Mangomba nyonso ememaka epai ya Nzambe moko?
“Nazali na lingomba na ngai, nakoki kolongwa kuna te. Lingomba ekipaka te, mpo biso nyonso tosambelaka kaka Nzambe moko.”
OSILÁ koyoka maloba yango? Bato mingi balobaka ete mangomba nyonso elakisaka bato nzela ya Nzambe mpe esalisaka bango báyeba ntina ya bomoi. Ndenge moko mpe, bato mingi balobaka ete lingomba nyonso ezali na malamu mpe na mabe na yango, lingomba moko te ekoki koloba ete yango nde nzela kaka moko ya solo oyo ememaka epai ya Nzambe.
Makanisi ya ndenge wana epalangani mingi lelo oyo. Kutu, bato oyo bakanisaka ndenge mosusu bamonanaka lokola nde bazali na mayele mokuse. Yo okanisi nini? Okanisi ete mangomba nyonso ememaka epai ya Nzambe kaka moko? Lingomba ya moto ezali mpenza na ntina?
Bokeseni ezali mpenza?
Buku moko emonisi ete lelo oyo, mangomba ezali 9 900 na mokili mobimba; misusu epalangani na bikólo mingi na mokili mpe ezali na bamilio ya bandimi. Balobaka ete bato mingi (70 %) bazali na mangomba mitano ya minene na mokili—lingomba ya Bouddha, ya boklisto, ya Hindu, ya Bamizilma, mpe ya Bayuda. Soki mangomba nyonso ememaka epai ya Nzambe kaka moko, mateya ya mangomba oyo mitano ya minene, ndenge batalelaka Nzambe mpe mikano na ye esengeli kokokana mpenza. Kasi nini ezali komonana?
Hans Küng, moto moko ya teoloji na Lingomba ya Katolike, alobi ete mangomba ya minene ezalaka na mwa makanisi ndenge moko na oyo etali boyokani ya bato. Na ndakisa, mingi eteyaka ete koboma, kokosa, koyiba, kosangisa nzoto na ndeko ezali mabe, mpe ete bana basengeli kotosa baboti mpe baboti basengeli kolinga bana na bango. Kasi, na makambo mosusu, bokeseni ezali mpenza monene na mateya ya mangomba yango mitano; mingimingi na ndenge balimbolaka Nzambe.
Na ndakisa, Bahindu basambelaka ebele ya banzambe, nzokande mpo na bato ya Bouddha, Nzambe azalaka mpenza te. Bamizilma bateyaka ete Nzambe azali moko. Ndenge moko na mangomba ya boklisto, kasi mosusu kati na yango eteyaka Nzambe moko na bapersona basato. Ata na kati ya mangomba yango ya boklisto, bindimeli ezali ndenge na ndenge mpe ekeseni. Na ndakisa, Bakatolike basambelaka Malia, mama ya Yesu; kasi, Baprotesta basalaka yango te. Bakatolike bapekisaka kosalela nkisi ya kokanga mabota, kasi Baprotesta bapekisaka te. Baprotesta bango moko mpe bazalaka na makanisi ekeseni na likambo etali mabala ya basi na basi to mibali na mibali.
Okanisi ete mangomba nyonso wana, oyo mateya na yango ekeseni mpenza, esambelaka Nzambe kaka moko? Te. Kutu, mateya yango ezali kobimisa mobulungano na ntina na Nzambe mpe makambo oyo azali kosɛnga.
Mangomba yango esangisaka to ekabolaka bato?
Soki mangomba nyonso ezalaki komema epai ya Nzambe kaka moko, na ntembe te yango nyonso elingaki kosangisa bato mpe kotya kimya. Ezali yango nde tomonaka? Emonani ete na esika ya kosangisa bato, mangomba ezali nde kokabola bato mpe kobimisa bitumba. Tiká tótala mwa bandakisa.
Kobanda na ekeke ya 11 tii ya 13, bikólo ya boklisto ebundisaki Bamizilma na bitumba ya Croisades. Na ekeke ya 17, Bakatolike ná Baprotesta babundaki na Mpoto na Etumba ya Mbula Ntuku Misato. Na 1947, ntango Grande-Bretagne epesaki Inde ná mikili oyo ezali zingazinga na yango lipandá, bitumba ebimaki kati na Bahindu ná Bamizilma. Na bambula oyo euti koleka, Bakatolike ná Baprotesta na Irlande du Nord bazalaki kobunda. Na Moyen-Orient, tii lelo oyo kimya ezali te kati na Bayuda ná Bamizilma. Na nyonso wana, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba nde elekaki; mpamba te na etumba yango bato ya mangomba mitano wana ya minene babundaki, ata bato oyo bazalaki na lingomba moko babomanaki.
Ntembe ezali te. Mangomba ya mokili ememi kimya te, esangisi bato te, ememi mpe bango te epai ya Nzambe kaka moko. Kutu, ekaboli nde bato mpe etye mobulu na mitó ya bato; bayebi te Nzambe azali nani mpe ndenge nini kosambela ye. Na yango, moto nyonso oyo alingi koyeba Nzambe ya solo, asengeli kopona malamu nzela oyo akolanda. Toli yango ezali na Biblia, buku moko ya kala oyo bato mingi bayebi.
Bópona nani bokosalela
Biblia emonisi ete mpo na koyeba nzela oyo ezali komema epai ya Nzambe ya solo, esɛngaka kokanisa malamu mpe kopona. Yosua, mosaleli ya Yehova Nzambe, alobaki na Bayisalaele boye: “Bópona lelo ye oyo bokosalela, soki banzambe oyo batata na bino basalelaki na mokili na ngámbo ya Ebale, to banzambe ya Baamola, baoyo bozali kofanda na mokili na bango. Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].” Bambula mingi na nsima, mosakoli Eliya ayebisaki mpe Bayisalaele likambo moko ya ndenge wana; alobaki boye: “Kino ntango nini bino bokotambolatambola na nzela mibale ekeseni? Soki [Yehova] azali Nzambe [landá] ye; nde soki Baala [nzambe ya Bakanana], [landá] ye.”—Yosua 24:15, 16; 1 Mikonzi 18:21.
Bavɛrsɛ yango mpe bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete baoyo balingaki kosalela Nzambe ya solo basengelaki kokanisa malamu mpe kozwa ekateli. Ezali mpe bongo lelo oyo. Soki tolingi kosambela mpe kosalela Nzambe ya solo, biso mpe tosengeli kopona malamu. Kasi, nini ekoki kosalisa biso tózwa ekateli ya ndenge wana na makambo ya losambo? Ndenge nini tokoki koyeba basambeli ya solo?
Basambeli ya solo bayebanaka na bambuma na bango
Mpo na basambeli ya solo mpe ya lokuta, Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye boye: “Babukaka soki moke te bambuma ya vinyo na kati ya banzubɛ to bambuma ya figi na kati ya nsende, boye te? Ndenge moko mpe nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso oyo epɔlá ebotaka mbuma oyo ezangá ntina; nzete ya malamu ekoki te kobota mbuma oyo ezangá ntina, nzete oyo epɔlá mpe ekoki kobota mbuma ya malamu te. . . . Boye, ya solo mpenza, bokoyeba bato wana na bambuma na bango.” Ndenge moko mpe, basambeli ya solo bayebanaka na bambuma to misala na bango. Bambuma yango ezali nini?—Matai 7:16-20.
Ya liboso, losambo ya solo etindaka bato bázala na bolingo mpe na bomoko. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” Bolingo ya bayekoli ya solo ya Klisto esengeli komonana polele na miso ya bato, mpo na komonisa ete bazali basambeli ya solo.—Yoane 13:34, 35.
Mpo na yango, ekoki kosalema te ete baklisto ya solo básimba mandoki mpo na kobundisa baninga na bango. Bato ya mangomba balandaka mobeko yango? Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, lingomba oyo eboyaki mpenza na mpiko nyonso komikɔtisa na etumba yango ezali lingomba ya Batatoli ya Yehova. Hanns Lilje, episkɔpɔ ya kala ya Lingomba ya Protesta na engumba Hannover na Allemagne, akomaki mpo na Batatoli ya Yehova boye: “Bato yango bakoki mpenza koloba ete kaka bango nde baboyaki kopesa Hitler mabɔkɔ mpo na kotosa lisosoli na bango.” Na ntango yango, na bikólo mingi Batatoli bandimaki konyokwama na esika ya kopesa mabɔkɔ na etumba.
Bambuma nini mosusu Yesu azalaki kokanisa oyo esengelaki komonisa bayekoli na ye ya solo? Na libondeli ya Tata wa biso, Yesu abandaki boye: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” Yesu atyaki kosantisama ya nkombo ya Nzambe, Yehova, na esika ya liboso. Amonisaki elikya na ye ete na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, mokano ya Yehova ekosalema awa na mabelé. Lingomba nini oyebi, oyo esakolaka nkombo ya Yehova mpe eteyaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo kimya ekɔta na mabelé? Batatoli ya Yehova bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe na mikili 236, mpe bazali kokabola mikanda na minɔkɔ koleka 470.—Matai 6:9, 10.
Lisusu, Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya Yesu na ndenge bakɔtaka te na makambo ya politiki mpe makambo mosusu ya mokili. Yesu alobaki mpo na bango boye: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” Longola yango, Batatoli ya Yehova bandimaka Biblia lokola Liloba ya Nzambe, mpe bandimaka ete “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”—Yoane 17:14, 17; 2 Timote 3:16, 17.
Lingomba ya solo ekeseni na mangomba mosusu
Bambuma oyo touti kolobela—bolingo ya solosolo, mposa ya kosantisa nkombo ya Yehova, kosakola Bokonzi ya Nzambe, kokabwana na mokili, mpe kondima Biblia—nyonso wana emonisaka basambeli ya solo. Bambuma yango esalaka mpe ete basambeli ya solo bákesana mpenza na bato ya mangomba mosusu. Mwasi moko oyo asololaki mwa mingi na Batatoli ya Yehova alobaki boye: “Nayebi mangomba mingi, mpe yango nyonso ekokani. Kaka bino nde bokeseni mpenza na bato ya mangomba mosusu nyonso.”
Ya solo, mangomba nyonso ememaka epai ya Nzambe kaka moko te. Kasi, ezali na bato oyo bakeseni na bato ya mangomba mosusu—Batatoli ya Yehova, oyo lelo oyo bakómi milio koleka 7 na mokili mobimba. Lokola bandimaka mpe batosaka Liloba ya Nzambe, Biblia, basali likambo oyo ata lingomba moko esalá te, elingi koloba kosangisa bato ya bikólo, minɔkɔ, mimeseno, mpe mposo ndenge na ndenge na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo, Yehova. Bakosepela kosalisa yo oyekola makambo ya Nzambe, oyeba oyo azali kosɛnga yo, mpe ozala na kimya oyo eutaka na kosambela Nzambe na ndenge oyo ye alingaka. Omoni te ete yango ezali likambo oyo ebongi?
[Elilingi na lokasa 14]
Sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ azali kopambola basoda ya Ukraine na 2004
[Eutelo ya bafɔtɔ]
GENIA SAVILOV/AFP/Getty Images
[Elilingi na lokasa 15]
Batatoli ya Yehova basalisaka bato na bisika nyonso báyeba Nzambe mpe Bokonzi na ye
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]
Lokasa 12: Mwasi moko ya Lingomba ya Bouddha: © Yan Liao/Alamy; mondimi moko ya Lingomba ya Hindu: © imagebroker/Alamy; lokasa 13: Mobali moko azali kotánga Coran: Mohamed Amin/Camerapix; moyuda: Todd Bolen/Bible Places.com