Ebele monene ya Basambeli ya solo—Bauti Wapi?
“Namɔni ebele monɛnɛ, . . . bauti na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ; batɛlɛmi liboso na kiti na bokonji mpe liboso na Mwana na Mpate.”—EMƆNISƐLI 7:9.
1. Mpo na nini bimonaneli ya esakweli kati na Emoniseli bizali na ntina monene mpo na biso lelo?
PENE na nsuka ya ekeke ya liboso T.B., ntoma Yoane azwaki bimonaneli ya makambo ya kokamwa matali mokano ya Yehova. Bamoko na makambo amonaki kati na bimonaneli yango ezali kokokisama sikawa. Makambo mosusu makokokisama mosika te. Makambo nyonso wana mataleli mpenza kokokisama ya mokano monene ya Yehova mpo na kobulisa nkombo na ye liboso ya bikelamu nyonso. (Ezekiele 38:23; Emoniseli 4:11; 5:13) Lisusu, yango etaleli mpe bilikya ya bomoi ya moko na moko na biso. Lolenge nini?
2. (a) Ntoma Yoane amonaki nini kati na emonaneli na ye ya minei? (b) Mituna nini tokotalela na ntina na emonaneli yango?
2 Na emonaneli ya minei kati na molɔngɔ́ ya bimonaneli ya Emoniseli, Yoane amonaki baanzelu basimbi mipepe ya libebi kino “baombo na Njambe na biso” bakotyama bilembo na bilongi na bango. Na nsima, amonaki likambo moko ya monene mpe ya kobenda likebi—“ebele monɛnɛ, oyo moto tɛ akoki kotanga motuya na bango; bauti na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ,” basangani mpo na kosambela Yehova mpe kokumisa Mwana na ye. Elobamaki na Yoane ete bango bazalaki bato oyo basengelaki kobima na bolózi monene. (Emɔnisɛli 7:1-17) Banani bato oyo balobelami ete bazali “baombo na Njambe na biso”? Mpe banani bakosala “ebele monɛnɛ” ya babiki na bolózi? Okozala moko kati na bango?
Banani bazali “baombo na Njambe na biso”?
3. (a) Na Yoane 10:1-18, lolenge nini Yesu amonisaki boyokani na ye elongo na bayekoli na ye? (b) Eloko nini Yesu apesi likoki na bampate na ye ete bázwa yango na nzela ya mbeka ya liwa na ye?
3 Soko sanza minei liboso ya kufa na ye, Yesu alobaki na ntina na ye moko ete azali “mobateli malamu” mpe bayekoli na ye bazali “bampate” oyo mpo na bango asengelaki kopesa bomoi na ye. Alobelaki mingimingi bampate oyo ye amonaki kati na lopango ya elilingi mpe na nsima babatelamaki na ye. (Yoane 10:1-18)a Na bolingo nyonso, Yesu apesaki bomoi na ye mpo na bolamu ya bampate na ye, kopesáká motuya ya lisiko oyo esengelaki mpo na kosikola bango na lisumu mpe na kufa.
4. Banani bazali bato ya liboso na koyanganisama lokola bampate na boyokani na oyo Yesu alobelaki awa?
4 Nzokande, liboso ya kosala bongo, Yesu ye moko lokola Mobateli Malamu, ayanganisaki bayekoli. Bato ya liboso ezalaki baoyo bayeisamaki epai na ye na nzela ya Yoane Mobatisi, “mobateli ya ekuke” oyo alobelami na lisese ya Yesu. Yesu azalaki koluka bato oyo bakokaki kondima na esengo nyonso libaku ya kokóma basangani ya ‘mombóto ya Abalayama.’ (Genese 22:18, NW; Bagalatia 3:16, 29) Alónaki kati na mitema na bango bosepeli mpo na Bokonzi ya likoló, mpe andimisaki bango ete akokenda kobongisa esika mpo na bango kati na ndako ya Tata na ye ya likoló. (Matai 13:44-46; Yoane 14:2, 3) Yesu alobaki solo ete: “Longwa na mikolo ya Yoane Mobatisi kino sikawa bokonzi na likoló ezali mokano oyo bato bazali kolanda na makasi nyonso, mpe baoyo bazali kolanda yango na makasi nyonso bazali kozwa yango.” (Matai 11:12, NW) Baoyo balandaki ye mpo na kokokisa mokano wana bamonisaki ete bazali kati na lopango ya bampate oyo Yesu alobelaki.
5. (a) Banani bazali “baombo na Njambe na biso” oyo balobelami na Emɔnisɛli 7:3-8? (b) Nini emonisi ete bato mingi koleka basengelaki kosangana kati na losambo elongo na Bayisraele ya elimo?
5 Na Emɔnisɛli 7:3-8, baoyo bazali kosala makasi mpo na kokóma na mokano wana ya likoló balobelami mpe lokola “baombo na Njambe na biso.” (Talá 1 Petelo 2:9, 16.) Bato 144 000 oyo balobelami kuna bazali mpenza bango nyonso bobele Bayuda? Baoyo bazali kati na lopango ya mpate ya elilingi na lisese ya Yesu bazali bobele Bayuda? Ezali bongo te; bazali basangani ya Yisraele ya elimo ya Nzambe, bango nyonso elongo na Klisto basali mombóto ya elimo ya Abalayama. (Bagalatia 3:28, 29; 6:16; Emoniseli 14:1, 3) Ya solo, na nsuka, ntango ekoya wana motuya mobimba wana mokokoka. Na nsima, nini ekosalema? Lokola Biblia esakolaki yango, basusu—ebele monene na bango—basengelaki kosangana elongo na Bayisraele wana ya elimo kati na losambo ya Yehova.—Zekalia 8:23.
“Bampate mosusu”—Bazali baklisto oyo bazalaki Bayuda te?
6. Likambo nini ya kobenda likebi Yoane 10:16 emonisi?
6 Nsima ya kolobela lopango moko ya bampate na Yoane 10:7-15, Yesu alobelaki mpe etuluku mosusu, koyebisáká ete: “Najali mpe na bampate mosusu baoyo bajali na lopango oyo tɛ, ekoki na ngai kokamba mpe bango mpe bakoyoka mongongo na ngai mpe bakojala etɔnga mɔkɔ mpe na mobateli mɔkɔ.” (Yoane 10:16) “Bampate mosusu” wana bazali banani?
7, 8. (a) Mpo na nini likanisi oyo ete bampate mosusu bazali baklisto oyo bazalaki Bayuda te ezali likanisi ya mabe? (b) Makambo nini matali mokano ya Nzambe mpo na mabelé masengeli kozala na bopusi likoló na boyebi na biso na ntina na bampate mosusu?
7 Bato na mayele ya boklisto ya nkombo mpamba bakanisaka ete bampate mosusu wana bazali baklisto oyo bazalaki Bayuda te mpe ete baoyo bazali kati na lopango ya bampate oyo balobelamaki liboso bazali Bayuda, baoyo bazalaki na nsé ya kondimana ya Mibeko, mpe ete bituluku mibale wana bakokende na likoló. Kasi Yesu abotamaki Moyuda mpe na ntina na ekólo na ye azalaki na nsé ya kondimana ya Mibeko. (Bagalatia 4:4) Lisusu, baoyo bazali kotalela bampate mosusu lokola baklisto oyo bazalaki Bayuda te oyo bakozwa mbano ya bomoi ya likoló bazali kotalela te likambo moko ya ntina oyo litali mokano ya Nzambe. Ntango Yehova azalisaki bato ya liboso mpe atyaki bango kati na elanga ya Edene, amonisaki polele ete mokano na ye ezalaki ete mabelé mátonda na bato, ete yango nyonso ezala paladiso, mpe ete bato oyo bakozala babateli na yango básepela na bomoi libela na libela—soki bakomemya mpe bakotosa Mozalisi na bango.—Genese 1:26-28; 2:15-17; Yisaya 45:18.
8 Ntango Adama asalaki lisumu, mokano ya Yehova ekweaki te. Na bolingo nyonso, Nzambe akamataki bibongiseli mpo ete bakitani ya Adama bázwa libaku ya kosepela na makambo oyo Adama azangaki komonisa botɔ́ndi. Yehova asakolaki ete akobimisa mosikoli moko, mombóto, oyo na nzela na ye mapamboli makopesama na mabota nyonso. (Genese 3:15; 22:18) Elaka wana elimbolaki te ete bato nyonso ya malamu oyo bazali awa na mabelé bakokamatama mpo na kokende na likoló. Yesu ateyaki bayekoli na ye babondelaka ete: “Tika Bokonji na yɔ eya, tika mokano na yɔ esalema na nse pelamɔkɔ na Likolo.” (Matai 6:9, 10) Mwa moke liboso ete alobela lisese oyo ezali na Yoane 10:1-16, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ezali bobele “etɔnga mokɛ” nde Tata na ye amoni malamu kopesa bango Bokonzi ya likoló. (Luka 12:32, 33) Na bongo, wana tozali kotánga lisese oyo kati na yango Yesu azali komilobela ye moko lokola Mobateli Malamu oyo azali kopesa bomoi na ye mpo na bampate na ye, ekozala libungá na kolongola ntalo monene ya bato oyo Yesu azali kobatela na bolingo nyonso, bato oyo bakofanda na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya likoló.—Yoane 3:16.
9. Kobanda 1884, nini Bayekoli ya Biblia basosolaki mpo na koyeba bampate mosusu?
9 Uta 1884, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki bampate mosusu ete bazali bato oyo bakopesamela libaku ya kofanda awa na mabelé na nsé ya ezalela ya makambo oyo makokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango uta na ebandeli. Bayekoli ya Biblia wana ya liboso bayebaki ete bamoko kati na bampate mosusu wana bakozala bato oyo bazalaki na bomoi mpe bakufaki liboso ya mosala ya Yesu awa na mabelé. Nzokande, ezalaki na makambo mosusu oyo basosolaki yango malamumalamu te. Na ndakisa, bazalaki kokanisa ete koyanganisama ya bampate mosusu ekosalema nsima wana bapakolami nyonso bakosila kozwa mbano na bango na likoló. Atako bongo, bayebaki malamu ete bampate mosusu bazalaki te bobele baklisto oyo bazalaki Bayuda te. Libaku ya kokóma moko kati na bampate mosusu epesami ezala na Bayuda mpe na Bayuda te, epai ya bato ya mabota nyonso mpe ya mposo nyonso.—Kokanisá na Misala 10:34, 35.
10. Mpo ete tózala kati na baoyo Yesu azali kotalela mpenza lokola bampate na ye mosusu, tosengeli kozala bato ya lolenge nini?
10 Mpo na kokokisa makambo oyo Yesu amonisaki, bampate mosusu basengeli kozala bato oyo, kozanga kotalela mposo to bikólo, bayebi Yesu Klisto ete azali Mobateli Malamu. Yango esangisi makambo nini? Basengeli komonisa bopɔlɔ mpe ezaleli ya kondima litambwisi, bizaleli oyo bimonanaka epai na bampate. (Nzembo 37:11) Lokola esɛngami epai na etongá moke, bango mpe basengeli “koyeba mongongo [ya mobateli malamu]” mpe kopesa nzela te ete bátambwisama na bato mosusu oyo bakoluka kozala na bopusi likoló na bango. (Yoane 10:4; 2 Yoane 9, 10) Basengeli komonisa botɔ́ndi na likambo oyo Yesu asalaki na kopesáká molimo na ye mpo na bolamu ya bampate na ye mpe komonisa kondima mingi kati na ebongiseli yango. (Misala 4:12) Basengeli “koyoka” mongongo ya Mobateli Malamu wana azali kosɛnga bango ete básala mosala ya bulɛɛ bobele mpo na Yehova, bálanda koluka liboso Bokonzi, bámikabola na mokili, mpe bámonisa moko epai na mosusu bolingo bozangi moimi. (Matai 4:10; 6:31-33; Yoane 15:12, 13, 19) Ozali kokokisa makambo oyo Yesu alobeli epai na baoyo ye azali kotalela lokola bampate na ye mosusu? Yo mpe olingi kokokisa makambo yango? Oyo nde boyokani kitoko ezali kozwama epai na baoyo nyonso bakómi solo bampate mosusu ya Yesu!
Limemya mpo na litambwisi ya Bokonzi
11. (a) Kati na elembo ya kozala na ye, Yesu alobaki nini na ntina na bampate mpe bantaba? (b) Bandeko oyo Yesu alobelaki bazali banani?
11 Basanza mingi nsima ya kopesa lisese oyo touti kolobela, Yesu azongaki lisusu na Yelusaleme. Wana efandaki ye likoló na Ngomba na Bilaya kotaláká zingazinga ya tempelo, amonisaki bayekoli na ye makambo matali ‘elembo ya kozala na ye mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.’ (Matai 24:3, NW) Alobelaki lisusu koyanganisama ya bampate. Kati na makambo mosusu, alobaki ete: “Ekoya Mwana na moto na nkɛmbɔ na ye mpe banje na ye yɔnsɔ esika mɔkɔ na ye, akofanda na kiti na bokonji na ye na nkɛmbɔ. Akoyanganisa mabota yɔnsɔ liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba. Mpe akotika bampate na lobɔkɔ na ye na mobali nde bantaba na lobɔkɔ na ye na mwasi.” Kati na lisese oyo, Yesu amonisaki ete baoyo Mokonzi atyelaki bango likebi basengeli kosambisama na kotalela lolenge oyo bazali kosalela “bandeko” na ye. (Matai 25:31-46) Bandeko yango bazali banani? Bazali baklisto babotami na elimo, oyo bazali bongo “bana ya Nzambe.” Yesu azali Mwana ya liboso ya Nzambe. Na yango, bazali bandeko ya Klisto. Bazali “baombo na Njambe na biso” oyo balobelamaki na Emɔnisɛli 7:3, baoyo baponamaki kati na bato mpo na koyangela elongo na Klisto kati na Bokonzi na ye ya likoló.—Baloma 8:14-17.
12. Mpo na nini lolenge oyo bato bazali kosalela bandeko ya Klisto ezali na ntina monene?
12 Lolenge oyo bato mosusu bazali kosala epai na basangoli wana ya Bokonzi ezali na ntina mingi. Otalelaka bango lolenge Yesu mpe Yehova batalelaka bango? (Matai 24:45-47; 2 Batesaloniki 2:13) Ezaleli ya moto na moto epai na bapakolami wana ezali komonisa ezaleli na ye epai na Yesu Klisto mpenza mpe epai na Tata na ye, Moyangeli ya Mɔlɔ́ngɔ́ mobimba.—Matai 10:40; 25:34-46.
13. Lolenge nini Bayekoli ya Biblia na 1884 basosolaki lisese ya bampate mpe bantaba?
13 Kati na nimero na yango ya Augústo 1884, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ebimeli ya Lingelesi) emonisaki malamumalamu ete “bampate” oyo balobelami kati na lisese oyo bazali bato oyo elikya ya kozala na bomoi ya kokoka awa na mabelé etyami liboso na bango. Basosolaki lisusu ete lisese yango esengeli kokokisama na ntango oyo Klisto akozala koyangela longwa na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo na likoló. Nzokande, na ntango wana basosolaki malamumalamu te soki na ntango nini asengelaki kobanda mosala ya kokabolama oyo elobelamaki to mpe ntango oyo yango esengelaki koumela.
14. Lolenge nini lisukúlu moko na liyangani oyo esalemaki na 1923 esalisaki Bayekoli ya Biblia na koyeba ntango oyo lisese ya esakweli ya Yesu elingaki kokokisama?
14 Atako bongo, na 1923, kati na lisukúlu moko ya liyangani, J. F. Rutherford, oyo azalaki na ntango wana prezidá ya la Société Watch Tower, amonisaki polele ntango ya kokokisama ya lisese ya bampate mpe ya bantaba. Mpo na nini? Mpamba te lisese limonisi ete bandeko ya Mokonzi—bamoko kati na bango—bakozala naino na mabelé. Kati na bato, bobele bayekoli na ye oyo babotami na elimo nde bakoki mpenza kobyangama bandeko na ye. (Baebele 2:10-12) Bango bakozala na bomoi awa na mabelé te na boumeli ya Mbula Nkóto, kopesáká bongo libaku kitoko mpo na bato na kosala malamu epai na bango na lolenge oyo Yesu alobelaki.—Emoniseli 20:6.
15. (a) Makambo nini masalisaki Bayekoli ya Biblia na koyeba malamumalamu bampate ya lisese ya Yesu? (b) Lolenge nini bampate bamonisaki botɔ́ndi na bango mpo na Bokonzi?
15 Kati na lisukúlu yango na 1923, molende esalemaki mpo na koyeba baoyo bakokisaki maloba na Nkolo na ntina na bampate mpe bantaba, kasi makambo mosusu masengelaki kososolama liboso ete ntina monene ya lisese emonisama polele. Na boumeli ya bambula oyo elandaki, Yehova amonisaki mokemoke makambo wana ya ntina epai na basaleli na ye. Yango esangisaki bososoli ya polele oyo epesamaki na 1927, ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali lisangani ya baklisto bapakolami oyo bazali awa na mabelé; lisusu na 1932, bakangaki mpenza ntina ya kosangana na mpiko nyonso elongo na basaleli bapakolami ya Yehova, lokola Yonadaba asalaki elongo na Yehu. (Matai 24:45; 2 Mikonzi 10:15) Na ntango wana, na boyokani na Emoniseli 22:17, bato wana oyo bakokani na bampate balendisamaki mpenza na kosangana na koyebisa nsango ya Bokonzi epai na basusu. Botɔ́ndi na bango mpo na Bokonzi ya Masiya esengeli te bobele kopusa bango na komonisa misala ya boboto epai na bapakolami ya Nkolo, kasi basengeli kopesa bomoi na bango epai na Yehova na nzela ya Klisto mpe kokangama makasi elongo na bapakolami na ye, na kosanganáká na molende nyonso kati na mosala oyo bango bazali kosala. Ozali kosala yango? Epai na baoyo bazali kosala yango, Mokonzi akoloba: “Yaka bino bopambwami na Tata na ngai, bosangola libula na bokonji bobɔngisami mpɔ na bino longwa na ebandeli na mokili.” Elikya monene ya bomoi ya seko kati na ezalela ya kokoka na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi etyami liboso na bango.—Matai 25:34, 46.
“Ebele monene”—Bazali kokende wapi?
16. (a) Makanisi nini malongobani te Bayekoli ya Biblia bazalaki na yango na ntina na ebele monene ya Emoniseli 7:9? (b) Ntango nini mpe na lisalisi ya nini makanisi na bango masembolamaki?
16 Na ntango moko boye, basaleli ya Yehova bakanisaki ete ebele monene ya Emɔnisɛli 7:9, 10 bakesanaki na bampate mosusu oyo balobelami na Yoane 10:16 mpe na bampate oyo balobelami na Matai 25:33. Lokola Biblia elobi ete “batɛlɛmi liboso na kiti na bokonji,” ekanisamaki ete basengelaki kozala na likoló, na bakiti ya bokonzi te, koyangeláká lokola basangoli na libula elongo na Klisto, kasi na esika ya mibale, liboso na kiti ya bokonzi. Bazalaki kotalelama lokola baklisto ya bosembo mingi te, baoyo bamonisaki elimo ya solosolo ya komipesa te. Na 1935 likanisi wana lisembolamaki.b Botaleli ya Emoniseli 7:9 na boyokani na mikapo lokola Matai 25:31, 32 emonisaki polele ete bato oyo bazali awa na mabelé bakoki kozala “liboso na kiti na bokonji.” Lisusu, emonisamaki ete Nzambe azali te na mitindo mibale ya bosembo. Baoyo nyonso bandimami epai na ye basengeli kobatela bosembo epai na ye.—Matai 22:37, 38; Luka 16:10.
17, 18. (a) Makambo nini mapesaki nzela na bokóli, kobanda 1935, kati na motángo ya baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé? (b) Kati na mosala nini ya ntina baoyo bazali kati na ebele monene bazali kosangana na molende nyonso?
17 Na boumeli ya bambula mingi, libota ya Yehova lilobelaki bilaka ya Nzambe na ntina na mabelé. Na ntina na likambo oyo bazalaki kozela ete ekosalema na ebandeli ya bambula 1920, basakolaki ete “Bamilió ya bato oyo bazali na bomoi sikawa bakokufa soko moke te.” Kasi na ntango wana, bato oyo bandimaki bibongiseli ya Nzambe mpo na bomoi bazalaki bamilió te. Mingi kati na baoyo bandimaki solo, elimo santu ebotisaki epai na bango elikya ya bomoi ya likoló. Nzokande, mingimingi nsima ya 1935, mbongwana moko monene esalemaki. Ezalaki te ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebosanaki elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé. Na boumeli ya bambula mingi, basaleli ya Yehova balobelaki yango mpe batyaki likebi epai na baoyo bakokisaki makambo oyo Biblia eyebisaki mpo na yango. Atako bongo, na ntango oyo ebongisamaki, Yehova atambwisaki makambo na boye ete bato yango bámimonisa bango moko.
18 Balapólo ya motángo ya bayangani emonisi ete na boumeli ya bambula mingi pene na bayangani nyonso na Ekaniseli bazalaki kolya limpa mpe komela vinyo. Kasi mibu 25 nsima ya 1935, motángo ya bayangani na Ekaniseli ya mbula na mbula ya liwa ya Klisto emataki mingi kino koleka mbala nkámá motángo ya baoyo bazalaki kolya limpa mpe komela vinyo. Bato mosusu wana bazalaki banani? Ezali baoyo, na nsima, basengelaki kokóma basangani ya ebele monene. Ya solo, ntango mpo na Yehova ekómaki ya koyanganisa bango mpe kobongisa bango mpo na kobika na bolózi monene oyo ezali liboso na bango. Lokola esakolamaki, bauti na “mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ, na minɔkɔ yɔnsɔ.” (Emɔnisɛli 7:9) Bazali kosangana na molende nyonso kati na mosala oyo Yesu asakolaki, wana alobaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonji ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota yɔnsɔ, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okokuta lisoló mobimba mpe oyo eyokani na ndimbola ya sikawa na ntina na mapango oyo malobelami na Yoane mokapo 10 kati na Mosɛnzɛli ya 15 Máí 1985, nkasa 7-18, 23.
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ya 1 mpe 15 Augústo 1935 (na ebimeli ya Lingelesi).
Okoloba nini?
◻ Mpo na nini emonaneli ya Emoniseli mokapo 7 ezali na ntina monene?
◻ Mpo na nini bampate mosusu oyo balobelami na Yoane 10:16 basuki te bobele na baklisto oyo bazalaki Bayuda te?
◻ Baoyo bazali kokokisa oyo Biblia elobi na ntina na bampate mosusu basengeli kozala bato ya lolenge nini?
◻ Lolenge nini lisese ya bampate mpe ya bantaba elobeli mpenza limemya mpo na litambwisi ya Bokonzi?
◻ Nini emonisi ete ntango oyo ebongisamaki na Yehova mpo na koyanganisa ebele monene ya Emoniseli 7:9 esili koya?