Engebene Biblia
Ezali solo ete bakonzi misato nde bayaki kotala Yesu na Beteleme?
NSIMA ya kobotama ya Yesu, bato ya lokumu bautaki na Orient bayaki kokumisa ye lokola mokonzi ya Bayuda. Kino lelo oyo, bato mingi oyo basepelaka eyenga ya Noele bamikundolaka ndenge bato wana bayaki kotala Yesu.
Na bisika mosusu, bato basalaka masano ya Mbotama ya Yesu oyo ezali komonisa bapaya wana bauti na Orient lokola bakonzi misato mpe bazali kopesa Yesu, mwana oyo abotami makabo. Bipai misusu, bana batambolaka na kartye mpe balati bilamba lokola “Bakonzi Basantu.” Ata nsima ya bikeke 20, bipai nyonso, bato bamikundolaka kaka bapaya wana ya lokumu. Kasi bazalaki mpenza banani?
Bazalaki bakonzi?
Lisolo yango ezali na Biblia, na mokanda ya Matai. Kuna totángi boye: “Yesu abotami . . . banganga oyo batalaka minzoto balongwe na Este mpe bakomi na Yeruzalemi. Batuni bato: ‘Wapi mwana oyo abotami mpe azali mokonzi ya Bayuda? Tomonaki monzoto na ye na Este, mpe toyei kokumisa ye.’” (Matai 2:1, 2, Boyokani ya Sika) Mpo na nini libongoli oyo ya Biblia ebengi bapaya yango oyo bautaki na Ɛsti ete banganga oyo batalaka minzoto kasi bakonzi te?
Awa, Makomami esaleli liloba ya Greke magos na boike. Na mabongoli mosusu ya Biblia, babongoli liloba yango lokola “bato na mayele,” “banganga oyo batalaka minzoto” to “bato oyo batalaka minzoto” mpe na Lifalanse liloba yango ebongolami na “mages” oyo euti na Greke “Magi.” Maloba oyo elimboli bato oyo bapesaka toli to basakolaka makambo nsima ya kotala ndenge minzoto mpe baplanɛti ezali na likoló. Na yango, Biblia ezali komonisa ete bapaya oyo bayaki na Yelusaleme bazalaki bato oyo bayebisaka makambo mabombami, basalaka misala ya bilimu mabe oyo endimami na Nzambe te.—Deteronome 18:10-12.
Bazalaki mpe bakonzi? Soki bazalaki bakonzi, mbɛlɛ Biblia elobeli yango. Matai 2:1-12 esaleli liloba “mokonzi” mbala minei, mbala moko mpo na Yesu mpe mbala misato mpo na Elode. Kasi ata mbala moko te ebengi banganga wana oyo batalaka minzoto bakonzi. Mpo na yango buku moko (The Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Ata Mokonzi moko te ya Lingomba ya libosoliboso andimaki ete banganga-minzoto [yango] bazalaki bakonzi.” Biblia mpe elobi bongo te.
Bazalaki misato?
Biblia elobeli motango ya banganga-minzoto te. Nzokande masano ya Noele mpe nzembo na yango ezali na likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ete bazalaki misato. Na ntembe te, likanisi yango euti na likambo oyo ete bapesaki makabo ya ndenge misato. Mpo na yango Biblia elobi ete: “Bazipoli mabenga na bango, bapesi [Yesu] makabo, wolo mpe mpaka na malasi mpe mola.”—Matai 2:11.
Ebongi mpenza koloba ete banganga-minzoto bazalaki misato mpamba te bapesaki makabo ya ndenge misato? Tiká tótalela lisolo ya mopaya mosusu ya lokumu na Yisalaele. Mokolo moko mokonzi-mwasi ya Seba ayaki kotala Salomo mpe amemelaki ye “malasi mpe wolo mingi mpe mabanga na motuya.” (1 Mikonzi 10:2) Atako balobeli makabo ya ndenge misato, balobeli bobele moto moko oyo apesi yango, ye mokonzi-mwasi ya Seba. Motango ya makabo na ye emonisi te ete bato misato nde bayaki kotala Salomo na ntango wana. Ndenge moko mpe makabo misato oyo bapesaki Yesu ezali na boyokani ata moko te na motango ya bato oyo bayaki na yango.
Buku moko (The Catholic Encyclopedia) emonisi ete: “Lisolo ya Evanzile elobeli motango ya banganga-minzoto te mpe ezali na likanisi moko te ya polele na likambo yango. Bakonzi mosusu ya Lingomba balobelaka banganga-minzoto misato mpo batalelaka nde motango ya makabo.” Na nsima buku yango elobi ete bililingi mingi emonisaka bato mibale, misato, minei ata mpe mwambe ete bayaki kotala Yesu. Bato mosusu bandimaka ete bato yango bazalaki 12. Ezali ata na eloko moko te mpo na koyeba motango ya banganga-minzoto yango.
Lisolo yango eyebani mingi kasi balobelaka yango na ndenge ya solo te
Na kokesena na oyo bato mingi bandimaka, banganga-minzoto yango bakómaki liboso na Beteleme te kasi na Yelusaleme mpe ezalaki nsima wana Yesu asilaki kobotama. Bazalaki wana te ntango Yesu abotamaki. Na nsima, ntango bakendaki na Beteleme, Biblia elobi ete “ntango bakɔti na ndako mpe bamoni mwana.” (Matai 2:1, 11, NW) Na yango, ezali polele ete ntango banganga-minzoto bayaki kotala Yesu, libota na ye ekendaki kofanda na ndako lokola oyo bato nyonso bafandaka. Bakutaki ye alali na kati ya elielo ya bibwele te.
Na kotalela Makomami, lisolo oyo epalanganá ete bakonzi misato bayaki kotala Yesu ntango ya kobotama na ye ezali lokuta. Ndenge touti kolobela yango, Biblia elobi te ete banganga-minzoto oyo bayaki kotala Yesu bazalaki bakonzi kasi bato oyo batalaka minzoto mpe bazalaki kosala misala ya bilimu mabe. Lisolo ya Makomami eyebisi te soki bazalaki bato boni. Mpe lisusu, bayaki te ntango Yesu autaki kobotama wana azalaki naino na kati ya elielo ya bibwele, kasi bayaki nde na nsima, ntango libota na ye esilaki kozonga na ndako.
Lisolo ya bakonzi misato mpe masolo mosusu ya Noele epalangani mingi, atako ezali ndenge yango te na Biblia mpe bato batalelaka yango lokola masapo ya bafeti oyo ekoki kosala moto mabe te. Nzokande, baklisto bakoki kosepela te na losambo oyo ezali na makambo ya lokuta. Yesu ye moko mpe akanisaki bongo. Na libondeli moko epai ya Tata na ye, Yesu alobaki boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Alobaki ete ‘basambeli ya solo bakosambela Tata na . . . [elimo] mpe na solo. Mpo ete Tata azali koluka motindo oyo mpo na kosambela ye.’—Yoane 4:23.
[Elilingi na lokasa 27]
“Losambo ya banganga-minzoto”