Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Matai
MOTO ya liboso oyo akomaki lisolo kitoko ya bomoi mpe ya mosala ya Yesu ezali Matai, moninga moko ya Yesu oyo azalaki liboso mokɔngɔli-mpako. Evanzile ya Matai, oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Liebele mpe na nsima ebongolamaki na monɔkɔ ya Grɛki, esilaki kokomama soki na mobu 41 ya ntango na biso (T.B.), mpe emonisaka boyokani oyo ezali na kati ya Makomami ya Liebele ná Makomami ya Grɛki.
Evanzile yango oyo na ntembe te ekomamaki libosoliboso mpo na Bayuda, ezali komonisa ete Yesu azali Masiya, Mwana ya Nzambe, oyo alakamaki. Soki totye likebi na nsango na yango, kondima na biso epai ya Nzambe ya solo, Mwana na ye mpe bilaka na ye ekokóma makasi.—Ebe. 4:12.
“BOKONZI YA LIKOLÓ EKÓMI PENE”
Matai alobeli mingimingi Bokonzi ya Nzambe mpe mateya ya Yesu, atako yango ekokaki kopesa ye nzela te ya kolobela makambo nyonso na molɔngɔ. Na ndakisa, alobeli Lisolo Likoló ya Ngomba na ebandeli ya mokanda na ye, nzokande Yesu alobaki makambo yango na katikati ya mosala na ye.
Ntango azalaki kosakola na Galilai, Yesu asalaki makamwisi, apesaki bantoma na ye 12 malako mpo na mosala ya kosakola, atɔndɔlaki Bafalisai mpe apesaki bandakisa oyo elobelaki Bokonzi. Na nsima alongwaki na Galilai mpe “ayaki na bandelo ya Yudea na ngámbo mosusu ya Yolodani.” (Mat. 19:1) Na nzela, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: ‘Tozali komata na Yelusaleme, mpe bakokatela Mwana ya moto etumbu ya liwa, mpe na mokolo ya misato akolamuka.’—Mat. 20:18, 19.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:16—Na ndenge nini “likoló efungwamaki” ntango Yesu azwaki batisimo? Ekoki kozala ete Yesu amikundolaki bomoi oyo azalaki na yango na likoló, liboso aya awa na mabelé.
5:21, 22—Kobimisa nkanda ezali mabe koleka kobomba yango? Yesu alobaki ete moto oyo akokoba kokangela ndeko na ye nkanda azali kosala lisumu monene. Nzokande, kobimisa maloba ya mabe to ya kotyola mpo na nkanda ezali kutu mabe koleka, mpe ekosɛnga ete moto azongisa monɔkɔ liboso ya esambiselo ya monene koleka.
5:48—Tokoki mpenza “kozala bato ya kokoka, ndenge Tata na [biso] ya likoló azali moto ya kokoka”? Ɛɛ, tokoki kozala bato ya kokoka na makambo nyonso te. Awa, Yesu azalaki kolobela bolingo, mpe alobaki na bayoki na ye ete bámekola Nzambe na bolingo na bango, mpe bázala bato ya kokoka. (Mat. 5:43-47) Ndenge nini? Basengelaki kolingaka ata banguna na bango.
7:16—Lingomba ya solo eyebanaka na “bambuma” nini? Bambuma yango esuki kaka na etamboli na biso te. Bindimeli mpe mateya na biso ezali mpe na kati ya bambuma yango.
10:34-38—Nsango ya Biblia nde etyaka bokabwani na libota? Te. Kasi, bokabwani yango eutaka nde na ndenge bato ya libota oyo bazali bandimi te bazali kotalela mateya ya boklisto. Bakoki koboya mateya ya boklisto to kotɛmɛla yango, mpe yango ekoki kobimisa bokabwani na libota.—Luka 12:51-53.
11:2-6—Soki Yoane ayebaki ete Yesu azali Masiya ntango ayokaki mongongo ya Nzambe elobi ete andimi ye lokola Mwana na ye ya bolingo, mpo na nini atunaki lisusu soki Yesu azali “Moto oyo azali koya”? Ekoki kozala ete Yoane atunaki bongo mpo alingaki koyoka likambo yango na monɔkɔ ya Yesu ye moko. Longola yango, alingaki mpe koyeba soki ‘moto mosusu’ asengelaki koya lokola Mokonzi mpo na kokokisa bilikya nyonso ya Bayuda. Eyano ya Yesu emonisaki ete moto mosusu asengelaki koya na nsima na ye te.
19:28—“Mabota zomi na mibale ya Yisalaele” oyo ekosambisama ezali nini? Ezali te mabota 12 ya Yisalaele ya elimo. (Gal. 6:16; Emon. 7:4-8) Bantoma oyo Yesu azalaki kosolola na bango basengelaki kokóma bato ya Yisalaele ya elimo, kasi te basambisi na bango. Yesu asalaki ‘kondimana elongo na bango mpo na bokonzi,’ mpe basengelaki kozala “bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe.” (Luka 22:28-30; Emon. 5:10) Bato ya Yisalaele ya elimo “bakosambisa mokili.” (1 Kol. 6:2) Na yango, emonani ete “mabota zomi na mibale ya Yisalaele,” oyo bato oyo bafandi na bakiti ya bokonzi na likoló bakosambisa, ezali bato ya mokili, oyo bazali te na kati ya bakonzi mpe banganga-nzambe, ndenge ezalaki komonisama na mabota 12 na mokolo ya mbɔndi.—Lev., mok. 16.
Mateya mpo na biso:
4:1-10. Lisolo wana ezali koteya biso ete Satana azali mpenza, kasi azali kaka te elilingi ya mabe. Asalelaka “mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela” mpo na komeka biso. Kasi, kosalela mitinda ya Biblia ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Nzambe.—1 Yoa. 2:16.
5:1–7:29. Yebáká bamposa na yo ya elimo. Zalá moto ya kimya. Bwaká makanisi mabe. Soki olaki, kokisáká. Ntango ozali kobondela, tyáká makambo ya elimo liboso ya oyo ya mosuni. Zalá moto ya bomɛngo na miso ya Nzambe. Lukáká liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. Kolukaka kaka te mabe ya basusu. Saláká mokano ya Nzambe. Oyo nde mateya kitoko ezali na Lisolo Likoló ya Ngomba!
9:37, 38. Ntango tozali kobondela ete Yehova “atinda basali na kati ya mosala na ye ya kobuka mbuma,” tosengeli mpe komipesa mpenza na mosala ya kokómisa bato bayekoli.—Mat. 28:19, 20.
10:32, 33. Tosengeli kobangaka soki moke te kotatola kondima na biso.
13:51, 52. Koyeba solo ya Bokonzi epesaka moto mokumba ya koteya basusu mpe kosalisa bango báyeba yango.
14:12, 13, 23. Esɛngaka ntango mosusu moto atikala ye moko mpo azwa ntango ya komanyola malamu.—Mko. 6:46; Luka 6:12.
17:20. Tosengeli kozala na kondima mpo na kolongola bangomba to mitungisi ya minene, oyo epekisaka biso kokola na elimo mpe mpo na kolonga mikakatano. Kokolisa mpe kolendisa kondima na biso epai na Yehova mpe na bilaka na ye ezali likambo ya kozwa na lisɛki te.—Mko. 11:23; Luka 17:6.
18:1-4; 20:20-28. Kozanga kokoka mpe mimeseno ya mangomba na bango oyo ezalaki kotinda bato báluka lokumu, etindaki bayekoli ya Yesu bákóma koluka bokonzi. Tosengeli kozala na komikitisa, komibatela na masumu mpe kotalela mikumba na lisangá na ndenge ebongi.
“MWANA YA MOTO ASENGELI KOKABAMA”
Yesu ‘amataki likoló ya mpunda’ mpe akɔtaki na Yelusaleme na mokolo ya 9, sanza ya Nisana, mobu 33 T.B. (Mat. 21:5) Mokolo elandaki akendeki na tempelo mpe apɛtolaki yango. Na mokolo ya 11, sanza ya Nisana, ateyaki na tempelo, atɔndɔlaki bakomeli ná Bafalisai, mpe na nsima apesaki bayekoli na ye “elembo ya kozala na [ye] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 24:3) Na mokolo oyo elandaki, ayebisaki bango ete: “Boyebi ete etikali mikolo mibale elekeli ekosalema, mpe Mwana ya moto asengeli kokabama mpo abakama na nzete.”—Mat. 26:1, 2.
Tozali na mokolo ya 14, na sanza ya Nisana. Ntango Yesu asilisaki kosala Elambo ya liwa na ye, batɛkaki ye, bakangaki ye, basambisaki ye mpe babakaki ye likoló ya nzete. Na mokolo ya misato, asekwaki. Liboso amata na likoló, Yesu oyo asilaki kosekwa alobaki na bayekoli na ye ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”—Mat. 28:19.
Biyano na mituna ya Biblia:
22:3, 4, 9—Ntango nini babengaki bato mbala misato na fɛti ya libala? Kobengama ya liboso ya baklisto bapakolami to mwasi ya Klisto ebandaki ntango Yesu ná bayekoli na ye babandaki kosakola na mobu 29 T.B., mpe ekobaki tii na mobu 33 T.B. Oyo ya mibale ebandaki ntango bayekoli bazwaki elimo santu na Pantekote ya mobu 33 T.B. tii na mobu 36 T.B. Na mbala mibale wana ya liboso, bazalaki kobenga kaka Bayuda, Baprozelite mpe Basamalia. Nzokande, kobengama ya misato ebandaki epai ya bato ya banzela oyo ebimá tii na libándá ya engumba, elingi koloba bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kokatama ngɛnga te. Yango ebandaki na mobu 36 T.B., ntango Koloneyi, mokonzi ya basoda ya Loma abongwanaki, mpe ezali kokoba tii na moi ya lelo.
23:15—Mpo na nini prozelite to moto oyo Bafalisai bakómisi mondimi na bango asengelaki “kokenda na Gehena mbala mibale koleka” Bafalisai bango moko? Ekoki kozala ete bato mingi oyo Bafalisai bakómisaki bandimi na bango bazalaki basumuki minene liboso. Kasi, ntango bakómaki Bafalisai, bakómaki lisusu mabe koleka, mbala mosusu balekaki ata bateyi na bango oyo basengelaki kozwa etumbu. Na yango, basengelaki “kokenda na Gehena” mbala mibale koleka Bafalisai.
27:3-5—Mpo na nini Yuda ayokaki motema mpasi? Eloko moko te emonisi ete mpasi oyo Yuda ayokaki ezalaki mpenza kobongola motema ya solo. Na esika asɛnga Nzambe bolimbisi, ye akendeki nde koyambola mabe na ye epai ya banganga-nzambe mpe mikóló. Lokola asalaki “lisumu oyo ememaka na liwa,” Yuda ayokaki mpasi makasi mpo amonaki ete amemi ngambo mpe elikya ezali lisusu te mpo na ye. (1 Yoa. 5:16) Na mokuse, ayokaki motema mpasi mpo azalaki lisusu na elikya te.
Mateya mpo na biso:
21:28-31. Likambo oyo ezali mpenza na ntina na miso ya Yehova ezali ete tósalaka mokano na ye. Na ndakisa, tosengeli kosala mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli na molende.—Mat. 24:14; 28:19, 20.
22:37-39. Mibeko mibale oyo eleki minene emonisi na mokuse makambo oyo Nzambe azali kosɛnga na basambeli na ye.
[Elilingi na lokasa 31]
Osalaka mosala ya kobuka mbuma na molende?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© 2003 BiblePlaces.com
[Elilingi na lokasa 31]
Matai alobeli mingimingi Bokonzi ya Nzambe