Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Tolukaka bokonzi mpe boyengebene na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 1 Sanza ya 10
    • 1, 2. Na nini bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kobongola misala na bango malamu; mpe likebisi nini Yesu apesaki epai na bayekoli na ye?

      Bakomeli mpe Bafalisai bazalaki koluka boyengebene na lolenge na bango, oyo ezalaki lolenge na Nzambe te. Koboyáká boyengebene na Nzambe, ntango bazalaki kokokisa misala malamu, bazwelaki yango nzela ya komikumisa na bokosi mpo na komonana liboso na bato. Bazalaki kosalela Nzambe te, kasi lokumu na bango moko. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bazala na bokosi te, kolobáká ete: “Bokeba ete bosala boyengebene liboso na bato te mpo na komonana na bango; soko bongo, bokozwa libonza te epai na Tata na bino oyo azali na likoló.”​—Matai 6:1.

  • Tolukaka bokonzi mpe boyengebene na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 1 Sanza ya 10
    • 3. a) Motindo nini bakomeli mpe Bafalisai bafutamaki mpenza mpo na makabo oyo bazalaki kopesa? b) Yesu alakisaki ezalela nini ekeseni mpenza na oyo etali lolenge na kokaba?

      3 Liloba na greke (apékho) mpo na ‘basili kozwa’ ekomamaki mbala na mbala na mikanda oyo mizalaki kosalelama na mombongo. Lolenge esalelami kati na lisolo likolo na ngomba emonisi ete “bazwaki mbano na bango,” elingi koloba “batyaki loboko na mokanda mpo na kozwa mbano na bango: lotomo na bango ya kozwa mbano ekokisaki mosala na yango, ezali mpenza lokola soko nde bazongisaki mokanda (recu) mpo na kozwa mbano.” (Dictionnaire interprétatif des mots du Nouveau Testament (angl.), ya W. Vine.) Bazalaki kolaka kopesa makabo na babola na biyanganelo mpe na balabala. Bazalaki kotanga bankombo ya bakabi kati na biyanganelo. Baoyo bazalaki kopesa makabo minene bazalaki kozwa lokumu monene ya kofanda pene na bakonzi na mangomba ya Bayuda na boumeli ya losambo. Bazalaki kopesa yango mpo na komonana na bato; bamonanaki mpe bakumisamaki na bato; na yango, bakokaki kosalela liloba ‘bafutamaki mpenza’ na mokanda mpo na kozwa mbano na bango na ntina na makabo na bango. Kasi Yesu alakisaki ezaleli ekeseni mpenza na oyo: Kopesa “na nkuku; mpe Tata na yo oyo akomonaka na nkuku, akopesa yo.”​—Matai 6:3, 4; Masese 19:17.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto