Lifelo
Ndimbola: Babiblia mingi esalelaka liloba “lifelo.” Na bavɛrsɛ oyo Babiblia yango esaleli liloba lifelo, Babiblia mosusu esaleli liloba “lilita,” “mboka ya bawa,” mpe bongo na bongo. Babiblia mosusu ezwi kaka maloba yango ndenge ezali na monɔkɔ ya Grɛki to ya Ebre oyo ntango mosusu ebongolamaka “lifelo”; elingi koloba, bakomaka maloba yango na alfabɛ ya monɔkɔ oyo babongoli na yango Biblia, kasi babongolaka maloba yango te. Maloba yango nini? Ezali sheol na Ebre mpe haides na Grɛki; maloba yango elimboli te esika oyo bakundi moto moko, kasi nkunda ya bato nyonso oyo bakufá; lisusu liloba ya Grɛki geenna, esalelamaka mpo na komonisa liwa ya libela. Nzokande, ezala na mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba to na mangomba mosusu, bateyaka ete lifelo ezali esika ya bademo mpe ezali esika oyo bato mabe bakendaka ntango bakufi mpo bázwa etumbu (mpe basusu balobaka ete ezali esika oyo bato mabe banyokwamaka).
Biblia eteyaka ete bakufi bamonaka mpasi?
Mos. 9:5, 10: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te . . . Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda,* esika ozali kokende.” (Lokola bakufi bayebaka ata eloko moko te, emonani ete bayokaka mpasi te.) (*“Sheole,” AS, RS, NE, JB; “lilita,” Uele; “lifelo,” Dy; “mboka ya bawa,” LNz.)
Nz. 146:4: “Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi* na ye ekufi.” (*“Kokanisa,” hf, 145:4 na Dy; “makambo nyonso oyo bazali kokana,” LL; “mikano,” LNz.)
Biblia eteyaka ete molimo etikalaka na bomoi ntango moto akufi?
Ezk. 18:4: “Molimo* oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.” (*“Molimo,” hf; “moto,” LNz, LL.)
“Likanisi oyo bato bazalaka na yango ete ‘molimo,’ ezali eloko moko ya elimo, oyo emonanaka te, oyo ekabwanaka na ‘nzoto,’ . . . ezali na Biblia te.”—La Parole de Dieu (Paris, 1960), Georges Auzou, profesɛrɛ ya Makomami Mosantu, Seminɛrɛ ya Rouen, France, lok. 128.
“Atako liloba ya Ebre nefesh [na Makomami ya Ebre] ebongolami mbala mingi na liloba ‘molimo,’ ekozala libunga kopesa yango ndimbola oyo euti na Grɛki. Nefesh . . . epesaka ata moke te likanisi ya eloko moko oyo ekoki kokoba kosala mosala soki ekabwani na nzoto. Na Kondimana ya Sika, liloba psuke na Grɛki ebongolamaka mbala mingi na liloba ‘molimo,’ kasi awa mpe esengeli te kopesa yango ndimbola oyo euti na bato ya filozofi ya Grɛki. Mbala mingi, liloba yango elimbolaka ‘bomoi,’ to ‘makasi,’ to, mbala mosusu elimbolaka ‘moto ye moko.’”—The Encyclopedia Americana (1977), Vol. 25, lok. 236.
Bato ya ndenge nini bakendaka na lifelo oyo Biblia elobeli?
Biblia eteyaka ete bato mabe bakendaka na lifelo?
Nz. 9:17, KJ: “Bato mabe bakozonga na lifelo,* ná mabota nyonso oyo ebosanaka Nzambe.” (*“Lifelo,” 9:18 na Dy; mboka ya bawa, 9:18 na LNz; “liwa,” TEV; “esika ya bakufi,” hf; “Sheole,” AS, RS, NE, JB; “Nkunda,” NW.)
Biblia eteyaka mpe ete bato ya sembo bakendaka na lifelo?
Yobo 14:13, Dy: “[Yobo abondelaki:] Nani akopesa ngai likambo oyo, ete obomba ngai na lifelo,* mpe obomba ngai tii nkanda na yo ekoleka, mpe oponela ngai ntango oyo okokanisa ngai?” (Nzambe ye moko alobaki ete Yobo azalaki moto “oyo azangi mbeba mpe azali sembo, abangaka Nzambe mpe akimaka mabe.”—Yobo 1:8.) (*“Lilita,” Uele; “mboka ya bawa,” LNz; “Sheole,” AS, RS, NE, JB; “Nkunda,” NW.)
Mis. 2:25-27, KJ: “Davidi alobaki mpo na ye [Yesu Kristo], . . . Mpo okotika molimo na ngai na lifelo te,* to okotika Mosantu na yo anyokwama te to amona kopɔla te.” (Lokola Nzambe ‘atikaki’ Yesu na lifelo te, yango emonisi ete Yesu akendaki na lifelo, to Hadesi, mpo na mwa ntango, boye te?) (*“Lifelo,” Dy; “liwa,” NE; “esika ya bakufi,” hf; “mboka ya bawa,” LNz; “Hedesi,” Uele; “Hadesi,” RS, JB; “Seolo,” KSM; “Nkunda,” NW.)
Moto akoki kobima na lifelo?
Em. 20:13, 14, KJ: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kati na yango; mpe kufa ná lifelo* ezongisaki bakufi oyo bazalaki kati na yango: mpe basambisaki bango, moto na moto, na kolanda misala na bango. Mpe kufa na lifelo ebwakamaki na kati ya laki ya moto.” (Na yango bakufi bakobima na lifelo. Simbá mpe ete lifelo ekeseni na laki ya mɔtɔ mpo ekobwakama na kati ya laki ya mɔtɔ.) (*“Lifelo,” Dy; “Mboka ya bato bakufá,” LL; “Ades,” LNz; “Hedesi,” Uele; “Hadesi,” RS, JB; “Nkunda,” NW.)
Mpo na nini bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge mpo na oyo Biblia elobi mpo na lifelo?
“Lokola babongoli ya liboso ya Biblia babongolaki bisika nyonso liloba ya Ebre Sheole mpe liloba ya Grɛki Hadesi mpe liloba ya Grɛki Gehena na liloba lifelo, yango etyaki mobulu mingi na mitó ya bato. Atako babongoli mosusu bazwaki kaka maloba yango na minɔkɔ ya Ebre ná Grɛki mpe bakomi yango na alfabɛ ya monɔkɔ oyo babongoli na yango Biblia, yango elongolaki mobulu na mitó ya bato te ntango babongisaki lisusu Babiblia yango.”—The Encyclopedia Americana (1942), Vol. XIV, lok. 81.
Babongoli balandaki bindimeli na bango na esika ete bábongola na bisika nyonso maloba yango ndenge ezalaki na minɔkɔ ya ebandeli. Na ndakisa: (1) Na King James Version liloba sheol ebongolami na maloba “lifelo,” “lilita,” mpe “libulu”; liloba haides ebongolami na maloba “lifelo” mpe “lilita”; geenna mpe ebongolami na liloba “lifelo.” (2) Today’s English Version esaleli liloba “Hadesi” ndenge ezalaki na Grɛki haides mpe ebongoli yango na “lifelo” mpe “mboka ya bawa.” Kasi ebongoli mpe liloba haides na geenna. (3) The Jerusalem Bible esaleli liloba haides mbala motoba kaka ndenge ezali na Grɛki, kasi babongoli yango te; na bavɛrsɛ mosusu liloba yango ebongolami na maloba “lifelo” mpe “mboka ya nse.” Ebongoli mpe liloba geenna na “lifelo,” esali mpe bongo mpo na liloba haides na bisika mibale. Na yango, ndimbola ya solo ya maloba yango na minɔkɔ ya ebandeli eyebanaki lisusu malamu te.
Bato mabe bakozwa etumbu ya libela na libela?
Mat. 25:46, LNz: “Bango bakokende kozwa etumbu ya seko [“kokatama,” Int; Grɛki, kolasin]: kasi bato ba bosembo bakoyingela o bomoi bwa seko.” (The Emphatic Diaglott etye “kolongolama” na esika ya “etumbu.” Maloba na nse ya lokasa elobi: “Kolasin . . . euti na liloba kolazoo, oyo elimboli, 1. Kolongola; ndenge bakataka bitape ya nzete, kopapa to kokata. 2. Kopekisa, kosukisa. . . . 3. Kobɛta fimbo, kopesa etumbu. Kolongola moto na bomoi, to kati na bato, to kopekisa ye, ezali lokola etumbu, yango nde ndimbola ya misato ya liloba yango ya elilingi. Bazwaki ndimbola ya liboso mpo eyokani malamu na eteni ya mibale ya fraze yango, mpo ezali komonisa polele bokeseni kati na eteni ya liboso mpe ya mibale. Bayengebene bakozwa bomoi, bato mabe bakolongolama na bomoi to bakokufa. Talá 2 Tes. 1.9.”)
2 Tes. 1:9, LNz: “Bakozwa etumbu ya liwa lya seko,* bakozala mosika na elongi ya Mokonzi, mosika na nkembo ya nguya ya ye.” (*“Kobeba na seko,” hf; “Bakokufa libela,” LL; “kobunga libela,” JB; “bakozwa likamba na liwa na seko,” KSM; “bakozwa etumbu; bakokufa libela,” BSN.)
Yuda 7, KSM: “Bongo mpe Sɔdɔmɔ na Amola, na mboka mosusu ezingaki yango, babilaka pite na motindo moko na bango wana, bakendaka mpe kobila nzoto mosusu; sasaipi bazali elakiseli oyo kozwa likamba na sembo na mɔtɔ na seko.” (Mɔtɔ oyo ebomaki Sodoma ná Gomora ekufá esili koleka bankóto ya bambula. Kasi makambo oyo mɔtɔ yango esalá etikalá libela; bingumba yango etongamá lisusu te. Nzokande, lisambisi ya Nzambe ezalaki kaka te mpo na bingumba yango, kasi mpe mpo na bato mabe oyo bazalaki kofanda wana. Likambo oyo ekómelaki bango, ezali ndakisa ya kokebisa. Na Luka 17:29, Yesu alobi ete “babomamaki”; Yuda 7 emonisi ete kobomama yango ezali ya seko.)
‘Konyokwama ya libela na libela’ oyo Emoniseli elobeli elimboli nini?
Em. 14:9-11; 20:10, LNz: “Moto nyoso akumbameli nyama, mpe ekeko ya ye mpe azali na elembo ya ye o elongi to o loboko, ye mpe akomele vino ya nkanda ya Nzambe: basili balengeli vino eye esangani na mai te o nkeni ya nkanda ya Nzambe, akonyokwama na moto mpe na fofolo o miso ma banzelu basantu mpe ma Mwa-Mpata. Baye bakumbameli Nyama na ekeko ya ye, baye bazwi elembo ya nkombo ya ye, milinga mya minyoko mya bango [Grɛki, basanismou] mikobuta o likoló o bileko na bileko, bakopema te ezala na moi ezala na butu.” “Zabolo oyo asenginyi bango bakobwaka ye o etima ya moto mpe ya fofolo, bakonyokwama bongo esika yoko ná Nyama ná profeta wa lokuta butu moi o bileko binso seko.”
‘Konyokwama’ oyo bavɛrsɛ yango elobeli ezali nini? Simbá ete Emoniseli 11:10 (LNz) elobi ete ‘baprofeta yango bayokisaki bato ba nse mpasi mingi.’ Minyoko yango ezali kouta na nsango oyo basakoli yango bazali kosakola, oyo ezali kobimisa polele makambo oyo bato bazali kosala mpe ezali koyokisa bango nsɔni. Emoniseli 14:9-11 (LNz) elobi ete bato oyo basambelaka “nyama mpe ekeko ya ye” ‘bakonyokwama na moto mpe na fofolo.’ Yango elimboli te minyoko nsima ya liwa mpo “bato bakufi bayebi eloko te.” (Mos. 9:5, LNz) Bongo, nini ezali konyokola bango ntango bazali naino na bomoi? Ezali nsango oyo basaleli ya Nzambe bazali kosakola, oyo ezali komonisa ete bato oyo bazali kosambela “nyama mpe ekeko ya ye” bakokufa ‘liwa lya mibale’ oyo emonisami na “etima ya moto mpe ya fofolo.” Milinga ya kobomama na bango ekomata libela na libela mpo kobomama na bango ekozala ya seko na seko, bato bakobosana yango te. Ntango Emoniseli 20:10 elobi ete Zabolo ‘akonyokwama o bileko binso seko’ na “etima ya moto mpe ya fofolo,” yango elimboli nini? Emoniseli 21:8 (LNz) elobi polele ete “etima ya moto mpe ya fofolo” elimboli ‘liwa lya mibale.’ Na yango, lokola Zabolo ‘akonyokwama’ seko, yango elimboli ete akobima kuna ata moke te, akotikala libela na libela na kati ya liwa ya seko. Ndenge oyo basaleli liloba “monyoko” (oyo euti na Grɛki basanos) ekundweli biso ndenge liloba yango esalelami na Matai 18:34, epai liloba yango ya Grɛki esalelami mpo na kolobela ‘mokɛngɛli ya bolɔkɔ.’—RS, AT, ED, NW.
‘Mɔtɔ ya Gehena’ oyo Yesu alobelaki ezali nini?
Makomami ya Grɛki ya bokristo esaleli liloba Gehena mbala 12. Basaleli yango mbala mitano mpo na kolobela mɔtɔ. Na Babiblia mosusu maloba ya Grɛki geennan tou pyros ebongolami “mɔtɔ ya lifelo” (NE, KJ, Dy), “libulu ya mɔtɔ” (AT), mpe “mɔtɔ ya Gehena” (NAB).
Esika liloba yango eutá: Lobwaku ya Hinome (Gehena) ezalaki na libanda ya bifelo ya Yerusaleme. Mpo na mwa ntango, bato bakómisaki yango esika ya losambo ya bikeko, mpe esika ya kotumba bana na bango mbeka. Na siɛklɛ ya liboso, Gehena ezalaki esika ya kotumba bosɔtɔ ya Yerusaleme. Bazalaki kobwaka bibembe ya banyama na lobwaku yango mpo ezika na mɔtɔ, mpe bazalaki kobakisa sufulu na mɔtɔ yango mpo epela makasi. Bazalaki mpe kobwaka na Gehena bibembe ya bato mabe oyo babongaki kokundama na malita te. Yango wana na Matai 5:29, 30, Yesu alobelaki kobwakama ya “nzoto mobimba” na Gehena. Soki ebembe ekwei na mɔtɔ oyo ezali kopela ntango nyonso, ezalaki kozika, kasi soki ekwei pembeni ya lobwaku, yango ezalaki kopɔla wana, mpe nkusu oyo ezalaki wana ntango nyonso ezalaki kolya yango. (Mrk. 9:47, 48) Bazalaki kobwaka bato ya bomoi na Gehena te; na yango Gehena ezalaki esika oyo bato bazalaki konyokwama te.
Na Matai 10:28, Yesu akebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete ‘bábanga nde moto oyo akoki koboma ná molimo ná nzoto na Gehena.’ Yango elimboli nini? Simbá ete vɛrsɛ yango elobeli te minyoko na mɔtɔ ya Gehena; kasi elobi ‘bóbanga nde moto oyo akoki koboma na Gehena.’ Lokola Yesu alobeli “molimo” kaka yango moko, alingaki nde kobɛta nsɛtɛ ete Nzambe akoki koboma moto libela mpe kolongola ye elikya nyonso ya kozala na bomoi; mpe na ndenge yango, elikya ya lisekwa ezali lisusu te. Na yango, bavɛrsɛ oyo ezali kolobela ‘mɔtɔ ya Gehena,’ ezali na ndimbola moko na ‘laki ya mɔtɔ’ oyo elobelami na Emoniseli 21:8, elingi koloba, kobomama, to “liwa ya mibale.”
Biblia elobi ete etumbu ya lisumu ezali nini?
Rom. 6:23: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.”
Soki moto akufi, akoki lisusu kozwa etumbu mpo na masumu na ye?
Rom. 6:7: “Moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.”
Konyokola bato mabe libela na libela eyokani mpenza na bomoto ya Nzambe?
Yir. 7:31: “[Bato ya Yuda oyo bapɛngwi] batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete, oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome, mpo na kotumba bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi na mɔtɔ, likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyaki na kati ya motema na ngai te.” (Soki likambo yango eyelá Nzambe na motema ata mokolo moko te, yango emonisi ete Nzambe asalaka likambo wana te.)
Ndakisa: Okoloba nini mpo na moboti oyo atye lobɔkɔ ya mwana na ye na mɔtɔ mpo na kopesa ye etumbu? “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8) Akoki nde kosala likambo oyo moboti ya bolingo akoki kosala te? Ekoki kosalema te!
Ntango Yesu alobelaki mozwi mpe Lazare alingaki nde koteya ete bato mabe banyokwamaka nsima ya liwa?
Lisolo oyo ezali na Luka 16:19-31, ezali likambo oyo esalemaki solo to ezali kaka ndakisa mpo na koteya likambo moko boye? The Jerusalem Bible, na maloba na yango na nse ya lokasa, endimi ete ezali kaka “ndakisa oyo basaleli na lisolo kasi ezali kolobela moto ya solo te.” Soki tolobi ete ezali likambo oyo esalemaki mpenza, yango elimboli ete bato nyonso oyo bandimami na Nzambe, bango nyonso bakokoka kozala na ntolo ya moto moko, Abrahama; ete mɔtɔ ya nkunda ekoki te kokaukisa litangá ya mai oyo ezali na nsɔngɛ ya mosapi; ete mwa litangá ya mai ekoki kosalisa moto oyo azali konyokwama na nkunda. Okoki mpenza kondima likambo yango? Soki ndakisa yango ezalaka likambo oyo esalemaki mpenza, mbɛlɛ eyokani te na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Soki Biblia ezali bongolabongola, moto oyo alingaka solo, akosalela yango mpo na kolendisa kondima na ye? Nzokande, Biblia ezali bongolabongola te.
Ndakisa yango elimboli nini? “Mozwi” azalaki elilingi ya Bafarisai. (Talá vɛrsɛ 14.) Lazare, mosɛngi-biloko, azalaki elilingi ya Bayuda oyo Bafarisai bazalaki kotyola kasi oyo babongolaki motema mpe bakómaki bayekoli ya Yesu. (Talá Luka 18:11; Yoane 7:49; Matai 21:31, 32.) Liwa na bango mibale ezalaki mpe ya elilingi, emonisaki mbongwana oyo esalemaki na bomoi na bango. Na yango, bato oyo bazalaki kotyolama liboso, bandimamaki na Nzambe, mpe baoyo emonanaki lokola bandimami, Nzambe aboyaki bango, mpe bazalaki konyokwama mpo na nsango ya lisambisi oyo bato oyo batyolamaki bazalaki kosakola.—Mis. 5:33; 7:54.
Liteya ya lifelo ya mɔtɔ eutá wapi?
Bato ya Babilone mpe ya Asiri ya kala bazalaki kondima ete lifelo ezali “esika moko . . . ya kobangisa mpenza oyo banzambe ná bademo ya makasi mingi mpe ya mobulu bakɛngɛlaka.” (The Religion of Babylonia and Assyria, Boston, 1898, Morris Jastrow, Jr., lok. 581) Liteya ya lifelo ya mɔtɔ oyo bokristo ya nkombo mpamba eteyaka eutá na losambo ya Ezipito ya kala. (The Book of the Dead, New Hyde Park, N.Y., 1960, maloba ya ebandeli ezali ya E. A. Wallis Budge, nk. 144, 149, 151, 153, 161) Lingomba ya Buda, oyo ebandaki na siɛklɛ ya motoba L.T.B., ekómaki koteya ete ezali na lifelo ya mɔtɔ ná lifelo ya malili. (The Encyclopedia Americana, 1977, Vol. 14, lok. 68) Bililingi ya lifelo oyo ezali na bandako-nzambe ya Lingomba ya Katolike na Italie eutá na bato ya kala (Etrusques).—La civiltà etrusca (Milan, 1979), Werner Keller, lok. 389.
Kasi liteya yango oyo etyolaka Nzambe ebandá kala mpenza. Makanisi ya nsɔmɔ oyo emonisaka ete lifelo ezali esika ya minyoko ekoselaka Nzambe makambo mpe yango euti na moto oyo akoselaka Nzambe ntango nyonso (Zabolo, oyo elimboli “Mokosi”), oyo Yesu Kristo abengaki “tata ya lokuta.”—Yoa. 8:44.