Mboka likoló ya ngomba
NA LISOLO oyo eyebani mingi oyo Yesu asalaki Likoló ya Ngomba, alobaki na bayekoli na ye boye: “Bino bozali pole ya mokili. [Mboka] ekoki te kobombama ntango ezali likoló ya ngomba.”—Matai 5:14, NW.
Mboka mingi ya Yudea mpe ya Galilai etongamaki na mabwaku te kasi likoló ya bangomba. Bazalaki kopona kotonga na bisika ya likoló mingimingi mpo na kobatela mboka. Longola ete banguna bazalaki kobundisa mpe kobɔtɔla bamboka, bayibi mpe bazalaki kokɔta na bamboka ya Yisalaele mpe kobɔtɔla bato biloko. (2 Mikonzi 5:2; 24:2) Ezalaki mpasi te mpo ete bato ya makasi ya mboka bábatela bandako oyo batongi yango esika moko likoló ya ngomba, kasi mpo na kobatela bandako oyo batongi na lobwaku, esengelaki bázinga mboka na bifelo ya milai.
Lokola Bayuda bazalaki mingimingi kopakola bandako na bango mpɛmbɛ, bato bakokaki komona malamu ebele ya bandako yango esika moko oyo ezali mpɛmbɛ likoló ya ngomba ata na mwa ntaka ya bakilomɛtrɛ. (Misala 23:3) Ntango moi makasi ya Palestine ezalaki kongala, bamboka yango ezalaki kongɛnga lokola miinda, se ndenge ezalaka lelo oyo na bamboka mingi pembeni ya Mai Monene ya Méditerranée.
Mpo na koteya bayekoli na ye, Yesu akokanisaki mokumba oyo moklisto ya solo azalaka na yango na bamboka yango ya Galilai mpe ya Yudea. Ayebisaki bango boye: “Bongo, tiká ete [pole, NW] na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.” (Matai 5:16) Atako baklisto basalaka misala ya malamu mpo bato bakumisa bango te, nzokande bizaleli na bango ya malamu ezangaka te komonana polele.—Matai 6:1.
Bizaleli yango ya malamu emonanaka polele mingimingi na ntango ya mayangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Na ekólo Espagne, zulunalo moko elobaki boye mpo na liyangani oyo eutaki kosalema: “Tozali komona ete bato ya mangomba mosusu basepelaka lisusu te na makambo ya Nzambe, nzokande ezali bongo te epai ya Batatoli ya Yehova. Mpo balingaka ete Biblia esalisaka bango na makambo bazali kokutana na yango, basalelaka Liloba ya Nzambe na bomoi na bango.”
Thomas, mobateli ya libándá ya masano oyo Batatoli bazalaki kosalela mbala na mbala na nɔrdi-wɛsti ya Espagne, azalaki kosepela kozala pembeni na bato oyo basalelaka Liloba ya Nzambe na bomoi na bango. Asepelaki kozela mwa bapɔsɔ nsima ya mokolo oyo esengelaki kotika mosala na ye, kaka mpo akoka kozala wana na ntango liyangani ya etúka ya Batatoli ya Yehova ekosalema. Nsima ya liyangani, ntango bayangani mingi—bakisa mpe bilenge—bakendaki epai na ye mpo na kopesa ye matɔndi na ndenge azalaki koyokana malamu na bango na boumeli ya bambula mpe mpo na kotombela ye bopemi malamu, alelaki. Alobaki ete: “Koyeba bino ezali moko ya makambo oyo eleki malamu oyo ngai nazwá na bomoi na ngai.”
Mboka oyo batongi yango likoló na ngomba ebendaka mpenza likebi ya moto oyo azali kotala yango, mpamba te emonanaka mbala moko mpe lisusu bandako ya mpɛmbɛ oyo ezali likoló engɛngaka na moi. Ndenge moko mpe baklisto ya solo bakeseni mpenza na bato mosusu, bango basalelaka na molende nyonso mibeko ya malamu ya Makomami oyo etali kolongobana, bizaleli ya malamu mpe motema mawa.
Lisusu, baklisto bangɛngisaka pole ya mateya ya solo na nzela ya mosala na bango ya kosakola. Ntoma Paulo alobaki boye mpo na baklisto ya ekeke ya liboso: “Yango wana, lokola tozwi mosala oyo ya ministre na kotalela motema mawa oyo emonisamaki epai na biso, tozali kotika te . . . kasi na komonisáká solo polele, tozali komilobela biso moko na lisosoli ya bato na miso ya Nzambe.” (2 Bakolinti 4:1, 2, NW) Yehova apambolaki mosala na bango mingi, atako batɛmɛlaki bango bipai nyonso oyo bazalaki kosakola, yango wana na mobu soki 60 ntango na biso (T.B.), Paul akomaki ete nsango malamu esilaki kosakolama “epai na bato nyonso na nse na likoló.”—Bakolose 1:23.
Lelo oyo, Motatoli ya Yehova nyonso azwaka mpe na motema na ye mobimba etinda ya Yesu oyo elobi ete “tiká ete [pole, NW] na bino engɛnga liboso na bato.” Na mokili mobimba, Batatoli bazali kopesa litatoli na maloba mpe na mikanda, bazali kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi na bikólo 235. Mpo ete pole ya mateya ya solo ya Biblia ekómela bato ebele mpenza, basalaka molende mpo mikanda oyo elimbolaka Biblia enyatama na nkota soki 370.—Matai 24:14; Emoniseli 14: 6, 7.
Na bisika mingi, Batatoli basalaki makasi mpo na koyekola nkota ya bato oyo bautaki na bikólo epai mosala ya kosakola epekisamaki. Na ndakisa, na bingumba mwa mingi ya minene na Amerika ya Nɔrdi, ebele ya bato ya Chine na ya Russie bakendaki kofanda kuna. Batatoli ya bisika yango basalaki makasi báyekola koloba lokota ya Chinois na lokota ya Russe mpe nkota mosusu mpo bákoka kosakola nsango malamu na bapaya yango oyo bazali bato ya sika na bisika yango. Ya solo, bakelasi ya koteya nkota ebele ezali kotambwisama mpo ete nsango malamu ekoka kosakolama epai na bato mingi koleka na ntango oyo elanga esili “kotela mpo na kobuka.”—Yoane 4:35.
Mosakoli Yisaya asakolaki boye: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka, ngomba ya ndako ya [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló na nkeka; mpe mabota nyonso bakokenda wana.” Na bizaleli na bango mpe na mosala na bango ya kosakola, Batatoli ya Yehova bazali kosalisa bato ya bisika nyonso ete báya na “ngomba ya ndako ya [Yehova]” mpo na koteyama banzela ya Nzambe mpe koyekola kotambola na nzela ya Nzambe. (Yisaya 2:2, 3) Ndenge Yesu amonisaki yango, nyonso wana ekotinda ‘bákumisa Tata na bango oyo azali na likoló,’ Yehova Nzambe, kati na bomoko.—Matai 5:16; 1 Petelo 2:12.