Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | Sanza ya 12 15
    • 9. Likanisi nini ya lokuta bato mosusu bazalaka na yango na likambo etali limpa oyo Yesu asalelaki?

      9 Bandimi mosusu ya mangomba balobaka ete Yesu alobaki mpenza ete: ‘Oyo ezali nzoto na ngai,’ na ndenge yango bandimaka ete limpa ebongwanaki na ndenge ya likamwisi mosuni na ye. Nzokande, likanisi yango ezali lokuta.a Yesu azalaki liboso ya bantoma na ye ya sembo, mpe limpa ezangi levire oyo basengelaki kolya ezalaki mpe liboso na bango. Emonani polele ete Yesu alobaki maloba ya elilingi, ndenge azalaki koloba mbala mingi.​—Yoa. 2:19-21; 4:13, 14; 10:7; 15:1.

      10. Limpa oyo basalelaka na ntango ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo elimboli nini?

      10 Limpa oyo bantoma bamonaki mpe balingaki kolya ezalaki elilingi ya nzoto ya Yesu. Nzoto nini? Na kala, basaleli ya Nzambe bakanisaki ete lokola Yesu abukaki limpa kasi ata mokuwa na ye moko te ebukanaki, na boye limpa elimboli “nzoto ya Kristo,” lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Ef. 4:12; Rom. 12:4, 5; 1 Ko. 10:16, 17; 12:27) Nzokande, na nsima emonanaki ete makanisi ya bato mpe Makomami emonisaka ete limpa ezali elembo ya nzoto mpenza ya Yesu, oyo Nzambe abongisaki mpo na ye. Yesu “anyokwamaki na nzoto,” kutu babakaki ye na nzete ya mpasi. Na yango, na ntango ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo, limpa elimbolaka nzoto mpenza wana ya Yesu oyo “amemaki [na yango] masumu na biso.”​—1 Pe. 2:21-24; 4:1; Yoa. 19:33-36; Ebr. 10:5-7.

  • ‘Bósala boye mpo na kokanisa ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | Sanza ya 12 15
    • 15, 16. Bakosala na limpa nini na mokolo ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo?

      15 Pene ya kosilisa diskur yango, molobi akomonisa ete ntango ekoki mpo tósala ndenge Yesu ayebisaki bantoma na ye basalaka. Ndenge tomonisaki yango liboso, tokosalela biloko mibale: limpa ezangi levire mpe vinyo ya motane. Biloko yango esengeli kozala na mesa mosika te na molobi. Akobenda likebi na lisolo moko ya Biblia oyo elobeli makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki ntango abandisaki molulu yango. Na ndakisa, na lisolo ya Matai, tozali kotánga boye: “Yesu akamataki limpa mpe, nsima ya kobondela, abukaki yango mpe, apesaki yango bayekoli, alobi: ‘Bókamata, bólya. Oyo elakisi nzoto na ngai.’” (Mat. 26:26) Yesu abukaki limpa wana oyo ezangi levire mpo alekisa yango epai ya bantoma na ye oyo bafandaki na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe ya mobali. Okomona ete na Ekaniseli oyo ekosalema mokolo ya 14/04/2014, mampa oyo babuki bitenibiteni mpe batye na saani ekozala.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto