Tóbatela bomoko na mikolo oyo ya nsuka
“Tiká bobele ete etambweli na bino ebonga na Nsango Malamu . . . , bozali kotɛlɛma na motema moko, mpe bozali kobunana esika moko na kondima na Nsango Malamu.”—BAFILIPI 1:27.
1. Bokeseni nini bozali kati na Batatoli ya Yehova mpe bato ya mokili?
OYO ezali “mikolo na nsuka.” Na ntembe te, “ntango na mpasi” eyei. (2 Timoté 3:1-5) Na “elaka na nsuka” oyo, na boumeli na yango bato bazali kati na yikiyiki, Batatoli ya Yehova bakeseni mingi mpenza mpamba te bazali na kimya mpe na bomoko. (Danyele 12:4) Kasi moto mokomoko oyo azali mosangani ya libota ya Yehova oyo lizali na mabelé mobimba asɛngisami ete asala molende makasi mpo na kobatela bomoko yango.
2. Paulo alobaki nini mpo na oyo etali kobatela bomoko, mpe motuna nini tokotalela?
2 Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete bábatela bomoko. Akomaki ete: “Tiká bobele ete etambweli na bino ebonga na Nsango Malamu na Klisto ete soko nakoya mpe nakomona bino, soko nakozala te, nayoka mpo na bino ete bozali kotɛlɛma na motema moko, mpe bozali kobunana esika moko na kondima na Nsango Malamu mpe ete bozali kobanga likambo moko na batɛmɛli na bino te. Yango ekozala elembo polele epai na bango mpo na kufa na bango nde mpo na kobika na bino mpe yango euti na Nzambe.” (Bafilipi 1:27, 28) Maloba ya Paulo mazali komonisa polele ete tosengeli kosala mosala elongo lokola baklisto. Na yango, nini ekosalisa biso ete tóbatela bomoko na biso ya boklisto na ntango oyo ya komekama makasi?
Tótosa mokano ya Nzambe
3. Ntango nini mpe lolenge nini bapakano ya liboso oyo bazangi kokatama ngɛnga bakómaki bayekoli ya Klisto?
3 Moko na makambo oyo tosengeli kosala mpo na kobatela bomoko na biso ezali bongo kotosa mokano ya Nzambe ntango nyonso. Yango ekoki kosɛnga ete tósembola lolenge na biso ya kokanisa. Tókamata ndakisa ya bayekoli ya liboso ya Yesu Klisto oyo bazalaki Bayuda. Na mobu 36 T.B., ntango ntoma Petelo asakolaki mpo na mbala ya liboso epai na bapakano bazangi kokatama ngɛnga, Nzambe apesaki bato yango ya mabota likabo ya elimo santu, mpe babatisamaki. (Misala, mokapo 10) Liboso na yango, bobele Bayuda mpe bapakano oyo bandimaki lingomba ya Bayuda, mpe Basamalia nde bakómaki bayekoli ya Yesu Klisto.—Misala 8:4-8, 26-38.
4. Nsima ya kolimbola makambo masalemaki epai na Korneye, Petelo alobaki nini, mpe komekama nini yango etyaki liboso na bayekoli ya Yesu oyo bazalaki Bayuda?
4 Ntango bantoma mpe bandeko mosusu ya Yelusaleme bayokaki nsango ya kobongola motema na ntina na Korneye mpe bapakano mosusu, basepelaki koyoka nsango na yango epai na Petelo. Nsima ya kolimbola likambo oyo lisalemaki epai na Korneye mpe epai na bandimi mosusu oyo bazalaki bapakano, ntoma akómaki na bosukisi ete: “Na bongo soko Nzambe apesi bango likabo [ya elimo santu] pelamoko na oyo apesaki biso [Bayuda] wana endimaki biso Nkolo Yesu Klisto, ngai nani ete nakoka kopekisa Nzambe?” (Misala 11:1-17) Likambo yango ebimisaki komekama epai na bayekoli ya Yesu Klisto oyo bazalaki Bayuda. Basengelaki nde kotosa mokano ya Nzambe mpe kondima bapakano oyo bakómaki bandimi, lokola baninga na bango basambeli ya Nzambe? To, bomoko ya basaleli ya Yehova awa na mabelé ezalaki na likámá?
5. Lolenge nini bantoma mpe bandeko mosusu batalelaki likambo oyo ete Nzambe asilaki kopesa Bapakano kobongwana na motema, mpe liteya nini tokoki kozwa na elimo yango?
5 Lisoló yango liyebisi ete: “Esili bango [bantoma mpe bandeko mosusu] koyoka makambo oyo, bazalaki nyɛɛ, mpe bakumisi Nzambe ete, Na boye Nzambe asili kopesa bapakano kobongwa na motema kino bomoi.” (Misala 11:18) Elimo yango ebatelaki mpe ekólisaki bomoko ya bayekoli na Yesu. Nsima na mwa ntango, mosala ya kosakola epalanganaki mingi epai na bapakano, to bato na mabota, mpe mapamboli ya Yehova mazalaki likoló na mosala yango. Biso mpe tosengeli kondima ntango basɛngi lisungi na biso mpo na kofungola lisangá moko ya sika to ntango likambo moko ya Teokrasi lisembolami na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. Lisungi na biso oyo lipesami na motema mobimba likosepelisa Yehova mpe likosalisa biso ete tóbatela bomoko na biso na mikolo oyo ya nsuka.
Tókangama na solo
6. Bopusi nini solo ezali na yango likoló na bomoko ya basaleli ya Yehova?
6 Lokola tozali basangani ya libota ya basaleli ya Yehova, tobatelaka bomoko mpamba te biso banso tozali bato “balakisami na Yehova” mpe tokangami makasi na solo oyo emonisami. (Yoane 6:45, NW; Nzembo 43:3) Lokola mateya na biso matongami likoló na Liloba ya Nzambe, biso banso tolobaka na motindo moko. Tondimaka na esengo nyonso bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Bomoko wana na mateya ezali kosunga biso na kobatela bomoko na biso kati na mokili mobimba.
7. Soki tozali na mokakatano mpo na kososola likambo moko, tosengeli kosala nini, mpe tosengeli kosala nini te?
7 Ezali boni soki tozali na mokakatano mpo na kososola to kondima likambo moko litali mateya? Tosengeli kosɛnga mayele kati na libondeli mpe kosala bolukiluki kati na Makomami mpe na mikanda ya boklisto. (Masese 2:4, 5; Yakobo 1:5-8) Kosolola elongo na nkulutu moko ekoki mbala mosusu kosalisa. Soki likambo yango lisosolami te, mbala mosusu ekozala malamu mingi kotika yango bongo. Ekoki kozala ete makambo mosusu mingi matali liteya yango makobimisama nsima, mpe na ntango wana bososoli na biso ekokóma polele mingi. Nzokande, ekozala mabe soki tokomeka kopusa basusu na makasi kati na lisangá ete bándima likanisi likeseni oyo tozali na yango. Yango ekokani na kolóna bokabwani, kasi ezali te kosala molende mpo na kobatela bomoko. Eleki mpenza malamu ete tólanda “kotambola kati na solo” mpe tólendisa basusu na kosala bongo!—3 Yoane 4, NW.
8. Ezaleli nini ebongi mpenza komonisa liboso na solo?
8 Na ekeke ya liboso, Paulo alobaki ete: “Zambi sasaipi tozali naino kotala lokola kati na talatála mpe tokokakatanaka, kasi na ntango yango tokotalana bilongi. Sasaipi nayebi bobele na ndambo, nde na ntango yango nakoyeba pelamoko nayebami.” (1 Bakolinti 13:12) Atako baklisto ya ebandeli basosolaki te makambo nyonso na bozindo mpenza, babatelaki bomoko na bango. Sikawa, tokómi na bososoli ya polele mpenza ya mokano ya Yehova mpe ya Liloba na ye ya solo. Na yango, tiká ete tózala na botɔ́ndi mpo na solo oyo tosili kozwa na nzela ya ‘moombo na sembo.’ Mpe tiká ete tótɔ́nda Yehova ete azali kokamba biso na nzela ya lisangá na ye. Atako tozalaki ntango nyonso te na boyebi lolenge moko, tokufaki te na nzala to na mposa na mai ya elimo. Na esika ete ezala bongo, Yehova, Mobateli na biso, asili kobatela biso malamu mpe kati na bomoko.—Nzembo 23:1-3.
Tósalela lolemo na lolenge malamu!
9. Lolenge nini lolemo esengeli kosalelama mpo na kokólisa bomoko?
9 Kosalela lolemo mpo na kolendisa basusu ezali lolenge moko ya ntina mingi mpo na kokólisa bomoko mpe elimo ya bondeko. Nkomá oyo ekataki likambo litali kokatama ngɛnga, oyo lisangani ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso etindaki, ezalaki liziba ya elendiseli. Nsima ya kotánga yango, bayekoli oyo bazalaki bapakano na Antiɔkia ‘basepelaki na kolendisama yango.’ Yuda na Sila, baoyo batindamaki longwa na Yelusaleme na nkomá yango, “balendisi bandeko na maloba mingi, mpe babakisi nguya na bango.” Na ntembe te, Paulo na Balanaba bazalaki mpe liziba ya elendiseli mpe ya nguya mpo na baninga na bango bandimi na Antiɔkia. (Misala 15:1-3, 23-32) Tokoki mpenza kosala bongo na makita ya boklisto mpe ‘kolendisana moko na mosusu’ na kozaláká wana mpe na kopesáká biyano.—Baebele 10:24, 25.
10. Mpo na kobatela bomoko, ebongi mbala mosusu kosala nini soki batukaki biso?
10 Nzokande, kosalela lolemo na lolenge mabe ekoki kobebisa bomoko na biso. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Lolemo ezali elembo moke mpe ekomikumisaka makambo minene. Talá mwa mɔ́tɔ moke ekobambola zamba monene mingi.” (Yakobo 3:5) Yehova ayini baoyo bakoyeisaka kowelana. (Masese 6:16-19) Lisoló lolenge yango ekoki komema bokabwani. Bongo, ekozala boni soki atukami, elingi koloba, babebisi lokumu na ye to bafingi ye? Bankulutu bakomeka kosunga ndeko oyo asali libúngá motindo wana. Nzokande, batuki oyo bakobongola motema te basengeli kobimisama na lisangá mpo na kobatela kimya, molɔngɔ́ mpe bomoko ya lisangá. Paulo akomaki ete: “Bósangana na moto moko te oyo abyangami ndeko mpenza soko ye azali . . . motuki . . . Bólya esika moko na moto na ndenge yango te.”—1 Bakolinti 5:11.
11. Mpo na nini komikitisa ezali na ntina soki tolobaki likambo moko oyo ebimisaki kwɔkɔso kati na biso mpe ndeko moko mondimi?
11 Kopekisa lolemo ekosalisa biso ete tóbatela bomoko. (Yakobo 3:10-18) Kasi, na ndakisa soki likambo moko oyo tolobaki ebimisi nkaká kati na biso mpe moninga moko moklisto. Ekozala malamu ete tózwa likanisi ya kozongisa kimya elongo na ndeko na biso, na kosɛngáká bolimbisi soki yango esengeli, boye te? (Matai 5:23, 24) Ya solo, yango ekosɛnga kozala na komikitisa, to elimo ya komisɔkisa, kasi Petelo akomaki ete: “Bómikangela kosɔkɛma lokola elamba, moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolɛ́ndɔ, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.” (1 Petelo 5:5) Komikitisa ekopusa biso na ‘kolanda kimya’ elongo na bandeko na biso, kondimáká mabungá na biso mpe kosɛngáká bolimbisi na lolenge lobongi. Yango ekosalisa mpo na kobatela bomoko ya libota ya Yehova.—1 Petelo 3:10, 11.
12. Lolenge nini tokoki kosalela lolemo na biso mpo na kolendisa mpe kobatela bomoko ya libota ya Nzambe?
12 Tokoki kolendisa elimo ya libota kati na lisangá ya Yehova soki tosaleli lolemo na biso na lolenge malamu. Lokola Paulo asalaki lolenge yango, akokaki kokundwela Batesaloniki ete: “Boyebi ete lokola tata na bana na ye, tobyangi moko na moko na bino mpe toyikisi bino mpiko mpe totatweli bino ete bótambola na bulɛɛ na Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:11, 12) Lokola atikaki ndakisa malamu mingi na likambo yango, Paulo akokaki bongo kolendisa baninga na ye baklisto ete ‘bázala na maloba ya kobɔndisa epai na baoyo batungisami na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14, NW) Kanisá naino malamu oyo tokoki kosala soki tosaleli lolemo na biso mpo na kobɔndisa, mpo na koyikisa mpiko, mpe mpo na kolendisa basusu. Ee, “liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!” (Masese 15:23) Lisusu, liloba lolenge yango ekolendisa mpe ekobatela bomoko ya libota ya Yehova.
Tólimbisaka!
13. Mpo na nini tosengeli kolimbisa?
13 Kolimbisa moto oyo asalaki libúngá kasi asɛngi bolimbisi ezali na ntina mingi mpo na kobatela bomoko ya boklisto. Mbala boni tosengeli bongo kolimbisa? Yesu ayebisaki na Petelo ete: “Te kino mbala nsambo kasi kino mbala ntuku nsambo na nsambo.” (Matai 18:22, NW) Soki tolimbisaka te, tozali kobebisa bolamu na biso moko. Lolenge nini? Kosilika mpe kobomba nkanda ekolongola kimya na biso ya elimo. Mpe soki toyebani lokola bato na makambo makasi mpe bayebi kolimbisa te, tokomikabola na lisangá mobimba. (Masese 11:17) Kobomba nkanda esepelisaka Nzambe te mpe ekoki komema na lisumu monene. (Levitike 19:18) Omikundola ete Yoane Mobatisi akatamaki nkingo mpo na mwango mabe ya Elodia, mwasi mabe oyo “ayinaki” ye.—Malako 6:19-28.
14. (a) Matai 6:14, 15 ezali koteya biso nini na ntina na kolimbisa? (b) Tosengeli ntango nyonso kozela ete moto aya kosɛnga biso bolimbisi liboso ete tókoka kolimbisa ye?
14 Libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki lizali na maloba oyo: “Limbisá biso masumu na biso, mpo ete biso tokolimbisaka bato nyonso bazali na nyongo na biso.” (Luka 11:4) Soki tokolimbisa te, tozali na likámá ete mokolo mosusu Yehova Nzambe akolimbisa masumu na biso te, mpamba te Yesu alobaki ete: “Zambi, soko bokolimbisa bato bikweli na bango, Tata na bino na Likoló akolimbisa mpe bino. Nde soko bokolimbisa bato te, Tata na bino akolimbisa bino bikweli na bino te.” (Matai 6:14, 15) Na yango, soki tolingi mpenza kokokisa mokumba na biso na likambo ya kobatela bomoko kati na libota ya basambeli na Yehova, tosengeli kolimbisaka, mbala mosusu mpe kobosana mabe oyo basalelaki biso mpo na kozanga likebi to mpo moto yango azalaki na mokano mabe te. Paulo alobaki ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. Pelamoko [Yehova] alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.” (Bakolose 3:13) Soki toyebi kolimbisa, tokosunga mingi mpo na kobatela bomoko kitoko oyo ezali kati na lisangá ya Yehova.
Bomoko mpe bikateli bitali moto na moto
15. Nini ezali kosalisa libota ya Yehova mpo na kobatela bomoko na yango wana mokomoko asengeli kozwa bikateli bitali ye moko?
15 Nzambe asalaki biso na bonsomi ya kopona oyo tolingi, tozali na libaku mpe mokumba ya kozwa bikateli biso moko. (Deteronome 30:19, 20; Bagalatia 6:5) Nzokande, tozali na makoki ya kobatela bomoko mpamba te totosaka mibeko mpe mitindá ya Biblia. Totalelaka yango wana tozali kozwa bikateli bitali biso moko. (Misala 5:29; 1 Yoane 5:3) Kanisá ete likambo moko libimi oyo etali kozanga komikɔtisa na makambo ya mokili. Tokoki biso moko kozwa ekateli ya malamu na komikundoláká ete tozali “bato na mokili te” mpe ete tosili ‘kotula mipanga na biso ete mizala bitimweli.’ (Yoane 17:16; Yisaya 2:2-4) Bobele bongo, wana tosengeli kozwa ekateli oyo etali boyokani na biso elongo na Letá, tokotalela oyo Biblia ezali koloba na ntina na kopesa “biloko na Nzambe na Nzambe,” wana tozali kotosa “bakonzi baleki liboso” kati na makambo ya mokili oyo. (Luka 20:25; Baloma 13:1-7; Tito 3:1, 2) Ee, kotalela mibeko mpe mitindá ya Biblia wana tozali kozwa bikateli ya biso moko ekosalisa biso ete tóbatela bomoko na biso ya boklisto.
16. Lolenge nini tokoki kosunga mpo na oyo etali kobatela bomoko wana tozali kozwa bikateli na likambo oyo Makomami malobi te ete ezali malamu to mabe? Pesá ndakisa.
16 Tokoki kosunga mpo na kobatela bomoko ya boklisto ata wana tosengeli kozwa ekateli oyo etaleli mpenza biso moko mpe na likambo oyo Makomami malobi te ete lizali malamu to mabe. Lolenge nini? Na ntango tozali komibanzabanza na bolingo nyonso na ntina na basusu oyo ekateli na biso ekoki kozala na bopusi likoló na bango. Na ndakisa: Na lisangá oyo ezalaki kati na Kolinti ya kala, motuna moko mobimaki na ntina na kolya nyama oyo epesamaki lokola mbeka epai na bikeko. Ezali polele, ete moklisto akokaki te kosangana na milulu ya losambo ya bikeko. Nzokande, ezalaki lisumu te kolya nyama oyo makila na yango matangisamaki malamu mpe oyo esalelamaki kati na molulu yango, mpe na nsima ndambo na yango etekamaki na zando. (Misala 15:28, 29; 1 Bakolinti 10:25) Atako bongo, lisosoli ya baklisto mosusu etungisamaki na ntina na kolya nyama motindo wana. Na yango, Paulo alendisaki baklisto mosusu ete bátika kobɛtisa bango mabaku. Boye, akomaki ete: “Bongo, soko bilei bizali libaku epai na ndeko na ngai, ngai nakolya mosuni lisusu soko moke te ete nataisa ndeko na ngai libaku te.” (1 Bakolinti 8:13) Na bongo, ata soki mobeko to motindá moko te ya Biblia motalelami, ekozala likambo ya bolingo kotalela basusu wana tozali kozwa bikateli bitali biso moko oyo bikoki kozala na bopusi likoló na basusu kati na libota ya Nzambe!
17. Ebongi malamu kosala nini wana tosengeli kozwa bikateli bitali biso moko?
17 Soki toyebi malamu te nzela nini tosengeli kolanda, ezali likambo ya mayele kozwa ekateli na lolenge oyo ekosala ete tótikala na lisosoli ya pɛtɔ, mpe ete basusu bákoka komemya ekateli na biso. (Baloma 14:10-12) Ya solo, wana tosengeli kozwa ekateli etali biso moko, tosengeli koluka litambwisi ya Yehova kati na libondeli. Lokola mokomi na Nzembo, tokoki kobondela na elikya nyonso ete: “Sembolá litoi na yo epai na ngai. . . . Zambi yo ozali libangá na ngai mpe ndako makasi na ngai; mpo na nkombo na yo, kambá ngai mpe tambolisá ngai alima.”—Nzembo 31:2, 3.
Tóbatela ntango nyonso bomoko ya boklisto
18. Ndakisa nini Paulo asalelaki mpo na kolobela bomoko ya lisangá ya boklisto?
18 Kati na 1 Bakolinti mokapo 12, mpo na kolobela bomoko, Paulo akokanisaki lisangá ya boklisto na nzoto ya moto. Alobelaki mingi bosungani mpe ntina ya enama moko na moko ya nzoto. Paulo atunaki ete: “Soko nyonso ezali bobele elembo moko, nzoto ekozala wapi? Nde sasaipi bilembo izali mingi nde nzoto bobele moko. Liso ebongi koloba na lobɔkɔ te ete, Nazali na yo na bosɛnga te! Lisusu motó ebongi koloba na makolo te ete, Nazali na bosɛnga na bino te!” (1 Bakolinti 12:19-21) Bobele bongo, biso nyonso kati na libota ya basaleli ya Yehova tozali kokokisa mikumba ya lolenge moko te. Nzokande, tozali na bomoko, mpe tozali na mposa ya moko na mosusu.
19. Lolenge nini tokoki kozwa litomba na bibongiseli ya Nzambe na elimo, mpe ndeko moko oyo aumeli mingi kati na solo alobaki nini mpo na likambo yango?
19 Motindo moko lokola nzoto ezalaka na mposa ya bilei, libateli mpe litambwisi, tozali na mposa ya bibongiseli oyo Nzambe apesaka biso na nzela ya Liloba na ye, elimo na ye mpe lisangá na ye. Mpo ete tókoka kozwa litomba na bibongiseli yango, tosengeli kozala basangani ya libota ya Yehova oyo lizali lelo na mabelé. Nsima ya kolekisa mibu mingi na mosala ya Nzambe, ndeko moko akomaki ete: “Nazali na botɔ́ndi mingi ete namitambwisaki engebene boyebi ya mokano ya Yehova uta bambula wana ya ebandeli liboso na mobu 1914 ntango makambo nyonso mazalaki naino polele te . . . kino bambula oyo solo ezali kongɛnga lokola moi na midi. Likambo moko oyo lizalaki na ntina mingi mpo na ngai, ezalaki bongo kozala penepene na lisangá ya Yehova oyo lizali komonana. Makambo oyo nakutanaki na yango na ebandeli masili koteya ngai ete ezali likambo ya mayele te kotya motema na makanisi ya bato. Ntango nandimisamaki na likambo yango, nazwaki ekateli ya kotikala penepene na lisangá ya sembo. Na lolenge nini mosusu tokoki kozwa ngɔlu mpe mapamboli ya Yehova?”
20. Tosengeli kozala na ekateli makasi ya kosala nini mpo na oyo etali bomoko ya libota ya Yehova?
20 Yehova asili kobyanga libota na ye kobima longwa na molili mpe na bokabwani na mokili oyo. (1 Petelo 2:9) Asili kotya biso kati na bomoko kitoko elongo na ye mpe elongo na baninga na biso bandimi. Bomoko wana ekokóba kino kati na ebongiseli ya biloko ya sika oyo esili sikawa kobɛlɛma. Mpo na yango, na mikolo ya nsuka oyo etondi na mpasi, tiká ete tókóba ‘komilatisa bolingo’ mpe tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kokólisa mpe kobatela bomoko kitoko oyo tozali na yango.—Bakolose 3:14.
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini kosala mokano ya Nzambe mpe kokangama na solo ekoki kosalisa biso ete tóbatela bomoko na biso?
◻ Lolenge nini bomoko ezali na boyokani na lolenge malamu ya kosalela lolemo?
◻ Kolimbisa esangisi makambo nini?
◻ Lolenge nini tokoki kobatela bomoko wana tozali kozwa bikateli bitali biso moko?
◻ Mpo na nini tosengeli kobatela bomoko ya boklisto?
[Elilingi na lokasa 16]
Na motindo ya mobateli na mpate oyo ayanganisaka ntango nyonso etongá na ye, bobele bongo Yehova azali kosala ete tózala na bomoko
[Bililingi na lokasa 18]
Na kosɛngáká bolimbisi na ntango tosaleli ndeko mosusu mabe, tozali kosunga mpo na kokólisa bomoko