Tolukaka bokonzi mpe boyengebene na Nzambe
“Boluka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye mpe biloko nyonso oyo bikobakisamela bino.”—MATAI 6:33.
1, 2. Na nini bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kobongola misala na bango malamu; mpe likebisi nini Yesu apesaki epai na bayekoli na ye?
Bakomeli mpe Bafalisai bazalaki koluka boyengebene na lolenge na bango, oyo ezalaki lolenge na Nzambe te. Koboyáká boyengebene na Nzambe, ntango bazalaki kokokisa misala malamu, bazwelaki yango nzela ya komikumisa na bokosi mpo na komonana liboso na bato. Bazalaki kosalela Nzambe te, kasi lokumu na bango moko. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bazala na bokosi te, kolobáká ete: “Bokeba ete bosala boyengebene liboso na bato te mpo na komonana na bango; soko bongo, bokozwa libonza te epai na Tata na bino oyo azali na likoló.”—Matai 6:1.
2 Jéhovah akosepelaka na baoyo bazali kokabela babola, kasi baoyo bakosalaka lokola Bafalisai te. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bamekola bango te: “Soko okopesa makabo na mawa, oyula mondule liboso na yo te lokola ekosalaka bakosi kati na biyanganelo mpe kati na balabala ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino solo ete, basili kozwa mpenza libonza na bango.”—Matai 6:2.
3. a) Motindo nini bakomeli mpe Bafalisai bafutamaki mpenza mpo na makabo oyo bazalaki kopesa? b) Yesu alakisaki ezalela nini ekeseni mpenza na oyo etali lolenge na kokaba?
3 Liloba na greke (apékho) mpo na ‘basili kozwa’ ekomamaki mbala na mbala na mikanda oyo mizalaki kosalelama na mombongo. Lolenge esalelami kati na lisolo likolo na ngomba emonisi ete “bazwaki mbano na bango,” elingi koloba “batyaki loboko na mokanda mpo na kozwa mbano na bango: lotomo na bango ya kozwa mbano ekokisaki mosala na yango, ezali mpenza lokola soko nde bazongisaki mokanda (recu) mpo na kozwa mbano.” (Dictionnaire interprétatif des mots du Nouveau Testament (angl.), ya W. Vine.) Bazalaki kolaka kopesa makabo na babola na biyanganelo mpe na balabala. Bazalaki kotanga bankombo ya bakabi kati na biyanganelo. Baoyo bazalaki kopesa makabo minene bazalaki kozwa lokumu monene ya kofanda pene na bakonzi na mangomba ya Bayuda na boumeli ya losambo. Bazalaki kopesa yango mpo na komonana na bato; bamonanaki mpe bakumisamaki na bato; na yango, bakokaki kosalela liloba ‘bafutamaki mpenza’ na mokanda mpo na kozwa mbano na bango na ntina na makabo na bango. Kasi Yesu alakisaki ezaleli ekeseni mpenza na oyo: Kopesa “na nkuku; mpe Tata na yo oyo akomonaka na nkuku, akopesa yo.”—Matai 6:3, 4; Masese 19:17.
Mabondeli makosepelisaka Nzambe
4. Mpo na nini lolenge na kobondela na Bafalisai etindaki Yesu na kobenga bango bakosi?
4 Jéhovah akosepelaka na mabondeli oyo matindami epai na ye, kasi bobele soko ezali na motindo na Bafalisai te. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Ekobondelaka bino, bozala lokola bakosi te, baoyo balingi kotelema mpe kobondela na biyanganelo mpe na bizwanelo ya balabala ete bamonana na bato. Nazali koloba na bino solo ete, bazali na libonza na bango.” (Matai 6:5) Bafalisai bazalaki na mabondeli mingi oyo bazalaki kozongela mokolo na mokolo, na ngonga ya sikisiki, ezala ata na esika nini bazalaki. Lolenge bayekolaki, basengelaki kosala yango na nkuku. Kasi bazalaki koluka kotelema “na bizwanelo ya balabala”, mpo na komonana na baleki nzela, baoyo bazalaki kokende bipai na bipai, wana ngonga ya kobondela ekokaki.
5. a) Wapi misala mosusu na Bafalisai esalaki ete Nzambe ayoka mabondeli na bango te? b) Eloko nini Yesu atyaki na esika ya liboso kati na libondeli ya elakiseli oyo asalaki, bongo na mikolo na biso, bato bazali mpe kosala lokola ye?
5 Mpo na kolakisa bopeto na bokosi, ‘bazalaki kosala mabondeli milai mpo bandimama.’ (Luka 20:47) Mobeko moko ya bonkoko ezalaki koloba ete “bato na kala baoyo bazalaki kobanga Nzambe bamityelaki ngonga moko mpo na kobondela. (Mishna) Na bongo, bato nyonso bakokaki komona ezaleli na bango ya kobanga Nzambe mpe kosepela na yango mpenza. Mabondeli yango mayokamaki na likolo te. Yesu alobaki ete tobondelaka na nkuku, kozanga kolobaloba mpamba, mpe apesaki elakiseli ya kobondela ezali na mpasi te mpo na kolanda. (Matai 6:6-8; Yoane 14:6, 14; 1 Petelo 3:12) Libondeli ya elakiseli na Yesu ezali kotya makambo ya ntina mingi na esika ya liboso: “Tata na biso oyo azali na makolo, nkombo na yo ezala mosantu! Tika Bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalama!” (Matai 6:9-13) Na mikolo na biso, bato mingi bayebi nkombo na Nzambe te, mpe mingi lisusu balingi te ete nkombo yango akumisama; bazali bongo kotalela Nzambe ete azali na nkombo te. Tika Bokonzi na Nzambe eya? Bato mingi bazali kokanisa ete Bokonzi yango esila koya, kati na motema na bango Mbala mosusu bakobondelaka mpo ete mokano na Ye esalema, kasi mingi bazali kosala mokano na bango moko.—Masese 14:12.
6. Mpo na nini Yesu alobaki ete lolenge oyo Bayuda bazalaki kokila bilei ezalaki na ntina te?
6 Kokila bilei endimami na Jéhovah, kasi na lolenge oyo esalemaki na Bafalisai te. Motindo moko Yesu akweisaki lolenge oyo bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kopesa makabo mpe kobondela, bobele bongo alobaki mpo na lolenge na bango na kokila bilei ezangi ntina, ete: “Soko bokokila bilei, bakanga bilongi lokola bakosi te, mpamba te bakokangaka bilongi na bango ete bamonana na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino solo ete, bazali na libonza na bango.” (Matai 6:16) Mibeko na bankoko na Bafalisai epekisaki ete basakola te ata mpe kopakola mafuta te na boumeli na kokila bilei, kasi basengelaki nde komitya mputulu na móto likoló na motó. Wana bakilaki naino bilei te, Bayuda bazalaki kosukola mpe kopakola nzoto na bango na mafuta mbala na mbala.
7. a) Bayekoli na Yesu basengelaki kosala nini wana bazalaki kokila bilei? b) Na mikolo na Yisaya, Jehovah alingaki ete Bayuda basala nini mpo na oyo etali kokila bilei?
7 Mpo na oyo etali kokila bilei, Yesu apesaki toli oyo epai na bayekoli na ye ete: “Nde yo, soko okokila bilei, pakola motó mpe sukola elongi na yo ete omonana na bato te ete ozali kokila bilei, kasi epai na Tata na yo.” (Matai 6:17, 18) Na mikolo na Yisaya, Bayuda oyo bazalaki kosala masumu bazalaki kosepela mingi na kokila biloko, na konyokola molimo na bango, na kotya motó na nse mpe na kofanda na ngoto (sac) mpe na mputulu na móto. Kasi Jéhovah alingaki komona bango kokangola baoyo bazalaki konyokwama, kopesa bilei na baoyo bazalaki na nzala, koyamba baoyo bazangaki ndako mpe kolatisa baoyo bazalaki bolumbu.—Yisaya 58:3-7.
Tómibombela biloko na motuya na likoló
8. Nini ememaki bakomeli mpe Bafalisai ete bazanga kotalela lolenge ya kosala mpo na kondimama na Nzambe; mpe etinda nini oyo baboyaki eyaki kolobelama na Paulo na nsima?
8 Na bolukiluki na bango na boyengebene, bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kotalela te lolenge nini kondimama na Nzambe nde bazalaki liboso komibanzanza mpo na kondimama na bato. Na ezalela wana, bamipesaki mingi mpenza na mibeko na bato kino batyaki Liloba na Nzambe pembeni. Bazalaki kobatela etelemelo na bango awa na mabelé na esika ete babómba biloko na bango ya motuya na likoló. Baboyaki kondima solo ya polele oyo ekomamaki nsima na mwa bambula, na Mofalisai moko oyo akómaki moklisto, ete: “Soko bozali kosala nini, botya mitema na kosala bongo, lokola mpo na kosalela bato te, kasi mpo na Jéhovah, mpo boyebi ete bokozwa libula lokola mbano na maboko na Jéhovah.”—Bakolose 3:23, 24.
9. Makamá nini ekoki kozwa biloko na motuya na mabelé, kasi biloko na motuya, na solosolo ebombami na ezalela nini?
9 Jéhovah azali kosepela na bokangani oyo bozali na yango mpo na ye, kasi na misolo na bino te. Ayebi ete motema na bino mozali na esika ezali biloko na bino ya motuya. Bogugi (rouille) mpe mbombo (mite) ekoki nde kolia biloko na yo na motuya? Miyibi bakoki nde kotobola bitutu to ba murs oyo esalemi na nkásá mpe koyiba yango? To lisusu, na eleko na biso oyo makambo na nkita mazali se kobeba, komata na ntalo na biloko to mpe kokita na motuya na mosolo ekoki nde koyeisa yango mpamba? Okolinga nde bayiba yango likoló na kobakisama na koboma? Eloko moko te ekosalema soki obombaki yango na likoló, soki liso na yo—mwinda mokopesaka pole na nzoto na yo mobimba—ezali malamu, mpe etaleli Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye. Bozwi ekoumelaka na kolimwa te. “Sala makasi te mpo na kozala mozwi. Boya mayele na yo moko. Osili kotya miso na yo na yango ezali te? Mpamba te biloko na bozwi bikomisalela mapapu mpenza, mpe ekopumbwa mosika lokola mpongo na makoló.” (Masese 23:4, 5) Bongo mpo na nini kozanga mpongi mpo na makambo na mosolo? “Biloko mingi na mozwi ekopekisaka mpongi na ye.” (Mosakoli 5:12) Bobosana te likebisi oyo na Yesu: “Bokoki kosalela Nzambe mpe misolo te.”—Matai 6:19-24.
Kondima oyo ekosilisaka mitungisi
10. Mpo na nini ezali ntina mpenza mpo na biso ete tozala na kondima epai na Nzambe, na esika ete totya motema na biso na biloko ya mosuni, mpe Yesu apesaki toli nini mpo na likambo yango?
10 Jéhovah alingi ete tozala na kondima epai na ye, kasi totya mitema na biso na biloko na mosuni te. “Soki mpo na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te, mpo ete ekoki na babelemi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Yesu alobaki ete: “Bomoi na moto ezali kati na motuya na biloko bizali na ye te.” (Luka 12:15) Bamilió na mbongo ekoki kosala te ete pumo oyo ezali na maladi to motema oyo molembi eumela mingi na bomoi. Yesu alandi kosala lisolo na ye likolo na ngomba ete: “Bongo nazali koloba na bino ete: ‘Botungisa mitema na bino te ete bokolia nini mpe ete bokomela nini soko ete bokolatisa nzoto na bino nini. Bomoi eleki nde bilei te? Mpe nzoto, eleki nde bilamba te?”—Matai 6:25.
11. Ndenge nini Yesu azalaki kozwa ebele na masese, mpe ndakisa nini tozali na yango kati Lisolo likolo na ngomba?
11 Yesu ayebaki mpenza kopesa masese. Azalaki kozwa yango na kotaláká zingazinga na ye: mwasi moko oyo azalaki kotya mwinda mopelisami likolo na etemelo, mobateli moko na bibwele oyo azalaki kokabola bampate mpe bantaba, bana baoyo bazalaki kosakana na esika na zando. Ezalaki bobele lolenge moko na ntango asalaki Lisolo likolo na ngomba. Wana ezalaki ye koloba mpo na mitungisi na nzoto, azwaki masese na komonáká bandeke kopumbwa epai na epai mpe fololo oyo ezalaki likoló na nkeká. Boye, bandeke bazali nde kokona mpe kobuka? Te. Bongo fololo na lisobe ezali nde kosala mpe kotonga busi? Te mpenza. Nzambe nde asali yango, mpe azali kobatela yango. Nzokande, bino boleki bandeke mpe fololo na motuya. (Matai 6:26; 28-30) Apesaki Mwana na ye mpo na bino, kasi mpo na yango te.—Yoane 3:16.
12. a) Masese na bandeke mpe na fololo elingaki kolimbola ete bayekoli na Yesu basengelaki kosala mosala te? b) Likanisi nini Yesu alobelaki na ntina etali mosala mpe kondima?
12 Yesu alingaki koloba te ete bayekoli na ye bakokaki kosala eloko moko te mpo na kolya mpe mpo na kolata. (tala Mosakoli 2:24; Baefese 4:28; 2 Batesaloniki 3:10-12) Na ntongo wana ya printemps, bandeke bazalaki na mosala mingi: bazalaki kotimola mabelé mpo na kozwa bilei, kobimaka mibale mibale elongo mwasi na mobali, bazalaki kotonga zumbu (ndako na ndeke), bazalaki kokuka mpe koleisa bana na bango. Bazalaki kosala kozanga komitungisa. Fololo mpe ezalaki kozindisa misisa na yango kati na mabelé mpo na koluka mai mpe biloko bibongi mpo na kolya na yango (minéraux), mpe ezalaki kobimisa nkasa epai na pole ya moi. Esengelaki kofungwama mpe kobimisa mbuma na yango liboso ete ekufa. Mpo ete Nzambe azali kokokisa bamposa ya bandeke mpe fololo, ‘akoleka nde kokokisa bamposa na bino te, bino bato na kondima moke?’— Matai 6:30.
13. a) Mpo na nini ebongaki mpenza mpo na Yesu ete asalela lipeko, oyo ezali emekeli ya molai mpo na kolobela lolenge na koyeisa bomoi na molai? b) Ndenge nini okoki koyeisa bomoi na yo na molai ya bamilió na bamilió ya bakilometele na elobeli ya elilingi?
13 Boye bozala na kondima. Bomitungisa te. Komitungisa ekobongola bomoi na bino te. Yesu atunaki ete: ’’Nani kati na bino akoki kobakisa ata lipeko moko na molai na bomoi na ye mpo azali komibanzanza?’’ (Matai 6:27, MN) Kasi, mpo na nini Yesu alobeli lipeko (coudée), oyo ezali emekeli ya molai, esika moko ná emekeli ya ntango mpo na boumeli na bomoi ya moto? Ezali mbala mosusu mpo ete Biblia ezali mbala mingi kokokanisa bomoi na moto na mobembo, na kosaleláká maloba lokola “nzela ya bato na masumu”, “nzela na bayengebene”, ‘nzela monene oyo ekoleka kino libebi’ mpe ‘nzela na nkaka oyo ekoleka kino na bomoi’. (Nzembo 1:1; Masese 4:18; Matai ’7:13, 14) Komibanzanza na ntina na bamposa ya mokolo na mokolo ekoki kobongola bomoi na moto te, ata na molai moke ya lipeko moko te. Nzokande, na lolenge mosusu, tokoki kobongola bomoi na biso na molai ya bamilió na bamilió ya bakilometele, kasi na kosengáká te na komibanzanza, ete: “Tokolya nini?” to mpe: “Tokomela nini” to lisusu: “Tokolatisa nzoto na biso nini?”, kasi nde na kozaláká na kondima mpe na kosaláká oyo Yesu alobi na biso tosala, ete: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye, mpe biloko nyonso oyo bikobakisamela bino.”—Matai 6:33.
Ndenge nini kozwa Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye
14. a) Wapi motó na likambo ya Lisolo likolo na ngomba? b) Na mwango nini, oyo emonani ete ezalaki mabe, bakomeli mpe Bafalisai bazalaki koluka na yango Bokonzi mpe boyengebene?
14 Na maloba ya liboso na Lisolo na ye likoló na ngomba, Yesu alobaki ete Bokonzi na Nzambe ezali mpo na baoyo bazali kobanza bamposa na bango ya elimo. Na molongó ya minei, alobaki ete baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene bakotonda. Awa, Yesu azali kotya Bokonzi mpe boyengebene na Jéhovah na esika ya liboso. Biloko yango bizali motó na likambo ya Lisolo likoló na ngomba. Yango ekokokisa bamposa ya bato banso. Kasi na nzela nini tokoki kozwa Bokonzi mpe boyengebene na Nzambe? Lolenge nini tosengeli kolanda koluka yango? Lokola oyo bakomeli mpe Bafalisai bazalaki kosala yango te. Bazalaki koluka Bokonzi mpe boyengebene na nzela ya Mibeko na Moise, oyo, engebene bango, ezalaki mpe na mibeko na bonkoko, mpo bazalaki kokanisa ete mibeko na bonkoko, motindo moko na Mibeko mikomamaki, mipesamaki na Nzambe epai na Moise na ngomba Sinai.
15. a) Engebene Bayuda, ntango nini mibeko na bankoko na bango epesamaki, mpe lolenge nini batombolaki yango likolo na Mibeko mikomamaki na Moize? b) Nzokande, ntango nini mpenza mibeko na bonkoko mibimaki, mpe ezalaki na bopusi nini likolo na Mibeko na Moise?
15 Na ntina yango, bonkoko na bango elobi boye: “Moize azwaki Mibeko (“mibeko mikomami te,” note na nse na lokasa) likolo na Sinai mpe apesaki yango na Yosua. Yosua apesaki yango na mikoló, mpe mikoló bapesi yango na basakoli; na ngala na bango, basakoli mpe bapesi yango na basangani ya biyanganelo.” Na boumeli na ntango, mibeko wana oyo mikomami te kasi ebimaki na bankoko na bango, mitombwanaki nkutu koleka Mibeko mikomamaki: “Soki (moto) ateyi makambo makeseni na maloba ya mikanda na Moize (mibeko mikomamaki), . . . moto yango alakamaki mpo na liwa te,” kasi “soki ateyi makambo makeseni na mibeko oyo mityamaki na bakonzi na mangomba (mibeko na bonkoko), . . . moto yango alakamaki mpo na liwa.” (Mishna.) Mibeko na bango na bonkoko mipesamelamaki na Sinai te. Na solo mpenza, ebimaki mpe eyeisamaki ebele nokinoki nde pene na bikeke mibale liboso na Yesu Klisto. Mibeko yango mibakisaki malako mosusu na Mibeko mikomamaki na Moise, elongolaki mosusu mpe esilisaki ntina na yango.—Tala Deteronome 4:2; 12:32.
16. Lolenge nini bato bazali kozwa Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye?
16 Bokonzi mpe boyengebene na Nzambe euti na Mibeko te, kasi libanda na yango: “Mpo ete moto moko te akolonga liboso na ye mpo na misala na Mibeko, mpamba te bakososolaka masumu nde na nzela na Mibeko. Kasi sikawa, Nzambe amonisi boyengebene na ye libanda na Mibeko, Mibeko mpe basakoli basili kotatola mpo na yango; ee, boyengebene na Nzambe ezali na nzela na kondima Yesu Klisto.” (Baloma 3:20-22, MN) Na boye nde moto akozwa Bokonzi mpe boyengebene na Nzambe na nzela na kondima Yesu Klisto, oyo ‘Mibeko mpe basakoli batatolaki mingi mpenza mpo na ye.’ Bisakweli mpo na Masiya bikokanaki epai na Yesu. Akokisaki mpe Mibeko, oyo milongolamaki na nzela wana akangisaki yango na nsete likolo na nzete ya mpasi.—Luka 24:25-27; 44-46; Bakolose 2:13, 14; Baebele 10:1.
17. Engebene ntoma Paulo, mpo na nini Bayuda bakokaki te koyeba boyengebene na Nzambe?
17 Yango wana ntoma Paulo alobaki ete Bayuda balukaki te boyengebene na lolenge esengelaki: “Natatweli bango ete bazali na mposa mpo na Nzambe nde na nzela na boyebi na solo te; awa bazangi koyeba boyengebene bouti na Nzambe mpe bazali kolukaluka boyengebene na bango mpenza, boye batosi boyengebene na Nzambe te. Mpamba te Klisto azali nsuka na Mibeko, mpo ete moto na moto oyo akondima azala na boyengebene.” (Baloma 10:2-4, MN) Paulo akomaki lisusu na ntina na Yesu ete: “Ye oyo ayebaki lisumu te, Nzambe azalisaki ye mosumuki mpo na biso, mpo tozala boyengebene na Nzambe na nzela na ye.”—2 Bakolinti 5:21, MN.
18. Lolenge nini “Klisto oyo abakisamaki na nzete” etalelamaki epai na Bayuda oyo bakangamaki na mibeko na bonkoko, epai na bafilozofe Bagreke, mpe epai na “babiangami”?
18 Masiya oyo abomamaki atalelamaki mpamba na Bayuda. Bato na filozofi ya greke. mpo na bango, bazalaki kotyola motindo na Masiya wana, oyo azalaki eloko na bolema na miso na bango. Lokola oyo Paulo alobi, ata soko “Bayuda bakosengaka bilembo mpe Bagreke bakolukaka mayele, nde biso tokosakolaka Klisto oyo abakisamaki na nzete. Oyo azali etutelo na libaku epai na Bayuda mpe eloko na bolema epai na Bapakano; kasi epai na babiangami, Bayuda mpe Bagreke, Klisto azali nguya na Nzambe mpe mayele na Nzambe. Mpo ete eloko na bolema na Nzambe eleki mayele na bato mpe bolembu na Nzambe eleki nguya na bato.” (1 Bakolinti 1:22-25, MN) Nguya na Nzambe mpe mayele na ye emonisamaki epai na Klisto Yesu. Ye azali mpo na Nzambe, nzela na boyengebene mpe ya bomoi na seko mpo na bato na botosi. “Lobiko ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nse kati na bato ete kokoka kobika mpo na yango.”—Misala 4:12.
19. Lisolo elandi ekomonisa nini?
19 lisolo elandi ekomonisa ete, soki tolingi kobika na libebi mpe kozwa bomoi na seko, tosengeli kolanda koluka Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye. Mpo na kosala yango, tosengeli te bobele koyoka maloba na Yesu, kasi tosengeli lisusu kosalela yango.
Bozongeli
◻ Na eloko nini Bayuda bakosi babongolaki makabo na bango ya mawa, mabondeli na bango mpe lolenge na bango ya kokila bilei.
◻ Wapi esika malamu mpo na kobomba biloko na motuya?
◻ Mpo na nini tosengeli te komibanzanza mpo na bamposa na biso ya mosuni?
◻ Bayuda bazalaki koloba nini mpo na eutelo ya mibeko na bango ya bonkoko, nzokande ezali ndenge nini?
◻ Na nzela nini Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye ekoki kozwama?
[Elilingi na lokasa 16]
Bafalisai bazalaki kobondela na bizwanelo ya balabala epai bakokaki komonana na bato.