Yehova—Tata na biso oyo atondi na motema mawa
“Yehova atondi na boboto mpe na motema mawa.”—YAKOBO 5:11, NW, maloba na nsé ya lokasa.
1. Mpo na nini babólá babɛlɛmaka epai na Yehova Nzambe?
MƆLƆ́NGƆ́ mozali mpenza monene na boye ete bayekoli ya bitando bazali ata na makoki te ya koyeba motángo ya ba galaxies na yango nyonso. Galaxie na biso, la Voie Lactée, ezali mpenza monene na boye ete moto azali na makoki te ya kotánga minzoto na yango nyonso. Minzoto misusu, lokola Antares, mileki moi na biso na monene mpe na kongɛnga mbala nkóto mingi koleka. Oyo nde nguya Mozalisi Monene ya minzoto nyonso ya mɔlɔ́ngɔ́ azali solo mpenza na yango! Ya solo, azali “ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobianga bango yɔnsɔ na nkombo.” (Yisaya 40:26) Nzokande, bobele Nzambe wana ya kobangisa “atondi na boboto mpe na motema mawa.” Oyo nde kobɔndisama boyebi ya likambo yango ezali kopesa epai na basaleli ya Yehova, oyo bazali na komikitisa, mingi mpenza epai na baoyo bazali kotungisama na minyoko, na bokɔnɔ, na mpasi ya makanisi, to na mikakatano misusu!
2. Mbala mingi lolenge nini bato ya mokili oyo batalelaka mayoki ya makambo makasimakasi te?
2 Bato mingi batalelaka mayoki ya makambo makasimakasi te, lokola “boboto mpe motema mawa” ya Klisto, ete ezali bolɛmbu. (Bafilipi 2:1) Lokola bapusami na mateya ya évolution, bazali kolendisa bato ete bamitya na esika ya liboso ata soki yango ekoki kozokisa mayoki ya basusu. Bavɛdɛtɛ mingi ya miziki, ya bafilime mpe ya masano bazali banyokoli oyo bazalaka na mawa te to baoyo bamonisaka mayoki ya boboto soko moke te. Bakonzi mosusu ya politiki mpe bazalaka na mayoki wana. Sénèque, ye filozofe stoïcien oyo ateyaki mokonzi mabe Néron, alobaki na nguya nyonso ete “ezaleli ya koyokela bato mawa ezali bolɛmbu.” Búku monene Cyclopædia ya M’Clintock mpe Strong eyebisi ete: “Bopusi ya mateya ya ba stoïciens . . . ezali naino kosala mosala likoló na makanisi ya bato ata na ntango na biso.”
3. Lolenge nini Yehova amimonisaki ye moko epai na Mose?
3 Na kokesena, Mozalisi ya moto azali na bizaleli ya kobɔndisa. Amimonisaki ye moko epai na Mose na maloba oyo: “[Yehova, Yehova], ajali Njambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda nɔki tɛ mpe aleki na boboto mpe na sɔlɔ, . . . akolimbisa mabe mpe nkanja mpe lisumu, kasi akolongisa mokiti sɔkɔ mokɛ tɛ.” (Esode 34:6, 7) Ya solo, Yehova asukisaki maloba oyo mamonisi ye na kolobeláká polele boyengebene na ye. Akozanga te kopesa etumbu epai na basumuki oyo basali lisumu na nkó. Atako bongo, amimonisaki libosoliboso lokola Nzambe na motema mawa, na sikisiki “oyo atondi na ezaleli ya koyokela mawa.”
4. Wapi ndimbola ya kobɔndisa motema ya liloba ya Liebele oyo mbala mingi ebongolamaka ete “mawa”?
4 Mbala mosusu, bato mingi bakanisaka ete liloba “mawa” lisalelamaka bobele na ndimbola na yango ya mpiɔ, oyo ya kozanga kopesa etumbu. Nzokande, botaleli ya mabongoli makeseni ya Biblia ezali komonisa ndimbola mozindo ya libakema ya Liebele oyo liuti na likelelo ra·chamʹ. Engebene bato mosusu ya mayele, ndimbola na yango ya moboko ezali “kozala pɛtɛpɛtɛ.” Búku Synonyms of the Old Testament elimboli ete, “Racham,” “emonisaka mayoki mozindo mpe matondi na mawa, lokola oyo elamukaka wana tomoni botau to mpasi ya balingami na biso to ya baoyo bazali na mposa ya lisalisi na biso.” Bandimbola mosusu ya kobɔndisa motema mpo na komonisa ezaleli wana kitoko ezwami kati na búku Insight on the Scriptures, Volimi 2, nkasa 375-379.
5. Lolenge nini motema mawa emonanaki polele kati na Mibeko ya Mose?
5 Motema mawa ya Nzambe ezali komonana polele kati na Mibeko oyo apesaki epai na libota ya Yisraele. Bato oyo bazalaki kati na mpasi, lokola basi bakufeli mibali, bitike, mpe babólá, basengelaki kosalela bango na motema mawa nyonso. (Exode 22:22-27; Levitike 19:9, 10; Deteronome 15:7-11) Banso, ezala baombo mpe banyama, basengelaki kozwa litomba ya kopema na Sabata ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. (Exode 20:10) Lisusu, Nzambe azalaki kotya likebi na ye likoló na bato oyo bazalaki komonisa boboto epai na babólá. Masese 19:17 elobi ete: “Ye oyo akoyokela babola mawa ajali kodefisela [Yehova]; akojongisela ye lisungi malamu na ye lisusu.”
Ndelo ya motema mawa ya Nzambe
6. Mpo na nini Yehova atindaki basakoli mpe bamemi nsango epai na libota na ye?
6 Bayisraele bazalaki komema nkombo ya Nzambe mpe bazalaki kosambela kati na tempelo na Yelusaleme, oyo ezalaki “ndako mpo na nkombo ya Yehova.” (2 Ntango 2:4; 6:33, NW) Nzokande, na nsima, bakómaki kokanga miso liboso na pite, na losambo ya bikeko, mpe na koboma bato, koyeisáká bongo nsɔni monene likoló na nkombo ya Yehova. Na boyokani na ezaleli na ye ya motema mawa, Nzambe amekaki na motema pɛtɛɛ nyonso kobongisa ezalela wana mabe kozanga komema libebi likoló na libota mobimba. Ye “atindaki lisusu mpe lisusu na njela na bantoma na ye, jambi ayokelaki bato na ye mpe efandelo na ye mawa. Kasi bajalaki kosɛka bantoma na Njambe mpe kotiola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda na [Yehova] epelisami liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu tɛ.”—2 Ntango 36:15, 16.
7. Ntango motema mawa ya Yehova ekómaki na ndelo na yango, likambo nini likómelaki bokonzi ya Yuda?
7 Atako Yehova azalaka na motema mawa mpe asilikaka noki te, soki yango esengeli, amonisaka nkanda na bosembo nyonso. Bongo na ntango wana, motema mawa ya Nzambe esilaki kokóma na nsuka na yango. Tozali kotánga na ntina na mbuma mabe na yango ete: “[Yehova] abutiselaki bango mokonji na Bakaladi oyo abomaki bilɛngɛ na bango na mopanga kati na ndako na bulɛɛ na bango; ayokelaki bilɛngɛ babali mpe bilɛngɛ basi mawa tɛ to mibange to bampaka tɛ. Apɛsaki bango yɔnsɔ na mabɔkɔ na ye.” (2 Ntango 36:17) Na yango, Yelusaleme mpe tempelo na yango ebomamaki, mpe libota limemamaki na boombo na Babilone.
Motema mawa mpo na nkombo na ye
8, 9. (a) Mpo na nini Yehova alobaki ete akoyokela nkombo na ye mawa? (b) Lolenge nini banguna na Yehova bakangisamaki monɔkɔ?
8 Mabota ya zingazinga masepelaki na ntina na mpasi yango. Na motindo ya kotyola, bazalaki koloba ete: “Baoyo bajali bato na [Yehova], mpe ejali na mokili na ye basili kobima.” Koyebáká bonene ya nsɔni yango, Yehova alobaki ete: “Nakoyokela nkombo na ngai mosantu mawa . . . Mpe nakobulisa mpenza nkombo na ngai monene, . . . mpe mabota makoyeba ete ngai nazali Yehova.”—Ezekiele 36:20-23, NW.
9 Nsima wana libota na ye lizalaki na boombo na boumeli ya mibu 70, Yehova, Nzambe ya motema mawa, asikolaki bango mpe apesaki bango nzela ya kozonga mpe kotonga lisusu tempelo na Yelusaleme. Likambo yango ekangisaki monɔkɔ na mabota ya zingazinga, baoyo bakamwaki na komona yango. (Ezekiele 36:35, 36) Nzokande, na mawa nyonso, libota ya Yisraele ekweaki lisusu kati na misala ya mbindo. Nehemia, Moyuda moko ya sembo, asungaki na kosembola ezalela yango. Kati na libondeli moko liboso na bato banso, alobelaki lisusu motema mawa ya Nzambe epai na libota yango, wana alobaki ete:
10. Lolenge nini Nehemia amonisaki polele motema mawa ya Yehova?
10 “Na ntango na mpasi na bango, wana elelaki bango epai na yɔ, oyokaki bango longwa na lola mpe lokola ejali mawa na yɔ mingi mpenja, opɛsaki bango babikisi mpe babikisaki bango longwa na mabɔkɔ na batɛmɛli na bango. Kasi wana esili bango koumela, basalaki mabe liboso na yɔ lisusu; bongo otikaki bango na lobɔkɔ na bayini na bango ete bajala bankolo likolo na bango. Kasi ebutwaki bango mpe elelaki bango epai na yɔ, oyokaki longwa na lola; mbala mingi obikisaki bango lokola ejali mawa na yɔ. . . . Oyikelaki bango mpiko bilanga mingi.”—Nɛhɛmia 9:26-30; talá lisusu Yisaya 63:9, 10.
11. Bokeseni nini ezali kati na Yehova mpe banzambe oyo bato bamisaleli?
11 Na nsuka, nsima ya kobwaka Mwana ya Nzambe na motema mabe mpenza, libota ya Bayuda ebungisaki mpo na libela etɛlɛmɛlo kitoko oyo bazalaki na yango. Bokangami ya sembo ya Nzambe epai na bango eumelaki mibu 1 500. Yango ezali elembeteli ya seko oyo ezali komonisa ete Yehova azali solo Nzambe ya motema mawa. Oyo nde bokeseni monene na banzambe mabe mpe banzambe ezangi mayoki oyo bato na masumu basalaki!—Talá etánda lokasa 8.
Elembeteli eleki monene ya motema mawa
12. Nini ezalaki elembeteli eleki monene ya motema mawa ya Nzambe?
12 Elembeteli eleki monene ya motema mawa ya Nzambe emonani na lolenge atindaki Mwana molingami na ye awa na mabelé. Ya solo, bomoi ya bosembo ya Yesu epesaki esengo monene epai na Yehova, kopesáká ye makoki ya kozongisa eyano ya kokoka epai na Zábolo na bifundeli ya lokuta oyo afundaki ye na yango. (Masese 27:11) Nzokande, bobele na ntango yango, komona Mwana na ye molingami kokufa liwa ya mpasi mpe ya nsɔni epesaki Yehova mpasi mingi koleka oyo naino ata moboti moko te asilá koyoka yango. Mbeka yango ezalaki elembo ya bolingo mingi, oyo efungolaki nzela na lobiko ya bato. (Yoane 3:16) Lokola Zakalia, tata ya Yoane Mobatisi asakolaki, yango ekumisaki “motema na mawa na Njambe na biso.”—Luka 1:77, 78.
13. Na likambo nini ya ntina Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye?
13 Kotindama ya Mwana ya Nzambe awa na mabelé epesaki mpe bato bososoli ya polele na ntina na bizaleli ya Nzambe. Lolenge nini? Na boye ete Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye na motindo ya kokoka, mingimingi na lolenge oyo asalelaki babólá na motema mawa nyonso! (Yoane 1:14; 14:9) Na ntina na yango, bakomi misato ya Baevanzile Matai, Malako, mpe Luka basaleli likelelo ya Greke, splag·khniʹzo·mai, oyo euti na liloba ya Greke oyo elimboli “nsɔpɔ́.” William Barclay, moto na mayele na boyekoli ya Biblia, alimboli ete: “Longwa na eutelo na yango mpenza, ekoki komonana ete ezali komonisa te mawa to motema mawa lokola oyo eyebani, kasi mayoki oyo ezali kopusa moto kino na bomoto na ye ya kati mpenza. Yango ezali liloba oyo eleki maloba nyonso na nguya na lokótá Greke mpo na oyo etali mayoki ya motema mawa.” Na mitindo mikeseni ebongolamaka ete “koyokela mawa” to “kopusama na motema mawa.”—Malako 6:34; 8:2.
Mabaku oyo Yesu amonisaki motema mawa
14, 15. Kati na engumba moko ya Galilai, lolenge nini Yesu apusamaki na mawa, mpe yango ezali komonisa nini?
14 Ezalaki na engumba moko ya Galilai. Mobali moko oyo “atondaki na mbala” abɛlɛmaki na Yesu kozanga ete apesa likebisi lokola ekosalemaka na momeseno. (Luka 5:12) Yesu apamelaki nde ye makasi mpo ete angangaki te, “Mbindo, mbindo,” lokola Mibeko ya Nzambe mizalaki kosɛnga yango? (Levitike 13:45) Te. Na esika ete asala bongo, Yesu ayokaki lisɛngi ya kozanga elikya ya mobali wana: “Sɔkɔ olingi okoki kopɛtɔla ngai.” Wana “apusamaki na motema mawa,” Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye mpe asimbaki moto na mbala, mpe alobaki ete: “Nalingi. Ojala mpɛtɔ.” Nokinoki kolɔngɔ́nɔ́ ya mobali yango ezongaki. Bongo, Yesu amonisaki te bobele nguya ya kosala bikamwiseli oyo Nzambe apesaki ye, kasi lisusu mayoki ya boboto oyo epusaki ye na kosalela nguya motindo yango.—Malako 1:40-42.
15 Esengelaki ete básɛnga ye liboso mpo ete amonisa mayoki ya mawa? Te. Mwa ntango moke na nsima, akutanaki na molɔngɔ́ ya bato oyo bazalaki komema ebembe, baoyo bautaki na engumba ya Naina. Na ntembe te, Yesu asilaki komona bokundi bibembe mbala mingi, kasi oyo ezali kopesa mawa mingi koleka. Mowei azali mwana sé moko ya mwasi moko mokufeli-mobali. Wana Yesu abɛlɛmaki na ye, “ayokelaki ye mawa” mpe alobaki ete: “Lela tɛ.” Na nsima asalaki likamwisi monene na kozongisáká mwana na ye ya mobali na bomoi.—Luka 7:11-15.
16. Mpo na nini Yesu ayokaki mawa mpo na ebele na bato oyo bazalaki kolanda ye?
16 Liteya monene oyo toyekoli na masoló oyo touti kotalela lizali ete ntango Yesu azalaki ‘kopusama na motema mawa,’ azalaki kosala eloko moko ya malamu mpo na kopesa lisalisi. Na nsima, na libaku mosusu, Yesu atalaki bibele oyo bazalaki ntango nyonso kolanda ye. Matai ayebisi ete “ayoki mawa mpɔ na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bajali na mobateli tɛ.” (Matai 9:36) Bafalisai bazalaki mpenza kosala eloko te mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bato wana. Na esika ya kosala bongo, bazalaki nde kobakisela bango malako mazangi ntina. (Matai 12:1, 2; 15:1-9; 23:4, 23) Lolenge na bango ya kotalela bato wana emonisami na maloba balobaki na ntina na baoyo bayokaki Yesu, ete: “Ebele oyo na bato bayebi Mibeko tɛ basili kolakelama mabe!”—Yoane 7:49.
17. Lolenge nini mawa oyo Yesu azalaki koyokela bibele epusaki ye, mpe litambwisi nini ya koumela apesi na likambo yango?
17 Na kokesena, Yesu azalaki koyoka mpenza mawa na ntina na ezalela ya mpasi ya elimo oyo ebele na bato bazalaki kati na yango. Kasi bato oyo bamonisaki bosepeli na nsango ya Bokonzi balekaki mingi mpo ete akoka kokokisa mposa ya moko na moko kati na bango. Yango wana ayebisaki bayekoli na ye ete bábondela mpo na kozwa basáli mingi. (Matai 9:35-38) Na boyokani na mabondeli motindo yango, Yesu atindaki bantoma na ye ete bákende koyebisa nsango oyo: “Bokonji na Likolo ejali kobɛlɛma.” Malako oyo apesaki na libaku wana mazali litambwisi ya motuya mingi mpo na baklisto kino na mikolo na biso. Na ntembe te, mayoki ya motema mawa oyo Yesu azalaki na yango mapusaki ye na kokokisa bamposa ya elimo ya bato.—Matai 10:5-7.
18. Yesu asalaki nini ntango bibele bakendeki epai asengelaki kozala bobele ye na bantoma, mpe liteya nini tozwi na likambo yango?
18 Na libaku mosusu, Yesu amonisaki mpe komibanzabanza mpo na bamposa ya elimo ya bibele. Na ntango yango Yesu mpe bantoma na ye balɛmbaki mingi na mosala ya kosakola oyo bautaki kosala, mpe balukaki esika moko mpo na kopema. Kasi, nokinoki bato bamonaki bango. Na esika ete Yesu asilika mpo ete bayaki kino epai asengelaki kozala bobele ye na bantoma, Malako alobi ete “ayoki mawa.” Bongo, nini ezalaki ntina ya mawa mozindo oyo Yesu azalaki na yango? “Bajalaki pɛlamɔkɔ bampate bajangaki mobateli.” Yesu amonisaki lisusu mayoki na ye na misala mpe abandaki koteya bibele “likambo na Bokonji na Njambe.” Ee, ayokaki mpenza mawa na ntina na nzala na bango ya elimo na boye ete azangaki ntango ya kopema mpo ete akoka koteya bango.—Malako 6:34; Luka 9:11.
19. Lolenge nini komibanzabanza na Yesu mpo na bibele esukaki te bobele na kokokisa bamposa na bango ya elimo?
19 Atako azalaki libosoliboso komibanzabanza mpo na bamposa ya elimo ya bato, Yesu abosanaki bamposa na bango ya mosuni te. Bobele na libaku wana, lisusu “abikisaki bango bajalaki na bosenga ya kobika.” (Luka 9:11) Na nsima, na libaku mosusu, bibele bazalaki elongo na ye na boumeli ya ntango molai, mpe bazalaki mosika na mboka na bango. Kososoláká bamposa na bango ya mosuni, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nayokeli ebele mawa, mpɔ ete longwa na mikɔlɔ misato bajali esika mɔkɔ na ngai mpe bajali na bilɔkɔ na kolia tɛ. Nalingi kopalanganisa bango na njala tɛ ete balɛmba na njela tɛ.” (Matai 15:32) Sikawa Yesu asali likambo moko mpo na kopɛngola mpasi motindo yango. Na likamwisi, apesi na ebele ya bankóto ya mibali, ya basi mpe ya bana bilei oyo biutaki na mampa nsambo mpe na mwa mbisi mike.
20. Liteya nini tozwi kati na lisoló ya nsuka oyo emonisaki ete Yesu azalaki koyokela bato mawa?
20 Lisoló ya nsuka oyo elobeli Yesu ete ayokaki mawa etali likambo oyo lisalemaki na boumeli ya mobembo ya nsuka oyo asalaki na Yelusaleme. Ebele ya bato bazali kosala mobembo elongo na ye mpo na kosangana na elambo ya Elekeli. Na nzela, penepene na Yeliko, basɛ́ngi mibale bakufi-miso bakóbaki na konganga ete: “Nkolo, yokela biso mawa.” Ebele bamekaki kopamela bango ete bátika makɛlɛlɛ, kasi Yesu abéngi bango mpe atuni bango nini balingaki ete ye asala mpo na bango. Balɔmbi ete: “Nkolo, miso na biso mafungwana!” “Ayoki mawa,” mpe amami miso na bango mpe nɔkinɔki bamɔni lisusu. (Matai 20:29-34) Oyo nde liteya monene toyekoli na likambo oyo! Etikalaki moke ete Yesu abanda pɔ́sɔ ya nsuka ya mosala na ye awa na mabelé. Azalaki na mosala mingi ya kosala liboso ya kokufa liwa ya nsɔ́mɔ na mabɔkɔ na basaleli ya Satana. Atako bongo, apesi nzela te na mitungisi na ntina na eleko wana ya mpasi ete epekisa ye na komonisa mayoki ya motema mawa mpo na bamposa ya bato oyo ezalaki na ntina moke.
Masese oyo mazali komonisa motema mawa
21. Nini emonisami na bolimbisi ya nyongo monene oyo nkolo moko alimbisaki moombo na ye?
21 Likelelo ya Greke splag·khniʹzo·mai, oyo esalelami kati na masoló wana ya bomoi ya Yesu, esalelamaki lisusu kati na masese misato ya Yesu. Kati na moko na masese yango, moombo moko abondelaki ete bátikela ye ntango mpo na kofuta nyongo monene oyo azalaki na yango. Nkolo na ye, “ayokelaki ye mawa,” alongoli nyongo yango nyonso. Lisese wana emonisi ete Yehova Nzambe amonisaki motema mawa monene na kolimbisa ebele ya nyongo ya masumu ya moklisto moko na moko oyo azali kondimela mbeka ya Yesu.—Matai 18:27; 20:28.
22. Lisese ya mwana na kilikili lizali komonisa nini?
22 Na nsima tozali na lisese ya mwana na kilikili. Kanisá likambo lisalemaki ntango mwana oyo atombokaki azongaki na ndako. “Nde naino ejalaki ye mosika, tata na ye amɔnaki ye mpe ayokeli ye mawa; atamboli mbango mpe abumeli ye mpe apwɛpwi ye.” (Luka 15:20) Yango ezali komonisa ete wana moklisto moko oyo akómaki motomboki amonisi kobongola motema ya solosolo, Yehova akoyokela ye mawa mpe akondima ye lisusu. Na bongo, na nzela ya masese wana mibale, Yesu amonisi ete Tata na biso, Yehova, “azali na boboto mpe na motema mawa mingi.”—Yakobo 5:11, NW, maloba na nsé ya lokasa.
23. Liteya nini tozwi na lisese ya Yesu na ntina na Mosamalia malamu?
23 Mbala ya misato oyo liloba splag·khniʹzo·mai esalelami kati na masese etali Mosamalia oyo ‘ayokaki mawa’ na mpasi ya Moyuda oyo babotolaki ye biloko na ye mpe batikaki ye pene na kokufa. (Luka 10:33) Kopusamáká na mayoki ya mawa, Mosamalia asalaki nyonso oyo ekoki na ye mpo na kosunga moto oyo azalaki mopaya mpo na ye. Yango emonisi ete Yehova mpe Yesu bazali kosɛnga ete baklisto ya solo bálanda ndakisa na bango mpe bámonisa boboto mpe motema mawa mingi. Lolenge oyo tokoki kosala yango ekomonisama na lisoló oyo lilandi.
Mituna ya bozongeli
◻ Koyokela mawa elimboli nini?
◻ Lolenge nini Yehova amonisaki motema mawa mpo na nkombo na ye?
◻ Wapi elembeteli eleki monene ya motema mawa?
◻ Na motindo nini ya kokamwa Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye?
◻ Liteya nini tokoki kozwa na lolenge oyo Yesu amonisaki motema mawa na misala mpe na masese na ye?
[Etanda na lokasa 12, 13]
MALOBA MABONGI MPO NA “LIBATELI YA BOLINGO”
MOSAKOLI Yilimia angangaki ete: “Ɛ nsɔpɔ́ na ngai, nsɔpɔ́ na ngai!” Azalaki nde komilela mpo na mpasi ya libumu na ntina na eloko mabe oyo alyaki? Te. Yilimia asalelaki maloba ya elilingi ya Liebele mpo na kolobela komibanzabanza na ye na ntina na mpasi oyo elingaki kokwela bokonzi ya Yuda.—Yilimia 4:19, NW.
Mpo ete Yehova Nzambe azali na mayoki mozindo, liloba ya Liebele mpo na “nsɔpɔ́,” to “mabumu” (me·ʽimʹ), esalelami lisusu mpo na komonisa mayoki na ye ya boboto. Na ndakisa, mibu mingi liboso na mikolo ya Yilimia, bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele ekendeki na boombo na mabɔkɔ ya mokonzi ya Asulia. Yehova atikaki nzela na likambo yango lokola etumbu mpo na kozanga bosembo na bango. Kasi Nzambe abosanaki bango na boombo? Te. Azalaki naino na bokangami makasi epai na bango mpo ete bazalaki eteni ya libota ya kondimana na ye. Kolobeláká bango na nkombo ya Efelaima, libota ya lokumu mingi Yehova atunaki ete: “Ɛfɛlaima ajali nde mwana mobali na ngai molingami? Ajali nde mwana na bolingo na ngai? Jambi ekolobaka ngai mpɔ na kotɛmɛla ye, nakokanisa ye sɔlɔ naino. Bongo, [nsɔpɔ́ na ngai ezali kotɔka, NW] mpɔ na ye, nakoyokela ye mawa sɔlɔ.”—Yilimia 31:20.
Na kolobáká ete “nsɔpɔ́ na ngai ezali kotɔka,” Yehova asalelaki elobeli ya elilingi mpo na komonisa mayoki ya bolingo ya motema oyo azalaki koyoka mpo na libota na ye na boombo. Kati na ndimbola na ye likoló na mokapo yango, E. Henderson, moto ya ekeke ya 19, moto na mayele na boyekoli ya Biblia akomaki ete: “Eloko moko te ekoki koleka komonisama ya bolingo ya baboti epai na mwana ya kilikili oyo azongi, baboti oyo bamonisami awa na Yehova. . . . Atako alobaki mpo na kotɛmɛla [basambeli ya bikeko oyo bazalaki na Efelaima] mpe apesaki bango etumbu . . . , abosanaki bango soko moke te, nzokande, asepelaki mingi na likanisi oyo ete na nsima bakozongisama.”
Liloba ya Greke “mabumu,” to “nsɔpɔ́,” esalelami na lolenge bobele moko kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Wana esalelami na ndimbola ya elilingi, lokola na Misala 1:18, ezali kolobela mayoki ya bolingo ya motema to ya motema mawa. (Filemona 12) Mbala mosusu liloba yango likangisamaka elongo na liloba ya Greke oyo elimboli ete “malamu” to “ya malamu.” Ntoma Paulo mpe ntoma Petelo basaleli maloba wana masangani ntango bazali kolendisa baklisto na kozala “na motema mawa,” na sikisiki, “kobongisama malamu mpo na koyokela mawa.” (Baɛfɛsɛ 4:32; 1 Petelo 3:8, NW) Liloba ya Greke oyo elimboli ete “mabumu” ekoki lisusu kokangisama elongo na liloba ya Greke pol·yʹ. Bosangani yango elimboli na sikisiki “kozala na mabumu mingi.” Liloba wana ya Greke oyo emonanaka mingi te esalelami bobele mbala moko kati na Biblia, mpe ezali kolobela Yehova Nzambe. New World Translation (Libongoli ya Mokili ya Sika, na Lingelesi) elobi ete: “Yehova azali na boboto mingi.”—Yakobo 5:11.
Tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi ete ye oyo aleki na nguya kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova Nzambe, akeseni mpenza na banzambe mabe oyo basalemi na bato! Na ndakisa ya Nzambe na bango oyo “azali na motema mawa,” baklisto ya solo bapusami na komonisa ezaleli yango kati na boyokani na bango elongo na basusu.—Baefese 5:1.
[Elilingi na lokasa 10]
Ntango motema mawa ya Nzambe ekómaki na nsuka na yango, Yehova apesaki nzela na bato ya Babilone ete balónga libota na ye oyo lizalaki ya batomboki
[Elilingi na lokasa 10]
Komona lolenge Mwana na ye molingami akufaki epesaki Yehova Nzambe mpasi monene koleka mpasi oyo moto ata moko ayoká naino te
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu amonisaki na motindo ya kokoka bizaleli ya Tata na ye oyo etondi na motema mawa