Bampate mosusu basengeli mpe kotika ete Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye ebulisa bango. Bapakolami na elimo basilaki kosantisama na ndenge mosusu: lokola bango nyonso bazali mwasi ya Klisto, bazali kotánga bango bato ya sembo mpe ete bazali basantu. (Yoane 17:17; 1 Bakolinti 6:11, NW; Baefese 5:23-27) Mosakoli Danyele abengaki bango “basantu ya Oyo-Aleki-Likoló,” oyo bazwi Bokonzi na nsima ya “mwana ya moto,” Klisto Yesu. (Danyele 7:13, 14, 18, 27, NW) Na ntango ya kala, Yehova alobaki na libota ya Yisalaele na nzela ya Mose mpe Alona, ete: “Ngai nazali [Yehova] Nzambe na bino. Yango wana bómisantisa mpe bómimonisa basantu mpo ete ngai nazali mosantu.”—Levitike 11:44, NW.
12 Liloba “kosantisa” elimboli mpenzampenza “kokómisa mosantu, kokabola, to kotya pembeni mpo na kosalela na mosala ya Yehova Nzambe; kozala mosantu, to pɛto.” Na 1938, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete Bayonadaba, elingi koloba bampate mosusu, “basengeli koyeba ete mokomoko na baoyo bakozala na kati ya ebele monene mpe bakozwa bomoi awa na mabele basengeli komipesa mpe kozala mosantu.” Na emonaneli ya ebele monene, na kati ya mokanda ya Emoniseli, balobi ete bato yango “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana ya Mpate” mpe bazali kosalela Yehova ‘mosala mosantu butu na moi na kati ya tempelo na ye.’ (Emoniseli 7:9, 14, 15, NW) Elimo santu ezali kosalisa bampate mosusu básala makasi mpo na kozala na bosantu oyo Yehova azali koluka.—2 Bakolinti 7:1, NW.
Bazali kosala malamu na bandeko ya Klisto
13, 14. (a) Lisese ya bampate na bantaba ezali komonisa ete bampate basengeli kosala nini mpo bákoka kobika? (b) Na mikolo ya nsuka oyo tozali, bampate mosusu basaleli bandeko ya Klisto makambo nini?
13 Yesu amonisaki ete bampate mosusu bakozala na boyokani makasi na etonga moke ntango apesaki lisese ya bampate na bantaba, ntango azalaki kosakola mpo na “nsuka ya mokili.” Na lisese yango, Klisto amonisaki polele ete mpo na kobika, bampate mosusu basengeli kosala malamu na bapakolami, oyo abengaki bango “bandeko na ngai.” Alobaki boye: “Mokonzi akoloba na bango na lobɔkɔ na ye ya mobali ete, Yaká bino bopambwami na Tata na ngai, bósangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili. . . . Nazali koloba na bino solo ete lokola esalaki bino yango epai na moko na bandeko na ngai baoyo baleki mokemoke, bosalelaki ngai yango.”—Matai 24:3, NW; 25:31-34, 40.
14 Maloba “lokola esalaki bino yango” ezali kolobela lisungi oyo bapesaki mpe bolingo oyo bamoniselaki bandeko ya Klisto oyo babotami na elimo, oyo mokili ya Satana etalelaki bango lokola bapaya, bakangaki kutu bamosusu kati na bango na bolɔkɔ. Bazangaki biloko ya kolya, bilamba mpe nkisi. (Matai 25:35, 36, NW, maloba na nse ya lokasa) Na mikolo oyo ya nsuka, banda 1914, mingi kati na bapakolami na elimo bakutani na makambo ya ndenge wana. Makambo oyo Batatoli ya Yehova bakutani na yango na mikolo na biso ezali komonisa ete elimo santu etindaki bampate mosusu, oyo bazali baninga ya sembo ya bapakolami na elimo, na kosunga baklisto yango.
15, 16. (a) Na mosala nini bampate mosusu basalisi mpenza bandeko ya Klisto oyo bazali naino awa na mabele? (b) Bapakolami na elimo balobaki nini mpo na kozongisela bampate mosusu matɔndi mpo na mosala na bango?
15 Na mikolo oyo ya nsuka, bampate mosusu basungi mpenza bandeko ya Klisto, bapakolami oyo bazali naino awa na mabele, na mosala oyo Nzambe apesi ya ‘kosakola nsango malamu ya bokonzi na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.’ (Matai 24:14; Yoane 14:12) Mbula na mbula, motángo ya bapakolami na elimo oyo bazali naino awa na mabele ezali se kokita; nzokande, bampate mosusu bazali se kobakisama, bakómi mpenza bamilio. Mingi kati na bango bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela mpe mosala ya misionɛrɛ mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi “kino nsuka ya mabele.” (Misala 1:8, NW) Bamosusu bazali kosakola na ndenge oyo bazali kokoka mpe bazali kosepela kopesa ata mbongo na bango mpo na mosala yango ya ntina mingi.
16 Bandeko ya Klisto, bapakolami na elimo, bazali mpenza na botɔndi epai ya bampate mosusu na ndenge oyo bazali kosalisa bango! Bamonisaki makanisi na bango malamumalamu na kati ya mokanda Libateli ya molóngó mobimba na nse ya Boyangeli ya “Mokonzi na kimya,” oyo moombo na sembo abimisaki na 1986. Mokanda yango elobi boye: “Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, kokokisama na esakweli na Yesu na ntina na ‘nsuka na biloko na ntango oyo etali mingimingi mosala mokokisami na ‘ebele monene’ ya ‘bampate mosusu.’ . . . Ee, botɔndi mingi epai na ‘ebele monene’ ya bato bauti na minɔkɔ nyonso na mabota nyonso mpo na mosala oyo basali kati na kokokisama ya esakweli ya [Yesu] oyo ezwami kati na Matai 24:14!”
‘Bákóma te bato ya kokoka kozanga biso’
17. Na ndenge nini bato ya sembo ya ntango ya kala oyo bakosekwa awa na mabele ‘bakokóma te bato ya kokoka kozanga’ bapakolami?
17 Ntoma Paulo ye moko azali mopakolami na elimo; ntango alobelaki bato ya sembo oyo bazalaki liboso Klisto aya awa na mabele, alobaki boye: “Bango nyonso wana, atako elobamaki malamu mpo na kondima na bango, bamonaki kokokisama ya elaka te, mpamba te Nzambe abombelaki biso [bapakolami na elimo] eloko eleki malamu, mpo bango bákoka te kokóma bato ya kokoka kozanga biso.” (Baebele 11:35, 39, 40, NW) Na Boyangeli ya Mbula Nkóto, Klisto na bandeko na ye 144 000 bapakolami na elimo bakozala bakonzi mpe banganga na likoló mpe bakosala makambo ya malamu awa na mabele na lisalisi ya mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kosikola biso. Na bongo, bampate mosusu ‘bakokóma bato ya kokoka’ na nzoto mpe na makanisi.—Emoniseli 22:1, 2.
18. (a) Makambo oyo Biblia emonisi esengeli kosalisa bampate mosusu na kokanga ntina ya likambo nini? (b) Bampate mosusu bazelaka ‘komonisama ya bana ya Nzambe’ na elikya nini?
18 Makambo nyonso oyo esengeli kosalisa bampate mosusu na komona polele ntina oyo Makomami ya Grɛki ya boklisto elobeli mingi Klisto na bandeko na ye bapakolami na elimo mpe mokumba monene oyo bazali na yango mpo na kokokisa mikano ya Yehova. Yango wana, bampate mosusu bamonaka ete, kosunga bapakolami na elimo na ndenge nyonso oyo bakoki liboso ya ‘komonisama ya bana ya Nzambe’ na Armagedon mpe na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, ezali libaku malamu mpo na bango. Bazali na elikya ete ‘bakolongolama na boombo ya libebisi mpe kozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.’—Baloma 8:19-21, NW.
Tosangani na elimo na Ekaniseli
19. “Elimo ya solo” esali nini mpo na bapakolami na elimo na baninga na bango, mpe ndenge nini bakozala mpenza na bomoko na mpokwa ya mokolo ya 28 Marsi?
19 Na libondeli na ye ya nsuka na butu ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu alobaki boye: “Nazali kobondela . . . ete [bango] nyonso bázala moko [lokola] yo, Tata, ozali na kati na ngai mpe ngai kati na yo ete bango mpe bázala kati na biso na ntina ete bamokili bándima ete yo otindaki ngai.” (Yoane 17:20, 21) Na bolingo na ye, Nzambe atindaki Mwana na ye mpo apesa bomoi na ye mpo ete bapakolami na elimo mpe bato ya botosi na mokili mobimba bákoka kobika. (1 Yoane 2:2) “Elimo ya solo” esangisi bandeko ya Klisto na baninga na bango bampate mosusu esika moko. Mokolo ya 28 Marsi na mpokwa, nsima ya kolala ya moi, bapakolami na elimo na bampate mosusu, bango nyonso bakoyangana mpo na kokanisa liwa ya Klisto mpe kokanisa makambo nyonso oyo Yehova asali mpo na bango na lisalisi ya mbeka ya Mwana na ye ya bolingo, Klisto Yesu. Tiká ete koyangana na bango na likita yango ya ntina mingi epesa lisusu bomoko na bango makasi mpe ebakisela bango mposa ya kotika te kosala mokano ya Nzambe, mpe na ndenge yango bakomonisa ete bazali na esengo ya kozala na kati ya bato oyo Yehova alingaka.
Bozongeli
• Ntango nini baklisto ya liboso bazwaki “elimo ya solo,” mpe na ndenge nini elimo yango ezalaki “mosungi”?
• Ndenge nini moto ayebaka ete azali mopakolami mpe abengami na likoló?
• Ndenge nini elimo ya Nzambe esalaka kati na bampate mosusu?
• Malamu nini bampate mosusu basaleli bandeko ya Klisto, mpe mpo na nini ‘bakokóma te bato ya kokoka kozanga’ bapakolami?
[Elilingi na lokasa 21]
“Elimo ya solo” ekitelaki bayekoli na Pantekote ya mobu 33 T.B.
[Bililingi na lokasa 23]
Bampate mosusu basaleli bandeko ya Klisto malamu na ndenge bazali kosunga bango na kokokisa mokumba ya kosakola oyo Nzambe apesaki bango