Lolenge tokoki kozwa esengo na mosala ya kozalisa bayekoli
MOKO na bantina mozindo ya esengo oyo moto akoki kozala na yango ezali bongo kozala mosálani na Nzambe. Lelo oyo, mosala ya Nzambe mosangisi koyanganisa bato oyo bazali na mposa ya boyengebene kati na lisangá ya boklisto mpe kobongisa bango mpo na bomoi ya boklisto sikawa mpe lisusu mpo na kobika kati na mokili ya sika.—Mika 4:1-4; Matai 28:19, 20; 2 Petelo 3:13.
Ezali ntina ya esengo monene mpo na Batatoli ya Yehova ya Amérique Latine komona milió moko ya bato kokóma bayekoli ya Yesu Klisto uta 1980. Kati na elanga wana ya kobota mbuma mingi, epai kuna bato mingi bamemyaka mpe bandimaka Biblia, basáli mosusu ya ntango nyonso bazwaki moto na moto libaku ya kosalisa bato mingi ete bápesa bomoi na bango epai na Yehova. Lokola bazali na eksperiansi mingi bongo, mbala mosusu bakoki koyebisa biso makambo mosusu na ntina na esengo ya mosala ya kozalisa bayekoli. Mwa batoli mosusu na bango ekoki kosalisa yo ete ozwa esengo na mosala ya kozalisa bayekoli epai ofandaka.
Lolenge nini koyeba baoyo bakoki kokóma “bampate”
Ntango atindaki bantoma na ye kosakola, Yesu alobaki ete: “Ekokóma bino na mboka monene nini to na mboka moke nini, bóluka soko nani [abongi, NW] kati na yango.” (Matai 10:11) Wana okei kosakola epai na bato, lolenge nini okoki koyeba baoyo bakoki kozwa lisalisi ya elimo? Edward, mosáli ya ntango nyonso esili koleka mibu 50 alobi ete: “Bamonisaka yango na mituna oyo batunaka mpo na koluka mpenza koyeba makambo mpe na bosepeli oyo bamonisaka wana biyano na yango bizwami kati na Makomami.” Carol abakisi ete: “Soki moto moko ayebisi ngai mokakatano to likambo moko oyo ezali kotungisa ye kati na bomoi na ye mpenza, emonisi solo ete azali kosɛnga lisungi. Nalukaka biyano oyo bikoki kosalisa kati na mikanda ya la Société Watch Tower. Bosepeli oyo tomonisi mpo na moto yango mbala mingi ememaka na boyekoli ya Biblia.” Nzokande, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te koyeba bato oyo bazali na motema sembo. Luis ayebisi ete: “Basusu oyo bamonanaki liboso ete bazalaki komonisa bosepeli makasi bamonisaki lisusu mposa soko moke te, kasi basusu oyo bamonanaki ete bazalaki liboso kotɛmɛla babongwanaki ntango bayokaki oyo Biblia ezali mpenza koloba.” Lokola bato mingi ya Amérique Latine bamemyaka Biblia, abakisi ete, “Nayebaka baoyo bakoki kozwa lisalisi ya elimo wana bazali kondima nokinoki mateya ya Biblia nsima wana namonisi bango yango.” Kosalisa baoyo “babongi” ete bákóla na elimo ememaka esengo ya solo mpe bosepeli. Lolenge nini okoki kosala yango?
Lolenge ya kobanda boyekoli ya Biblia
Kosalela bisaleli ya koyekola Biblia oyo ebimisami na “moombo na sembo mpe na mayele” ezalaka mbala mingi mwango moleki malamu mpo na kosalisa bango ete bákanga solo ya Biblia. (Matai 24:45) Lolenge nini okoki kosalisa bato ete bákanga ntina ya motuya ya bisaleli yango ya boyekoli ya Biblia? Edward alobi ete: “Lokola ezalela ya makambo, lolenge ya bomoto mpe makanisi ya bato makeseni mingi, namekaka komiyokanisa na likambo nakutani na yango wana nazali kobanda boyekoli ya Biblia.” Tokoki te kosalela mwango moko mpo na bato nyonso.
Epai na basusu, kosolola mbala mingi likoló na Makomami na mabaku malamu ekoki kozala na ntina liboso ya kobanda boyekoli kati na mokanda moko ekolimbolaka Biblia. Nzokande, babalani mibale bamisionere bamonisi ete: “Mbala mingi topesaka bato lipesi ya kobanda boyekoli na mbala ya liboso oyo tokutani na bango.” Bobele bongo, Motatoli moko oyo asili kosalisa bato 55 kino komipesa na bango alobi ete: “Mwango na ngai ya liboso ya kobanda boyekoli ya Biblia ezali ya kokɔta mbala moko na búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.” Atako bato mosusu balingaka te likanisi ya koyekola, basusu bazalaka na mposa makasi ya koyekola mikanda nyonso oyo bakanisi ete ekoki kosalisa bango kati na bomoi. Kopesa bango likoki ya kokɔta kelasi ya Biblia na ndako na bango na lifuti te ekoki kosepelisa bango. Bamisionere mosusu balimbolaka lipesi yango mpe bongo balobaka ete: “Nalingi komonisa yo lolenge tosalaka yango. Soki esepelisi yo, tokoki kokóba na yango. Soki esepelisi yo te, etali bobele yo.” Soki elimbolami na lolenge yango, bato bakondima yango kozanga kobanga.
Motatoli mosusu, oyo asili kosalisa ebele na bato oyo bazali na bozwi mingi te mpe baoyo batángi mingi te, alobi ete: “Namonaki ete batrakte ezalaki mpenza na ntina monene mpo na kobanda boyekoli ya Biblia.” Ata soki bazali kosalela mokanda nini, bateyi ya ntango nyonso balukaka kotya likebi monene likoló ya Biblia. Carola alobi ete: “Na boyekoli ya ebandeli, nasalelaka bobele bililingi mpe mikapo soko mitano ya Biblia, mpo ete mateya ya ntina mamonana polele mpe ete Biblia emonana te ete ezali makasi.”
Lolenge ya kobatela bosepeli
Bato basepelaka mingi soki basosoli ete bazali kokóla, na yango Jennifer apesi toli oyo: “Salá ete boyekoli esepelisa. Kende ntango nyonso liboso.” Kotambolisa boyekoli pɔ́sɔ na pɔ́sɔ esalisaka mpe bango na kososola ete bazali kokóla. Mobongisi-nzela Monene moko oyo akólaki na mboka mosika ya bingumba alimboli ntina ya koyeisa pɛtɛɛ bandimbola mpe kobenda likebi likoló na makanisi ya ntina, na boye ete baoyo batángaki kelasi mingi te bákoka kokóla. Alobi ete: “Na mboka na biso, tomwangisaka mabelé na mai nsima ya kolóna mbóto. Soki topolisi bilanga na mai mingi mabelé makosala ekókótó moko makasi, milóna oyo mizali kobima mikoki te kotɔbɔla yango, mpe mikoki kokufa. Bobele bongo, soki otondisi bato oyo bauti kosepela na solo na makambo mingi, yango ekoki komonana makasi mingi mpo na bango mpe bakoki kotika.” Ata bato oyo bazali na elimo ya kolukaluka basengeli koyekola kotya likebi na bango likoló na likambo moko na mbala moko mpo ete bákoka kokóla na boyebi. Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Ngai nazali na makambo mingi na koloba na bino nde bokoki koyamba yango sasaipi te.”—Yoane 16:12.
Lolenge mosusu ya kobatela bosepeli ezali bongo kolendisa baoyo osololaka na bango ete bakanisaka likoló na Liloba ya Nzambe nsima wana osili kokende. Yolanda apesi toli oyo : “Tiká motuna moko oyo moyanolami te. Pesá bango mokumba ya kosala na ndako, lokola kotánga eteni moko ya Biblia to ya kosala bolukiluki na ntina na likambo oyo lizali kotungisa bango.”
Lolenge ya kokólisa bolingo mpo na Yehova
Esengo na yo ekokóla wana ozali kosalisa bayekoli na yo ete bákóma “batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te.” (Yakobo 1:22) Lolenge nini okoki kosala yango? Bolingo ya Yehova nde epusaka baklisto ya solo. Pedro, oyo azali moto ya Mexique, alimboli ete: “Moto moko te akoki kolinga ye oyo ayebi ye te, na yango, uta ebandeli ya boyekoli, nateyaka bango nkombo ya Nzambe kati na Biblia, mpe nalukaka mabaku malamu mpo na kobenda likebi likoló na bizaleli ya Yehova.” Kati na masoló, okoki kokólisa botɔ́ndi na bango epai na Yehova na komonisáká mayoki na yo moko mpo na ye. Elizabeth alobi ete: “Nalukaka ntango nyonso kolobela malamu ya Yehova. Wana nazali kotambwisa boyekoli, soki namoni fololo moko kitoko, ndɛkɛ kitoko, to mwana ya nyao oyo ezali kosakana, nalobaka ntango nyonso ete yango ezali mosala ya Yehova.” Jennifer apesi likanisi oyo: “Lobelá bilaka ya mokili ya sika ya Nzambe ete ezali mpo na yo likambo ya solo. Tuná bango soki bakolinga kosala nini kati na mokili ya sika.”
Wana moto azali kokanisa na botɔ́ndi nyonso likoló na makambo oyo ayekoli na ntina na Yehova, yango ezali kokɔta mozindo kati na motema na ye mpe ezali kopusa ye na kosala mosala. Kasi akoki komanyola bobele soki amikundoli makambo yango. Bozongeli mokuse ya makambo minene misato to minei nsima ya boyekoli motindo yango ekoki kosalisa bɔɔngɔ́ na komikundola makambo. Bateyi mingi ya Biblia basɛngaka na bato ya sika ete bákoma mikapo ya Biblia mpe mwa noti moke na nkasa ya nsima ya Biblia na bango. Misionere moko oyo azali moto ya Angleterre alimboli litomba mosusu ya bozongeli: “Natunaka lolenge nini basili kozwa litomba na likambo yango. Yango ememaka bango na komanyola na botɔ́ndi nyonso likoló na banzela ya Yehova mpe mibeko na ye.”
Motatoli moko ya sembo oyo azwaki lipɔlɔ́mi na kelasi ya mbala ya misato na Galadi alobi ete: “Tosengeli komonisa esengo. Bayekoli na biso basengeli komona ete tondimaka makambo oyo tozali koteya.” Kondima oyo ekómisaki yo moto ya esengo oyo “akosalaka misala” ekoki mpe kokɔta epai na basusu soki omonisi yango.—Yakobo 1:25.
Motatoli moko oyo asili kosalisa bato mingi na kosambela Yehova alobi ete: “Namonaka ete bato bamiyokaka penepene na Nzambe soki nasalisi bango na koyeba kososola biyano na mabondeli na bango. Napesaka bango lokola ndakisa makambo oyo ngai moko nakutanaki na yango, lokola oyo: Ntango moninga na ngai ya mosala mpe ngai tokómaki na teritware na biso ya sika lokola babongisi-nzela, tozalaki bobele na mwa ndambo ya ndunda, paki moko ya mateka mpe tozalaki na mbongo te. Tosilisaki bilei ya mpokwa mpe tolobaki ete, ‘Sikawa tozali na eloko te mpo na lobi.’ Tobondelaki na ntina na yango, mpe tokendeki kolala. Na ntɔ́ngɔntɔ́ngɔ, na mokolo oyo molandaki, Motatoli moko ya mboka yango ayaki mpe amilakisaki ete, ‘Nabondelaki ete Yehova akoka kotinda babongisi-nzela. Sikawa nakoki kobima lelo ntango molai elongo na bino, kasi lokola nafandaka na etúká oyo, nakolya bilei ya midi elongo na bino, na yango nasili komema bilei oyo mpo na biso nyonso.’ Yango ezalaki ebele ya misuni ya ngɔmbɛ mpe ndunda. Nayebisaka ntango nyonso na bayekoli na ngai ete Yehova akosundola biso soko moke te soki toluki libosoliboso Bokonzi na ye.”—Matai 6:33.
Pesá lisalisi libongi
Kozalisa bayekoli ya Klisto esuki te bobele na kotambwisa moto na boyekoli ya Biblia. Misionere moko oyo asili kosala mibu mingi lokola mokɛngɛli-motamboli alobi ete: “Pesá bango ntango. Kokende nokinoki te nsima wana boyekoli esili. Soki ekoki, fandá mpe sololá mwa ntango moke.” Elizabeth alobi ete: “Natyelaka bango likebi mpamba te yango etali bomoi na bango. Mbala mingi namibanzabanzaka na ntina na bango lokola nde bazalaki bana na ngai.” Batatoli mosusu bapesaki batoli oyo: “Kende kotala bango wana bazali na bokɔnɔ.” “Wana ozali koleka penepene na ndako na bango, na ndakisa wana ozali na mosala ya kosakola, leká epai na bango mpo na kolakisa bango Batatoli mosusu.” Eva alobi ete: “Yoká na likebi nyonso mpo na kososola malamu bomoi na ye mpe ezalela ya bomoi na ye. Yango ezalaka na bopusi likoló na lolenge oyo bato bayambaka solo mpe ekoki kopekisa bokóli na bango. Zalá moninga na bango, ete bákoka kobanga te koyebisa yo mikakatano na bango.” Carol abakisi ete: “Komibanzabanza ya solo mpo na moto yango ezali na ntina mingi mpamba te lokola solo ekomema mbongwana kati na bomoi na ye, mbala mosusu yango ekoki kolimbola bokabwani elongo na libota mpe baninga na ye. Mbala mingi, ezali malamu soki bayekoli báyebi epai tofandaka mpe babangaka te koya epai na biso na ntango nyonso oyo balingi.” Sungá ete amona lisangá lokola libota na ye ya sika.—Matai 10:35; Malako 10:29, 30.
Yolanda alobi ete: “Zalá penepene mpo na kopesa lisalisi libongi. Fandá penepene na bango na makita, mpe salisá bango elongo na bana na bango.” Komonisa epai na bato ya sika lolenge ya kobɔkɔla bana na bango, ya kotombola mitindá ya bopɛtɔ, ya kobongisa biyano mpo na makita, ya kosala masoló na Eteyelo ya mosala ya teokrasi ezali nyonso eteni ya mosala ya kozalisa bayekoli. Ndeko mwasi mosusu abakisi ete: “Ezali na ntina mingi kobongisa bato ya sika mpo na mosala ya kosakola. Wana eteni yango ya kobongisama etyami likebi te, bato mosusu bazalaka na bobángi ya mosala ya kosakola, babungisaka esengo na bango ya kosalela Yehova, mpe batikaka koyika mpiko.” Yango wana pesá kobongisama malamu kati na mosala ya kosakola ndako na ndako, na lolenge ya kosala bozongeli ya sika, mpe na lolenge ya kobanda boyekoli ya Biblia. Okozala na esengo monene ntango okomona moyekoli na yo kokóla na lisalisi mpe litambwisi oyo ozali kopesa ye.
Lendisá bango ete báyika mpiko
Ndeko moko ya makoki mingi kati na mosala ya kozalisa bayekoli apesi likebisi oyo: “Tozalaka mbala mosusu na momeseno ya kotalela boyekoli na bopotu wana moyekoli asili kozwa batisimo.” Moteyi mpe moyekoli basengeli komikundola ete moklisto oyo auti kozwa batisimo sika akómi naino mpenza te moto oyo akɔmɛli na elimo. Asengeli naino kokóla lisusu mingi kati na kondima na ye, kati na botɔ́ndi na ye mpo na mibeko ya Nzambe, mpe kati na bolingo na ye mpo na Yehova. Ezali na ntina mingi kolendisa ye ete akólisa mimeseno malamu ya boyekoli na ye moko na boye ete akóba kosala bokóli.—1 Timoté 4:15.
Moto ya sika akoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na kokóla mpe kozala mosangani ya lisangá oyo azali moyambi ya bandeko. Akoki kozala na mposa ya litambwisi kati na lolenge asengeli kosala liboso na kozanga kokoka ya bandeko wana ezali ye kobɛlɛma penepene na bango. (Matai 18:15-35) Akoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na kokóma molakisi malamu, oyo akoki ye moko kosala bolukiluki na ye. Misionere moko alobi ete: “Nsima na batisimo na ye, moyekoli moko alingaki kokólisa makoki na ye ya kolakisa, bongo ayebisaki ngai, ‘Nasengeli kotambwisa boyekoli ya Biblia ya sika na pɔ́sɔ oyo ekoya, kasi nazali na mposa ya komikundola mikapo ya ebandeli oyo nayekolaki. Okosepela koyekolisa ngai mikapo wana lisusu, moko na mbala moko, mpo ete nakoka kokamata banoti ya bandimbola ya mikapo ya Makomami mpe ya bililingi, mpe bongo nakoka kosalela yango wana nakokende na boyekoli na ngai?’ Ye asili kokóma molakisi malamu mpenza, oyo bayekoli na ye minei bazwaki batisimo na liyangani moko.”
Mpo na nini mosala ya kozalisa bayekoli ebongi na milende
Pamela alobi ete: “Kozalisa bayekoli elimboli basanzoli ya Yehova bazali kokóma mingi lisusu. Elimboli bomoi mpo na baoyo bazali kondima solo. Nalingaka koteya solo epai na basusu—ezali mpenza kitoko! Wana ozali komona lolenge bayekoli bazali kokóla moke na moke, kosala mbongwana kati na bomoi na bango mpe kolónga bipekiseli oyo emonanaki lokola ete ekolóngama te soki ezalaki mpo na elimo ya Yehova te. Mingi kati na baoyo bakómi kolinga Yehova basili kokóma baninga na ngai ya motema mpenza.”
Misionere moko oyo azali moto ya mboka Allemagne alobi ete: “Wana nazali komona baoyo nasalisaki bango na kokóma bayekoli, nazali komona basusu oyo bazalaki mpenza nsɔ́ninsɔ́ni oyo basalaki bokóli mingi kino bakómaki basaleli ya Nzambe na boye ete nakamwaki mpenza. Nazali komona bato oyo balóngaki bipekiseli minene, ya solo, na lisalisi ya elimo ya Yehova. Nazali komona mabota oyo makabwanaki kasi mazali sikawa na bomoko—bana oyo bazali na esengo mpe baboti oyo bazali kokokisa mikumba na bango malamu. Nazali komona bato oyo bazali na bomoi oyo ezali na ntina, bazali kosanzola Yehova. Oyo ezali esengo ya kozalisa bayekoli.”
Ee, kozala mosálani na Yehova Nzambe kati na mosala ya kozalisa bayekoli ezali eutelo ya esengo eleki monene. Makambo oyo bamisionere mpe babongisi-nzela bakutanaki na yango masili kondimisa yango. Okoki kozwa esengo mpe bosepeli yango soki osaleli batoli wana mpe osali milende nyonso okoki. Mpo na mapamboli ya Yehova, esengo na yo ekozala monene.—Masese 10:22; 1 Bakolinti 15:58.