Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Oyo tosengeli kosalelaka basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2008 | 15 Sanza ya 5
    • 12. (a) Yesu alobaki nini na ntina ya pole ya elimo? (b) Ndenge nini tokoki kongɛngisa pole na biso?

      12 Likambo eleki malamu oyo tokoki kosalela bato ezali kosalisa bango bámona pole oyo euti na Nzambe. (Nz. 43:3) Yesu alobaki na bayekoli na ye ete bazali “pole ya mokili,” mpe alendisaki bango bátika pole na bango engɛnga mpo bato bámona “misala na [bango] ya malamu.” Yango elingaki kosala ete pole na bango engɛnga “liboso ya bato,” to ememela bango bolamu. (Tángá Matai 5:14-16.) Lelo oyo, tongɛngisaka pole na biso ntango tozali kosalela basusu malamu mpe ntango tozali kosakola nsango malamu “na mokili mobimba”, elingi koloba “na kati ya bikólo nyonso.” (Mat. 26:13; Mko. 13:10) Oyo nde libaku kitoko!

  • Oyo tosengeli kosalelaka basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2008 | 15 Sanza ya 5
    • 14. (a) Miinda oyo bazalaki kosalela na ekeke ya liboso ezalaki ndenge nini? (b) Kobomba te mwinda na biso ya elimo na nse ya “ekɔlɔ ya komekela” elimboli nini?

      14 Yesu alobaki ete bapelisaka mwinda te mpo bátya yango na nse ya ekɔlɔ, kasi mpo bátya yango likoló ya etɛlɛmiseli-ya-mwinda mpo engɛngɛla bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako. Mwinda oyo bazalaki kosalela na ekeke ya liboso ezalaki mbɛki moko oyo bazalaki kotya mafuta (mingimingi mafuta ya olive) mpe nsinga moko ya elamba oyo ezalaki kobenda mafuta mpo na kopelisa yango. Mbala mingi bazalaki kotya yango likoló ya etɛlɛmiseli-ya-mwinda, ya libaya to ya ebende, mpo mwinda ‘engɛngɛla baoyo nyonso bazali na kati ya ndako.’ Bato bakokaki te kopelisa mwinda mpo na kotya yango na nse ya “ekɔlɔ ya komekela.” Yesu alingaki te ete bayekoli na ye bábomba mwinda na bango ya elimo na nse ya ekɔlɔ ya komeka ya elilingi. Yango wana, biso tosengeli kongɛngisa mwinda na biso mpe kopesa nzela soki moke te ete botɛmɛli mpe minyoko etinda biso tóbomba solo ya Biblia to tóbatela yango mpo na biso moko.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto