Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Sanza ya 4 lok. 8
  • Kosakola mpe koteya ezali na ntina mingi mpo na kokómisa bato bayekoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosakola mpe koteya ezali na ntina mingi mpo na kokómisa bato bayekoli
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kosalisa baoyo ‘bazali na ezaleli oyo ebongi’ bákóma bayekoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Masolo ya kosolola na Biblia
    Masolo ya kosolola na Biblia
  • Mpo na nini kosakola ndako na ndako ezali na ntina mingi lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Sanza ya 4 lok. 8

BOMOI YA BAKRISTO

Kosakola mpe koteya ezali na ntina mingi mpo na kokómisa bato bayekoli

Yesu atindaki bayekoli na ye bákende mpe bákómisa bato bayekoli. (Mt 28:19) Yango esɛngi kosakola mpe koteya. Mbala na mbala, tosengeli komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kobongisa lisusu lolenge na ngai ya kosakola mpe koteya oyo ezali na ntina mingi mpo na kokómisa bato bayekoli?’

KOSAKOLA

Na esika tózela ete bato báya epai na biso, tosengeli kokende koluka ‘baoyo babongi.’ (Mt 10:11) Ntango tobimaka na mosala ya kosakola, tosalelaka libaku nyonso mpo na kosolola na bato oyo ‘bazali wana’? (Mis 17:17) Lidia akómaki moyekoli mpo ntoma Paulo asakolaki na molende.​—Mis 16:13-15.

Ndeko Samuel azali kopesa Ezekiel zulunalo; ndeko Solomon ná Mary bazali kosakwela Ezekiel ná Abigail

“Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te” (Mos 11:6)

TALÁ VIDEO KOBÁ KOSAKOLA “KOZANGA KOTIKA”​—LITATOLI YA LIBAKU MALAMU MPE NDAKO NA NDAKO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Na bomoi na ye ya mokolo na mokolo, ndenge nini ndeko Samuel amonisaki ete azalaki koluka na molende nyonso kolona mboto ya solo?

  • Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola na mitindo nyonso?

  • Na misala na yo ya mokolo na mokolo, okoki kosakwela nani nsango ya Bokonzi?

KOTEYA

Mpo tókómisa bato bayekoli, tosengeli kosuka kaka te na kotikela bango mikanda. Tosengeli kozongelaka bango mpe koyekolaka na bango Biblia mpo tósalisa bango bákola na elimo. (1Ko 3:6-9) Kasi, bongo soki milende na biso mpo na koteya moto moko solo ya Bokonzi ezali mpenza kobimisa matomba te? (Mt 13:19-22) Tosengeli kokoba koluka baoyo mitema na bango ezali lokola “mabele ya malamu.”​—Mt 13:23; Mis 13:48.

Ndeko Solomon ná Mary bazali koyekola Biblia na Ezekiel ná Abigail; Ezekiel ná Abigail bazali kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso

“Ngai nalonaki, Apolosi amwangisaki mai, kasi Nzambe azalaki kokolisa” (1Ko 3:6)

TALÁ VIDEO KOBÁ KOSAKOLA “KOZANGA KOTIKA”​—NA BISIKA YA BATO EBELE MPE KOKÓMISA BATO BAYEKOLI, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini ndeko Solomon ná Mary bamwangisaki mai na mboto ya solo na mitema ya Ezekiel ná Abigail?

  • Mikano na biso esengeli kozala nini mpo na mitindo nyonso ya mosala ya kosakola, ezala mpe kopesa litatoli na bisika ya bato ebele?

  • Ndenge nini tokoki kotya likebi mingi lisusu na likambo ya koteya basusu solo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto