Tólanda ndakisa ya Yesu—Tósɛnzɛlaka
“Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka.”—MAT. 26:41.
OKOPESA EYANO NINI?
Ndenge nini mabondeli na biso ekoki komonisa ete tozali kosɛnzɛla?
Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kosɛnzɛla na mosala ya kosakola?
Mpo na nini ezali na ntina tósɛnzɛla ntango tokutani na komekama, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
1, 2. (a) Mituna nini tokoki komituna na oyo etali kolanda ndakisa ya Yesu na likambo etali kosɛnzɛla? (b) Biso bato ya kozanga kokoka tokoki mpenza komekola ndakisa ya Yesu, moto ya kokoka? Pesá ndakisa.
MBALA mosusu okoki komituna boye: ‘Tokoki mpenza kosɛnzɛla ndenge Yesu asɛnzɛlaki? Yesu azalaki moto ya kokoka! Longola yango, Yesu azalaki ntango mosusu koyeba malamu makambo oyo ekosalema ata nsima ya bankóto ya bambula! Azalaki mpenza na ntina ya kosɛnzɛla?’ (Mat. 24:37-39; Ebr. 4:15) Tóluka naino biyano na mituna yango mpo tómona ntina oyo tosengeli mpenza kosɛnzɛla mpe ntina oyo tosengeli kosala yango na lombangu.
2 Bato ya kozanga kokoka bakoki mpenza komekola moto ya kokoka? Ɛɛ, bakoki, kaka ndenge moto akoki koyekola epai ya moteyi ya malamu mpe kolanda ndakisa na ye. Tózwa ndakisa ya moto oyo azali koyekola kobɛta litimbo. Na ebandeli, akokoka te kobwaka mbanzi na esika oyo azali kokana; kasi akokoba koyekola mpe komekameka. Mpo ayeba kobɛta malamu, akolanda na likebi ndakisa ya molakisi na ye, moto oyo amesaná kobɛta litimbo. Moyekoli akotala ndenge molakisi na ye azali kotɛlɛma, ndenge azali kotya mabɔkɔ na ye, mpe ndenge oyo azali kotya misapi na nsinga ya litimbo. Mokemoke, moyekoli yango akoyeba soki asengeli kobenda nsinga na makasi ya ndenge nini, kotalela soki mopɛpɛ ezali makasi to te, mpe akokoba kosala milende. Soki azali kosala makambo oyo azali komona epai ya molakisi na ye, nsukansuka akobanda kobɛta malamu tii akobɛta mbanzi na esika mpenza oyo azali kokana. Ndenge moko mpe, tosengeli kokoba kolanda malako ya Yesu mpe komekola ndakisa na ye ya kokoka mpo tókóma bakristo ya malamu koleka.
3. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete asengelaki kosɛnzɛla? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?
3 Tólobela sikoyo likambo ya kosɛnzɛla. Yesu asengelaki mpenza kosɛnzɛla? Ɛɛ. Na ndakisa, na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu alobaki na bantoma na ye ya sembo ete: “Bósɛnzɛla elongo na ngai.” Abakisaki boye: “Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.” (Mat. 26:38, 41) Atako Yesu azalaki ntango nyonso kosɛnzɛla, na ntango wana ya mpasi, azalaki na mposa ya kosɛnzɛla mingi koleka mpe kozala mpenza penepene na Tata na ye ya likoló. Ayebaki ete bayekoli na ye mpe basengelaki kozala ekɛngɛ, kaka na ntango wana te, kasi mpe na mikolo ekoya. Na yango, tótalela ntina oyo Yesu alingi ete tósɛnzɛlaka. Na nsima, tokotalela ndenge misato oyo tokoki kosɛnzɛla lokola Yesu na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.
NTINA OYO YESU ALINGI TÓSƐNZƐLAKA
4. Mpo na nini tosengeli kosɛnzɛlaka?
4 Na mokuse, Yesu alingi ete tósɛnzɛlaka mpo na makambo oyo toyebi te mpe mpo na makambo oyo toyebi. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayebaki makambo nyonso oyo ekosalema na mikolo ekoya? Te, mpamba te na komikitisa nyonso, alobaki boye: “Kasi mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Mat. 24:36) Na ntango wana, “Mwana” elingi koloba Yesu, ayebaki te mokolo oyo nsuka ya mokili ekoya. Bongo biso lelo oyo? Toyebi makambo nyonso oyo ekosalema na mikolo ekoya? Te! Toyebi te ntango oyo Yehova akotinda Mwana na ye aboma mokili oyo mabe. Soki toyebaki yango, elingaki kozala na ntina te tósɛnzɛlaka. Ndenge Yesu amonisaki yango, nsuka ekoya na mbalakaka, na ntango oyo tozali kokanisa te; yango wana tosengeli mpenza kosɛnzɛlaka.—Tángá Matai 24:43.
5, 6. (a) Ndenge nini koyeba makambo oyo Nzambe akosala na mikolo ekoya esalisaka biso tósɛnzɛlaka? (b) Mpo na nini makambo oyo toyebi na ntina etali Satana etindaka biso tósɛnzɛla lisusu mingi?
5 Nzokande, Yesu ayebaki mpe makambo mingi ya malamu oyo ekosalema na mikolo ekoya, makambo oyo bato mingi ya ntango na ye bayebaki ata moke te. Boyebi na biso ekokani ata moke te na oyo ya Yesu, kasi mateya na ye esalisi biso tóyeba makambo mingi na ntina etali Bokonzi ya Nzambe mpe makambo oyo ekosala mosika te. Bato mingi zingazinga na biso, ezala na kelasi, na mosala, to na teritware, bazali mpenza na molili mpe bayebi mateya yango te. Wana ezali ntina mosusu oyo tosengeli kosɛnzɛlaka. Ndenge moko na Yesu, tosengeli mpenza kofungola miso, koluka mabaku ya koyebisa basusu makambo oyo toyebi na ntina etali Bokonzi ya Nzambe. Libaku nyonso ya ndenge wana ezali na ntina mingi, mpe tosengeli te kolekisa yango. Bomoi ya bato ezali na likama!—1 Tim. 4:16.
6 Yesu ayebaki likambo mosusu oyo etindaki ye asɛnzɛlaka. Ayebaki ete Satana azalaki na ekateli makasi ya komeka ye, konyokola ye, mpe kobebisa bosembo na ye. Monguna yango azalaki koluka “ntango mosusu ya malamu” mpo ameka Yesu. (Luka 4:13) Yesu alalaki mpɔngi ata moke te. Amibongisaki mpo na likambo nyonso oyo akokutana na yango, ezala komekama, botɛmɛli, to monyoko. Ezali mpe bongo mpo na biso, boye te? Toyebi ete tii lelo oyo, Satana azali “lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” Yango wana Liloba ya Nzambe elendisi bakristo nyonso ete: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka.” (1 Pe. 5:8) Kasi, ndenge nini tokoki kosala yango?
KOSƐNZƐLA NA MABONDELI
7, 8. Toli nini Yesu apesaki na likambo etali kobondela, mpe ndakisa nini atikelá biso?
7 Biblia emonisi ete kobondela ezali mpenza na ntina mpo tózala ekɛngɛ na elimo to tósɛnzɛlaka. (Kol. 4:2; 1 Pe. 4:7) Mwa moke nsima ya koloba na bayekoli na ye ete básɛnzɛla elongo na ye, Yesu alobaki lisusu boye: “Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.” (Mat. 26:41) Yesu alingaki nde komonisa ete basengelaki kosala yango kaka na ntango wana ya mpasi? Te, apesaki toli oyo tosengeli kolanda mokolo na mokolo.
8 Yesu atiká ndakisa malamu na likambo etali kobondela. Mbala mosusu oyebi ete na libaku moko alekisaki butu mobimba na kobondela Tata na ye. Tómeka kokanisa ndenge likambo yango elekaki. (Tángá Luka 6:12, 13.) Mbala mosusu ezalaki pene ya engumba Kapernaume. Na mpokwa, Yesu amataki na ngomba moko pembeni ya Mbu ya Galile. Lokola molili ekɔtaki, ntango azalaki kotala zingazinga, mbala mosusu azalaki komona ndenge miinda ya mafuta ezalaki kopela na Kapernaume mpe na bamboka mosusu ya pembeni. Kasi, ntango Yesu azalaki kobondela Yehova, atyaki makanisi na ye nyonso na libondeli na ye. Alekisaki bangonga mingi na libondeli yango. Azalaki kotya likebi te na miinda oyo ezalaki kokufa mokomoko, to na sanza oyo ezalaki na likoló, to mpe na banyama ya zamba oyo ezalaki kotambolatambola na butu. Mbala mosusu abondelaki mingimingi mpo na ekateli monene oyo asengelaki kozwa: kopona bantoma 12. Na ntembe te, Yesu azalaki kobondela na etingya mpo na koyebisa Tata na ye makanisi na ye mpe mabanzo na ye mpo na moyekoli mokomoko mpe kosɛnga ye atambwisa ye mpe apesa ye bwanya.
9. Ndenge Yesu abondelaki butu mobimba ekoki koteya biso nini?
9 Ndakisa ya Yesu ezali koteya biso nini? Ezali nde koteya biso ete tosengeli kolekisaka bangonga mingi na kobondela? Te, mpo ye moko alobaki na boboto nyonso mpo na bayekoli na ye ete: “Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.” (Mat. 26:41) Atako bongo, tokoki komekola Yesu. Na ndakisa, tobondelaka Tata na biso ya likoló liboso tózwa ekateli nyonso oyo ekoki kotalela biso moko, libota na biso, to bandeko na biso na kati ya lisangá? Na mabondeli na biso, tomonisaka ete tomibanzabanzaka mpo na bandeko na biso bakristo? Mabondeli na biso eutaka mpenza na motema to tozongelaka kaka maloba oyo tomesaná na yango? Tóbosana mpe te ete Yesu asepelaki kozala na esika na ye moko mpo asolola malamu ná Tata na ye. Lelo oyo, lokola misala na biso ezali kozwa biso ntango mingi, ezali mpasi te tóbosana makambo oyo eleki ntina. Soki tozali kozwa ntango mpo na kobondela Yehova na motema mobimba na esika ya biso moko, tokolala mpɔngi te na elimo. (Mat. 6:6, 7) Tokopusana penepene na Yehova, tokoluka kosala nyonso mpo boyokani na biso ná ye ekóma makasi, mpe tokoboya kosala makambo oyo ekoki kolɛmbisa boyokani yango.—Nz. 25:14.
KOSƐNZƐLA NA MOSALA YA KOSAKOLA
10. Ndakisa nini emonisi ete Yesu azalaki koluka mabaku ya kopesa litatoli?
10 Yesu asɛnzɛlaki na mosala oyo Yehova apesaki ye. Na misala mosusu, moto azalaka na likoki ya kotika ete makanisi na ye eyengayenga kozanga ete abebisa mosala to likama esalema. Nzokande, misala mingi esɛngaka moto azala ekɛngɛ, atya makanisi na ye epai mosusu te. Mosala ya kosakola ezali mpe ndenge wana. Yesu azalaki ntango nyonso ekɛngɛ na mosala na ye; azalaki koluka mabaku ya koyebisa basusu nsango malamu. Na ndakisa, ntango ye ná bayekoli na ye bakómaki na engumba Sikare nsima ya kotambola ntɔngɔ mobimba, bayekoli bakendaki kosomba biloko ya kolya. Yesu atikalaki pembeni ya libulu ya mai na libándá ya engumba mpo apema, kasi azalaki kaka ekɛngɛ, mpe azwaki libaku ya kopesa litatoli. Mwasi moko Mosamaria ayaki kotɔka mai. Yesu akokaki komona malamu alala moke. Akokaki mpe koluka ntina ya kolekisa libaku ya kosolola na mwasi yango. Kasi, akangaki monɔkɔ te, mpe abandaki lisolo na mwasi yango, mpe apesaki litatoli oyo ebongolaki bomoi ya bato mingi na engumba yango. (Yoa. 4:4-26, 39-42) Tokoki komekola malamumalamu ndakisa ya Yesu na likambo etali kosɛnzɛla. Na ndakisa, tokoki kosala makasi tólukaka mpenza mabaku ya kosakola nsango malamu epai ya bato oyo tokutanaka na bango mokolo na mokolo.
11, 12. (a) Yesu alobaki nini na bato oyo balingaki kolongola likebi na ye na mosala na ye? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki na bokatikati?
11 Bato mosusu oyo bakanisaki ete bazali koluka bolamu ya Yesu balingaki kolongola likebi na ye na mosala na ye. Na Kapernaume, bato basepelaki mingi na ndenge Yesu abikisaki bato na ndenge ya likamwisi, yango wana balingaki atikala na engumba na bango. Basalaki mabe te. Nzokande, Yesu azalaki na mokumba ya kosakola na engumba moko kaka te, kasi epai ya “bampate [nyonso] ya ndako ya Yisraele oyo babungá.” (Mat. 15:24) Yango wana alobaki na bango boye: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:40-44) Tomoni mpenza ete Yesu atyaki makanisi na ye nyonso na mosala ya kosakola. Atikaki eloko moko te elongola likebi na ye na mosala yango.
12 Lokola Yesu amipesaki na mosala na ye, yango elingi koloba ete azalaki na molende ya mabe to azalaki kosepela na makambo mosusu te? Amipesaki nde mingi na mosala na ye mpe azalaki kokipe ata moke te makambo oyo mabota bazalaka na mposa na yango? Te, Yesu azalaki mpenza na bokatikati. Azalaki kosala makambo mosusu oyo epesaka esengo mpe kolekisa ntango ná baninga. Azalaki komibanzabanza mpo na mabota, azalaki koyeba bamposa mpe mikakatano na bango; azalaki mpe kolakisa ete alingaka bana mike.—Tángá Marko 10:13-16.
13. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na oyo etali kosɛnzɛla mpe kozala na bokatikati na mosala ya kosakola Bokonzi?
13 Wana tozali kolanda ndakisa ya Yesu na oyo etali kosɛnzɛla, ndenge nini tokoki kosala makasi tózala mpe na bokatikati lokola ye? Tosengeli kotika te ete mokili oyo elongola likebi na biso na mosala ya kosakola. Ata baninga to bandeko na biso oyo bakanisi ete bazali koluka bolamu na biso bakoki kotinda biso tókitisa molende na biso na mosala ya kosakola to tóluka kozala na bomoi lokola ya bato nyonso. Nzokande, soki tozali komekola Yesu, tokotalela mosala ya kosakola lokola bilei na biso. (Yoa. 4:34) Mosala yango esalisaka biso tózala makasi na elimo mpe epesaka biso esengo. Atako bongo, tosengeli kozala na bokatikati, tosengeli te komimonisaka sembo koleka ndelo to mpe koboya makambo oyo epesaka esengo na bomoi. Lokola Yesu, tosengeli kozala na esengo mpe na bokatikati mpamba te tosalelaka “Nzambe ya esengo.”—1 Tim. 1:11.
KOSƐNZƐLA NA NTANGO YA KOMEKAMA
14. Na ntango ya komekama, likambo nini tosengeli kobosana te, mpe mpo na nini?
14 Ndenge tomonaki yango, mabaku mingi oyo Yesu asalelaki mpo na kolendisa bayekoli na ye ete básɛnzɛlaka ezalaki na ntango oyo akutanaki na komekama makasi. (Tángá Marko 14:37.) Ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kolanda ndakisa na ye malamumalamu. Bato mingi ntango bakutani na komekama babosanaka likambo moko ya ntina mingi. Kutu, mokanda ya Masese ezongeli yango mbala mibale ete: “Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete elongobani, kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.” (Mas. 14:12; 16:25) Soki totyeli mayele na biso motema, mingimingi ntango tokutani na mikakatano minene, tokoki kotya bomoi na biso moko mpe ya bato oyo tolingaka na likama.
15. Komekama nini tata ya libota akoki kokutana na yango ntango azali kolukela libota na ye biloko ya kobikela?
15 Na ndakisa, ekoki kozala ete tata ya libota moko azali kobunda mpenza mpo na koleisa libota na ye. (1 Tim. 5:8) Komekama mpo na ye ekoki kozala ete andima mosala oyo ekobanda kosala ete azangisaka makita, kopekisa ye atambwisaka losambo na kati ya libota, to abimaka na mosala ya kosakola. Soki alandi kaka makanisi na ye, akoki komona ete kondima mosala ya ndenge ezali mabe te, kutu yango nde likambo oyo elongobani. Nzokande, kosala bongo ekoki kobebisa boyokani na ye ná Nzambe to mpe koboma ye na elimo. Eleki mpenza malamu kolanda toli ya Masese 3:5, 6! Salomo akomaki boye: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”
16. (a) Ndakisa nini Yesu atiká na oyo etali kotyela bwanya ya Yehova motema kasi bwanya na ye moko te? (b) Ndenge nini batata mingi bazali kolanda ndakisa ya Yesu na oyo etali kotyela Yehova motema na ntango ya komekama?
16 Ntango Yesu akutanaki na komekama, aboyaki mpenza kotyela mayele na ye moko motema. Kanisá naino! Moto oyo alekaki na bwanya na mokili mobimba amonaki malamu apesaka biyano na kolanda mayele na ye moko te. Na ndakisa, ntango Satana amekaki ye, Yesu azalaki mbala na mbala koloba ete: “Ekomamá.” (Mat. 4:4, 7, 10) Atyelaki bwanya ya Tata na ye motema mpo na kotɛmɛla komekama; na ndenge yango amonisaki ezaleli ya komikitisa oyo Satana atyolaka mpe azangi mpenza. Biso mpe totyelaka bwanya ya Yehova motema? Tata ya libota oyo amekolaka Yesu na likambo etali kosɛnzɛla atikaka Liloba ya Nzambe etambwisa ye, mingimingi na ntango ya komekama. Na mokili mobimba, batata mingi bazali kosala bongo. Bazali kokoba kotya Bokonzi ya Nzambe mpe losambo ya pɛto na esika ya liboso na bomoi na bango, liboso kutu ya bamposa na bango ya mosuni. Na ndenge yango, bazali kokokisa bamposa oyo ya mabota na bango na ndenge oyo eleki malamu. Yehova atikaka bango te, apambolaka milende na bango mpo na kokokisa bamposa na bango ya mosuni, kaka ndenge Liloba na ye elaki.—Mat. 6:33.
17. Nini ezali kotinda yo omekola Yesu na likambo etali kosɛnzɛla?
17 Na ntembe te, Yesu azali ndakisa oyo eleki malamu na likambo etali kosɛnzɛla. Ndakisa na ye ekoki kosalisa, mpe ekoki kutu kobikisa bomoi ya moto. Kobosana te, Satana alingi mpenza ete olala mpɔngi na elimo, kondima na yo elɛmba, ozala mpiɔ te mɔtɔ te na losambo ya Yehova, mpe obebisa bosembo na yo. (1 Tes. 5:6) Kotika ye alonga te! Kobá kosɛnzɛla ndenge Yesu asalaki. Sɛnzɛláká na mabondeli, na mosala ya kosakola, mpe na ntango ya komekama. Soki osali bongo, okozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo ata lelo oyo, na mokili oyo ekómi na nsuka. Longola yango, soki okobi kosɛnzɛla, ntango Nkolo akoya mpo na kobebisa mokili oyo mabe, akokuta yo ozali kolala mpɔngi te mpe ozali kosala mokano ya Tata na ye na molende. Yehova akosepela mingi kopesa yo mbano mpo na bosembo na yo!—Em. 16:15.
[Elilingi na lokasa 6]
Yesu ateyaki mwasi moko na libulu ya mai. Mabaku nini osalelaka mokolo na mokolo mpo na kosakola?
[Elilingi na lokasa 7]
Kokokisa bamposa ya elimo ya libota na yo emonisaka ete ozali kosɛnzɛla