“Ntango na kozala nyɛɛ mpe ntango na koloba”
MBALA boni osilá komilela ete: “Soki nayebaki mbɛlɛ nalobaki bongo te”? Nzokande, okoki komikundola bantango mosusu oyo ozangaki kobimisa likanisi na yo polele. Na nsima oyaki mbala mosusu koloba ete: ‘Mbɛlɛ nalobaki likambo moko.’
Biblia elobi ete ezali na “ntango na kozala nyɛɛ mpe ntango na koloba.” (Mosakoli 3:7) Nzokande, likambo monene ezali bongo—kozwa ekateli mpo na oyo etali ntango oyo osengeli koloba mpe ntango oyo osengeli kofanda nyɛɛ. Mbala mingi, ezalela na biso ya bato ya kozanga kokoka epusaka biso ete tósala mpe tóloba makambo na ntango ebongi te. (Baloma 7:19) Lolenge nini tokoki kozala na bokonzi likoló na lolemo na biso etondi na yauli?—Yakobo 3:2.
Lolenge ya kokamba lolemo
Mpo ete tósalisama na kozwa ekateli na ntina na ntango oyo tosengeli koloba mpe ntango oyo tosengeli kofanda nyɛɛ, tozali te na mposa ya molɔngɔ́ molai ya mibeko mibongisami oyo tokoki kosalela kati na makambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango. Nzokande, tosengeli kotambwisama na bizaleli ya bomoto ya boklisto. Wapi bizaleli yango?
Yesu Klisto ayebisaki ete bolingo ezali ezaleli ya liboso oyo etambwisaka bayekoli na ye. Ayebisaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Soki tomonisi mingi bolingo wana ya bandeko, tokokoka mpe kopekisa malamu mpenza lolemo na biso.
Bizaleli mosusu mibale bikangami na yango bikosalisa lisusu mingi. Moko na yango ezali bongo komikitisa. Ezali kosunga biso ete ‘tótánga bamosusu ete baleki biso.’ (Bafilipi 2:3) Ezaleli mosusu ezali bongo bopɔlɔ, oyo ekobatelaka biso ete “tómipekisa na kosala mabe.” (2 Timoté 2:24, 25) Yesu Klisto azali ndakisa na biso ya kokoka mpo na oyo etali lolenge oyo bizaleli wana bisengeli komonisama.
Lokola ezalaka mpasi mpo na kopekisa lolemo na biso wana tozali kati na ezalela ya mpasi, tiká tótalela makambo oyo malekaki na butu ya mokolo oyo ezalaki liboso ya kufa ya Yesu—wana azalaki na “motema bozito.” (Matai 26:37, 38) Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete Yesu azalaki na mayoki motindo wana, mpamba te elikya ya seko mpo na bato nyonso etalelaki likoki na ye ya kotikala sembo epai na Nzambe.—Baloma 5:19-21.
Na ntembe te, yango ezalaki ntango oyo ebongaki mpenza mpo na Yesu ete asolola elongo na Tata na ye na likoló. Na bongo, akendaki kosambela, kosɛngáká na bayekoli na ye misato ete bákóba kosɛnzɛla. Nsima ya mwa ntango azongaki mpe akutaki bango bazali kolala. Na yango alobaki epai na Petelo ete: “Boyebaki kokɛngɛla na ngai kino ntango moko te?” Mpamela wana oyo epesami na bolingo nyonso elandanaki na maloba oyo emonisaki ete asosolaki bolɛmbu na bango. Alobaki ete: “[Elimo, NW] ezali na mposa nde nzoto ezali na bolɛmbu.” Na nsima, Yesu ayaki lisusu mpe akutaki bayekoli bazali kolala mpongi. Alobaki na bango na boboto nyonso mpe ‘atikaki bango mpe alongwaki, abondelaki mbala na misato.’—Matai 26:36-44.
Wana akutaki bayekoli bazali kolala mpongi mpo na mbala ya misato, asilikaki nokinoki te kasi alobaki ete: “Bozali naino kolala mpongi? Bozali naino kopema? Talá, ntango ebɛlɛmi, bazali kokaba Mwana na moto na mabɔkɔ na bato na masumu.” (Matai 26:45) Bobele moto oyo azali na motema motondi na bolingo, na elimo ya bopɔlɔ ya solosolo mpe ya komikitisa nde akoki kosalela lolemo na lolenge yango na ntango wana ya mpasi.—Matai 11:29; Yoane 13:1.
Mwa moke na nsima, Yesu akangamaki mpe asambisamaki. Awa tokozwa liteya ete na bantango mosusu ezalaka malamu kofanda nyɛɛ, ata wana tozali kati na mosala na biso ya boklisto. Lokola bazalaki koluka kokweisa Yesu na efundeli mabe, banganga-kapita bazalaki na mposa ata moke te ya koluka koyeba solo. Kati na makambo motindo oyo ekokaki kopesa nkanda makasi, Yesu afandaki nyɛɛ.—Kokanisá na Matai 7:6.
Nzokande, Yesu akangaki monɔkɔ te, ntango nganga monene alobaki na ye ete: “Nazali kokatisa yo ndai na Nzambe na bomoi ete oloba na biso soko yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe.” (Matai 26:63) Lokola batyaki ndai liboso na Yesu, ezalaki ntango mpo na ye ete afungola monɔkɔ. Na yango ayanolaki ete: “Yo olobi bongo. Kasi nazali koloba na bino ete, nsima bokomona Mwana na moto kofanda na lobɔkɔ na mobali na nguya mpe koya na mapata na Likoló.”—Matai 26:64.
Na boumeli ya mokolo wana ya ntina mingi, Yesu abatelaki lolemo na ye na lolenge ya kokoka. Mpo na ye, bolingo, bopɔlɔ, mpe komikitisa ezalaki mpenza bizaleli ya bomoto na ye. Lolenge nini biso mpe tokoki kosalela bizaleli wana mpo na kopekisa lolemo na biso wana tozali kati na ezalela ya mpasi?
Lolenge nini kopekisa lolemo wana tozali na nkanda
Wana tozali na nkanda, mbala mingi tolóngaka te kopekisa lolemo na biso. Na ndakisa, mokolo mosusu Paulo mpe Balanaba bakesanaki makanisi. “Balanaba alingaki kokenda na Yoane, oyo abyangami Malako, nde Paulo asepelaki kokamata ye te, oyo atiki bango na Pamfulia mpe akei na bango nzela moko kuna na mosala te. Ntembe makasi ebimi, bongo bakabwani.”—Misala 15:37-39.
Michel,a oyo azalaki kosala misala ya botongi bandako uta mwa bambula, ayebisi ete: “Ezalaki na moto moko oyo nayebaki malamu mpe nazalaki komemya mingi kati na esika ya botongi. Kasi emonanaki lokola ete azalaki ntango nyonso kolinga komonisa mabúngá kati na misala oyo ngai nazalaki kosala. Nazokisamaki na motema mpe nasilikaki kasi namonisaki mayoki na ngai te. Mokolo mosusu alekisaki ndelo wana alobaki mabe na ntina na mosala moko oyo nautaki kosala.
“Nabimisaki mayoki na ngai nyonso oyo nazalaki kobomba. Wana nasilikaki makasi, nayebaki lisusu te ete yango ekokaki kobɛtisa basusu oyo bazalaki zingazinga na biso libaku. Na boumeli ya mokolo wana mobimba, naboyaki kolobisa ye ata mpe kotala ye. Sikawa nasosoli ete nasalaki malamu te. Mbɛlɛ ekokaki kozala malamu soki nafandaki nyɛɛ mpe soki nalobaki bobele wana nkanda na ngai esilaki.”
Na esengo nyonso, bolingo ya boklisto epusaki bato wana mibale ete bázongisa boyokani. Michel alobi ete: “Nsima ya kosolola na bosembo nyonso, moko na moko amityaki na esika ya mosusu, mpe sikawa tozali na boninga makasi.”
Lokola Michel ayekolaki yango, soki tozali na nkanda, mbala mosusu ekozala likambo ya mayele ete tófanda nyɛɛ. Masese 17:27 elobi ete: “Moto na [bososoli, NW] azali na motema mpiɔ.” Bososoli mpe bolingo ya boklisto ekosalisa biso ete tópekisa mposa ya koloba kozanga kokanisa makambo oyo makoki koyokisa basusu mpasi. Soki moto moko asaleli biso mabe, tiká ete biso moko tólobela moto yango ye moko na elimo ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa, na mokano ete tózongisa kimya. Kasi tokosala nini soki tosilaki kobimisa maloba na nkanda? Na bongo bolingo ekopusa biso ete tótika lolendo na biso mpe na komikitisa nyonso tóluka kobongisa makambo. Wana ezali ntango ya koloba, ntango ya komonisa ete tozali na mawa mpo na ezaleli oyo tomonisaki mpe tolingi kosilisa mpasi oyo toyokisaki ye na kolobáká na bosembo nyonso.—Matai 5:23, 24.
Wana kofanda nyɛɛ ezali mwango malamu te
Nkanda to kosilika ekoki kopusa biso ete tóboya kolobisa moto oyo asaleli biso mabe. Yango ekoki kopesa mpasi. Marieb ayamboli ete: “Na mbula ya liboso ya libala na biso, ezalaki na bantango oyo nazalaki koboya kolobisa mobali na ngai na boumeli ya mikolo mingi. Mingimingi, ezalaki mpo na mikakatano minene te, kasi ezalaki mpo na kobomba nkanda na makambo mikemike. Nabombaki mitungisi wana kino ekómaki epekiseli lokola ngomba monene. Kasi ekómaki na ntango oyo nakokaki lisusu kobomba yango te, mpe natikaki kolobisa mobali na ngai kino na ntango nkanda na ngai eyaki kosila.”
Marie alobi lisusu ete: “Mokapo moko ya sikisiki ya Biblia—“tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino”—esungaki ngai ete nasembola makanisi na ngai. Ngai mpe mobali na ngai tosalaki makasi mpo ete tókóma kosolola lisusu malamu koleka mpo ete mikakatano mikóla te. Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi na nsima ya mbula zomi ya libala, nazali na esengo ya koloba ete bileko ya komonisa motema makasi na kofandáká nyɛɛ bizalaka lisusu mpenza mingi te. Nzokande, nasengeli kondima ete nazali naino kosala makasi mpo na kolónga ezaleli wana.”—Baefese 4:26.
Lokola Marie amonaki yango, wana kozanga boyokani ezali kati na bato mibale, kotika kolobana ezali mwango malamu te. Na motindo wana, nkanda ekoki kokóla, mpe boyokani ekoki kobeba. Yesu alobaki ete tosengeli ‘kosilisa mikakatano nokinoki.’ (Matai 5:25, NW) “Liloba lilobami na ntango malamu” likoki kosunga biso ete ‘tóluka kimya.’—Masese 25:11; 1 Petelo 3:11.
Tosengeli mpe kolobela mayoki na biso wana tozali na mposa ya lisungi. Soki tozali na mokakatano moko na elimo, tokoki mbala mosusu koboya kotyela bato mosusu bozito. Kasi soki tofandi nyɛɛ, mokakatano yango mokoki kokóma makasi. Bankulutu baklisto oyo baponami bamibanzabanzaka mpo na biso, soki toyebisi bango, bakozanga te kosunga biso. Wana ezali ntango oyo tosengeli koloba.—Yakobo 5:13-16.
Oyo eleki nyonso, tosengeli koloba epai na Yehova mbala na mbala kati na libondeli liuti na nsé ya motema mpenza, lokola Yesu asalaki yango. Ya solo, tiká ete ‘tózipola mitema na biso’ epai na Tata na biso ya likoló.—Nzembo 62:8; kokanisá na Baebele 5:7.
“Ntango na koloba” na ntina na Bokonzi ya Nzambe
Mosala ya boklisto ezali mokumba oyo tozwi uta na Nzambe, oyo esengeli kokokisama liboso ete nsuka eya. Koleka na mikolo mizalaki liboso, ezali bongo na ntina ete basaleli ya Yehova básakola nsango malamu ya Bokonzi. (Malako 13:10) Na ndakisa ya bantoma, baklisto ya solo ‘bakoki te kotika kosolola makambo oyo bamonaki mpe bayokaki.’—Misala 4:20.
Ya solo, bato nyonso te nde balingaka koyoka nsango malamu. Ee, na ntango atindaki bayekoli na ye ete bákende kosakola, Yesu apesaki bango toli ete ‘[báluka baoyo babongaki na yango, NW].’ Lokola Yehova apusaka moto moko te na makasi ete asambela ye, tosengeli te kotingama bobele ete tósolola na moto oyo aboyi mpenza koyoka nsango ya Bokonzi. (Matai 10:11-14) Kasi tozali na esengo ya koloba na ntina na bokonzi ya Yehova epai na baoyo “babongi solo kozwa bomoi ya seko.”—Misala 13:48, NW; Nzembo 145:10-13.
Bolingo, bopɔlɔ, mpe komikitisa ezali bizaleli oyo ekoki kosalisa biso ete tópekisa bopusi oyo ezalaka kati na biso bato ya kozanga kokoka ete tóloba nokinoki kozanga kokanisa to ete tófanda bobele nyɛɛ. Wana tozali kokólisa bizaleli oyo, tokobongisama malamu mpo na koyeba ntango malamu mpe ntango ebongi te na koloba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Wana ezali nkombo na ye mpenza te.
b Wana ezali nkombo na ye mpenza te.
[Elilingi na lokasa 23]
Mikakatano mikoki kosilisama na kosolola malamu