MOKAPO 9
“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
1-3. (a) Mosali-bilanga asali nini ntango amoni ete mbuma ezali mingi mpe akokoka te kobuka yango ye moko? (b) Mokakatano nini Yesu akutanaki na yango na mobu 33 T.B., mpe ndenge nini asilisaki yango?
MOSALI-BILANGA akómi na mosala monene. Mwa basanza liboso, abalolaki mabele mpe alonaki mboto. Azalaki kosɛnzɛla malamumalamu wana milona ya liboso ebandi kobima, mpe azalaki kosepela komona ndenge ezali kokola. Sikoyo azwi litomba na mosala na ye ya makasi, mpamba te ntango ya kobuka mbuma ekóki. Mokakatano na ye yango oyo: Mbuma eboti mingi mpenza, mpe akokoka te kobuka yango ye moko. Mpo na kosilisa mokakatano yango, na bwanya nyonso, amoni malamu azwa bato ya mosala mpe atinda bango na bilanga na ye. Asali bongo mpo azali lisusu na ntango mingi te ya koyanganisa mbuma na ye ya malamu.
2 Na mobu 33 T.B., Yesu oyo asekwi akutanaki na mokakatano ya ndenge wana. Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, alonaki mboto ya solo. Sikoyo ntango ya kobuka mbuma ekómi, mpe mbuma yango ezali mingi. Bato mingi oyo bandimaki koyoka nsango na ye basengeli koyanganisama mpo na kokóma bayekoli na ye. (Yoane 4:35-38) Ndenge nini Yesu asilisi mokakatano yango? Na Ngomba ya Galile, mwa moke liboso amata na likoló, apesaki bayekoli na ye mokumba ya koluka basali mingi, ntango alobaki ete: “Na yango, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”—Matai 28:19, 20.
3 Mokumba wana ezali na ntina mingi mpo na moto nyonso oyo azali mpenza kolanda Kristo. Tiká tótalela sikoyo mituna misato. Mpo na nini Yesu apesaki mokumba ya koluka basali mingi? Ndenge nini abongisaki bayekoli na ye mpo na mokumba yango? Na ndenge nini mokumba yango etali mpe biso?
Mpo na nini esɛngaki basali bázala mingi?
4, 5. Mpo na nini Yesu asilisaki te mosala oyo abandisaki, mpe banani basengelaki kokoba kosala mosala yango nsima ya kozonga na ye na likoló?
4 Ntango Yesu abandaki mosala na ye na mobu 29 T.B., ayebaki ete akokoka te kosilisa ye moko mosala oyo abandisaki. Na kotalela ntango mokuse oyo atikalaki na yango awa na mabele, akokaki te kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba mpe epai bato nyonso. Ya solo, asakwelaki mingimingi Bayuda mpe Baprozelite, “bampate ya ndako ya Yisraele oyo ebungá.” (Matai 15:24) Nzokande, ‘bampate yango oyo ebungá’ epalanganaki bipai na bipai na Yisraele mobimba, mboka oyo ezalaki na bankóto ya kilomɛtrɛ-karé. Lisusu, esengelaki mpe nsango malamu esakolama na mokili mobimba.—Matai 13:38; 24:14.
5 Yesu ayebaki ete nsima ya liwa na ye, mosala ya kosala ekozala naino mingi. Alobaki na bantoma na ye ya sembo 11 ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino, moto oyo azali komonisa kondima epai na ngai akosala mpe misala oyo nazali kosala; mpe akosala misala ya minene koleka oyo, mpo nazali kokende epai ya Tata.” (Yoane 14:12) Lokola Mwana asengelaki kozonga na likoló, bato oyo bazali kolanda ye, kaka bantoma na ye te kasi mpe baoyo nyonso bakokóma bayekoli na ye na nsima, basengelaki kosala mosala ya kosakola mpe ya koteya. (Yoane 17:20) Na komikitisa mpenza, Yesu andimaki ete misala oyo bakosala ekozala “minene koleka” oyo ye asalaki. Na ndenge nini? Na lolenge misato.
6, 7. (a) Na ndenge nini misala oyo bayekoli ya Yesu bakosala ekozala minene koleka oyo ya Yesu? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete Yesu amikosaki te ndenge atyelaki bayekoli na ye motema?
6 Ya liboso, bato oyo balandaka Yesu basengelaki kosakola na bisika mingi koleka. Lelo oyo, litatoli na bango ekómi tii na nsuka ya mabele, mosika koleka bandelo ya mokili oyo Yesu ye moko asakolaki. Ya mibale, basengelaki kosakwela bato mingi koleka. Mwa etuluku moke ya bayekoli oyo Yesu atikaki, ekolaki nokinoki mpe ekómaki bankóto ya bayekoli. (Misala 2:41; 4:4) Sikoyo bakómi bamilio, mpe bankama ya bankóto ya bato ya sika bazali kozwa batisimo mbula na mbula. Ya misato, Yesu asakolaki mbula misato ná ndambo, kasi bayekoli na ye bazali kokoba kosakola tii lelo oyo, eleki sikoyo mbula soki 2000.
7 Ntango Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakosala “misala minene koleka oyo” ya ye, azalaki komonisa ete atyelaka bango motema. Apesaki bango mosala oyo ezalaki na ntina mingi koleka mpo na ye, mosala ya kosakola mpe koteya “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:43) Andimaki mpenza ete bakosala mosala yango na bosembo nyonso. Yango elimboli nini mpo na biso lelo oyo? Ntango tosakolaka na molende mpe na motema mobimba, tomonisaka ete Yesu amikosaki te ndenge atyelaki bayekoli na ye motema. Oyo nde lokumu monene!—Luka 13:24.
Babongisami mpo na kopesa litatoli
8, 9. Ndakisa nini Yesu atikaki mpo na mosala ya kosakola, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?
8 Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo ya malamu koleka mpo na mosala ya kosakola. Oyo eleki nyonso, atikelaki bango ndakisa ya malamu koleka. (Luka 6:40) Na mokapo oyo eleki, tolobelaki ndenge oyo azalaki kotalela mosala ya kosakola. Kanisá naino bayekoli oyo basalaki mibembo elongo na Yesu mpo na kosakola. Bamonaki ete azali koteya bisika nyonso oyo akokaki kokuta bato: pembeni ya balaki, na bangomba, na bingumba, na bazando mpe na bandako ya bato. (Matai 5:1, 2; Luka 5:1-3; 8:1; 19:5, 6) Bamonaki ete azalaki mosali monene; azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kosakola tii na mpokwa. Mpo na ye, kosakola ezalaki te mosala ya kosala mpo na kolekisa ntango! (Luka 21:37, 38; Yoane 5:17) Na ntembe te, bamonaki ete bolingo oyo azalaki kolinga bato nde ezalaki kotinda ye asakola. Ekoki kozala ete motema mawa na ye ezalaki komonana na elongi na ye. (Marko 6:34) Okanisi ete ndakisa ya Yesu esalaki nini epai ya bayekoli na ye? Yo olingaki koyoka ndenge nini?
9 Lokola tolandaka Kristo, tomekolaka ndakisa na ye na mosala na biso ya kosakola. Na yango, tolekisaka ata libaku moko te mpo na kopesa “litatoli malamumalamu.” (Misala 10:42) Lokola Yesu, tokendaka kotala bato na bandako na bango. (Misala 5:42) Tobongolaka programɛ na biso, soki esengeli, mpo na kokende kotala bato na ngonga oyo tokoki kokuta bango epai na bango. Lisusu tolukaka bato, mpe na mayele nyonso, tosakwelaka bango na bisika ya bato nyonso: na babalabala, na baparke, na bisika ya mombongo, mpe na bisika ya mosala. Tozali “kosala mosala makasi mpe koboma nzoto” na mosala ya kosakola, mpo tozwaka yango na motuya mingi. (1 Timote 4:10) Lokola tolingaka bato na bolingo ya motema, tolukaka mabaku ya kosakwela bango ntango nyonso mpe na bisika nyonso oyo tokoki kokuta bango.—1 Batesaloniki 2:8.
10-12. Mateya nini ya ntina mingi Yesu ateyaki bayekoli na ye liboso atinda bango bákende kosakola?
10 Yesu apesaki mpe bayekoli na ye formasyo mpo na mosala ya kosakola na ndenge apesaki bango malako oyo alimbolaki yango polelepolele. Liboso atinda bantoma 12 mpe na nsima bayekoli 70 bákende kosakola, Yesu abengisaki bango na likita moko mpe apesaki bango malako mpo na mosala ya kosakola. (Matai 10:1-15; Luka 10:1-12) Malako yango ebimisaki matomba, mpamba te Luka 10:17 elobi ete: “Bayekoli yango 70 bazongaki na esengo.” Atako makambo ya bomoi ya bayekoli na ye ya ntango ya kala ekesanaki na oyo ya biso lelo oyo, tokoki kaka koyekola makambo ya ntina mingi. Tótalela sikoyo malako mibale kati na malako oyo apesaki.
11 Yesu ateyaki bayekoli na ye bátyelaka Yehova motema. Ayebisaki bango boye: “Bótya wolo, palata to mbongo ya kwivre te na mikaba na bino, bózwa mpe saki ya bilei mpo na mobembo te, elamba mosusu te, basandale te, lingenda mpe te, mpo mosali abongi kozwa bilei na ye.” (Matai 10:9, 10) Mbala mingi, basali-mibembo bazalaki komema potɔmɔni, saki ya bilei, mpe basandale mosusu.a Ntango Yesu alobaki na bayekoli na ye bámitungisa te mpo na biloko wana, alingaki mpenza koloba nde: “Bátyela Yehova motema mobimba, mpo ye akokokisa bamposa na bango.” Yehova akokaki kokokisa bamposa na bango na kotindáká baoyo bandimaki nsango malamu ete bámonisela bango ezaleli ya koyamba bapaya, ndenge ezalaki kosalema na Yisraele.—Luka 22:35.
12 Yesu ateyaki mpe bayekoli na ye ete báboya kolekisa ntango mpambampamba. Alobaki ete: “Bópesa moto mbote na nzela te.” (Luka 10:4) Yesu azalaki nde koyebisa bango ete bátyaka kaka likebi na makambo na bango moko, bákipe moto te? Soki moke te. Na ntango ya kala, kopesa moto mbote ezalaki kosuka te kaka na koloba “mbote.” Kopesa mbote ezalaki kosɛnga makambo mingi mpe kobenda lisolo molai. Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi boye: “Na bokeseni na makambo oyo esalemaka epai na biso, epai ya bato ya Azia, mbote ezalaki kosuka te kaka na koningisa motó mwa moke to kosembola lobɔkɔ, kasi [ezalaki] nde koyambana mbala na mbala, kogumba motó, ata mpe kofukama tii na nse. Nyonso wana ezalaki kozwa ntango mingi.” Ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bálanda te lolenge wana ya kopesa mbote, alingaki mpenza koloba nde: “Bosengeli kosalela ntango na bino malamu, mpo nsango oyo bomemi esengeli kosakolama na lombangu.”b
13. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozwaka na lisɛki te malako oyo Yesu apesaki bayekoli na ye na siɛklɛ ya liboso?
13 Tozwaka na lisɛki te malako oyo Yesu apesaki bayekoli na ye na siɛklɛ ya liboso. Ntango tozali kosakola, totyelaka Yehova motema na biso mobimba. (Masese 3:5, 6) Toyebi ete tokozanga te biloko ya kobikela soki tozali ‘kokoba koluka liboso Bokonzi.’ (Matai 6:33) Na mokili mobimba, basakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi bandimaka ete Yehova apesaka bango ntango nyonso biloko oyo basengeli na yango. (Nzembo 37:25) Toyebi mpe ete tosengeli koboya kolekisa ntango mpambampamba. Soki tokebi te, makambo ya mokili oyo ekoki kolongola likebi na biso na pɛtɛɛ nyonso. (Luka 21:34-36) Na yango, oyo ezali te eleko ya kobungisa ntango mpambampamba. Tosengeli kosakola na lombangu mpo bomoi ya bato ezali na likama. (Baroma 10:13-15) Soki tozali koyeba ete mikolo etikali ya kotánga, tokotika te ete makambo ya mokili elya ntango mpe makasi oyo tosengelaki kosalela na mosala ya kosakola. Tóbosana te ete ntango ekómi mokuse, kasi mbuma ya kobuka ezali naino mingi.—Matai 9:37, 38.
Mokumba oyo etali mpe biso
14. Nini emonisi ete mokumba oyo ezali na Matai 28:18-20 etali baoyo nyonso balandaka Kristo? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
14 Ntango Yesu oyo asekwi alobaki ete “bókende mpe bókómisa bato bayekoli,” apesaki bato oyo balandaka ye mokumba moko monene. Azalaki kaka koloba te na bayekoli oyo bazalaki elongo na ye na Ngomba wana na Galile.c Yesu apesaki bango mosala ya kokende kosakola epai ya ‘bato na bikólo nyonso’, mpe yango ezali kokoba “tii na eleko ya nsuka ya mokili.” Na ntembe te mokumba yango etali baoyo nyonso balandaka Kristo, ezala mpe biso lelo oyo. Sikoyo, tótalela malamumalamu maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 28:18-20.
15. Mpo na nini kotosa etinda oyo Yesu apesaki ya kokómisa bato bayekoli ezali likambo ya bwanya?
15 Liboso apesa bango mokumba yango, Yesu alobaki boye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” (Vɛrsɛ 18) Yesu azali mpenza na bokonzi monene ndenge wana? Na ntembe te, azali na yango! Azali anzelu-mokonzi, akambaka bamiriade na bamiriade ya baanzelu. (1 Batesaloniki 4:16; Emoniseli 12:7) Lokola azali “mokonzi ya lisangá,” azali na bokonzi likoló ya bato oyo balandaka ye awa na mabele. (Baefese 5:23) Kobanda 1914, azali koyangela lokola Mokonzi Masiya na likoló. (Emoniseli 11:15) Ata nkunda ezali na nse ya bokonzi na ye, mpo azali na nguya ya kosekwisa bakufi. (Yoane 5:26-28) Lokola Yesu alobelaki liboso bokonzi monene oyo azali na yango, yango emonisi ete maloba oyo alobi na nsima ezali mitindo, kasi te likambo ya kokakola. Tokomonisa ete tozali na bwanya soki totosi mitindo yango, mpo bokonzi oyo azali na yango euti epai ya Nzambe, kasi epai na ye moko te.—1 Bakorinti 15:27.
16. Yesu asɛngi biso tósala nini ntango alobi na biso ete “bókende,” mpe ndenge nini tokokisaka mokumba yango?
16 Mokumba oyo Yesu apesi ebandi na liloba: “Bókende.” (Vɛrsɛ 19) Na yango, asɛngi biso nde tókende kosakwela bato nsango ya Bokonzi. Wana tozali kokokisa mokumba yango, tokoki kosalela mayele ndenge na ndenge. Kosakola ndako na ndako ezali lolenge ya malamu koleka oyo esalisaka biso tókutana na bato. (Misala 20:20) Tolukaka mpe mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu; na makambo ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo, tosalelaka mpe bososoli ntango tolingi kosolola na bato oyo tokutani na bango. Tokoki kobongola mayele na biso ya kosakola na kotalela bamposa mpe makambo ya bomoi ya bato. Atako bongo, ezali na likambo moko oyo ebongwanaka te. Likambo yango oyo: Biso ‘tokendeke’ mpe tolukaka bato oyo babongi.—Matai 10:11.
17. Ndenge nini ‘tokómisaka bato bayekoli’?
17 Na nsima, Yesu alimboli mokano ya mokumba yango, elingi koloba ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Vɛrsɛ 19) Ndenge nini ‘tokómisaka bato bayekoli’? Moyekoli azali libosoliboso moto oyo azali koyekola, to oyo bazali koteya. Nzokande, kokómisa bato bayekoli esuki kaka te na kopesa bango boyebi. Ntango tozali koyekola Biblia na bato oyo basepeli, mokano na biso ezali ya kosalisa bango bákóma kolanda Kristo. Soki likoki ezali, tolobelaka mingi ndakisa ya Yesu mpo na kosalisa bato oyo tozali koyekola na bango bátalela ye lokola Moteyi mpe Ndakisa na bango, bámitambwisa lokola ye mpe básala mosala oyo ye asalaki.—Yoane 13:15.
18. Mpo na nini batisimo ezali likambo ya ntina mingi koleka na bomoi ya moyekoli?
18 Eteni ya ntina mingi na mokumba yango emonisami na maloba oyo: “Bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Vɛrsɛ 19) Batisimo ezali likambo ya ntina mingi koleka na bomoi ya moyekoli, mpo yango ezali elembo oyo emonisi mpenza ete amipesi na Nzambe na motema na ye mobimba. Na yango, batisimo ezali na ntina mingi mpo na kozwa lobiko. (1 Petro 3:21) Ɛɛ, soki moyekoli oyo azwi batisimo akobi kosala nyonso mpo na kosalela Yehova, akozala na elikya ya kozwa mapamboli ya seko na mokili ya sika oyo ezali koya. Osilá kosalisa moto akóma moyekoli ya Kristo oyo azwi batisimo? Yango ezali likambo ya esengo mingi na mosala ya kosakola.—3 Yoane 4.
19. Makambo nini toteyaka bato ya sika, mpe mpo na nini totikaka koteya bango te ata nsima ya kozwa batisimo?
19 Yesu alimboli eteni mosusu ya mokumba yango na maloba oyo: “Bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Vɛrsɛ 20) Toteyaka bato ya sika bátosa mitindo ya Yesu, oyo esɛngi mpe bango bálinga Nzambe, bálinga bazalani na bango, mpe bákómisa bato bayekoli. (Matai 22:37-39) Mokemoke, toteyaka bango báyeba kolimbola mateya ya solo ya Biblia mpe kolobela bindimeli na bango ya sika. Ntango bakokisi masɛngami mpo na kosakola elongo na lisangá, tobimaka elongo na bango, toteyaka bango na maloba mpe na ndakisa ndenge oyo bakoki kosakola mpo bábota mbuma na mosala yango. Koteya bayekoli ya sika esukaka kaka te ntango bazwi batisimo. Esɛngaka kolakisa bato oyo bauti kozwa batisimo sika makambo mosusu oyo ekosalisa bango bálonga mikakatano oyo bakokutana na yango wana bazali kolanda Kristo.—Luka 9:23, 24.
“Nazali elongo na bino mikolo nyonso”
20, 21. (a) Ntango tozali kokokisa mokumba oyo Yesu apesi, mpo na nini tosengeli kobanga te? (b) Mpo na nini oyo ezali ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ te, mpe tosengeli kozwa ekateli nini?
20 Maloba ya nsuka na mokumba oyo Yesu apesaki ezali mpenza kokitisa motema: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.” (Matai 28:20) Yesu ayebi ete mokumba oyo apesi ezali monene mpenza. Ayebi mpe ete na bantango mosusu tokoki kokutana na botɛmɛli wana tozali kokokisa mokumba yango. (Luka 21:12) Atako bongo, tosengeli kobanga te. Mokambi na biso atiki biso tókokisa mokumba yango biso moko te, kozanga ete asalisa biso. Koyeba ete Moto oyo azali na “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele” azali elongo na biso mpo na kosalisa biso tókokisa mokumba yango ebɔndisaka biso, boye te?
21 Yesu andimisaki bayekoli na ye ete akozala elongo na bango na mosala ya kosakola na boumeli ya basiɛkle mingi tii na “nsuka ya mokili.” Tosengeli kokoba kokokisa mokumba oyo Yesu apesaki biso tii nsuka ekoya. Oyo ezali ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ te. Mosala ezali naino mingi mpo na kobuka mbuma na elimo! Ebele ya bato oyo bazali kosepela na nsango malamu bazali naino koyanganisama. Lokola tozali bato oyo tolandaka Kristo, tózwa ekateli ya kokokisa mokumba monene oyo apesi biso. Tózala na ekateli ya kosalela ntango, makasi, mpe biloko na biso mpo na kokokisa etinda oyo ya Kristo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli.”
a Potɔmɔni ezalaki lolenge moko ya mokaba oyo bazalaki kosalela mpo na komema na yango mbongo ya bibende. Saki ya bilei ezalaki saki moko monene, oyo mbala mingi esalemaki na mposo ya nyama, ezalaki kodiembela na lipeka mpe bazalaki kosalela yango mpo na komema bilei to biloko mosusu.
b Mosakoli Elisha mpe apesaki malako ya ndenge wana na ntango ya kala. Ntango atindaki mosaleli na ye Gehazi epai ya mwasi moko oyo mwana na ye akufaki, Elisha alobaki ete: “Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te.” (2 Bakonzi 4:29) Etinda yango esengelaki kokokisama na lombangu, yango wana asengelaki kolekisa ntango mpambampamba te.
c Lokola bato mingi oyo bazalaki kolanda Yesu bazalaki bato ya Galile, ekoki kozala na libaku oyo elobelami na Matai 28:16-20 nde Yesu oyo asekwi abimelaki bandeko “koleka 500.” (1 Bakorinti 15:6) Na yango, ekoki kozala ete bankama ya bato bazalaki wana ntango Yesu apesaki mokumba ya kokómisa bato bayekoli.