Bomoi na yo ezali na valɛrɛ nini?
NTANGO ebele ya bato bazalaki kobomama na Mpoto na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na mokili ya Antarctique moto moko azalaki koboma nzoto mpo na kobikisa bomoi ya etuluku moko ya bato. Ernest Shackleton, moto moko ya Irlande oyo azalaki kosala mibembo mpo na koyeba mokili ná baninga na ye bazwaki likama moko monene ntango masuwa na bango, Endurance, etutanaki na libanga monene ya ngalasi mpe ezindaki. Shackleton asalaki makasi mpe amemaki baninga na ye na Esanga Éléphant, moko ya bisanga Shetland ya Sudi, esika oyo bakokaki kobika ata mwa moke. Kasi, bazalaki kaka na likama monene.
Shackleton amonaki ete mpo bábika, bato mosusu kati na bango basengeli kokende koluka lisalisi na esanga ya Georgie du Sud. Esanga yango ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 1 100, mpe bazalaki kaka na mwa kano, oyo ezalaki na molai ya mɛtrɛ pene na 7, oyo ebebaki te ntango Endurance ezindaki. Elikya ezalaki moke mpenza mpo na bango.
Kasi, mokolo ya 10 Mai 1916, nsima ya mikolo 17 ya mobembo ya mpasi, Shackleton ná bato mitano kati na baninga na ye bakómaki na Georgie du Sud, kasi lokola mbonge ezalaki makasi, basɛ́maki na ngámbo mosusu ya esanga yango. Na nsima, batambolaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 30 na makolo na kati ya bangomba etondi na mabanga ya ngalasi, epai ata moto moko te alekaki liboso, mpo na kokóma na libongo ya Georgie du Sud. Atako malili ezalaki makasi mpenza mpe bazalaki na biloko ya malamu mpo na komata bangomba te, Shackleton ná bato oyo azalaki na bango bakómaki na libongo ya Georgie mpe bazongaki kozwa baninga na bango oyo batikalaki na Esanga Éléphant. Mpo na nini Shackleton asalaki milende nyonso wana? Roland Huntford, oyo akomaki lisolo ya bomoi ya Shackleton, alobaki boye: “Mposa na ye ezalaki ete abikisa bomoi ya bato na ye nyonso.”
“Moko te azali kozanga”
Nini esalisaki baninga ya Shackleton oyo bamikangaki esika moko bábungisa elikya te mpe bázela “na mwa esanga ya kilomɛtrɛ oyo ezalaka kaka mabangamabanga mpe ngalasingalasi”? Bazalaki na elikya mpenza ete mokambi na bango akozonga kozwa bango ndenge alakaki bango.
Biso bato oyo tozali na mokili lelo oyo mpe tozali lokola bato wana oyo batikalaki kaka bango moko na Esanga Éléphant. Bato mingi bazali na bomoi ya mpasi mpenza mpe; mpo na kozwa ata mwa eloko ya kobikela, basengeli kobimisa mitoki. Kasi, bakoki kozala na elikya mpenza ete Nzambe “akobikisa banyokolami” na minyoko mpe na mpasi. (Yobo 36:15) Tóyeba ete, na miso ya Nzambe, bomoi ya mokomoko na biso ezali na valɛrɛ mingi. Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, alobi boye: “Bengá ngai na mokolo ya mpasi mpe ngai nakobikisa yo.”—Nzembo 50:15.
Ozali na mokakatano mpo na kondima ete, atako tozali bamiliare ya bato awa na mabelé, Mozalisi amonaka ete ozali na motuya? Yoká oyo mosakoli Yisaya akomaki na ntina na bamiliare na bamiliare ya minzoto oyo ezali na molɔ́ngɔ́. Totángi boye: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobenga bango nyonso na nkombo; mpo na monene ya nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”—Yisaya 40:26.
Okangi ntina ya maloba wana? Moi ná baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango ezali na kati ya liboke monene ya minzoto soki bamiliare 100. Maboke motindo wana ya minzoto ezali boni? Moto moko te ayebi, kasi bato ya siansi balobaka ete ekoki kozala bamiliare 125. Kanisá naino ebele ya minzoto ndenge wana! Nzokande, Biblia eyebisi biso ete Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ ayebi monzoto mokomoko na nkombo na yango.
“Nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso”
Moto mosusu akoki koloba ete ‘koyeba nkombo ya bamilio ya minzoto to ya bato elimboli te ete atyelaka mokomoko na bango likebi.’ Toyebi ete ordinatɛrɛ ya makasi ekoki kokɔtisa bamiliare ya bankombo ya bato. Kasi, moto moko te akoki koloba ete ordinatɛrɛ yango etyelaka ata moko na bango likebi. Nzokande, Biblia ezali komonisa ete Yehova Nzambe ayebi nkombo ya bamiliare ya bato mpe atyelaka mokomoko na bango likebi. Ntoma Petelo akomaki boye: “Bóbwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.”—1 Petelo 5:7.
Yesu Klisto alobaki boye: “Batɛkaka te bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke? Nzokande moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba. Kasi nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” (Matai 10:29-31) Simbá ete Yesu alobaki te ete Nzambe asukaka kaka na koyeba makambo oyo ekómelaka bakɛngɛli-mboka mpe bato. Alobaki boye: “Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” Mpo na nini yo ozali na motuya koleka? Mpo osalemaki “na elilingi ya Nzambe,” elingi koloba ozali na likoki ya kolona mpe komonisa bizaleli ya Nzambe, ezala na etamboli na yo, na makanisi mpe na elimo na yo.—Genese 1:26, 27.
“Mosala ya mayele”
Komitika te ete bato oyo balobaka ete Mozalisi azali te bákosa yo. Mpo na bato yango, moto moko te akelaki yo, obimaki kaka boye. Balobaka ete osalemá “na elilingi ya Nzambe” te, kasi ozali kaka ndenge moko na banyama nyonso oyo bazali awa na mabelé, ata mpe bakɛngɛli-mboka.
Okoki kondima mpenza ete bomoi ebimá kaka boye, yango moko? Michael Behe, moto moko ya mayele na bioloji, alobi ete soki totali “makambo ndenge na ndenge oyo esalemaka na kati ya nzoto ya bikelamu ya bomoi,” makambo oyo esimbi bomoi, tokoki kondima likanisi wana te. Abakisi ete makambo oyo bato bayekoli na nzoto ya bikelamu ya bomoi emonisi mpenza ete “bomoi nyonso awa na mabelé, ata ya ekelamo ya moke ndenge nini . . . ezali mosala ya mayele.”—Buku Darwin’s Black Box—The Biochemical Challenge to Evolution.
Biblia ezali koyebisa biso ete bomoi nyonso awa na mabelé ezali mosala ya mayele. Ezali mpe koyebisa biso ete Mobandisi ya mosala yango ya mayele ezali Yehova Nzambe, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́.—Nzembo 36:9; Emoniseli 4:11.
Kotika te ete mpasi mpe mpasi nyonso oyo tozali komona na mokili oyo epekisa yo kondima ete ezali na Mozalisi ya mabelé mpe ya bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na yango. Simbá makambo mibale ya ntina oyo. Ya liboso, Nzambe te nde asalaki biso na ezaleli ya kozanga kokoka oyo tozali na yango lelo oyo. Ya mibale, ezali na ntina oyo Mozalisi na biso atiki makambo ezala bongo mpo na mwa ntango. Mbala na mbala, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaka ete Yehova Nzambe atiki mabe mpo na mwa ntango kaka mpo na kosukisa mpo na libela ntembe oyo ebimaki na mbala ya liboso oyo bato baboyaki bokonzi ya Nzambe.a—Genese 3:1-7; Deteronome 32:4, 5; Mosakoli 7:29; 2 Petelo 3:8, 9.
“Akobikisa mobola oyo akoganga”
Atako bato mingi bazali na bomoi ya mpasi lelo oyo, bomoi ezali kaka likabo kitoko mpenza, oyo tolukaka kobatela na ndenge nyonso. Bomoi oyo Nzambe alaki ekeseni mpenza na bomoi ya mpasi oyo ezali lelo, oyo bato basengeli kobunda makasi mpo na kotikala na bomoi, lokola bato ya Shackleton oyo batikalaki na Esanga Éléphant. Mokano ya Nzambe ezali ya kobikisa biso na bomoi ya mpasi mpe ezangá ntina oyo tozali na yango, mpo “tósimba makasi bomoi ya solosolo” oyo Nzambe akanaki na ebandeli mpo na bato.—1 Timote 6:19.
Nzambe akosala makambo nyonso wana mpamba te mokomoko na biso azali na valɛrɛ mingi na miso na ye. Abongisaki ete Mwana na ye Yesu Klisto apesa mbeka oyo ebongi mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu, ya kozanga kokoka mpe ya liwa, oyo baboti na biso ya liboso, Adama na Eva, batikelá biso. (Matai 20:28) Yesu Klisto alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye . . . azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
Nzambe akosala nini mpo na bato oyo bazali komona mpasi mpe kotungisama lelo oyo? Na ntina na Mwana na ye, Liloba ya Nzambe eyebisi biso boye: “Akobikisa mobola oyo akoganga mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola. Akosikola milimo na bango na kati ya konyokola mpe na kongala.” Mpo na nini Nzambe akosala makambo wana? Mpamba te “makila [to bomoi] na bango ekozala na motuya na miso na ye.”—Nzembo 72:12-14.
Na boumeli ya bankóto ya bambula, bato bazali kobunda na lisumu mpe kozanga kokoka; ezali lokola nde bazali “komilelalela” na mpasi mpe na minyoko. Nzambe atikaki yango ezala bongo kaka mpo ayebi ete azali na likoki ya kosilisa mpasi nyonso oyo yango ekoki kobimisa. (Baloma 8:18-22) Mosika te ‘akozongisa makambo nyonso’ na nzela ya Bokonzi na ye oyo Mwana na ye, Yesu Klisto akotambwisa.—Misala 3:21; Matai 6:9, 10.
Akosekwisa mpe bato oyo bamonaki mpasi mpe basilá kokufa. Nzambe abombá bango na makanisi na ye. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Na mikolo ezali koya, bakozwa ‘bomoi mingi,’ elingi koloba bomoi ya seko mpe ya kokoka, oyo ezangi mpasi mpe minyoko, na paladiso awa na mabelé. (Yoane 10:10; Emoniseli 21:3-5) Moto nyonso akosepela mpenza na bomoi mpe akokóma na bizaleli ya malamu mpenza mpe na makoki mingi, oyo ebongi mpenza na bato oyo bakelamá “na elilingi ya Nzambe.”
Okozala wana mpo na kosepela na bomoi oyo Yehova alaki? Yo moko nde osengeli kopona. Tozali kolendisa yo omibongisa mpo na kozwa litomba na bibongiseli oyo Nzambe azwi mpo na komema mapamboli nyonso wana. Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo na likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mingi lisusu, talá na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko na mokapo 8, oyo elobi, “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?” ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 5]
Baninga ya Shackleton oyo batikalaki na esanga bazalaki na elikya mpenza ete akozonga kozwa bango ndenge alakaki
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© CORBIS
[Elilingi na lokasa 6]
“Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya”