Elikya nini ezali mpo na bampate mpe mpo na bantaba?
“Akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba.”—MATAI 25:32.
1, 2. Mpo na nini lisese ya bampate mpe bantaba esengeli kobenda likebi na biso?
YESU KLISTO azalaki mpenza Moteyi oyo aleki bateyi nyonso awa na mabelé. (Yoane 7:46) Moko na myango na ye ya koteya ezalaki bongo kosalela masese, to bililingi ya maloba. (Matai 13:34, 35) Yango ezalaki mpasi te, kasi ezalaki na nguya mpo na koteya solo mozindo ya elimo.
2 Kati na lisese ya bampate mpe bantaba, Yesu alobaki mpo na ntango oyo asengelaki kosala mingi mpenza, ete: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe . . . ” (Matai 25:31) Yango esengeli kobenda likebi na biso mpamba te ezali lisese oyo na nzela na yango Yesu asukisaki eyano na ye na motuna oyo: “Elembo na [kozala, NW] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” (Matai 24:3) Kasi yango elimboli nini mpo na biso?
3. Na ebandeli ya lisukúlu na ye, Yesu alobaki ete nini ekobima nokinoki nsima wana bolɔ́zi monene ekobanda?
3 Yesu asakolaki makambo minene oyo makosalema “nokinoki” nsima ya kobima ya bolɔ́zi monene; tozali kozela makambo yango. Alobaki ete na ntango yango “elembo na Mwana na moto” ekomonana. Yango ekozala na bopusi monene likoló na “mabota nyonso na mokili,” oyo “bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na Likoló na nguya mpe na nkembo.” Mwana na moto akozala elongo na “baanzelu na ye.” (Matai 24:21, 29-31)a Ezali boni mpo na lisese ya bampate mpe bantaba? Mabongoli ya Biblia ya mikolo na biso etye yango na mokapo 25, kasi ezali kati na eyano oyo Yesu apesaki, ezali koyebisa makambo mosusu matali koya na ye na nkembo mpe ezali kobenda likebi mingi na ntina na kosambisa na ye likoló na “mabota nyonso.”—Matai 25:32.
Baoyo balobelami kati na lisese yango
4. Nini elobelami na ntina na Yesu na ebandeli ya lisese ya bampate mpe bantaba, nani mpe alobelami kati na yango?
4 Yesu abandi lisese na ye na kolobáká ete: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye.” Ekoki mpenza kozala ete oyebi soki “Mwana na moto” ezali bongo nani. Mbala mingi bakomi ya Baevanzile basalelaki liloba wana mpo na Yesu. Ata Yesu mpe asalelaki yango mpo na ye moko, na ntembe te, ayebaki malamu emonaneli ya Danyele na ntina na “[oyo azali] lokola Mwana na moto,” oyo abɛlɛmaki epai na Mokóló na kalakala mpo na kozwa “nguya na nkembo na bokonzi.” (Danyele 7:13, 14; Matai 26:63, 64; Malako 14:61, 62) Atako Yesu azali moto ya ntina mingi oyo alobelami kati na lisese yango, kasi azali ye moko te. Liboso, kati na lisukúlu na ye, lokola ekomamaki na Matai 24:30, 31, alobaki ete ntango Mwana na moto ‘akoya na nguya mpe nkembo,’ baanzelu na ye bakokokisa mokumba ya ntina. Bobele bongo, lisese ya bampate mpe bantaba emonisi baanzelu elongo na Yesu na ntango ‘afandi na kiti ya bokonzi na ye na nkembo’ mpo na kosambisa. (Kokanisá na Matai 16:27.) Kasi Mosambisi mpe baanzelu na ye bazali na likoló, bato oyo balobelami kati na lisese yango bazali mpe na likoló?
5. Lolenge nini tokoki koyeba “bandeko” ya Yesu?
5 Kotalelama ya lisese yango emonisi ete tosengeli kokesenisa bituluku misato kati na yango. Longola bampate mpe bantaba, Mwana na moto alobeli lisusu etuluku ya misato oyo, koyeba bango ezali mpenza na ntina mpo na kokesenisa bampate mpe bantaba. Yesu abéngaki etuluku wana ya misato ete bandeko na ye ya elimo. (Matai 25:40, 45) Basengeli kozala basambeli ya solo, mpamba te Yesu alobaki ete: “Ye nani akosalaka mokano na Tata na ngai . . . , ye azali ndeko mobali na ngai, mpe ndeko mwasi na ngai mpe mama.” (Matai 12:50; Yoane 20:17) Na lolenge lobongi mpenza, Paulo akomaki na ntina na baklisto oyo bazali basangani ya “[Mombóto] na Abalayama” mpe baoyo bazali bana ya Nzambe. Abéngaki bango “bandeko” ya Yesu mpe “baoyo basangani na kobyangama na Likoló.”—Baebele 2:9–3:1; Bagalatia 3:26, 29.
6. Bandeko ya Yesu “baoyo baleki moke” ezali bongo banani?
6 Mpo na nini Yesu alobi ete “baoyo baleki moke” kati na bandeko na ye? Awa, Yesu azongeli maloba oyo ayebisaki bantoma na ye liboso. Na ntango alobelaki Yoane Mobatisi, oyo akufaki liboso na Yesu mpe azalaki na elikya ya bomoi na mabelé, kokesenisáká ye na baoyo bakozwa bomoi na likoló, Yesu ayebisaki ete: “Moto moko te abimi kati na baoyo babotami na basi, oyo aleki Yoane Mobatisi. Nde ye oyo aleki moke kati na Bokonzi na Likoló aleki ye na monene.” (Matai 11:11) Bamoko kati na baoyo bakokenda likoló bakokaki kozala na mikumba minene kati na lisangá, lokola bantoma, mpe basusu na mikumba mingi te, kasi bango banso bazali bandeko ya Yesu ya elimo. (Luka 16:10; 1 Bakolinti 15:9; Baefese 3:8; Baebele 8:11) Na yango, atako basusu bamonanaki ete bazalaki na lokumu mingi te na mabelé, kasi bazalaki bandeko na ye mpe basengelaki kotalelama na motindo wana.
Banani bazali bampate mpe bantaba?
7, 8. Yesu alobaki nini na ntina na bampate, na yango tokoki koloba nini na ntina na bango?
7 Tozali kotánga na ntina na kosambisama ya bampate ete: “[Yesu] akoloba na bango na lobɔ́kɔ na ye na mobali ete, Yaká bino bopambwami na Tata na ngai, bósangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili. Zambi nayokaki nzala mpe bopesi ngai bilei; nazalaki na mposa na mai mpe bomelisi ngai; nazalaki mopaya mpe bonyangeli ngai; nazalaki bolumbu mpe bolatisi ngai; nazalaki na maladi mpe boyei kotala ngai; nazalaki na ekangelo mpe boyeli ngai. Bongo bayengebene bakozongisa liloba ete, Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala mpe toleisi yo to na mposa na mai mpe tomelisi yo? Ntango nini tomoni yo mopaya mpe tonyangeli yo to bolumbu mpe tolatisi yo? Ntango nini tomoni yo na maladi to na ekangelo mpe toyei epai na yo? Mokonzi akozongisela bango liloba ete, Nazali koloba na bino solo ete lokola esalaki bino yango epai na moko na bandeko na ngai baoyo baleki moke, bosalelaki ngai yango.”—Matai 25:34-40.
8 Na ntembe te, bampate oyo bazwi esambiseli malamu ete babongi kozala na lobɔ́ko ya mobali ya Yesu ya nkembo mpe ya kondimama bazali komonisa etuluku moko ya bato. (Baefese 1:20; Baebele 1:3) Basalaki nini mpe ntango nini? Yesu alobi ete na boboto nyonso, na limemya, mpe na elimo ya bokabi, baleisaki ye, bamelisaki ye, mpe balatisaki ye, basalisaki ye na ntango azalaki na maladi to kati na bolɔ́kɔ. Na ntango bampate balobi ete basalaki yango te epai na Yesu mpenza, amonisaki ete basungaki mpenza bandeko na ye ya elimo, baklisto batikali bapakolami; na bongo, ezali na lolenge wana nde basalaki yango epai na ye.
9. Mpo na nini lisese yango esalelami te mpo na boumeli ya Mbula Nkóto?
9 Lisese yango ekokokana te na boumeli ya Mbula Nkóto, mpamba te na eleko wana bapakolami bakozala lokola bato te mpo bakoka koyoka nzala, mposa ya mai, kobɛla maladi, to kokɔta bolɔ́kɔ. Kasi, mingi na bango basili kokutana na makambo motindo yango na boumeli ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo. Kobanda na ntango oyo Satana abwakamaki awa na mabelé, azali kongalisa nkanda na ye makasi likoló na batikali, kobimiseláká bango botyoli, monyoko, mpe liwa.—Emoniseli 12:17.
10, 11. (a) Mpo na nini tokoki te kokanisa ete moto nyonso oyo asali malamu epai na bandeko ya Yesu azali mpate? (b) Na lolenge lobongi, bampate bazali komonisa banani?
10 Yesu alobi ete moto nyonso amonisi mwa boboto epai na bandeko na ye, na ndakisa kokabela bango limpa to kɔ́pɔ ya mai, abongi kozala moko kati na bampate yango? Ya solo, komonisa boboto motindo wana ekoki komonana lokola boboto oyo bato bazalaka na yango, kasi na solo mpenza, emonani ete makambo mingi masɛngami epai na bampate ya lisese oyo. Yesu azalaki soko moke te kolobela, na ndakisa, na ntina na bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali to na ntina na bakonzi ya mangomba oyo, bobele na mbalakaka, bakoki mbala mosusu kosala likambo moko ya boboto epai na moko na bandeko na ye. Nzokande, mbala mibale Yesu abéngaki bampate “bayengebene.” (Matai 25:37, 46) Na yango, bampate basengeli kozala baoyo na boumeli ya eleko moko ya ntango molai—bazali kosunga na molende nyonso—bandeko ya Klisto mpe bamonisi kondima kino na meko oyo Nzambe ataleli bango lokola bayengebene na miso na ye.
11 Na boumeli ya bikeke, bato mingi lokola Abalayama, batalelamaki bayengebene. (Yakobo 2:21-23) Noa, Abalayama, mpe bato mosusu ya sembo batángami mpe kati na “bampate mosusu” oyo bakosangola bomoi kati na Paladiso na nsé ya Bokonzi ya Nzambe. Na mikolo oyo bamilió mingi lisusu basili kondima losambo ya solo lokola bampate mosusu mpe basili kokóma “etongá moko” elongo na bapakolami. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9) Baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé bayebi ete bandeko ya Yesu bazali bamonisi ya Bokonzi mpe na yango, basilaki kosunga bango—na mosuni mpe na elimo. Oyo bampate mosusu bazali kosala mpo na bandeko na ye oyo bazali na mabelé, Yesu azali kotalela yango ete bazali kosala bongo epai na ye. Bato motindo wana, baoyo bakozala na bomoi na ntango akoya kosambisa mabota, bakotángama lokola bampate mosusu.
12. Mpo na nini bampate bakotuna soki lolenge nini bamonisaki boboto epai na Yesu?
12 Soki bampate mosusu bazali sikawa kosakola nsango malamu elongo na bapakolami mpe kosungáká bango, mpo na nini bakotuna ete: “Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala mpe toleisi yo to na mposa na mai mpe tomelisi yo?” (Matai 25:37) Bantina ekoki kozala mingi. Oyo ezali lisese. Na nzela na yango, Yesu amonisi lobanzo na ye monene mpo na bandeko na ye ya elimo; azali kozwa mayoki lolenge moko na bango, anyokwami elongo na bango. Yesu alobaki liboso ete: “Ye oyo akoyamba bino azali koyamba ngai; mpe ye oyo akoyamba ngai azali koyamba motindi na ngai.” (Matai 10:40) Yesu asaleli lilako yango kati na lisese oyo, komonisáká ete oyo esalemi (ya malamu to ya mabe) epai na bandeko na ye ezali kokóma ata na likoló; ezali lokola esalelami epai na ye kuna na likoló. Lisusu, awa Yesu abendi likebi mingi mpenza likoló na ndakisa ya Yehova na ntina etali kosambisa, komonisáká polele ete kosambisa ya Nzambe, ezala ya kolongisa moto to ya kokweisa moto, ezali oyo ebongi mpe oyo ya sembo. Bantaba bakoki koluka komilóngisa te ete: ‘Soki tomonaki yo mpenza na miso na biso mbɛlɛ malamu.’
13. Mpo na nini baoyo bakokani na bantaba bakobénga Yesu ete “Nkolo”?
13 Nsima ya koyeba malamu ntango nini kosambisama oyo emonisami na lisese ekopesama, tokoyeba malamu mpenza soki bantaba bazali banani. Ekokokisama na ntango “elembo na Mwana na moto ekomonana na Likoló mpe mabota nyonso na mokili bakolela mpe bakomona Mwana na moto azali koya . . . na nguya mpe na nkembo mingi elongo.” (Matai 24:29, 30) Baoyo bakotikala naino na bomoi nsima ya kokwea ya bolɔ́zi likoló na Babilone monene, baoyo banyokolaki bandeko ya Mokonzi, na kozanga elikya nyonso, bakokóma bongo kobénga Mosambisi ete “Nkolo,” kokanisáká ete na kosaláká bongo bakobikisa bomoi na bango.—Matai 7:22, 23; kokanisá na Emoniseli 6:15-17.
14. Na moboko nini Yesu akosambisa bampate mpe bantaba?
14 Nzokande, ekateli ya Yesu ekotalela te kolela ya bato oyo bazalaki kala kati na mangomba, kolela ya baoyo bandimaka te ete Nzambe azali, to kolela ya bato mosusu. (2 Batesaloniki 1:8) Nzokande, Mosambisi akotalela ezalela ya motema mpe makambo ya kala oyo bato basalaki ata mpe epai na ‘oyo aleki moke kati na [bandeko na ye].’ Ya solo, motángo ya baklisto bapakolami oyo batikali na mabelé mozali sé kokita. Nzokande, na boumeli ya ntango nyonso oyo batikali, baoyo bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele,” bakokóba kopesa bilei ya elimo mpe litambwisi ya elimo, na bongo baoyo bakoki kokóma bampate bazali na libaku ya kosala malamu epai na kelasi ya moombo, lolenge moko lokola ‘ebele monene ya bato bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso’ basili kosala yango.—Emoniseli 7:9, 14.
15. (a) Lolenge nini bato mingi basili komomisa ete bakokani na bantaba? (b) Mpo na nini tosengeli kopɛngola kokata soki moto moko azali mpate to soki azali ntaba?
15 Lolenge nini bato bazali kosala epai na bandeko ya Klisto mpe bamilió ya bampate mosusu basangani elongo na bango lokola etongá moko? Ekoki kozala na bato oyo babundisaka bamonisi ya Klisto te, kasi bamoniselaka bango boboto mpe te. Lokola bazali kosepela na mokili oyo ya mabe, baoyo bakokani na bantaba bazali koboya nsango ya Bokonzi, ezala ete bayoki yango uta na Batatoli mpenza to na nzela mosusu. (1 Yoane 2:15-17) Ya solo, Yesu azali ye oyo aponami mpo na kokata makambo na nsuka. Biso tozali na lotómo te ya kokata soki banani bazali bampate mpe soki banani bazali bantaba.—Malako 2:8; Luka 5:22; Yoane 2:24, 25; Baloma 14:10-12; 1 Bakolinti 4:5.
Elikya nini ezali liboso na etuluku mokomoko?
16, 17. Elikya nini bampate bazali na yango?
16 Yesu apesaki ekateli na ye mpo na bampate ete: “Yaká bino bopambwami na Tata na ngai, bósangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili.” Oyo nde libyangi ya esengo—“Yaká”! Epai wapi? Epai na bomoi ya seko, lokola asukisi na mokuse ete: “Bayengebene [bakokɔta] kino bomoi na seko.”—Matai 25:34, 46.
17 Kati na lisese ya batalanta, Yesu amonisaki nini oyo esɛngami mpo na baoyo bakoyangela elongo na ye na likoló, kasi na lisese oyo amonisi eloko nini baoyo bakozala na nsé ya bokonzi basengeli kosala. (Matai 25:14-23) Lokola bamipesi mobimba mpo na kosunga bandeko ya Yesu, bampate bakosangola esika kati na mabelé, oyo ezali bongo esika eyangelami na Bokonzi yango. Bakosepela na bomoi kati na paladiso awa na mabelé—eloko oyo Nzambe abongisaki mpo na bango “longwa na ebandeli na mokili” ya bato oyo bakoki kosikolama.—Luka 11:50, 51.
18, 19. (a) Ekateli nini Yesu akokweisa likoló na bantaba? (b) Lolenge nini tokoki kondimisama ete bantaba bakozwa konyokwama ya seko te?
18 Ekateli oyo ekweisami likoló na bantaba ekeseni mpenza! “Bongo akoloba na bango na lobɔ́kɔ na mwasi ete, Bólongwa na ngai, bino balakelami mabe, kino mɔ́tɔ na seko mobongisami mpo na Satana mpe baanzelu na ye. Zambi nazalaki na nzala mpe boleisi ngai te mpe na mposa na mai nde bomelisi ngai te; nazalaki mopaya nde bonyangeli ngai te, bolumbu nde bolatisi ngai te, na maladi mpe na ekangelo nde boyei komonana na ngai te. Bongo bango bakozongisa liloba ete, Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala to na mposa na mai to bolumbu to na maladi to na ekangelo mpe biso tosungi yo te? Akozongisela bango liloba ete, Nazali koloba na bino solo ete, Lokola ezangaki bino kosala yango epai na moko na bango baleki moke, bozangaki kosalela ngai.”—Matai 25:41-45.
19 Bayekoli ya Biblia bayebi ete yango ekoki te kolimbola ete milimo mizangi kokufa ya bato bakokani na bantaba, mikonyokwama kati na mɔ́tɔ ya seko. Te, mpamba te bato bango moko bazali milimo; bazwaki te milimo oyo mizangi kokufa. (Genese 2:7; Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Na kokateláká bantaba etumbu ya “mɔ́tɔ ya seko,” Mosambisi alingi mpenza kolobela kufa ezangi elikya, oyo ekozala mpe nsuka ya libela mpo na Zábolo mpe bademó na ye. (Emoniseli 20:10, 14) Na yango, Mosambisi oyo Yehova asili kopona akobimisa bikateli mibale bikeseni. Akoyebisa na bampate ete: “Yaká”; nzokande, epai na bantaba akoloba ete: “Bólongwa na ngai.” Bampate bakosangola “bomoi na seko.” Bantaba bakozwa “libebi na seko.”—Matai 25:46.b
Yango elimboli nini mpo na biso?
20, 21. (a) Mosala nini ya ntina mingi baklisto bazali na yango? (b) Kokabolama nini ezali kosalema sikawa? (c) Ezalela ya bato ekozala nini na ntango lisese ya bampate mpe bantaba ekobanda kokokisama?
20 Bantoma minei ya Yesu oyo bayokaki eyano ya Yesu na ntina na elembo ya kozala na ye mpe ya nsuka ya ebongiseli oyo basengelaki kokanisa makambo mingi. Basengelaki kolala mpongi te kasi nde kosɛnzɛla ntango nyonso. (Matai 24:42) Basengelaki mpe kosala mosala ya kopesa litatoli oyo elobelami kati na Malako 13:10. Lelo oyo Batatoli ya Yehova bamipesi na molende nyonso kati na mosala yango.
21 Kasi, bososoli oyo ebakisami na ntina na lisese oyo ya bampate mpe bantaba elimboli nini mpo na biso? Bato bazali komitya na ngambo moko to mosusu. Bamoko bazali kati na ‘nzela ya monene oyo ezali komema na libebi,’ wana basusu bazali kosala makasi mpo na kotikala kati na ‘nzela ya moke oyo ezali komema na bomoi.’ (Matai 7:13, 14) Kasi ntango oyo Yesu akosakola ekateli ya nsuka likoló na bampate mpe bantaba, oyo elobelami kati na lisese yango, ezali naino mpo na mikolo mizali koya. Na ntango Mwana na moto akoya, kati na mokumba na ye ya Mosambisi, akokata ete baklisto ya solo—elingi koloba “ebele monene” ya bampate oyo bamipesi—babongi mpo na koleka eteni ya nsuka ya “bolɔ́zi monene” mpo na kokɔta kati na mokili ya sika. Elikya wana esengeli kozala sikawa liziba ya esengo. (Emoniseli 7:9, 14) Epai mosusu, ntalo monene ya bato bauti na “mabota nyonso” bakomimonisa ete bakokani na bantaba ya motó makasi. “Bakokenda na [libebi, NW] ya seko.” Oyo nde kobɔndisama mpo na mabelé!
22, 23. Atako kokokisama ya lisese yango ekosalema na mikolo mizali koya, mpo na nini mosala na biso ya kosakola ezali na ntina mingi lelo?
22 Atako kosambisama oyo elobelami kati na lisese wana ekokokisama na mikolo mizali koya, nzokande sikawa likambo moko ya ntina mingi ezali kokokisama. Biso baklisto tomipesi kati na mosala ya lobiko ya kosakola nsango oyo ezali kokɔtisa bokabwani kati na bato. (Matai 10:32-39) Paulo akomaki ete: “Moto na moto akobelela nkombo na [Yehova] akobika. Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soki bazangi mosakoli?” (Baloma 10:13, 14) Mosala na biso ya kosakola polele nkombo ya Nzambe mpe nsango na ye ya lobiko mozali kosalema na mikili koleka 230. Bandeko bapakolami ya Yesu bazali naino kokamba mosala yango. Bampate mosusu soko milió mitano basili sikawa kolanda bango. Mpe na mokili mobimba ezali na bato oyo bazali koyanola na nsango oyo bandeko ya Yesu bazali kosakola.
23 Bato mingi bazali koyoka nsango na biso wana tozali kosakola ndako na ndako to na libaku malamu. Basusu bakoki koyeba makambo matali Batatoli ya Yehova mpe mosala oyo tosalaka kozanga ete biso moko tósosola soki lolenge nini bazali koyeba makambo na biso. Na ntango kosambisama ekoya, na meko nini Yesu akosambisa makambo matali etuluku mobimba ya bato mpe na meko nini akosambisa bana mike? Tokoki koyanola na motuna oyo te, mpe ezali na ntina te ete tópesa makanisi na biso moko. (Kokanisá na 1 Bakolinti 7:14.) Mingi bazali sikawa kokanga matoi na bango, kotyola, to kobimisa botɛmɛli makasi epai na basaleli ya Nzambe. Na yango, oyo ezali ntango ya ntina mingi; bato motindo yango bakoki komikómisa bato oyo Yesu akotalela bango lokola bantaba.—Matai 10:22; Yoane 15:20; 16:2, 3; Baloma 2:5, 6.
24. (a) Mpo na nini ezali na ntina mingi ete bato báyamba malamu mosala na biso ya kosakola? (b) Lolenge nini boyekoli oyo esalisi yo mpenza na kotalela mosala ya kosakola
24 Kasi, na esengo nyonso, bato mingi bazali koyamba yango malamu, bazali koyekola Liloba ya Nzambe, mpe bazali kokóma Batatoli ya Yehova. Baoyo bazali sikawa komonana lokola bantaba bakoki kobongwana mpe kokóma lokola bampate. Likambo monene ezali oyo ete baoyo bazali koyamba mpe bazali kosunga bandeko batikali ya Yesu na molende nyonso bazali sikawa komonisa elembeteli oyo ekozala moboko mpo ete bátyama na lobɔ́kɔ ya mobali ya Yesu na ntango, mosika te, akofanda na kiti na ye ya bokonzi mpo na kokata makambo. Bango bazali kopambolama mpe bakokóba kopambolama. Na yango, lisese yango esengeli kopusa biso na kozala na molende mingi lisusu na mosala ya boklisto. Lokola ntango ezali naino, tosengeli kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kopesa basusu likoki ya koyamba nsango yango. Na bongo, ekozala mokumba ya Yesu ya kokata makambo, ya kokweisa to ya kolóngisa.—Matai 25:46.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1994, lokasa 16 kino lokasa 21.
b Búku El Evangelio de Mateo elobi ete: “Bomoi ya seko ezali bomoi ya seko; oyo ekeseni na yango ezali bongo etumbu ya seko. Libakema ya Greke aionios ezali komonisa liboso mpenza boumeli te, kasi ezali nde komonisa ezalela. Etumbu ya libela ezali bongo kufa ya seko.”—Molakisi oyo asilá kozwa epasó, Juan Mateos (Eteyelo ya Biblia ya pápa, Rome), mpe molakisi Fernando Camacho (Eteyelo monene ya Teoloji, Ceville), Madrid, Espagne, 1981.
Ozali komikundola?
◻ Bokokani nini ezali kati na makambo mazali na Matai 24:29-31 mpe Matai 25:31-33 emonisi ete lisese ya bampate mpe bantaba ekokokana na mikolo mizali koya, mpe ekosalema ntango nini?
◻ Bandeko ya Yesu “baoyo baleki moke” ezali bongo banani?
◻ Lolenge oyo Yesu asaleli liloba “bayengebene” ezali kosunga biso na koyeba soki yango ezali komonisa banani mpe yango ezali komonisa banani te?
◻ Atako lisese yango ekokokana na mikolo mizali koya, mpo na nini mosala na biso ya kosakola ezali na ntina mingi mpe mpo na nini esengeli kosalema nokinoki?
[Etanda/Elilingi na lokasa 24]
TALÁ MAKAMBO MAKOKANI KATI NA
Nsima wana bolɔ́zi monene ekobanda, Mwana na moto akokóma
Akokóma na nkembo monene
Baanzelu bakozala elongo na ye
Mabota nyonso ya mokili bakomona ye
Mwana na moto akoya
Akoya na nkembo monene mpe akofanda na kiti na bokonzi na nkembo
Baanzelu bakokóma na ye elongo
Mabota nyonso bakoyanganisama; na nsuka bakosambisama (bolɔ́zi monene esuki)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Garo Nalbandian