-
Yelusaleme—“Mboka ya Mokonzi monene”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 15 Octobre
-
-
Yelusaleme—“Mboka ya Mokonzi monene”
“Katá ndai . . . na Yelusaleme te mpo ete ezali mboka na mokonzi monene.”—MATAI 5:34, 35.
-
-
Yelusaleme—“Mboka ya Mokonzi monene”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 15 Octobre
-
-
Esika ya ‘kiti ya bokonzi ya Yehova’
4, 5. Davidi asalaki nini mpo ete Yelusaleme ezala na esika monene na mokano ya Nzambe?
4 Na ekeke ya 11 L.T.B., Yelusaleme eyebanaki na mokili mobimba lokola mboka-mokonzi ya ekólo moko oyo ezalaki na libateli mpe na kimya. Yehova Nzambe apakolaki elenge Davidi lokola mokonzi na libota wana ya kala, Yisalaele. Lokola guvernema ezalaki na Yelusaleme, Davidi mpe bakitani na ye oyo basangolaki bokonzi bafandaki na “kiti na bokonzi na [Yehova],” to na “kiti na [Yehova].”—1 Ntango 28:5; 29:23.
5 Davidi, moto oyo azalaki kobanga Nzambe—Moyisalaele ya libota ya Yuda—abɔtɔlaki Yelusaleme na mabɔkɔ ya Bayebusi, basambeli ya bikeko. Na ntango wana, mboka yango ezalaki kaka likoló ya ngomba Siona. Kasi, Siona ekómaki mpe nkombo mosusu ya Yelusaleme. Nsima ya bambula, Davidi atindaki ete bámema sanduku ya kondimana oyo Nzambe asalaki na Yisalaele baya na yango na Yelusaleme, mpe kuna batyaki yango na kati ya hema moko. Bambula mingi liboso, Nzambe alobaki na mosakoli na ye Mose na lipata moko mpo na Sanduku mosantu yango. (Exode 25:1, 21, 22; Levitike 16:2; 1 Ntango 15:1-3) Sanduku ezalaki komonisa ete Nzambe azali wana, mpamba te Yehova nde azalaki Mokonzi ya solosolo ya Yisalaele. Yango wana, na ndimbola mibale, bakokaki koloba ete Yehova Nzambe ayangelaki na Yelusaleme.
6. Yehova alakaki nini mpo na Davidi mpe Yelusaleme?
6 Yehova alakaki Davidi ete bokonzi oyo ezalaki kokitanisama na libota na ye, bokonzi oyo Siona, to Yelusaleme ezalaki elilingi na yango, ekosuka te. Yango elimbolaki ete mokitani moko ya Davidi akosangola lotomo ya koyangela libela na libela lokola Mopakolami ya Nzambe—Masiya, to Klisto.a (Nzembo 132:11-14; Luka 1:31-33) Biblia emonisi mpe ete mosangoli wana ya ‘kiti ya bokonzi ya Yehova’ mpo na libela akoyangela bobele Yelusaleme te, kasi mabota nyonso.—Nzembo 2:6-8; Danyele 7:13, 14.
7. Ndenge nini Mokonzi Davidi atombolaki losambo ya pɛto?
7 Baoyo bamekaki kolongola Mokonzi Davidi, mopakolami ya Nzambe, na kiti ya bokonzi, balongaki te. Kutu, ye nde alongaki bikólo ya banguna, mpe apusaki bandelo ya Mokili ya Ndaka kino na ndelo ya nsuka na ndenge oyo Nzambe akataki. Davidi asalelaki libaku wana mpo na kotombola losambo ya pɛto. Mpe nzembo mingi ya Davidi ezali kosanzola Yehova lokola Mokonzi ya solosolo na Siona.—2 Samwele 8:1-15; Nzembo 9:1, 11; 24:1, 3, 7-10; 65:1, 2; 68:1, 24, 29; 110:1, 2; 122:1-4.
8, 9. Ndenge nini losambo ya solo ekolaki na Yelusaleme na boyangeli ya Mokonzi Salomo?
8 Ntango Salomo, mwana ya Davidi, azalaki koyangela, losambo ya Yehova ekolaki mingi. Salomo ayeisaki Yelusaleme monene na ngámbo ya nɔrdi mpe esangisaki Ngomba Moliya (epai Dôme du Rocher ezali lelo oyo). Salomo azwaki libaku malamu ya kotonga tempelo kitoko mpo na lokumu ya Yehova na esika wana ya likoló mpenza. Batyaki sanduku ya kondimana na Esika oyo Eleki Bosantu na kati ya tempelo yango.—1 Mikonzi 6:1-38.
9 Bayisalaele bafandaki na kimya ntango nyonso oyo bamipesaki mobimba na losambo ya Yehova, oyo ezalaki kosalema na Yelusaleme. Makomami malobeli likambo yango na maloba kitoko mpenza ete: “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zelo pembeni na mai-na-monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo. . . . [Salomo] azalaki mpe na kimya na bipai nyonso bizingelaki ye. Yuda mpe Yisalaele bafandaki na kimya . . . moto na moto na nse na mowiti na ye na vinyo mpe na nzete na ye na mbuma.”—1 Mikonzi 4:20, 24, 25.
10, 11. Ndenge nini arkeoloji elongisi makambo Biblia elobi mpo na Yelusaleme na ntango Salomo azalaki koyangela?
10 Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli bilongisi lisolo oyo elobi ete boyangeli ya Salomo epesaki bato bomɛngo. Profesere Yohanan Aharoni akomi ete: “Bozwi ezalaki kouta bipai na bipai mpo na koya na ndako ya mokonzi, mpe lokola mombongo ezalaki kokola . . . ememaki mbongwana monene mpe ya nokinoki ya bolamu. . . . Bokoli ya bolamu . . . ezali komonana na biloko ya motuya mpe mingimingi mpe na ntɔki ya koyema mbeki. . . . Kitoko ya mbeki mpe ndenge ya kotumba yango ekolaki mingi mpenza.” (The Archaeology of the Land of Israel).
11 Jerry Landay, ye mpe akomaki boye: “Ntango Salomo azalaki koyangela, bolamu na Yisalaele ekolaki mingi na mbula 30 koleka ndenge ekolaki na mbula 200 oyo ezalaki liboso. Na bitando ya mabelé ya eleko ya Salomo oyo lelo oyo ekundama na nse, tozali kokuta bitika ya bamonima mpe bitika ya bingumba minene oyo ezingamaki na bifelo ya mineneminene. Tozali mpe komona ete bakartye oyo bato bazalaki kofanda mpe ezalaki na bandako kitoko ya bato ya bozwi ezalaki koya minene. Tomoni mpe bokoli monene ya ntɔki mpe tekiniki ya koyema mbeki. Tozali mpe kokuta biteni ya biloko bisalemi na mabɔkɔ oyo bizalaki kouta na bamboka mosika, bilembo oyo emonisi ete mombongo na bikólo mosusu ezalaki kotambola malamu.”—Ndako ya Davidi (na Lingelesi).
Ebandi na kimya esuki na kobebisama
12, 13. Eloko nini ebebisaki losambo ya solo na Yelusaleme?
12 Ebongaki mpenza kobondela mpo na kimya mpe bolamu ya Yelusaleme epai tempelo ya Yehova ezalaki. Davidi akomaki ete: “Bondelá mpo na kimya na Yelusaleme; baoyo bakolinga yo bakozala na malamu. Kimya ezala kati na lopango na yo, mpe malamu kati na ndako na yo makasi. Mpo na bandeko na ngai mpe baninga na ngai nakobondela ete, Kimya ezala kati na yo.” (Nzembo 122:6-8) Atako Salomo azwaki libaku malamu ya kotonga tempelo kitoko na mboka wana ya kimya, nsukansuka abalaki basi bapaya. Ntango akómaki mobange, azimbisamaki mpe alendisaki losambo ya banzambe ya lokuta ya ntango wana. Lipɛngwi wana ebebisaki ekólo mobimba, elongolaki kimya na ekólo mpe epai ya bato na yango.—1 Mikonzi 11:1-8; 14:21-24.
13 Lehobama, mwana ya Salomo, aumelaki naino na bokonzi te, mabota zomi matombokaki mpe masalaki bokonzi ya Yisalaele na nɔrdi. Lokola bakómaki kosambela bikeko, Nzambe atikaki ete Asulia eya kobebisa bokonzi yango. (1 Mikonzi 12:16-30) Yuda, bokonzi ya sudi oyo esangisaki mabota mibale ekobaki kosambela na Yelusaleme. Kasi, na nsima bango mpe batikaki losambo ya pɛto, yango wana, na mobu 607 L.T.B., Nzambe atikaki ete bato ya Babilone bábebisa mboka wana ya batomboki. Bayuda banyokwamaki mbula 70 lokola baombo na Babilone. Na nsima, Nzambe ayokelaki bango mawa, mpe bazongaki na Yelusaleme mpo na kozongisa losambo ya solo.—2 Ntango 36:15-21.
14, 15. Ndenge nini Yelusaleme ekómaki lisusu esika monene nsima ya kouta na boombo na Babilone, kasi mbongwana nini esalemaki?
14 Nsima ya mbula 70 oyo mboka yango etikalaki mpamba, na ntembe te bandako wana esilaki kobebisama ezipamaki na matiti. Bifelo ya Yelusaleme ekweaki. Bisika oyo ezalaki bikuke mpe bisika makasi oyo esimbaki bifelo ekómaki madusu minene. Kasi, Bayuda oyo bautaki na boombo balɛmbaki nzoto te. Batongaki etumbelo na esika oyo tempelo ya kala ezalaki mpe babandaki kotumbela Yehova mbeka mokolo na mokolo.
15 Ebandeli wana epesaki bato elikya. Nzokande, atako Yelusaleme etongamaki lisusu, kasi ezalaki lisusu mboka-mokonzi oyo mokitani ya Mokonzi Davidi afandaki na kiti ya bokonzi te. Bato oyo balongaki Babilone bazalaki kopona guvernere oyo akoyangela Bayuda. Bayuda babandaki kofuta mpako epai ya Bapelese oyo bakómaki bakonzi na bango. (Nehemia 9:34-37) Atako ‘enyatamaki,’ Yelusaleme ezalaki kaka mboka se moko oyo Yehova Nzambe asepelaki na yango na mokili mobimba. (Luka 21:24) Lokola ezalaki esika monene ya losambo ya pɛto, ezalaki mpe komonisa lotomo oyo Nzambe azali na yango ya kozala mokonzi na mokili mobimba na nzela ya mokitani ya Mokonzi Davidi.
Botɛmɛli ya basambeli ya banzambe ya lokuta ya zingazinga
16. Mpo na nini Bayuda oyo bautaki na Babilone batikaki mosala ya kotonga lisusu Yelusaleme?
16 Bayuda oyo bautaki na boombo baumelaki te mpo na kotonga miboko ya tempelo ya sika. Kasi, bato ya zingazinga oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta batindelaki Alatazelezese, mokonzi ya Pelese mokanda. Bakomaki makambo mabe mpo na Bayuda mpe balobaki ete Bayuda bakotombokela ye. Yango wana, Alatazelezese apekisaki ete bátonga lisusu Yelusaleme te. Kanisá soki ozalaki na mboka yango na ntango wana, olingaki komituna soki elingaki kosuka ndenge nini mpo na Yelusaleme. Na yango, Bayuda batikaki kotonga tempelo mpe bamipesaki na koluka biloko na bango moko ya mosuni.—Ezela 4:11-24; Hagai 1:2-6.
17, 18. Yehova asalelaki mwango nini mpo ete Yelusaleme etongama lisusu?
17 Mbula soki 17 nsima ya kozonga na bango, Nzambe atindaki mosakoli Hagai na mosakoli Zekalia mpo na kosembola makanisi ya basaleli na ye. Lokola balendisaki bango bábongola mitema, Bayuda bazongelaki mosala ya kotonga tempelo. Na ntango yango, Dalio akómaki mokonzi ya Pelese. Atalelaki etinda ya kotonga lisusu tempelo ya Yelusaleme oyo Mokonzi Sirise apesaki. Dalio atindelaki bikólo oyo bizalaki zingazinga ya Bayuda mokanda mpe alobaki na bango ete ‘bálongwa pembeni ya Yelusaleme’ mpe bapesa mbongo na mpako ya mokonzi mpo na kosilisa mosala ya kotonga.—Ezela 6:1-13.
18 Bayuda basilisaki kotonga tempelo na mbula ya 22 nsima ya kozonga na bango. Likambo monene boye ebongaki kokumisama na elambo monene, boye te? Kasi, eteni monene ya Yelusaleme, bakisa mpe bifelo na yango ebongisamaki naino te. “Na mikolo ya guvernere Nehemia mpe nganga mpe mokomeli Ezela” nde batyelaki mboka yango likebi oyo esengeli. (Nehemia 12:26, 27, NW) Emonani ete na nsuka ya ekeke ya mitano L.T.B., basilaki kotonga Yelusaleme lokola engumba moko monene na ntango ya kala.
Masiya ayei!
19. Ndenge nini Masiya andimaki ete Yelusaleme ezalaki esika oyo ekokani na mboka mosusu te?
19 Kasi, tóleka mwa bikeke mpo na kokóma na ntango oyo likambo moko ya ntina mingi mpo na bato nyonso esalemaki: kobotama ya Yesu Klisto. Anzelu ya Yehova ayebisaki ngɔndɔ mwasi oyo abotaki Yesu ete: “[Yehova] Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi tata na ye. . . . Mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Nsima ya mwa bambula, Yesu asalaki lisolo moko oyo eyebani mingi: Lisolo likoló ya Ngomba. Na kati ya lisolo yango alendisaki bato mpe apesaki bango toli na makambo mingi. Na ndakisa, alendisaki bango ete bákokisaka ndai na bango oyo balapi na miso ya Nzambe, kasi bákebaka na kolapa ndai kozanga kokanisa malamu liboso. Yesu alobaki: “Lisusu boyoki ete elobamaki na bato na kala ete, Katá ndai na lokuta te nde osukisa ndai na yo epai na [Yehova]. Nde ngai nazali koloba na bino ete, Katá ndai soko moke te! Soko na Likoló te, mpo ete ezali efandelo na Nzambe; soko na mokili te mpo ete ezali etyelo na makolo na ye; soko na Yelusaleme te mpo ete ezali mboka na mokonzi monene.” (Matai 5:33-35) Tomoni ete Yesu andimaki ete Yelusaleme ezalaki mboka oyo ekokanaki na mboka mosusu te na boumeli ya bikeke mingi. Ya solo, ezalaki mpenza ‘mboka ya mokonzi monene,’ Yehova Nzambe.
20, 21. Mbongwana nini ya monene ekɔtaki na elimo ya bato mingi oyo bafandaki na Yelusaleme?
20 Ntango akómaki na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu amimonisaki na bato ya Yelusaleme lokola Mokonzi na bango oyo aponami. Bato mingi basepelaki na likambo monene wana na konganga na esengo ete: “Oyo azali koya na nkombo na Nkolo asanzolama! Bokonzi na tata na biso Davidi bozali koya asanzolama!”—Malako 11:1-10; Yoane 12:12-15.
21 Nzokande, pɔsɔ mobimba kutu ekokaki te, bato bamitikaki kopusama na bakonzi ya mangomba ya Yelusaleme ete báboya Yesu. Asakolaki ete Yelusaleme mpe ekólo mobimba ekobungisa lokumu oyo bazalaki na yango na miso ya Nzambe. (Matai 21:23, 33-45; 22:1-7) Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Yelusaleme, Yelusaleme! Ye oyo azali koboma basakoli mpe kobwaka mabanga epai na bango batindami na ye, mbala boni nalingaki koyanganisa bana na bino lokola nsoso akoyanganisa bana na ye na nse na mapapu na ye, nde bolingaki te. Talá, ndako na bino etikali mpamba.” (Matai 23:37, 38) Na Elekeli ya mobu 33 T.B., banguna ya Yesu babomaki ye na libándá ya Yelusaleme atako asalaki mabe moko te. Kasi, Yehova asekwisaki Mopakolami na ye mpe apesaki ye bomoi ya lokumu lokola ekelamu ya elimo oyo ekoki kokufa te na Siona ya likoló, likambo oyo biso nyonso tokoki kozwela yango litomba.—Misala 2:32-36.
22. Nsima ya liwa ya Yesu, bisika mingi oyo bilobeli Yelusaleme bizali kokokisama na nini?
22 Banda ntango wana, bisakweli mingi bitali Siona, to Yelusaleme oyo bikokisami naino te, tokoki kokanisa ete bitaleli bibongiseli ya likoló to bayekoli bapakolami ya Yesu. (Nzembo 2:6-8; 110:1-4; Yisaya 2:2-4; 65:17, 18; Zekalia 12:3; 14:12, 16, 17) Ezali polele ete bisika mingi oyo bilobeli “Yelusaleme” to “Siona” oyo bikomamaki nsima ya liwa ya Yesu bizali na ndimbola ya elilingi mpe bitaleli mboka to esika yango awa na mabelé te. (Bagalatia 4:26; Baebele 12:22; 1 Petelo 2:6; Emoniseli 3:12; 14:1; 21:2, 10) Elembeteli ya nsuka oyo emonisi ete Yelusaleme ezalaki lisusu ‘mboka ya Mokonzi monene’ te emonanaki na mobu 70 T.B. ntango basoda ya Loma babebisaki mboka yango, ndenge Danyele mpe Yesu Klisto basakolaki. (Danyele 9:26; Luka 19:41-44) Ezala bakomi ya Biblia to Yesu ye moko, moto moko te asakolaki kozongisama ya Yelusaleme ya mabelé na esika ya lokumu oyo ezalaki na yango liboso na miso ya Nzambe.—Bagalatia 4:25; Baebele 13:14.
-