MOKAPO 19
Kobunda ezali malamu?
OYEBI bana mibali mpe bana basi oyo bazalaka na lofundo mpe balingaka komonisa ete bazali na makasi mingi?— Osepelaka kozala elongo na bango? To osepelaka nde kozala elongo na moto ya boboto mpe oyo alingaka kimya?— Moteyi Monene alobaki ete: “Esengo na bato batyaka kimya, mpo bakobengama ‘bana ya Nzambe.’”—Matai 5:9.
Kasi ekómaka ete bato mosusu básala makambo oyo epesi biso nkanda. Ezali bongo te?— Na ntango wana, toyokaka mposa ya kozongisa mabe. Mokolo moko, likambo ya ndenge wana ekómelaki bayekoli ya Yesu ntango bango ná Yesu bazalaki kokende na Yelusaleme. Tiká nabɛtela yo lisolo yango.
Nsima ya kotambola mwa mingi, Yesu atindaki bayekoli na ye mosusu na mboka moko ya Basamalia mpo na koluka esika ya kopema. Kasi, bato ya mboka yango baboyaki koyamba bango, mpo Basamalia bazalaki na lingomba mosusu. Lisusu, bazalaki kolinga te bato oyo bazalaki kokende kosambela na Yelusaleme.
Soki likambo yango ekómelaka yo, olingaki kosala nini? Olingaki kosilika? Olingaki nde kozongisa mabe na mabe?— Yango nde bayekoli na ye, Yakobo ná Yoane, balingaki kosala. Balobaki na Yesu boye: ‘Olingi tóbenga mɔtɔ euta na likoló mpe eboma bango?’ Yango wana, Yesu abengaki bango Bana ya Nkake! Kasi Yesu ayebisaki bango ete ezali malamu te kosalela bato likambo ya ndenge wana.—Luka 9:51-56; Malako 3:17.
Ya solo, ekómaka ete bato básalela biso makambo ya mabe. Bana mosusu bakoki koboya tósakana elongo na bango. Bakoki kutu koloba ete: “Toboyi yo, longwá awa.” Soki balobi na biso ndenge wana, tokoki koyoka mabe, ezali bongo te? Tokoki koyoka mposa ya kozongisela bango mabe. Kasi ezali malamu kosala bongo?—
Zwá Biblia na yo mpe fungolá na Masese mokapo 24, vɛrsɛ 29. Kuna totángi boye: “Lobá te ete, Nakosalela ye lokola ye asaleli ngai; nakozongisela moto na moto mosala na ye.”
Mpo na yo, maloba wana elingi koloba nini?— Elingi koloba ete tosengeli kozongisa mabe na mabe te. Tosengeli te kosala moto mabe mpo ye asalaki biso mabe. Kasi ekozala boni soki moto azali kotumola yo mpo bóbunda? Akoki ntango mosusu kopesa yo bankombo ya matumoli mpo kaka osilika. To akoki kosɛka yo mpe koloba ete ozali kobanga ye. Bongo, soki alobi ete ozali yuma? Okosala nini? Okobanda mbala moko kobunda na ye?—
Tiká tótánga lisusu oyo Biblia elobi. Fungolá na Matai mokapo 5, vɛrsɛ 39. Kuna Yesu alobi ete: “Bótɛmɛla te ye oyo azali moto mabe; kasi moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, baluselá ye mpe oyo mosusu.” Yesu alingaki koloba nini? Alingaki nde koloba ete soki moto abɛti yo likofi na litama moko, opesa ye mpe litama mosusu abɛta?—
Te, Yesu alingaki koloba bongo te. Mbata ezali lokola likofi te. Mbata ezali lokola kotindika to kosukuma moto. Moto akoki kobɛta biso mbata mpo tóbunda. Alingi kosilikisa biso. Sikoyo, soki tosiliki mpe totindiki ye to tosukumi ye ndenge ye asalaki, likambo nini ekosalema?— Na ntembe te, etumba ekobima.
Kasi Yesu alingaki te ete bayekoli na ye bábundaka. Yango wana alobaki ete soki moto moko abɛti biso mbata, tosengeli kozongisela ye mbata te. Tosengeli kosilika te mpe kobunda te. Soki tozongisi, tokomonisa ete tokokani na moto oyo abandisaki bitumba.
Mpo na yo, soki matata ebandi, likambo nini ya malamu koleka oyo osengeli kosala?— Esengeli kolongwa wana. Ntango mosusu akotindika yo lisusu. Kasi nsima na yango, akotika yo. Soki olongwe na esika oyo ye azali, elingi koloba te ete ozangi makasi. Kutu yango ekomonisa nde ete ozali na makasi ya kosala malamu.
Kasi ekozala boni soki ondimi kobunda mpe obɛti moto oyo atumolaki yo? Likambo nini ekoki kosalema na nsima?— Moto oyo obɛtaki akoki kozongela yo elongo na baninga na ye. Bakoki ntango mosusu kobɛta yo nzete to kozokisa yo na mbɛli. Sikoyo, omoni mpo na nini Yesu apekisaki biso tóbundaka?—
Tosengeli kosala nini soki tomoni bato mosusu bazali kobunda? Tosengeli nde kokɔtela moko na bango?— Biblia eyebisi biso likambo ya malamu oyo tosengeli kosala. Fungolá Biblia na Masese mokapo 26, vɛrsɛ 17. Yango elobi boye: “Lokola moto oyo akosimba mbwa na matoi na ye boye ye oyo akokɔta na kowelana oyo ezali likambo na ye te.”
Likambo nini ekosalema soki osimbi mbwa na matoi? Mbwa akoyoka mpasi mpe akoluka koswa yo, ezali bongo te? Ntango mbwa akobanda kobundabunda mpo otika ye, okosimba lisusu matoi na ye makasi mpe yango ekosala ete mbwa asilika lisusu koleka. Soki kaka otiki ye, yebá ete akoswa yo mabe. Kasi, okokoka nde kosimba matoi na ye libela na libela?—
Yango nde mokakatano oyo tokoki kokutana na yango soki tokɔti na bitumba ya bato mosusu. Mbala mosusu toyebi te nani abandaki moninga to mpo na nini bazali kobunda. Ekoki kozala ete bazali kobɛta moto moko, kasi mbala mosusu bazali kobɛta ye mpo ayibaki eloko ya bato. Soki tokɔteli ye, ekomonisa ete tokɔteli moyibi. Ekozala malamu te kosala ndenge wana, ezali bongo te?
Na yango, osengeli kosala nini soki omoni bato bazali kobunda?— Soki ezali na kelasi, okoki kokende mbangu koyebisa molakisi. Mpe soki ezali na kelasi te, okoki kobenga tata to mama na yo to mpe polisi moko. Ɛɛ, ata soki bato mosusu balingi kobunda, biso tosengeli kozala bato oyo batyaka kimya.
Bayekoli ya solo ya Yesu basalaka nyonso mpo bábunda te. Na ndenge yango nde tokomonisa ete tozali na makasi ya kosala malamu. Biblia elobi ete moyekoli ya Yesu “asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso.”—2 Timote 2:24.
Sikoyo, tótalela toli mosusu ya malamu oyo ekosalisa biso tóboya kobunda: Baloma 12:17-21 mpe 1 Petelo 3:10, 11.