Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bamemi Yesu epai ya Anasi, na nsima epai ya Kaifa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Mokonzi moko ya basoda oyo atɛlɛmi wana abɛti Yesu mbata na elongi mpe apameli ye ete: “Ndenge wana nde ozali koyanola nganga-nzambe mokonzi?” Kasi lokola Yesu ayebi ete alobi mabe te azongisi: “Soki nalobi mabe, monisá mabe yango; kasi soki nalobi malamu, mpo na nini obɛti ngai?” (Yoane 18:22, 23) Sikoyo, Anasi atindi bámema Yesu epai ya bokilo na ye Kaifa.

      Sanedrina mobimba, elingi koloba nganga-nzambe monene, mikóló ya bato, mpe bakomeli, bayangani. Bazali na ndako ya Kaifa. Mibeko epekisi kosambisa moto na butu ya mokolo ya Elekeli, kasi bango bayangani kaka mpo bákokisa mokano mabe na bango.

      Bato yango batondi na makanisi ya mabe. Nsima ya lisekwa ya Lazare, Sanedrina esalaki likita mpo báboma Yesu. (Yoane 11:47-53) Mpe eleki kaka mwa mikolo, bakonzi ya mangomba basalaki likita mpo bákanga Yesu mpe báboma ye. (Matai 26:3, 4) Kutu, ata liboso bábanda kosambisa Yesu, bayebaki ete bakoboma ye kaka.

  • Petro awangani Yesu na ndako ya Kaifa
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
    • Ntango kaka bakangi Yesu na elanga ya Getesemane, bantoma babangi, bakimi, basundoli ye. Kasi, na nsima mibale kati na bango batɛlɛmi. Ezali Petro “ná moyekoli mosusu,” na ntembe te ntoma Yoane. (Yoane 18:15; 19:35; 21:24) Mbala mosusu bamoni Yesu ntango bazali kokende na ye epai ya Anasi. Ntango Anasi atindi Yesu epai ya Nganga-nzambe monene Kaifa, Petro ná Yoane bazali kolanda na mosika. Na ntembe te bazali kobanga mpo na bomoi na bango, kasi bazali mpe komitungisa mpo na makambo oyo ekokómela Nkolo na bango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto