-
Boyengebene bokeseni na mibeko na bonkokoLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 1 Octobre
-
-
Boyengebene bokeseni na mibeko na bonkoko
“Soko boyengebene na bina ekoleka yango na bakomeli mpe Bafalisai te, bakoingela na Bakonzi na Likoló te.”—MATAI 5:20.
1, 2. Yesu asalaki nini liboso ete abanda lisolo likolo na ngomba?
YESU alekisaki butu mobimba likoló na ngomba. Myoto na likoló mizalaki kongengela ye. Banyama mike na butu bazalaki kobimisa mingongo kitoko na nse na nzete. Na ebimelo na ntango, mai ya libeke ya Galilée mazalaki koya kobeta mokemoke na zelo na libongo. Kasi,na ntembe te, Yesu amipesaki mingi te na kimya mpe na kitoko ya esika yango. Na solo, alekisaki butu mobimba na kobondela Tata na ye ya Likoló, Jéhovah. Azalaki na mposa ya litambwisi na ye, mpamba te asengelaki kozwa ekateli monene na kotana ya ntongo.
2 Mokemoke, na ebimelo ya ntango, likoló engali. Bandeke babandaki kopumbwapumbwa na koyembáká mpe bafololo ya zamba ezalaki koningana na mwa mopepe kitoko. Ntango moi ebandaki kobima na likoló, Yesu abengaki bayekoli na ye pene na ye mpe aponaki 12 kati na bango lokola bantoma. Na nsima, akitaki longwa na ngomba elongo na bango nyonso. Bamonaki koyangana na bibele bauti longwa na Galilée, na Tyr mpe Sidon, na Yuda mpe na Yelusaleme. Bayaki mpo na kobikisama. Nguya eutaki na Jéhovah ezalaki kobima epai na Yesu, mpamba te mingi babikaki bobele na kosimba ye. Bato yango nyonso bayaki mpe mpo na koyoka maloba na ye oyo mazalaki lokola nkisi mpo na kobondisa milimo na bango mitungisamaki.—Matai 4:25; Luka 6:12-19.
3. Ntango abandaki koloba, mpo na nini bayekoli mpe bibele oyo bayanganaki bazakaki kolanda na likebi nyonso?
3 Wana bazalaki koteya na lolenge na milulu; bakonzi na mangomba ya Bayuda bazalaki na momesano ya kofanda. Nzokande, na ntongo na printemps ya mobu 31, Yesu mpe afandaki, na lolenge emonani na esika ya papalá oyo ezalaki na ekiteli ya ngomba. Na ntango bayekoli na ye mpe bibele bamonaki ye kofanda, basosolaki ete likambo moko ya ntina libongisamaki, mpe bayanganaki zingazinga na ye, kozelaka na motema móto. Ntango abandaki koloba, bayokamelaki ye mpenza na likebi; mpe wana asukisaki lisolo na ye nsima na mwa ntango, atikaki bango kokamwa mpo na makambo oyo bayokaki. Totala mpo na nini bakamwaki.—Matai 7:28.
Mitindo mibale na boyengebene
4. a) Mitindo mibale nini na boyengebene oyo Yesu akesenisaki? b) Na mokano nini mibeko na bonkoko misalemaki, kasi ekokisaki mokano yango?
4 Kati na lisolo na ye likoló na ngomba, oyo ekomami na Matai 5:1 kino Matai 7:29 mpe na Luka 6:17-49, Yesu akesenisaki polele mpenza kelasi mibale: bakomeli mpe Bafalisai na ngambo moko, mpe bato mpamba na ngambo mosusu. Alobelaki mitindo mibale ya boyengebene: boyengebene na bokosi ya Bafalisai mpe boyengebene ya solo na Nzambe. (Matai 5:6, 20) Boyengebene ya Bafalisai, ezalaki nyonso se mpo ya komonana malamu na miso ya bato eutaki na mibeko na bonkoko, oyo etyamaki na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso mpo ezala lokola “lopango zingazinga na Mibeko na Moize”, mpo ebatela yango na makanisi ya Bagreke. Mibeko yango miyaki kotalelama lokola eteni moko ya Mibeko na Moize. Na solo mpenza, bakomeli bazalaki nkutu kolekisa mibeko na bonkoko liboso na Mibeko na Moize. Kati na mokanda Mishna, tozali kotanga ete: “Maloba ya bakonzi na mangomba (mibeko na bankoko na bango) ezali na nguya mingi koleka oyo ya Mibeko mikomamaki.” Na boye, na esika na kozala “lopango zingazinga na Mibeko na Moize”, mibeko na bango mizalaki nde kolembisa yango mpe kosilisa ntina na yango, lokola oyo Yesu alobaki ete: “Bokoboya malako na Nzambe mpo na kosimba mitindo miuti na bino mpenza.”—Malako 7:5-9; Matai 15:1-9.
5. a) Bato mpamba oyo bazalaki koya mpo na koyoka Yesu bazalaki na ezalela nini, mpe ndenge nini bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kotalela bango? b) Mpo na nini mibeko na bonkoko ezalaki mokumba na bozito likolo na mapeka na moto oyo ayebaki Mibeko te?
5 Bato mpamba baoyo bazalaki kokende epai na Yesu mpo na koyoka ye bazalaki babola na elimo, mpamba te ‘balembaki mpe balemalemaki lokola bampate bazangi mobateli.’ (Matai 9:36) Bakomeli mpe Bafalisai na lolendo bazalaki kotala bango mpamba. Bazalaki kobenga bango ‘am ha’aréts (bato na mboka) mpe bazalaki kotalela bango na kotyola nyonso lokola bato bayebi eloko te, basumuki balakami mabe baoyo babongaki na lisekwa te mpo ete bazalaki kobatela mibeko na bonkoko te. Na eleko na Yesu, mateya yango makomaki mingi mpenza mpe esalaki liboke moko ya malako mabakisamaki oyo ezalaki makasi, oyo etondaki na milulu mingi, oyo moto moko ayekoli mibeko te akokaki kotosa yango te. Ezali likambo na kokamwa te ete Yesu akokanisaki mibeko na bonkoko na ‘mikumba na bozito likoló na mapeka na bato.’—Matai 23:4; Yoane 7:45-49.
6. Likambo nini na kokamwa ebimaki na maloba na yambo na Yesu, mpe kobongwana nini yango emonisaki na bayekoli na ye na ngambo moko mpe bakomeli ná Bafalisai na ngambo mosusu?
6 Na bongo, ntango Yesu afandaki na ekiteli na ngomba, ezali bayekoli na ye mpe bato oyo bazalaki na nzala na elimo nde babelemaki epai na ye mpo na koyokamela ye. Na ntembe te, bakamwaki na maloba na ye ya yambo. ‘Esengo na babola, esengo na baoyo bazali na nzala, esengo na baoyo bazali kolela, esengo na baoyo bayinami.’ Kasi nani akoki kozala na esengo wana azali mobola, azali na nzala, azali kolela to ayinami? Na epai mosusu, Yesu abelelaki mawa likoló na baoyo bazalaki bazwi, baoyo bazalaki kolya malamu, baoyo bazalaki koseka mpe na baoyo balingamaki. (Luka 6:20-26.) Bobele na mwa maloba moke, Yesu abalolaki makanisi nyonso oyo bato bazalaki na yango mpe mitinda na bato oyo endimamaki mingi mpenza. Ezalaki mbongwana monene ya makambo, na boyokani na likambo oyo ayaki koloba nsima ete: “Oyo akomizwela lokumu, lokumu na ye ekolongwa; mpe oyo aboi lokumu, lokumu na ye ekozala monene.”—Luka 18:9-14.
7. Maloba ya yambo na Yesu mazalaki na bopusi nini likolo na ebele na bato oyo bazalaki mpenza na nzala na elimo, baoyo bayaki koyoka ye?
7 Na kokesena na bakomeli mpe na Bafalisai baoyo bazalaki komikumisa bango mpenza, bato oyo bakendaki epai na Yesu na ntongo wana bayebaki ete bazalaki na ezalela ya mawa na elimo. Maloba na ye ya yambo etondisaki bango na elikya: “Esengo na baoyo bazali kobanza mposa na bango ya elimo, mpo ete bokonzi ya makoló ezali na bango.” Mpe boni basepelaki wana abakisaki ete: “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpo ete bakotonda.” (Matai 5:3, 6, (MN); Yoane 6:35; Emoniseli 7:16, 17) Bakotonda solo mpenza na boyengebene na Nzambe, kasi na boyengebene ya Bafalisai te.
Kozala ‘moyengebene liboso na bato’ ekoki te
8. Mpo na nini bamosusu bakokaki komituna na lolenge nini boyengebene na bango ekokaki koleka mpenza oyo ya bakomeli mpe Bafalisai, kasi mpo na nini esengelaki kozala bongo?
8 Yesu alobaki ete, “soko boyengebene na bino ekoleka yango na bakomeli mpe na Bafalisai te, bokoingela na Bokonzi na likolo te.” (Matai 5:17-20; tala Malako 2:23-28; 3:1-6; 7:1-13) Bamosusu bamitunaki ete: ‘Kozala bayengebene koleka Bafalisai? Bango bazali kokila bilei, bakobondelaka mingi, bakopesaka ndambo na zomi, bakokabelaka babola mpe bazali kolekisa bomoi na bango mobimba na koyekola Mibeko. Ndenge nini boyengebene na biso ekokoka koleka mpenza oyo na bango?’ Nzokande, ekokaki mpenza koleka! Mbala mosusu bakumisamaki nde na bato kasi na Nzambe te. Na libaku mosusu Yesu alobaki na Bafalisai yango ete: “Bino bokomilongisaka na miso na bato, nde Nzambe ayebi mitema na bino; mpo ete yango ezali monene kati na bato, ezali mbindo na miso na Nzambe.”—Luka 16:15.
9-11. a) Wapi moko na mitindo oyo na nzela na yango, bakomeli mpe Bafalisai bazalaki koluka kotangama bayengebene epai na Nzambe? b) Wapi motindo ya mibale na nzela na yango bazalaki koluka boyengebene? c) Wapi mwango ya misato oyo bazalaki kotya motema, mpe maloba nini ya ntoma Paulo mamonisi ete ezalaki mwango malamu te?
9 Bakonzi na mangomba ya Bayuda basalaki mibeko na bango moko mpo ete bakóma bayengebene. Moko na mibeko yango ezalaki oyo ya kozala mpenza bakitani ya Abrahame baoyo babongi: “Bayekoli na Abrahame . . . bazali kozwa bolamu na mokili oyo, mpe bakozwa bolamu na bomoi oyo ekoya.” (Mishna). Mbala mosusu ezali lilako yango nde Yoane Mobatisi apamelaki ntango apesaki likebisi oyo epai na Bafalisai, ete: “Bobota mbuma ebongi na kobongola motema; mpe bomikembisa te na kolobaka bino mpenza ete: ‘Tozali na Abrahame lokola tata (lokola soko nde yango mpamba ekokaki).”’—Matai 3:7-9; tala lisusu Yoane 8:33, 39.
10 Lolenge na mibale oyo na yango bazalaki koluka kokóma bayengebene, ezali oyo ya kokabela babola. Mikanda mibale mipemami na Nzambe te, oyo mikomamaki na Bayuda baoyo bazalaki komipesa mingi na lingomba na bango na ekeke ya mibale liboso na ntango na biso, emonisi boyengebene yango ete ezalaki mpo na kopesa makabo epai na babola. Mokanda Tobie elobi ete: “Wana moto akobikisa molimo mwaye na liwa, mpe akosukola motema na masumu manso. Baye bayebi kokaba bakokufa noki te!” (Tobie 12:9, Mokanda Sira (Ecclésiastique) elobeli bobele likanisi yango moko: “Lokola mai makozimisaka móto, likabo likolongolaka mbindo ya masumu.”—Sira 3:30.
11 Mwango na misato oyo na yango bazalaki kotya motema mpo bakóma bayengebene ezalaki oyo ya kokokisa misala na Mibeko na Moize. Engebene mibeko na bankoko na bango, soko misala malamu ya moto moko ezali mingi, moto yango akobika. Kosambisama “ekosalema na kotalela motuya boni na misala malamu to mpe misala mabe”. (Mishna.) Mpo basambisama malamu, Bafalisai bazalaki kosala milende ya “kokokisa misala oyo mikokaki kolongola masumu na bango.” Soki misala malamu ya moto moko mileki misala mabe na ye moto yango akobika—lokola soko nde Nzambe akosambisaka na kosalaka mituyá ya mwa misala na bango mikemike! (Matai 23:23, 24) Paulo akanisaki malamu mpenza ntango akomaki boye: “Moto moko te akolonga liboso na ye (Nzambe) mpo na misala na Mibeko.” (Baloma 3:20) Na ntembe te, boyengebene na boklisto esengeli koleka mpenza oyo na bakomeli mpe Bafalisai!
“Boyokaki ete balobaki boye”
12. a) Kati na lisolo na ye likolo na ngomba, motindo nini Yesu akotisaki maloba ya mikapo na Makomami na liebele, mpe mpo na nini atangaki yango ndenge mosusu na kokesena na oyo amesenaki kosalela? b) Ndakisa ya motoba ya liloba “Boyokaki ete balobaki boye” emonisi biso nini?
12 Na liboso, ntango azalaki kotanga Makomami na hébreu, Yesu azalaki koloba ete: “Ekomami.” (Matai 4:4, 7, 10) Kasi kati na Lisolo likoló na ngomba, mbala motoba alobelaki makambo oyo mazalaki na Makomami na hébreu na maloba oyo ete: “Boyokaki ete balobaki boye.” (Matai 5:21, 27, 31, 33, 38, 43) Mpo na ntina nini? Mpo ete azalaki komonisa lolenge nini Makomami mabongolamaki mpo na mateya na Bafalisai na kokesena na mitinda na Nzambe. (Deteronome 4:2; Matai 15:3) Ezali yango nde emonani polele na liloba oyo ya motoba mpe ya nsuka: “Boyokaki ete balobaki boye: ‘Olinga mozalani na yo nde oyina moyini na yo.” ‘Nzokande, ata etinda moko te na Mibeko na Moize elobi ete ‘oyina moyini na yo.’ Ezalaki bakomeli mpe Bafalisai nde bazalaki koloba bongo. Ezalaki lolenge na bango ya kolimbola mobeko oyo etindi bango ete balinga bazalani na bango—bobele Bayuda, kasi bato mosusu te.
13. Ndenge nini Yesu akebisaki na ntina na bizaleli nyonso oyo ekoki komema na koboma?
13 Totalela sikawa liloba ya yambo kati na maloba yango motoba. Yango oyo: “Bosili koyoka lokola bato na kala balobaki ete: ‘Boma moto te, mpe ete, ye oyo akoboma moto akozala na likambo epai na esambiselo.’ Nde ngai nakoloba na bino ete, ye oyo akosilika na ndeko na ye akozala na likambo na esambiselo.” (Matai 5:21, 22) Wana moto akozwaka nkanda, akoki mbala mosusu kofinga, mpe nsima kozwa ekateli ya kokweisa, mpe na nsuka ekoki komema ye na koboma. Nkanda oyo ebombami kati na motema ekoki mbala mosusu koboma, mpamba te, “moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi na bato.”—1 Yoane 3:15.
14. Na maloba nini Yesu apesi biso toli mpo tomikotisa soko moke te na nzela oyo ezali komema na ekobo?
14 Yesu alobaki lisusu ete: “Boyoki ete balobaki boye: ‘Sala ekobo te.’ Nde ngai nazali koloba na bino ete, ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” (Matai 5:27, 28) Oboyi kosala ekobo? Na yango, komipesa te na nzela yango na kozaláká na makanisi na mposa mabe na nzoto. Batela motema na yo, epai motindo na masumu wana mazwi liziba na yango. (Masese 4:23; Matai 15:18, 19) Na Yakobo 1:14, 15, tozali kokuta likebisi oyo ete: “Moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na ye moko. Na nsima, esili mposa kozwa zemi, eboti lisumu, mpe esili lisumu yango kokóla, eboti liwa.” Elobami ete ‘esengeli te kobanda likambo oyo okosilisa te.’ Nde mpo na likambo oyo, tokoloba ete ‘esengeli te kobanda likambo oyo okokoka kotika yango te.’ Baklisto oyo bazalaki sembo, oyo nkutu basoda balingaki koboma bango, na nsima basili kokweia kati na motambo na pité.
15. Na nini likanisi na Yesu likolo na koboma libala ekeseni mpenza na oyo elobelamaki kati na mibeko na bonkoko ya Bayuda?
15 Totalela sikawa liloba ya misato na Yesu: “Epai mosusu elobamaki ete: ‘Ye nani akolongola mwasi na ye, apesa ye mokanda na koboma libala’. Nde ngai nazali koloba na bino ete: ‘Ye nani akolongola mwasi na ye mpo na likambo nini, soko mpo na pite te, azalisi ye mwasi na ekobo. Mpe ye nani akobala mwasi oyo alongwi (mpo na makambo mosusu kasi mpo na pité te), azali kosala ekobo.” (Matai 5:31, 32) Bayuda mosusu bazalaki kosala na bokosi epai na basi na bango mpe bazalaki koboma mabala bobele na makambo mazangi ntina. (Malaki 2:13-16; Matai 19:3-9) Mibeko na bonkoko na Bayuda epesaki nzela na mobali ete aboma libala na mwasi na ye “ata soko alambi bilei malamu te” to mpe “soko amoni mwasi mosusu aleki kitoko.”—Mishna.
16. Momeseno nini na Bayuda ekomisaki ndai eloko ya mpamba mpe Yesu alobaki nini mpo na likambo yango?
16 Bobele kati na lisolo yango moko, Yesu alandi koloba ete: “Lisusu boyoki ete elobamaki na bato na kala ete: ‘Bokata ndai na lokuta te . . .’ Nde ngai nazali koloba na bino ete, bokata soko ndai moko te.” Na ntango na kala, Bayuda bazalaki kolapa bobele mpambampamba mpe bazalaki kokata ndai ata na makambo mike kozanga kokokisa yango. Nde Yesu alobi ete: “Bokata soko ndai moko te . . . Tika ete liloba na bino Ee! litikala bobele Ee! mpe Te! etikala bobele Te!” Lilako na ye lizali mpasi te: Lobáká bobele solo ntango nyonso kozanga ete olapa ndai mpo na kondimisa maloba na yo. Bomba ndai mpo na makambo mazali mpenza minene.—Matai 5:33-37, MN; tala 23:16-22.
17. Na esika ya koteya “liso mpo na liso mpe lino mpo na lino”, Yesu alakisaki nini?
17 Na nsima, Yesu alobaki ete: “Bosili koyoka ete balobaki boye: ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino. Nde ngai nazali koloba na bino ete,’ betelemela moto mabe te; kasi soko nani akobeta yo na litama na mobali, pesa ye oyo mosusu.” (Matai 5:38-42) Awa Yesu azali kolobela te likofi oyo ekoki kozokisa, kasi mbata na kofinga oyo epesami na nsima na loboko. Kobebisa lokumu na yo te na kozongisa kofinga. Boya kozongisa mabe na mabe. Kasi zongisa nde malamu mpo na mabe, na yango, ‘landa kolonga mabe na kosalaka malamu.’—Baloma 12:17-21.
18. a) Ndenge nini Bayuda babongolaki mobeko etindaki kolinga mozalani, kasi ndenge nini Yesu atelemelaki ezalela yango? b) Yesu ayanolaki nini na Molakisi moko na Mibeko oyo azalaki koluka kotya ndelo mpo na ndimbola ya liloba “mozalani”?
18 Kati na ndakisa na motoba mpe ya nsuka oyo azwaki, Yesu amonisaki polele mpenza ete Mibeko na 126 milembisamaki na mateya na bakonzi na mangomba ya Bayuda. Alobaki ete: “Boyoki ete balobaki boye: ‘Olinga mozalani na yo mpe oyina moyini na yo. Nde ngai nazali koloba na bino ete, bolinga bayini na bino mpe bobondela mpo na banyokoli na bino.” (Matai 5:43, 44) Mibeko na Moize, oyo mikomamaki, mizalaki kotya ndelo te na bolingo: “Okolinga mozalani na yo lokola yo mpenza.” (Levitike 19:18.) ‘Ezali Bafalisai’ nde bazalaki koboya etinda yango, mpe mpo na komilongola na yango, batyaki ndelo na liloba “mozalani” bobele moto oyo azalaki kotosa mibeko na bonkoko. Ezali mpo na ntina yango nde, na nsima, ntango Yesu akundwelaki molakisi na Mibeko moko etinda elobi ete ‘olinga mozalani na yo lokola omilingaka yo moko,’ moto yango alukaki komilongisa na kokangamáká na ndimbola ya liloba mokomoko mpe atunaki ete: “Mozalani na ngai azali nani?” Yesu ayanolaki ye na kopesaka lisese ya Mosamarité malamu oyo epesi biso lilako oyo ete: Moto nyonso oyo azali na mposa na lisalisi na yo azali mozalani na yo.—Luka 10:25-37.
19. Lolenge nini na kosala na Jéhovah epai na bato mabe Yesu atindi biso komekola yango?
19 Na kolanda lisolo ‘na ye, Yesu alobaki ete: ‘Nzambe akomonisaka bolingo na ye epai na bato mabe. Likolo na bango, azali kobimisa moi na ye mpe konokisa mbula. Bosali eloko moko na koleka te wana bokolingaka bobele baoyo bazali kolinga bino. Mpamba te bato mabe mpe bakosalaka bongo. Na boye, bokozwa mbano mpo na yango te. bomimonisa bana na Nzambe. Bomekola ye. Bosala boninga elongo na bato nyonso mpe bolinga bazalani na bino. Na motindo oyo, bokozala na malamu mpenza “lokola Tata na bino na likolo atondi na malamu.”’ (Matai 5:45-48) oyo nde mitinda mileki likoló! Boyengebene ya bakomeli mpe Bafalisai ekokaki kokokisa yango te!
20. Na esika ya kotya Mibeko na Moise pembeni, ndenge nini Yesu azipolaki mpe amonisaki bozindo na yango, mpe ndenge nini motindo yango etombolaki lisusu Mibeko likolo mpenza?
20 Wana Yesu azalaki kotanga biteni na Mibeko mpe kobakisa “nde ngai nazali koloba na bino,” azalaki kotya Mibeko pembeni te mpo akitanya yango na mitinda mosusu. Te, azalaki nde komonisa bozindo na yango mpe kozipola yango na kolakisáká lolenge ya kosalela yango mpenza. Mobeko motombwani oyo mozali mpo na bondeko ezali kotalela nkanda eumeli na motema lokola koboma. Mobeko motombwani oyo mozali mpo na bopeto ezali kokweisa makanisi ya mposa mabe na nzoto lokola ekobo. Mobeko motombwani oyo mozali mpo na libala ezali koboya koboma libala na makambo mazangi ntina na kotaleláká yango lokola nzela mpo na kosala libala ya ekobo. Mobeko motombwani oyo mozali mpo na solo emonisi ete kolapa ndai mbala na mbala ezali na ntina te. Mobeko motombwani oyo mozali mpo na kosala malamu eboyi mposa ya kozongisa mabe na mabe. Mobeko motombwani oyo mozali mpo na bolingo ezali kolendisa bolingo bozangi ndelo lokola oyo na Nzambe.
20 Makebisi yango makokani na mosusu te, masimbaki mpenza mitema ya baoyo bayokaki yango mpo na mbala ya yambo. Ekomisaki mpamba boyengebene na bokosi, oyo na libanda, bolukamaki na bato oyo bazalaki komipesa mpasi na kolandáká mateya na bakonzi na mangomba ya Bayuda. Kasi, na koyokameláká Yesu kolandisa lisolo na ye likolo na ngomba, bibele oyo bazalaki na nzala mpe na mposa ya boyengebene na Nzambe, bakokaki koyekola na sikisiki mpenza lolenge nini kozwa yango. Ezali yango nde emonisami na lisolo elandi.
-
-
Tolukaka bokonzi mpe boyengebene na NzambeLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 1 Octobre
-
-
1, 2. Na nini bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kobongola misala na bango malamu; mpe likebisi nini Yesu apesaki epai na bayekoli na ye?
Bakomeli mpe Bafalisai bazalaki koluka boyengebene na lolenge na bango, oyo ezalaki lolenge na Nzambe te. Koboyáká boyengebene na Nzambe, ntango bazalaki kokokisa misala malamu, bazwelaki yango nzela ya komikumisa na bokosi mpo na komonana liboso na bato. Bazalaki kosalela Nzambe te, kasi lokumu na bango moko. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bazala na bokosi te, kolobáká ete: “Bokeba ete bosala boyengebene liboso na bato te mpo na komonana na bango; soko bongo, bokozwa libonza te epai na Tata na bino oyo azali na likoló.”—Matai 6:1.
2 Jéhovah akosepelaka na baoyo bazali kokabela babola, kasi baoyo bakosalaka lokola Bafalisai te. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bamekola bango te: “Soko okopesa makabo na mawa, oyula mondule liboso na yo te lokola ekosalaka bakosi kati na biyanganelo mpe kati na balabala ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino solo ete, basili kozwa mpenza libonza na bango.”—Matai 6:2.
3. a) Motindo nini bakomeli mpe Bafalisai bafutamaki mpenza mpo na makabo oyo bazalaki kopesa? b) Yesu alakisaki ezalela nini ekeseni mpenza na oyo etali lolenge na kokaba?
3 Liloba na greke (apékho) mpo na ‘basili kozwa’ ekomamaki mbala na mbala na mikanda oyo mizalaki kosalelama na mombongo. Lolenge esalelami kati na lisolo likolo na ngomba emonisi ete “bazwaki mbano na bango,” elingi koloba “batyaki loboko na mokanda mpo na kozwa mbano na bango: lotomo na bango ya kozwa mbano ekokisaki mosala na yango, ezali mpenza lokola soko nde bazongisaki mokanda (recu) mpo na kozwa mbano.” (Dictionnaire interprétatif des mots du Nouveau Testament (angl.), ya W. Vine.) Bazalaki kolaka kopesa makabo na babola na biyanganelo mpe na balabala. Bazalaki kotanga bankombo ya bakabi kati na biyanganelo. Baoyo bazalaki kopesa makabo minene bazalaki kozwa lokumu monene ya kofanda pene na bakonzi na mangomba ya Bayuda na boumeli ya losambo. Bazalaki kopesa yango mpo na komonana na bato; bamonanaki mpe bakumisamaki na bato; na yango, bakokaki kosalela liloba ‘bafutamaki mpenza’ na mokanda mpo na kozwa mbano na bango na ntina na makabo na bango. Kasi Yesu alakisaki ezaleli ekeseni mpenza na oyo: Kopesa “na nkuku; mpe Tata na yo oyo akomonaka na nkuku, akopesa yo.”—Matai 6:3, 4; Masese 19:17.
Mabondeli makosepelisaka Nzambe
4. Mpo na nini lolenge na kobondela na Bafalisai etindaki Yesu na kobenga bango bakosi?
4 Jéhovah akosepelaka na mabondeli oyo matindami epai na ye, kasi bobele soko ezali na motindo na Bafalisai te. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Ekobondelaka bino, bozala lokola bakosi te, baoyo balingi kotelema mpe kobondela na biyanganelo mpe na bizwanelo ya balabala ete bamonana na bato. Nazali koloba na bino solo ete, bazali na libonza na bango.” (Matai 6:5) Bafalisai bazalaki na mabondeli mingi oyo bazalaki kozongela mokolo na mokolo, na ngonga ya sikisiki, ezala ata na esika nini bazalaki. Lolenge bayekolaki, basengelaki kosala yango na nkuku. Kasi bazalaki koluka kotelema “na bizwanelo ya balabala”, mpo na komonana na baleki nzela, baoyo bazalaki kokende bipai na bipai, wana ngonga ya kobondela ekokaki.
5. a) Wapi misala mosusu na Bafalisai esalaki ete Nzambe ayoka mabondeli na bango te? b) Eloko nini Yesu atyaki na esika ya liboso kati na libondeli ya elakiseli oyo asalaki, bongo na mikolo na biso, bato bazali mpe kosala lokola ye?
5 Mpo na kolakisa bopeto na bokosi, ‘bazalaki kosala mabondeli milai mpo bandimama.’ (Luka 20:47) Mobeko moko ya bonkoko ezalaki koloba ete “bato na kala baoyo bazalaki kobanga Nzambe bamityelaki ngonga moko mpo na kobondela. (Mishna) Na bongo, bato nyonso bakokaki komona ezaleli na bango ya kobanga Nzambe mpe kosepela na yango mpenza. Mabondeli yango mayokamaki na likolo te. Yesu alobaki ete tobondelaka na nkuku, kozanga kolobaloba mpamba, mpe apesaki elakiseli ya kobondela ezali na mpasi te mpo na kolanda. (Matai 6:6-8; Yoane 14:6, 14; 1 Petelo 3:12) Libondeli ya elakiseli na Yesu ezali kotya makambo ya ntina mingi na esika ya liboso: “Tata na biso oyo azali na makolo, nkombo na yo ezala mosantu! Tika Bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalama!” (Matai 6:9-13) Na mikolo na biso, bato mingi bayebi nkombo na Nzambe te, mpe mingi lisusu balingi te ete nkombo yango akumisama; bazali bongo kotalela Nzambe ete azali na nkombo te. Tika Bokonzi na Nzambe eya? Bato mingi bazali kokanisa ete Bokonzi yango esila koya, kati na motema na bango Mbala mosusu bakobondelaka mpo ete mokano na Ye esalema, kasi mingi bazali kosala mokano na bango moko.—Masese 14:12.
6. Mpo na nini Yesu alobaki ete lolenge oyo Bayuda bazalaki kokila bilei ezalaki na ntina te?
6 Kokila bilei endimami na Jéhovah, kasi na lolenge oyo esalemaki na Bafalisai te. Motindo moko Yesu akweisaki lolenge oyo bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kopesa makabo mpe kobondela, bobele bongo alobaki mpo na lolenge na bango na kokila bilei ezangi ntina, ete: “Soko bokokila bilei, bakanga bilongi lokola bakosi te, mpamba te bakokangaka bilongi na bango ete bamonana na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino solo ete, bazali na libonza na bango.” (Matai 6:16) Mibeko na bankoko na Bafalisai epekisaki ete basakola te ata mpe kopakola mafuta te na boumeli na kokila bilei, kasi basengelaki nde komitya mputulu na móto likoló na motó. Wana bakilaki naino bilei te, Bayuda bazalaki kosukola mpe kopakola nzoto na bango na mafuta mbala na mbala.
7. a) Bayekoli na Yesu basengelaki kosala nini wana bazalaki kokila bilei? b) Na mikolo na Yisaya, Jehovah alingaki ete Bayuda basala nini mpo na oyo etali kokila bilei?
7 Mpo na oyo etali kokila bilei, Yesu apesaki toli oyo epai na bayekoli na ye ete: “Nde yo, soko okokila bilei, pakola motó mpe sukola elongi na yo ete omonana na bato te ete ozali kokila bilei, kasi epai na Tata na yo.” (Matai 6:17, 18) Na mikolo na Yisaya, Bayuda oyo bazalaki kosala masumu bazalaki kosepela mingi na kokila biloko, na konyokola molimo na bango, na kotya motó na nse mpe na kofanda na ngoto (sac) mpe na mputulu na móto. Kasi Jéhovah alingaki komona bango kokangola baoyo bazalaki konyokwama, kopesa bilei na baoyo bazalaki na nzala, koyamba baoyo bazangaki ndako mpe kolatisa baoyo bazalaki bolumbu.—Yisaya 58:3-7.
Tómibombela biloko na motuya na likoló
8. Nini ememaki bakomeli mpe Bafalisai ete bazanga kotalela lolenge ya kosala mpo na kondimama na Nzambe; mpe etinda nini oyo baboyaki eyaki kolobelama na Paulo na nsima?
8 Na bolukiluki na bango na boyengebene, bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kotalela te lolenge nini kondimama na Nzambe nde bazalaki liboso komibanzanza mpo na kondimama na bato. Na ezalela wana, bamipesaki mingi mpenza na mibeko na bato kino batyaki Liloba na Nzambe pembeni. Bazalaki kobatela etelemelo na bango awa na mabelé na esika ete babómba biloko na bango ya motuya na likoló. Baboyaki kondima solo ya polele oyo ekomamaki nsima na mwa bambula, na Mofalisai moko oyo akómaki moklisto, ete: “Soko bozali kosala nini, botya mitema na kosala bongo, lokola mpo na kosalela bato te, kasi mpo na Jéhovah, mpo boyebi ete bokozwa libula lokola mbano na maboko na Jéhovah.”—Bakolose 3:23, 24.
-