Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Azali kobondela ntango azali na mawa makasi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Ntango bakómi na esika kitoko yango oyo etondi na banzete ya olive, Yesu atiki bantoma mwambe wana. Mbala mosusu batikali pene na porte ya elanga, mpe alobi na bango: “Bófanda awa ntango ngai nakei kobondela kuna.” Yesu akamati bantoma misato​—Petro, Yakobo, ná Yoane—​bakɔti na kati ya elanga. Akómi komitungisa mingi mpe alobi na bango: “Molimo na ngai eyoki mawa makasi, ɛɛ tii na liwa. Bótikala awa mpe bósɛnzɛla elongo na ngai.”​—Matai 26:36-38.

  • Azali kobondela ntango azali na mawa makasi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Ntango Yesu azalaki na likoló, amonaki mpasi makasi ya bato oyo Baroma bazalaki koboma. Sikoyo lokola Yesu akómi moto oyo amityaka na esika ya basusu mpe akoki koyoka mpasi, azali kosepela te ete likambo ya ndenge wana ekómela ye. Kasi, azali komitungisa mingimingi nde mpo azali koyeba ete kokufa lokola mosali-mabe ekoki kofingisa nkombo ya Tata na ye. Nsima ya bangonga moke, bakoboma ye likoló ya nzete ndenge babomaka moto oyo afingi Nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto