Libombami oyo baklisto basengeli koyebisa polele!
“Ngai nasololi polele kati na mokili. . . . Nasololi likambo moko na nkuku te.”—YOANE 18:20.
1, 2. Liloba ya greke my·steʹri·on ezali na ndimbola nini ntango esalelami kati na Makomami?
KATI na Makomami Mosantu—Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi), liloba ya Greke my·steʹri·on ebongolami mbala ntuku mibale na mitano na “libombami ya bulɛɛ” mpe mbala misato ebongolami na “mobombamo.” Libombami oyo ebéngami ya bulɛɛ esengeli mpenza kozala na ntina! Moto oyo azwi libaku malamu ya koyeba libombami motindo wana asengeli mpenza komiyoka ete apesameli lokumu monene, mpamba te atángami ete abongi mpo na koyeba libombami moko ye na Nzambe Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba.
2 Búku Expository Dictionary of Old and New Testament Words ya Vine endimisi ete na mabaku mingi “libombami ya bulɛɛ” ezali bongo libongoli oyo libongi koleka “mobombamo.” Elobaki na ntina na liloba my·steʹri·on ete: “Kati na [Makomami ya Greke ya boklisto] ezali komonisa, libombami te (lokola na Lingelesi), kasi ezali komonisa nde likambo oyo eleki bososoli ya bato, ekoki koyebana polele bobele na lisalisi ya emoniseli ya Nzambe, mpe eyebisami na lolenge mpe na ntango oyo Nzambe ye moko aponi, mpe bobele epai na baoyo bangɛngisami na elimo na Ye. Na ndimbola ya momeseno, mobombamo elimbolaka boyebi oyo ebombami; nzokande, kati na Makomami elimbolaka solo oyo emonisami. Na yango maloba oyo mingimingi esanganaka na libombami ezali bongo ‘eyebisami,’ ‘emonisami,’ ‘etɔndɔlami,’ ‘esakolami,’ ‘esosolami,’ ‘epesameli.’”
3. Na lolenge nini lisangá ya boklisto ya liboso ekeseneki na bituluku mosusu ya mangomba ya mayele mabe?
3 Ndimbola yango ezali komonisa polele bokeseni kati na bituluku ya mangomba ya nkuku oyo efulukaki na ekeke ya liboso mpe lisangá ya boklisto oyo liutaki kosalema. Na kokesana na baoyo bayekolaki, milulu ya nkuku, oyo mbala mingi bakangamaki na ndai ya kokanga monɔkɔ na ntina na mateya ya losambo, baklisto batyamaki soko moke te na epekiseli motindo wana. Ezali solo ete ntoma Paulo alobi na ntina na “mayele mabombami ya Nzambe,” kobéngáká yango ete “oyo na nkuku,” elingi koloba ebombami mpo na “bayangeli na ebongiseli ya ntango oyo,” kasi ebombami te mpo na baklisto oyo epai na bango esilaki koyebisama na nzela ya elimo ya Nzambe mpo ete bákoka koyebisa yango epai na bato nyonso.—1 Bakolinti 2:7-12; kokanisá na Masese 1:20.
“Libombami ya bulɛɛ” emonisami
4. Likoló na nani “libombami ya bulɛɛ” etyami, mpe na lolenge nini?
4 “Libombami ya bulɛɛ” ya Yehova ezwami likoló na Yesu Klisto. Paulo akomaki ete: “[Yehova] ayebisaki biso libombami na mokano na ye pelamoko na mwango na ye oyo emonisi ye kati na Klisto, lokola ebongisaki ye mpo na kokokisa elaka ete ayanganisa biloko nyonso kati na Klisto lokola motó, yango na Likoló mpe yango na nsé.” (Baefese 1:9, 10) Kútu Paulo alobelaki na bosikisiki koleka lolenge ya “libombami ya bulɛɛ” ntango atángaki likambo litali mposa ya kozala na “bososoli na kososola mpenza mpo na koyeba Klisto, ye libombami na Nzambe.”—Bakolose 2:2.
5. Nini etalelami kati na “libombami ya bulɛɛ”?
5 Nzokande, makambo mosusu mingi matalelami, mpamba te “libombami ya bulɛɛ” ezali libombami na makambo mingi. Ezali te bobele komonisama ya Yesu lokola Mombóto oyo molakamaki to Masiya; kasi ezali mpe kotalela mosala oyo bapesi ye mpo na kosala kati na mokano ya Nzambe. Ezali kotalela boyangeli ya likoló, Bokonzi ya Masiya ya Nzambe, lokola Yesu alimbolaki yango polele ntango ayebisaki bayekoli na ye ete: “Makambo na nkuku na Bokonzi na Likoló, bino bokoki koyoka yango, nde bango bakoki koyoka te.”—Matai 13:11.
6. (a) Mpo na nini ezali likambo lilongobani koloba ete “libombami ya bulɛɛ” “ekundamaki longwa ntango molai”? (b) Lolenge nini yango ebandaki komonisama mokemoke?
6 Eleko moko molai esengelaki koleka uta mokano ya Nzambe elobelamaki mpo na mbala ya liboso na ntina na kobimisa moboko ya Bokonzi ya Masiya mpe kino “libombami na Nzambe likosila kokoka.” (Emoniseli 10:7; Genese 3:15) Kokokisama na yango esengelaki kosalema elongo na kotyama ya Bokonzi, lokola bokokanisi kati na Emoniseli 10:7 mpe Emoniseli 11:15 ezali komonisa yango. Ya solo, mbula soko 4 000 elekaki kobanda kopesama ya elaka ya liboso ya Bokonzi kati na Edene kino kobima na mobu 29 T.B. ya Mokonzi oyo aponamaki. Mbula mosusu 1 885 elekaki liboso ete Bokonzi etyama na makoló na 1914. Na yango, “libombami ya bulɛɛ” ezalaki komonisama mokemoke na boumeli ya mbula pene na 6 000. (Talá lokasa 16.) Paulo azalaki mpenza na elónga ntango alobaki na ntina na “emonaneli na makambo makundami longwa ntango molai; kasi mamonani sasaipi. Makambo yango mayebisami.”—Baloma 16:25-27; Baefese 3:4-11.
7. Mpo na nini tokoki kotya motema na kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele?
7 Na bokeseni na bato, lokola bazalaka na bomoi mokuse mpe na yango bazalaka na mayoki ya kopusama na ntango, Yehova azalaka soko moke te na mayoki ya kopusama na ntango mpo na komonisa mabombami na ye liboso na ntango oyo ebongi. Likambo yango lisengeli kopekisa biso kokóma motema lúkulúku mpo na mituna mosusu ya Biblia oyo mikoki naino kolimbolama na bosikisiki sikawa te. Ezaleli ya bopɔlɔ ya kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele, oyo atyami mpo na koleisa libota ya boklisto na ntango ebongi, ezali kopekisa ye na kopota liboso na lolɛndɔ nyonso mpe kopesa biyano ya likolólikoló na ntina na makambo oyo mazali naino polele te. Moombo ya sembo mpe ya mayele azali kosala milende ya kopɛngola ezaleli ya komindimisa na makasi. Moombo ya sembo mpe ya mayele azali komikitisa mpe koyambola ete na ntango oyo, akoki te koyanola mituna nyonso, kobateláká na makanisi na ye vɛrsɛ́ ya Masese 4:18. Kasi oyo nde esengo ya koyeba ete Yehova, na ntango oyo ye moko alingi mpe na lolenge na ye moko, akokóba komonisa mabombami matali mikano na ye! Tosengeli soko moke te kokóma motema lúkulúku mpo na bibongiseli ya Yehova, na kozanga bososoli kolukáká kopusa na makasi Momonisi na mabombami. Oyo nde kondimisama tozali na yango ya koyeba ete nzela oyo Yehova azali kosalela lelo oyo esalaka bongo te! Azali na bosembo mpe na mayele.—Matai 24:45; 1 Bakolinti 4:6.
Libombami oyo limonisami lisengeli mpe koyebisama!
8. Ndenge nini toyebi ete “libombami ya bulɛɛ” esengeli koyebisama?
8 Yehova asili komonisa “libombami [na ye] ya bulɛɛ” epai na baklisto mpo ete bábomba yango te. Esengeli koyebisama, na boyokani na etindá oyo Yesu atyaki mpo na bayekoli na ye nyonso—kasi te bobele mpo na mwa etuluku ya bakonzi ya mangomba; alobaki ete: “Bino bozali moi na mokili. Mboka etongami likoló na ngomba eyebi kobombama te. Bakobambola mwinda te mpo na kotya yango na nsé na mbeki, kasi bakotya yango likoló na etɛmɛlo ete engɛngɛla nyonso baoyo bazali na ndako. Bongo, tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.”—Matai 5:14-16; 28:19, 20.
9. Nini emonisi ete Yesu azalaki te moto oyo alukaki kokɔtisa mbongwana, lokola basusu balobaka yango?
9 Yesu azalaki te na mikano ya koluka kotya mbongwana na kosaláká etuluku moko ya bayekoli mpo na kolanda mikano ya nkuku. Kati na búku Early Christianity and Society, Robert M. Grant akomaki na ntina na baklisto ya liboso litatoli oyo lisalemaki na Justin Martyr, mokɔteli ya baklisto na ekeke ya mibale, na maloba oyo: “Soki baklisto bazalaki bato oyo bazalaki koluka kokɔtisa mbongwana mbɛlɛ bazalaki ntango nyonso kosala makambo na nkuku mpo na kokokisa mikano na bango.” Kasi ndenge nini baklisto bakoki ntango nyonso “kosala makambo na nkuku” mpe bobele na ntango yango kozala “engumba . . . oyo etongami likoló na ngomba”? Bamekaki soko moke te kobomba bongɛngi na bango kati na mbeki! Na yango, boyangeli ezalaki na likambo moko te ya kobanga na ntina na mosala na bango. Mokomi yango akóbaki kolobela bango lokola “baoyo bazali na ngambo ya empereur na likambo litali kotya kimya mpe molɔngɔ́.”
10. Mpo na nini baklisto basengeli te kobomba misala na bango?
10 Yesu alingaki te ete bayekoli na ye bámibomba lokola basangani ya mwa lingomba moko ya nkuku. (Misala 24:14; 28:22) Lelo oyo, soki tozali kosala te ete pole na biso engɛnga, yango ekosepelisa te Klisto mpe Tata na ye, Momonisi na makambo mabombami, mpe na yango biso mpe tokozala na esengo te.
11, 12. (a) Mpo na nini Yehova alingi ete losambo ya boklisto eyebana polele? (b) Na lolenge nini Yesu atikaki ndakisa malamu?
11 Yehova “alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9; Ezekiele 18:23; 33:11; Misala 17:30) Likambo ya ntina mpo na basumuki oyo babongoli motema ete bázwa bolimbisi ya masumu ezali bongo kondima mbeka ya Yesu Klisto, oyo amipesaki lokola lisiko mpo na banso—kasi bobele mpo na bato moke te—mpo ete “moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Ezali likambo ya ntina ete bato básalisama mpo ete básala matambe masengeli oyo ekomonisa ete babongi mpenza kotángama lokola bampate, kasi lokola bantaba te, na ntango ya kosambisama oyo ezali koya.—Matai 25:31-46.
12 Boklisto ya solo esengeli kobombama te; esengeli koyebana na lolenge nyonso oyo ebongi. Yesu ye moko apesaki ndakisa malamu. Ntango nganga-monene atunaki ye na ntina na bayekoli na ye mpe mateya na ye, alobaki ete: “Ngai nasololi polele kati na mokili. Ntango nyonso nalakisi polele kati na eyanganelo mpe kati na Tempelo wana Bayuda nyonso bazalaki koyangana; nasololi likambo moko na nkuku te.” (Yoane 18:19, 20) Na kotalela oyo touti kolobela, moto oyo azali na bobángi Nzambe akoluka kobomba nsango oyo Nzambe alobi ete esengeli koyebisama epai na bato nyonso? Nani akomeka kobomba “fungola ya boyebi” oyo ezali komema na bomoi ya seko? Kosala bongo, ekokómisa ye lokola bakonzi ya mangomba ya ekeke ya liboso oyo bazalaki na bokosi.—Luka 11:52; Yoane 17:3.
13. Mpo na nini tosengeli kosakola na mabaku nyonso?
13 Tiká ete moto moko te aloba ete biso Batatoli ya Yehova tozali kobomba nsango ya Bokonzi ya Nzambe! Ezala nsango yango endimami to endimami te, bato basengeli koyeba ete esakolamaki. (Kokanisá na Ezekiele 2:5; 33:33.) Na bongo, tiká ete tósimba mabaku nyonso mpo na koyebisa nsango ya solo epai na bato nyonso, ezala ata esika nini tokutani na bango.
Kotya ndɔ́bɔ na mbanga ya Satana
14. Mpo na nini tosengeli kokakatana te kosalela elobeli ya polele kati na losambo na biso?
14 Na bisika mingi, Batatoli ya Yehova bakómi kolobelama mingi na bipanzelo-nsango. Lolenge moko esalemaki na ntango ya baklisto ya liboso, mpe mbala mingi bazali komonisa bango na lolenge mabe mpe batyaka bango na molɔngɔ́ ya mangomba ya mayele mabe mpe masangá ya misala ya nkuku. (Misala 28:22) Elobeli ya polele oyo tozali kosalela na mosala na biso ya kosakola ekoki kosala ete tókutana na botɛmɛli koleka? Ekozala mpenza likambo ya kozanga mayele, mpe ya kozanga kobatela toli ya Yesu na komikɔtisa kati na bantembe ezangi ntina. (Masese 26:17; Matai 10:16) Nzokande, mosala ya kosakola Bokonzi oyo ezali kopesa matomba mpe kosalisa bato ete bábongola bomoi na bango esengeli te kosalema na nkuku. Ezali kokumisa Yehova, kosanzola ye, kotya likebi ya bato epai na ye mpe epai na Bokonzi na ye oyo etyami. Ntina mosusu ya bosepeli na solo ya Biblia oyo emonani kala mingi te na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti mpe na biteni mosusu ya Afrika eutaki na elobeli ya polele oyo ezali kokóla mpe na yango solo ekoki kosakolama kuna.
15, 16. (a) Makaneli nini mazali kosalema na ntina na elobeli na biso ya polele mpe na ntina na bokóli na biso, kasi yango ezali nde ntina ya komitungisa? (b) Mpo na nini Yehova atye ndɔ́bɔ na mbanga ya Satana?
15 Ezali solo ete elobeli ya polele oyo Batatoli ya Yehova bazali kosalela mpo na kosakola, paladiso ya elimo oyo bazali kosepela na yango, mpe bokóli na bango—ezala na bato ya makoki to na bisaleli—ebendaka likebi. Lokola ezali kosepelisa bato ya motema malamu, makambo yango makoki kobimisa botyoli ya batɛmɛli. (2 Bakolinti 2:14-17) Ya solo, bokóli yango ekoki nsukansuka kopusa banguya ya Satana mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe.
16 Yango esengeli kotungisa biso? Engebene esakweli ya Yehova oyo ezwami na Ezekiele mokapo 38, yango esengeli kotungisa biso te. Esakolaki ete Gogo ya Magogo, elingi koloba Satana Zábolo uta kobwakama na ye zingazinga na mabelé nsima ya kotyama ya Bokonzi na 1914, akobundisa basaleli ya Nzambe. (Emoniseli 12:7-9) Yehova ayebisi Gogo ete: “Mpe okoloba ete, Nakobuta epai na mokili oyo mboka na yango izali na bitutu te; nakobimela baoyo na kimya, baoyo bafandi na kobanga te, bango nyonso bafandi kuna na bitutu te mpe na mikesi te mpe na bikuke te. Mpo ete olingi kobɔtɔla mpe kopunza; mpo na kotya lobɔkɔ na yo na bisika bibebaki kasi sikawa bato bafandi na yango, mpe na bato oyo balongwaki na mabota, baoyo bazwi bibwele mpe biloko, baoyo bafandi na katikati na mokili.” (Ezekiele 38:11, 12) Nzokande, vɛrsɛ́ 4 ezali komonisa ete basaleli ya Nzambe basengeli kobanga matumoli yango te, mpamba te ezali kosalema mpo na Nzambe. Kasi mpo na nini Nzambe akoki kotika nzela na yango—ɛɛ, ata kobimisa—matumoli likoló na basaleli na ye? Na vɛrsɛ́ 23 tozali kotánga eyano ya Yehova: “Boye nakomonisa lokumu na ngai mpe bulɛɛ na ngai, mpe nakomiyebisa na miso na mabota mingi, mpe bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].”
17. Lolenge nini tosengeli kotalela matumoli ya Gogo oyo makómi pene?
17 Na yango, na esika ya kobanga matumoli ya Gogo, basaleli ya Yehova bazali kozela na motema likoló kokokisama mosusu ya esakweli. Oyo nde esengo ya koyeba ete na kokólisáká mpe kopamboláká lisangá na ye oyo ezali komonana, Yehova azali kotya ndɔ́bɔ na mbanga ya Satana mpe kokweisa ye na mampinga na ye!
Kosakolama ezali kosalema koleka ntango mosusu nyonso!
18. (a) Bato bazali sikawa komona bosolo ya likambo nini, mpe mpo na nini? (b) Na lolenge nini ezalela oyo bato bamonisaka na kosakolama ya Bokonzi ezali elendiseli ya nguya?
18 Na mikolo na biso, Batatoli ya Yehova basili komonisa polele bindimeli na bango oyo bizwi moboko na Biblia, atako yango endimami na bato mingi te. Na boumeli ya bambula, basilaki kokebisa bato na ntina na makámá oyo eutaka na komɛla likaya mpe kosalela bilangwiseli, makámá oyo makoki kokómela bana oyo babɔkɔlami kozanga disipilini, matomba mabe ya kominanola oyo esangisi kosangisa nzoto mpe mobulu, mpe makámá ya kozongisama makila. Batɔndɔlaki mpe bongolabongola ya liteya ya evolisyó. Bato mingi sikawa bazali koloba ete: “Batatoli ya Yehova bazali na elónga.” Soki tozalaki komonisa bindimeli na biso polele te, mbɛlɛ bazali koloba motindo wana te. Mpe tóbosana te ete na kolobáká bongo, bazali kosala litambe na kolobáká ete “Satana ozali mokosi; Yehova nde azali na elónga.” Oyo nde elendiseli mpo na biso ya kokóba kolanda ndakisa ya Yesu ya koyebisa liloba ya solo epai na bato nyonso!—Masese 27:11.
19, 20. (a) Mokano nini basaleli ya Yehova bazalaki na yango na 1922, mpe maloba yango mazali kosalelama kino lelo? (b) Lolenge nini tosengeli kotalela “libombami ya bulɛɛ” ya Yehova?
19 Uta kala basaleli ya Yehova basilá kososola etindá na bango na ntina yango. Na liyangani moko monene oyo lisalemaki na mobu 1922, J. F. Rutherford, oyo ntango wana azalaki prezidá ya la Société Watch Tower alendisaki bayangani na kolobáká ete: “bózala na bokatikati, bósɛnzɛla, bózala na mosala, bózala na mpiko. Bózala sembo mpe bózala Batatoli ya solo mpo na Nkolo. Bókende liboso kati na etumba kino bitika nyonso ya Babilone bikotikala mpamba. Bósakola nsango mosika mpe bipai binso. Mokili esengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe mpe Yesu Klisto azali Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo. Oyo ezali mokolo moleki bonene. Talá, Mokonzi azali koyangela! Bozali basakoli na ye. Yango wana, bósakola, bósakola, bósakola Mokonzi mpe bokonzi na ye.”
20 Lokola maloba yango mazalaki na ntina na 1922, mazali mpe na ntina mingi nsima ya mbula 75, wana komonisama ya Klisto lokola Mosambisi mpe Mobekoli ekómi pene! Nsango ya Bokonzi ya Yehova oyo esili kotyama mpe ya paladiso ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali kosepela na yango ezali “libombami ya bulɛɛ” oyo basengeli koyebisa yango mpe na bato mosusu. Lokola Yesu ye moko alobaki yango polele, bayekoli na ye, na lisalisi ya elimo santu, basengeli kozala batatoli “kino nsuka na mokili” kotaleláká esika na ye ya ntina kati na mokano ya seko ya Yehova. (Misala 1:8; Baefese 3:8-12) Ya solo, lokola tozali basaleli ya Yehova, Nzambe oyo amonisaka mabombami, tokomeka soko moke te kobomba yango mpo na biso moko!
Okoyanola lolenge nini?
◻ “Libombami ya bulɛɛ” ezali nini?
◻ Ndenge nini toyebi ete esengeli kosakolama?
◻ Matumoli ya Gogo likoló na basaleli ya Yehova ezali komema nini, mpe lolenge nini tosengeli kotalela yango?
◻ Mokomoko na biso asengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
[Etanda na lokasa 16]
“Libombami ya bulɛɛ” emonisami mokemoke
◻ Nsima ya mobu 4026 L.T.B.: Nzambe alaki kobimisa Mombóto mpo na koboma Satana.—Genese 3:15
◻ Na 1943 L.T.B.: Kondimana na Abalayama esalemaki, kolakáká ete Mombóto akobima na nzela na Abalayama.—Genese 12:1-7
◻ Na 1918 L.T.B.: Kobotama ya Yisaka lokola mosangoli na libula na kondimana oyo esalemaki.—Genese 17:19; 21:1-5
◻ Soko na 1761 L.T.B.: Yehova andimisi ete Mombóto akobima na nzela na Yakobo mwana ya Yisaka.—Genese 28:10-15
◻ Na 1711 L.T.B.: Yakobo amonisi ete Mombóto akobima na libota ya mwana na ye Yuda.—Genese 49:10
◻ Na 1070-1038 L.T.B.: Mokonzi Davidi ayebi ete Mombóto akozala na libota na ye mpe akoyangela libela na libela lokola Mokonzi.—2 Samwele 7:13-16; Nzembo 89:35, 36
◻ Na 29-33 T.B.: Yesu ayebani lokola Mombóto, Masiya, oyo akozala mosambisi mpe Mokonzi oyo aponami.—Yoane 1:17; 4:25, 26; Misala 10:42, 43; 2 Bakolinti 1:20; 1 Timoté 3:16
◻ Yesu amonisi ete akozala na baninga bayangeli mpe basambisi elongo na ye, mpe ete Bokonzi ya likoló ekozala na bato oyo bakoyangelama na nsé, mpe ete bayekoli na ye nyonso basengeli kozala basakoli ya Bokonzi.—Matai 5:3-5; 6:10; 28:19, 20; Luka 10:1-9; 12:32; 22:29, 30; Yoane 10:16; 14:2, 3
◻ Yesu amonisi ete Bokonzi ekotyama na ntango moko ya sikisiki, yango ekokokana na makambo mazali kosalema na mokili.—Matai 24:3-22; Luka 21:24
◻ Na 36 T.B.: Petelo ayebi ete baoyo bazali bayuda te bakokóma mpe basangoli na libula kati na Bokonzi.—Misala 10:30-48
◻ Na 55 T.B.: Paulo alimboli ete basangoli na libula ya Bokonzi bakosekwa mpo na kozala na bomoi ezangi kufa mpe nzoto ezangi kopɔla na boumeli ya kozala ya Klisto.—1 Bakolinti 15:51-54
◻ Na 96 T.B.: Yesu, oyo asilaki kobanda koyangela bayekoli bapakolami na ye, amonisaki ete motángo na bango ya nsuka ekozala 144 000.—Baefese 5:32; Bakolose 1:13-20; Emoniseli 1:1; 14:1-3
◻ Na 1879 T.B.: Zulunalo La Tour de Garde de Sion emonisi 1914 lokola mobu moko ya ndimbola monene kati na kokokisama ya “libombami ya bulɛɛ” ya Nzambe
◻ Na 1925 T.B.: Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimboli ete Bokonzi ebotamaki na likoló na 1914; “libombami ya bulɛɛ” na ntina na Bokonzi esengelaki kosakolama.—Emoniseli 12:1-5, 10, 17
[Bililingi na lokasa 15]
Lokola Motambwisi na bango, Yesu, Batatoli ya Yehova bazali koyebisa Bokonzi ya Yehova epai na bato nyonso