Bamonaki Masiya!
“Tomoni Masiya.”—YOA. 1:41.
1. Nini etindaki Andre aloba maloba oyo: “Tomoni Masiya”?
YOANE MOBATISI atɛlɛmi ná bayekoli na ye mibale. Ntango Yesu azali kopusana epai na bango, Yoane alobi boye: “Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe!” Na mbala moko, bayekoli yango mibale, Andre ná moyekoli mosusu, balandi Yesu, mpe balekisi mokolo yango elongo na ye. Na nsima, Andre akutani na ndeko na ye Simo Petro mpe ayebisi ye likambo oyo ya kokamwa ete: “Tomoni Masiya.” Na nsima amemi ye epai ya Yesu.—Yoa. 1:35-41.
2. Ndenge nini koyekola bisakweli mosusu oyo etali Masiya ekosalisa biso?
2 Nsima ya mikolo, Andre, Petro mpe bayekoli mosusu bakoyekola Makomami na likebi mpe bakoloba kozanga kokakatana ete Yesu nde Masiya oyo alakamaki. Kondima na biso na Liloba ya Nzambe mpe na Moto na ye oyo atyami mafuta na elimo ekokóma makasi wana tozali kotalela na lisolo oyo bisakweli mosusu oyo etali Masiya.
“Talá! Mokonzi na yo azali koya”
3. Bisakweli nini ekokisamaki ntango Yesu akɔtaki lokola mokonzi na Yerusaleme?
3 Masiya akokɔta na Yerusaleme lokola mokonzi. Esakweli ya Zekaria elobaki boye: “Ee mwana mwasi ya Siona, zalá na esengo mingi. Ee mwana mwasi ya Yerusaleme, gangá na koganga ya bolongi. Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo. Azali moyengebene, ɛɛ, abikisami; moto ya komikitisa, mpe amati likoló ya mpunda, ɛɛ likoló ya nyama oyo ekɔmɛli, mwana ya mpunda ya mwasi.” (Zek. 9:9) Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Ye oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama.” (Nz. 118:26) Yesu te nde moto atindaki bato báganga na esengo ndenge wana. Kasi, ntango esakweli yango ekokisamaki, bato basalaki kaka ndenge esakolamaki. Ntango ozali kotánga lisolo yango, salá lokola ozali koyoka ndenge bato bazali koganga na esengo.—Tángá Matai 21:4-9.
4. Monisá ndenge Nzembo 118:22, 23 ekokisamaki.
4 Atako bato mingi bakondima te ete Yesu azali Masiya, Nzambe azali kozwa ye na motuya mingi. Kaka ndenge esakolamaki, Yesu ‘atyolamaki mpe amonanaki mpamba’ na miso ya bato oyo baboyaki kondima ete azali Masiya. (Yis. 53:3; Mrk. 9:12) Nzokande, Nzambe atindaki mokomi ya nzembo akoma boye: “Libanga oyo batongi-ndako babwakaki ekómi libanga monene ya litumu ya ndako. Yango euti na Yehova ye moko.” (Nz. 118:22, 23) Yesu abendaki likebi na vɛrsɛ yango ntango asololaki na bato ya mangomba oyo bazalaki batɛmɛli na ye, mpe Petro alobaki ete yango ekokisamaki epai na Kristo. (Mrk. 12:10, 11; Mis. 4:8-11) Yesu akómaki “libanga ya litumu ya moboko ya ndako,” oyo ezali lisangá ya bokristo. Atako bato oyo bazangaki kondima baboyaki ye, ‘aponami mpe azali na motuya, na miso ya Nzambe.’—1 Pe. 2:4-6.
Atɛkami mpe asundolami!
5, 6. Bisakweli elobaki nini mpo na kotɛkama ya Masiya mpe ndenge nini likambo yango ekokisamaki?
5 Esakolamaki ete moto moko oyo amonanaki ete azali moninga ya Masiya akotɛka ye. Davidi asakolaki boye: “Moto oyo azalaki na kimya elongo na ngai, oyo natyelaki motema, oyo azalaki kolya limpa na ngai, atomboleli ngai litindi na ye.” (Nz. 41:9) Ntango ya kala, kolya limpa elongo na moto elakisaki kozala moninga na ye. (Eba. 31:54) Na yango, ndenge Yudasi Mokeriota atɛkaki Yesu ezalaki likambo moko ya mabe mpenza. Yesu amonisaki ete esakweli ya Davidi ekokisamaki ntango alobaki mpo na moto oyo atɛkaki ye mpe ayebisaki bantoma na ye ete: “Nazali koloba mpo na bino nyonso te; nayebi bato oyo naponi. Kasi ezali mpo Likomami ekokisama ete: ‘Moto oyo azalaki kolya limpa na ngai, atomboleli ngai litindi na ye.’”—Yoa. 13:18.
6 Bakopesa moto oyo akotɛka Masiya shekele ya palata 30—ntalo oyo bazalaki kosomba moombo! Matai amonisaki ete batɛkaki Yesu na mwa mbongo moke ndenge wana, mpe yango ekokisaki esakweli ya Zekaria 11:12, 13. Kasi, mpo na nini Matai alobaki ete likambo yango esakolamaki “na nzela ya mosakoli Yirimia”? Na ntango ya Matai, mbala mosusu bazalaki kotya Yirimia na esika ya liboso na liboke moko ya mikanda ya Biblia oyo Zekaria mpe ezalaki na kati. (Talá mpe Luka 24:44.) Yudasi asalelaki kutu mbongo yango te, mpo abwakaki yango na tempelo mpe akendeki komiboma.—Mat. 26:14-16; 27:3-10.
7. Ndenge nini Zekaria 13:7 ekokisamaki?
7 Ata bayekoli ya Masiya bakopanzana. Zekaria akomaki ete: “Bɛtá mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga epanzana.” (Zek. 13:7) Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bino nyonso bokobɛta libaku mpo na ngai, mpo ekomamá ete: ‘Nakobɛta mobateli ya mpate, mpe bampate ya etonga ekopanzana.’” Mpe esalemaki mpenza bongo, mpo Matai akomaki ete “bayekoli nyonso basundolaki [Yesu] mpe bakimaki.”—Mat. 26:31, 56.
Afundami mpe abɛtami
8. Ndenge nini Yisaya 53:8 ekokisamaki?
8 Masiya akosambisama mpe bakokweisa ye likambo. (Tángá Yisaya 53:8.) Na ntɔngɔ ya mokolo ya 14 Nisana, Sanedrina mobimba eyanganaki, etindaki bákanga Yesu mpe bapesaki ye na mabɔkɔ ya Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ Moroma. Pilate atunaki ye mituna mpe amonaki ete azali na likambo moko te. Nzokande, ntango Pilate atunaki ebele ya bato soki balingi atika Yesu, bagangaki ete: “Baká ye na nzete!” mpe basengaki ete bábimisela bango Barabasi, mosali mabe. Lokola Pilate alingaki kosepelisa ebele yango ya bato, abimisaki Barabasi, atindaki bábɛta Yesu fimbo, mpe apesaki bango ye mpo bábaka ye na nzete.—Mrk. 15:1-15.
9. Na ntango ya Yesu, ndenge nini Nzembo 35:11 ekokisamaki?
9 Batatoli ya lokuta bakokosela Masiya makambo. Davidi alobaki boye: “Batatoli ya mobulu bazali kotɛlɛma; bazali kotuna ngai makambo oyo nayebi te.” (Nz. 35:11) Kaka ndenge esakweli yango elobaki, “banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba bazalaki koluka batatoli ya lokuta bákosela Yesu makambo mpo báboma ye.” (Mat. 26:59) Biblia elobi ete “mingi bazalaki kopesa litatoli ya lokuta mpo na kokweisa ye, kasi matatoli na bango ezalaki koyokana te.” (Mrk. 14:56) Banguna ya Yesu bakipaki te ete batatoli wana bazalaki koloba lokuta, bazalaki kaka koluka liwa na ye.
10. Limbolá ndenge Yisaya 53:7 ekokisamaki.
10 Masiya akofanda nyɛɛ liboso ya bafundi na ye. Yisaya asakolaki ete: “Batyaki ye mpanzi likoló mingi, mpe atikaki bámonisa ye mpasi; kasi afungolaki monɔkɔ te. Bamemaki ye lokola mpate oyo ekei kobomama, mpe lokola mpate ya mwasi oyo elelaka te liboso ya bakati-nsuki na yango, ye mpe afungolaki monɔkɔ te.” (Yis. 53:7) “Ntango banganga-nzambe bakonzi ná mikóló bazalaki kofunda [Yesu], ayanolaki te.” Pilate atunaki ye ete: “Ozali koyoka te ebele ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango?” Kasi Yesu “ayanolaki ye te, ɛɛ, ata liloba moko te, bongo guvɛrnɛrɛ akamwaki mingi.” (Mat. 27:12-14) Yesu afingaki banguna na ye te.—Rom. 12:17-21; 1 Pe. 2:23.
11. Ndenge nini Yisaya 50:6 mpe Mika 5:1 ekokisamaki.
11 Yisaya asakolaki ete Masiya akobɛtama. Akomaki boye: “Napesaki mokɔngɔ na ngai na baoyo babɛtaka, mpe matama na ngai na baoyo bapikolaka nsuki. Nabombaki elongi na ngai te ntango bafingaki ngai mpe babwakelaki ngai nsoi.” (Yis. 50:6) Mika asakolaki ete: “Na lingenda, bakobɛta mosambisi ya Yisraele na litama.” (Mika 5:1) Mpo na komonisa ete bisakweli yango ekokisamaki, Marko, mokomi moko ya Evanzile, alobaki boye: “Bamosusu babandaki kobwakela [Yesu] nsoi mpe kozipa ye elongi mobimba mpe kobɛta ye makofi mpe koloba na ye ete: ‘Sakolá!’ Mpe, nsima ya kobɛta ye bambata na elongi, bapolisi bakamataki ye.” Marko alobaki ete basoda “bazalaki mpe kobɛta ye na motó na mongendu mpe kobwakela ye nsoi mpe, bazalaki kogumba mabɔlɔngɔ na bango [na lityo], kopesa ye lokumu.” (Mrk. 14:65; 15:19) Ya solo, Yesu asalaki eloko moko te mpo bato básala ye ndenge wana.
Sembo kino liwa
12. Ndenge nini Nzembo 22:16 mpe Yisaya 53:12 ekokisamaki epai na Yesu?
12 Makambo mosusu oyo esalemaki ntango babakaki Masiya na nzete esakolamaki. Mokomi ya nzembo Davidi alobaki boye: “Liyangani ya basali-mabe ezingi ngai. Bazali koswa mabɔkɔ na ngai ná makolo na ngai lokola nkɔsi.” (Nz. 22:16) Ndenge batángi ya Biblia bayebi yango mpe ndenge Marko ayebisi biso na Evanzile na ye, esakweli yango ekokisamaki. Akomaki boye: “Ezalaki bongo ngonga ya misato [soki ngonga ya 9 na ntɔngɔ], mpe babakaki ye na nzete.” (Mrk. 15:25) Esakolamaki mpe ete Masiya akotángama elongo na basumuki. Yisaya akomaki ete: “Asopaki molimo na ye kino na liwa, mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko.” (Yis. 53:12) Yango ekokisamaki ntango “babakaki miyibi mibale na nzete elongo na [Yesu], moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na ye ya mwasi.”—Mat. 27:38.
13. Ndenge nini Nzembo 22:7, 8 ekokisamaki?
13 Davidi asakolaki ete bakofinga Masiya. (Tángá Nzembo 22:7, 8.) Bato bafingaki Yesu ntango azalaki konyokwama likoló ya nzete ya mpasi. Matai alobi boye: “Baleki-nzela babandaki kofinga ye mpe koningisa mitó na bango mpe koloba ete: ‘Ee yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato, omibikisa yo moko! Soki ozali mwana ya Nzambe, kitá na nzete ya mpasi!’” Ndenge moko mpe banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli ná mikóló babandaki kosɛka ye mpe koloba ete: “Abikisaki bamosusu; akoki komibikisa ye moko te! Ye azali Mokonzi ya Yisraele; akita sikoyo na nzete ya mpasi mpe biso tokondimela ye. Atyelaki Nzambe motema; Ye abikisa ye sikoyo soki Ye alingaka ye, mpo azalaki koloba ete: ‘Ngai nazali Mwana ya Nzambe.’” (Mat. 27:39-43) Kasi, Yesu ayikelaki nyonso wana mpiko na kimya mpenza. Azali ndakisa malamu mpo na biso!
14, 15. Monisá ndenge bisakweli oyo etali bilamba ya Masiya mpe vinɛgrɛ oyo basengelaki kopesa ye ekokisamaki.
14 Bakobwakela bilamba ya Masiya mbɛsɛ. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Bazali komikabolela bilamba na ngai, mpe bazali kobwakela bilamba na ngai mbɛsɛ.” (Nz. 22:18) Esalemaki mpe bongo, mpo “ntango [basoda ya Roma] babakaki [Yesu] na nzete, babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola bilamba na ye ya likoló.”—Mat. 27:35; tángá Yoane 19:23, 24.
15 Bakopesa Masiya vinɛgrɛ mpe mai ya nsɔngi. Esakweli elobaki boye: “Bilei bapesaki ngai ezalaki nde nzete moko ya ngɛngɛ, mpe na mposa na ngai ya mai, bamekaki komɛlisa ngai vinɛgrɛ.” (Nz. 69:21) Matai alobi boye: “Bapesaki [Yesu] vinyo oyo basangisi na mai ya nsɔngi amɛla; kasi nsima ya komeka yango, aboyaki komɛla.” Na nsima, “moto moko na kati na bango apotaki mbangu mpe akamataki linyuka mpe apɔlisaki yango na vinyo ya ngayi mpe atyaki yango na mongendu mpe akendaki kopesa ye amɛla.”—Mat. 27:34, 48.
16. Limbolá ndenge Nzembo 22:1 ekokisamaki.
16 Ekomonana lokola Nzambe asundoli Masiya. (Tángá Nzembo 22:1.) Kaka ndenge esakweli elobaki, “na ngonga ya libwa [soki ngonga ya 3 nsima ya midi] Yesu abelelaki na mongongo makasi ete: ‘Eli, Eli, lama sabakatani?’ oyo soki babongoli, elakisi ete: ‘Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?’” (Mrk. 15:34) Yesu atikaki te kondimela Tata na ye ya likoló. Nzambe atikaki Yesu na mabɔkɔ ya banguna na ye na ndenge alongolaki libateli na ye mpo bosembo ya Kristo emekama tii na nsuka. Mpe ntango Yesu agangaki bongo, akokisaki Nzembo 22:1.
17. Zekaria 12:10 mpe Nzembo 34:20 ekokisamaki ndenge nini?
17 Bakotɔbɔla Masiya, kasi mikuwa na ye ekobukana te. Zekaria alobaki ete bafandi ya Yerusaleme “bakotala mpenza epai ya Moto oyo batɔbɔlaki.” (Zek. 12:10) Nzembo 34:20 elobi: “[Nzambe] azali kobatela mikuwa nyonso ya moto yango; moko na yango ebukani te.” Ntoma Yoane amonisi ete makambo yango ekokisamaki; akomaki boye: “Moko ya basoda atɔbɔlaki ye [Yesu] mopanzi na likɔnga, mpe na mbala moko makila ná mai ebimaki. Mpe moto oyo amonaki yango [Yoane] apesi litatoli, mpe litatoli na ye ezali ya solo . . . Makambo wana esalemaki mpo likomami oyo ekokisama ete: ‘Ata mokuwa na ye moko te ekobukama.’ Mpe lisusu, likomami mosusu elobi ete: ‘Bakotala epai ya Moto oyo batɔbɔlaki.’”—Yoa. 19:33-37.
18. Ndenge nini esalemaki ete Yesu akundama esika moko na bazwi?
18 Masiya akokundama esika moko na bazwi. (Tángá Yisaya 53:5, 8, 9.) Nsima ya midi, na mokolo ya 14 Nisana, lokola ngonga epusanaki “mozwi moko ya Arimatea ayaki, nkombo na ye Yozefe,” asɛngaki Pilate nzoto ya Yesu, mpe Pilate andimaki. Lisolo ya Matai ebakisi ete: “Yozefe akamataki nzoto yango, azingaki yango na lini ya kitoko ya pɛto, mpe alalisaki yango na lilita na ye ya sika, oyo atimolaki na mabanga. Mpe, nsima ya kobalola libanga moko ya monene tii na monɔkɔ ya lilita yango, akendaki.”—Mat. 27:57-60.
Tókumisa Mokonzi Masiya!
19. Ndenge nini esakweli ya Nzembo 16:10 ekokisamaki?
19 Masiya akosekwa. Davidi akomaki boye: “Yo [Yehova] okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda te.” (Nz. 16:10) Kanisá ndenge basi oyo bayaki na lilita epai batyaki nzoto ya Yesu bakamwaki. Kuna bamonaki anzelu oyo alati nzoto ya mosuni, mpe alobaki na bango ete: “Bótika koyoka nsɔmɔ. Bozali koluka Yesu Monazarete, oyo babakaki na nzete. Alamuki, azali awa te. Bótala! Esika balalisaki ye.” (Mrk. 16:6) Ntoma Petro ayebisaki ebele ya bato oyo bazalaki na Yerusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B. ete: “[Davidi] amonaki liboso mpe alobaki mpo na lisekwa ya Kristo, ete asundolamaki na kati ya Nkunda te mpe nzoto na ye epɔlaki te.” (Mis. 2:29-31) Nzambe atikaki te ete nzoto ya Mwana na ye ya bolingo epɔla. Lisusu, Yesu asekwaki na ndenge ya likamwisi na nzoto ya elimo!—1 Pe. 3:18.
20. Bisakweli elobi nini mpo na boyangeli ya Masiya?
20 Ndenge esakolamaki, Nzambe alobaki ete Yesu azali Mwana na ye. (Tángá Nzembo 2:7; Matai 3:17.) Lisusu, ntango Yesu akɔtaki na Yerusaleme, ebele ya bato bakumisaki ye mpe Bokonzi na ye; biso mpe tolobelaka Yesu mpe Bokonzi na ye kitoko na esengo. (Mrk. 11:7-10) Mosika te, Kristo akoboma banguna na ye ntango ‘akomata na mpunda mpo na kobundela solo, komikitisa, ná boyengebene.’ (Nz. 2:8, 9; 45:1-6) Na nsima, Bokonzi na ye ekomema kimya mpe bozwi na mabele mobimba. (Nz. 72:1, 3, 12, 16; Yis. 9:6, 7) Mwana ya Yehova ya bolingo azali sikoyo Mokonzi Masiya oyo azali koyangela na likoló. Tozwi mpenza lokumu monene ya kozala Batatoli ya Yehova mpe kosakola solo ya makambo yango.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini Yesu atɛkamaki mpe asundolamaki?
• Tángá mwa bisakweli oyo elobelaki kobakama ya Yesu Kristo na nzete.
• Nini endimisi yo ete Yesu azali mpenza Masiya oyo alakamaki?
[Elilingi na lokasa 13]
Ndenge Yesu akɔtaki na Yerusaleme lokola Mokonzi ekokisaki bisakweli nini?
[Bililingi na lokasa 15]
Yesu akufaki mpo na masumu na biso, kasi sikoyo azali koyangela lokola Mokonzi