Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali “kozela”?
“Nakomonisa ete nazali kozela.”—MIKA 7:7.
1. Nini ekoki kosala ete tókóma motema mokuse?
MIKOLO ya nsuka ya ebongiseli ya Satana ebandaki na 1914, ntango Bokonzi ya Masiya etyamaki na likoló. Na mbula yango, etumba moko ebimaki na likoló mpe Yesu abwakaki Zabolo ná bademo na ye zingazinga ya mabele. (Tángá Emoniseli 12:7-9.) Satana ayebi ete atikali kaka “na ntango mokuse.” (Em. 12:12) Kasi “ntango” yango esili kosala bambula ebele, mpe bato mosusu bakoki komona lokola ete mikolo ya nsuka eumeli mingi. Wana tozali kozela ete Yehova aboma mokili oyo, obandi nde kokóma motema mokuse?
2. Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna nini?
2 Kozala motema mokuse ekoki kozala likama mpo ekoki kotinda biso tósala makambo kozanga kokanisa malamu. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kozela? Lisolo oyo ekosalisa biso tómonisa ete tozali kozela mpe ekoyanola na mituna oyo elandi. (1) Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya mosakoli Mika na oyo etali komonisa motema molai? (2) Makambo nini ekomonisa ete ntango oyo tozalaki kozela ete Yehova abebisa mokili oyo mabe ekómi na nsuka? (3) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na motema molai ya Yehova?
LITEYA NINI TOKOKI KOZWA NA NDAKISA YA MIKA?
3. Na mikolo ya Mika, makambo ezalaki ndenge nini na Yisraele?
3 Tángá Mika 7:2-6. Mika, mosakoli ya Yehova, amonaki ndenge Bayisraele babandaki mokemoke kobuka mibeko ya Nzambe, mpe na boyangeli ya Ahaze, mokonzi moko ya mabe, bakómaki batomboki mpenza. Mika akokanisi Bayisraele oyo bazangi bosembo na “nsinga ya nsendensende” mpe “lopango ya nzubɛ.” Kaka ndenge nsinga ya nsendensende to nzubɛ ezokisaka moto nyonso oyo anyati yango, Bayisraele oyo bazangaki bosembo bazalaki konyokola basusu. Mabe ekómaki mingi na boye ete ata bato ya libota moko bazalaki kolingana lisusu te. Lokola Mika ayebaki ete akokoka te kosilisa mokakatano yango ye moko, afungolelaki Yehova motema na nzela ya libondeli. Na nsima, amonisaki motema molai mpe azelaki ete Nzambe asala. Mika azalaki na kondima ete Yehova akosala na ntango oyo ye moko akolinga.
4. Mikakatano nini tozali kokutana na yango?
4 Lokola Mika, biso mpe tofandi esika moko na bato oyo balukaka kaka matomba na bango moko. Mingi na bango bazali bato oyo “bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota.” (2 Tim. 3:2, 3) Esalaka biso mpasi mingi ntango baninga na biso ya mosala, ya kelasi, to ya kartye bamonisaka ete bazali koluka kaka matomba na bango moko. Kasi, basaleli mosusu ya Nzambe bazali na mikakatano ya makasi koleka. Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakokutana na botɛmɛli na kati ya libota; asalelaki maloba oyo ekokani na oyo ezali na Mika 7:6 mpo na komonisa bokabwani oyo ekokɔta na libota mpo na nsango malamu. Alobaki boye: “Nayaki kokabola: moto akotombokela tata na ye, mpe mwana mwasi akotombokela mama na ye, mpe elenge mwasi ya libala akotombokela bokilo na ye ya mwasi. Ya solo, banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Mat. 10:35, 36) Ezalaka mpasi mpenza kokanga motema ntango bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli te bazali kotyola mpe kotɛmɛla biso! Soki tokutani na mokakatano ya ndenge wana, tosengeli kozonga nsima te mpo bato ya libota na biso bazali kotya biso mpanzi likoló. Tótikala nde sembo mpe tózela na motema molai nyonso ete Yehova asilisa mokakatano yango. Soki tozali ntango nyonso kosɛnga ye asalisa biso, akopesa biso makasi mpe bwanya oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko.
5, 6. Mbano nini Yehova apesaki Mika, kasi makambo nini Mika amonaki te?
5 Yehova apesaki Mika mbano mpo na motema molai na ye. Mika amonaki ndenge boyangeli mabe ya Mokonzi Ahaze esukaki. Amonaki mpe ndenge oyo mwana ya Ahaze, Hizikiya mokonzi malamu, azwaki bokonzi nsima ya tata na ye mpe azongisaki losambo ya pɛto. Mpe lisusu, nsango ya kosambisama ya Samaria oyo Yehova apesaki na nzela ya Mika ekokisamaki ntango bato ya Asiri babebisaki bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele.—Mika 1:6.
6 Nzokande, Mika amonaki te kokokisama ya makambo mosusu oyo asakolaki. Na ndakisa, akomaki ete: “Na eleko ya nsuka ya mikolo . . . ngomba ya ndako ya Yehova ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba, mpe ekotombwama mpenza likoló koleka bangomba mike; mpe bato ya bikólo bakosopana kuna. Mpe bikólo mingi bakokende mpenza mpe bakoloba ete: ‘Bóya, tómata na ngomba ya Yehova.’” (Mika 4:1, 2) Mika akufaki bambula mingi liboso ete esakweli wana ekokisama. Atako bongo, azalaki na ekateli makasi ya kotikala sembo tii liwa, atako bato mosusu bazalaki kosala makambo ya mabe. Akomaki boye: “Bato ya bikólo nyonso, ɛɛ bango, bakotambola moto na moto na nkombo ya nzambe na ye; kasi biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.” (Mika 4:5) Na ntango wana ya mpasi, Mika azelaki na motema molai nyonso mpo azalaki na kondima ete Yehova akokokisa bilaka na ye nyonso. Mosakoli yango ya sembo atyelaki Yehova motema.
7, 8. (a) Mpo na ntina nini tosengeli kotyela Yehova motema? (b) Nini ekosalisa biso tómona ete ntango ezali koleka nokinoki?
7 Biso mpe tozali na ntina oyo esengeli kotinda biso tótyela Yehova motema ndenge wana. Tomoni kokokisama ya esakweli ya Mika. Na “eleko ya nsuka ya mikolo,” bamilio ya bato oyo bauti na bikólo nyonso, na mabota nyonso, mpe na minɔkɔ nyonso, bazali komata na “ngomba ya ndako ya Yehova.” Atako bauti na bikólo oyo eyokanaka te, basambeli wana ya Yehova basili ‘kotula mipanga na bango ete ekóma bitimweli ya mabele’ mpe ‘bayekolaka etumba lisusu te.’ (Mika 4:3) Kozala na kati ya libota ya Yehova oyo ezali na kimya ezali mpenza libaku malamu!
8 Biso nyonso tozalaka na mposa ete Yehova asukisa mokili oyo mabe nokinoki. Kasi, soki tolingi kozela na motema molai, tosengeli kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. Yehova atyá mokolo oyo akosambisa bato “na nzela ya moto moko oyo ye aponi,” Yesu Kristo. (Mis. 17:31) Kasi liboso ete mokolo yango ekóma, Nzambe azali kopesa bato ya lolenge nyonso libaku ya kozwa “boyebi ya sikisiki ya solo,” ya kosala makambo oyo eyokani na boyebi yango, mpe ya kobika. Tóbosana te ete bomoi ya bato mingi ezali na likama. (Tángá 1 Timote 2:3, 4.) Soki tozali kosala mingi mpo na kosalisa bato báyeba Nzambe, tokomona ete ntango oyo etikali liboso ete Yehova asambisa mokili ekoleka nokinoki. Etikali moke, nsuka eya. Ekoya mbalakaka mpenza. Ntango nsuka ekoya, tokozala mpenza na esengo ete tozalaki na mingi ya kosala na mosala ya kosakola Bokonzi!
MAKAMBO NINI EKOMONISA ETE NTANGO NA BISO YA KOZELA EKÓMI NA NSUKA?
9-11. 1 Batesaloniki 5:3 esili nde kokokisama? Limbolá.
9 Tángá 1 Batesaloniki 5:1-3. Mosika te, bikólo ekoloba: “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” Mpo tósutuka te ntango likambo yango ekosalema, tosengeli ‘kozala ekɛngɛ mpe kobatela makanisi na biso.’ (1 Tes. 5:6) Mpo tótikala ekɛngɛ na elimo, tótalela na mokuse makambo oyo ezali kosalema, oyo ekotinda bato báloba maloba wana ya ntina.
10 Nsima ya bitumba mibale ya mokili mobimba, bikólo ekómaki na mposa makasi ya kimya. Nsima ya etumba ya liboso, ebongiseli babengi Société des Nations esalemaki na elikya ete ekotya kimya. Na nsima, ntango Etumba ya mibale ya mokili mobimba esilaki, bato bakómaki na elikya ete ONU ekotya kimya na mokili. Baguvɛrnema mpe bakonzi ya mangomba bazalaki kotya motema na bibongiseli wana mpo na kotya kimya na mokili mobimba. Na ndakisa, ONU ebengaki 1986, mobu ya kimya na mokili mobimba. Na mbula wana, bakonzi ya bikólo mingi mpe bakonzi ya mangomba mingi bakendaki kokutana na mokonzi ya Lingomba ya Katolike na engumba Assise, na Italie, mpo abondela mpo na kimya.
11 Nzokande, maloba kimya mpe likambo ya kobanga oyo elobamaki na mbula wana to mosusu lokola yango ekokisaki te esakweli oyo ezali na 1 Batesaloniki 5:3. Mpo na nini? Mpamba te “libebi ya mbalakaka” oyo esakolamaki eyei naino te.
12. Likambo nini toyebi mpo na maloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te”?
12 Nani nde akoloba na mikolo ezali koya ete: “Kimya, likambo ya kobanga ezali te”? Mokumba nini bakonzi ya mangomba ya bokristo mpe mangomba mosusu bakozala na yango? Ndenge nini bakonzi ya baguvɛrnema ndenge na ndenge bakosangana na maloba yango? Biblia eyebisi biso te. Oyo toyebi ezali ete ata soki maloba yango ekoyokana lolenge nini to ekolobama mpenza na ndenge ya kondimisa bato, ekozala kaka lokuta mpamba. Mokili oyo ekozala kaka na mabɔkɔ ya Satana. Mokili oyo ezali ya kopɔla mpe ekozala kaka bongo. Ekozala mawa mpenza soki moko na biso andimi makanisi ya lokuta oyo Satana akopanza mpe amikɔtisi na makambo ya mokili!
13. Mpo na nini baanzelu bazali kokanga mipɛpɛ ya kobebisa mokili?
13 Tángá Emoniseli 7:1-4. Wana tozali kozela kokokisama ya 1 Batesaloniki 5:3, baanzelu ya nguya bazali naino kokanga mipɛpɛ ya kobebisa oyo ekobɛta na ntango ya bolɔzi monene. Bazali kozela nini? Ntoma Yoane alobeli likambo moko ya ntina: kotyama elembo ya nsuka ya “baombo ya Nzambe na biso,” elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo.a Soki kaka kotyama wana ya elembo ya nsuka esili, baanzelu bakotika mipɛpɛ ya kobebisa. Nini ekosalema na nsima?
14. Nini emonisi ete etikali moke Babilone Monene ebomama?
14 Babilone Monene, oyo ezali lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba ekozwa lifuti oyo ebongi na yango: ekobomama. “Bato ya mikili mpe ebele ya bato mpe bikólo mpe minɔkɔ” bakokoka te kopesa ye mabɔkɔ. Lelo oyo, tozali komona ete nsuka na yango ekómi pene. (Em. 16:12; 17:15-18; 18:7, 8, 21) Kutu, ata sikoyo, bapanzi-nsango bazali komonisa ete bato mingi bazali lisusu kopesa mangomba ya lokuta mabɔkɔ te, kasi bazali nde koloba mabe mpo na mangomba yango mpe bakonzi na yango. Atako bongo, bakonzi ya Babilone Monene bazali komona te ete likama ezali koyela bango. Bazali mpenza komikosa! Soki maloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te” eyokani, bakonzi ya politiki ya boyangeli ya Satana bakobalukela mangomba ya lokuta na mbalakaka mpe bakoboma yango. Babilone Monene ekomonana lisusu te. Tómonisa motema molai mpe tózela mpo na komona makambo wana minene.—Em. 18:8, 10.
NDENGE NINI TOKOKI KOMONISA BOTƆNDI MPO NA MOTEMA MOLAI YA NZAMBE?
15. Mpo na nini Yehova azali komonisa motema molai?
15 Atako bato bazali kosambwisa nkombo na ye, Yehova azali komonisa motema molai mpe kozela ntango oyo ebongi mpo na kosala. Yehova alingi ete moto ata moko te ya motema sembo abomama. (2 Pe. 3:9, 10) Yo mpe omonaka bongo? Liboso ete mokolo ya Yehova eya, tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na motema molai na ye soki tosali makambo oyo elandi.
16, 17. (a) Mpo na nini tosengeli koluka kosalisa bandeko oyo balɛmbi na elimo? (b) Mpo na nini bandeko oyo balɛmbi na elimo basengeli kozongela Yehova nokinoki?
16 Salisá bandeko oyo balɛmbi na elimo. Yesu alobaki ete esengo ezalaka na likoló ntango mpate moko oyo ebungaki emonani. (Mat. 18:14; Luka 15:3-7) Emonani ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na bato nyonso oyo bamonisaki ete balingaka nkombo na ye, ata soki bazali lisusu te kosalela ye na molende lelo oyo. Soki tosalisi bandeko ya ndenge wana bázongela lisangá, tokosepelisa mpenza Yehova mpe baanzelu.
17 Ozali moko ya bandeko oyo bazali kosalela lisusu Nzambe na molende te? Ekoki kozala ete ndeko moko ayokisaki yo mpasi na motema, yango wana okimá lisangá. Lokola ntango molai esili koleka, okoki komituna boye: ‘Bomoi na ngai ekómi nde malamu koleka, nakómi nde na esengo mingi koleka liboso? Yehova moto azokisaki ngai, to ezalaki nde moto ya kozanga kokoka? Yehova Nzambe asalá likambo moko mpo na kosala ngai mabe?’ Kutu, asalelaka biso kaka makambo ya malamu. Atako ozali lisusu kosala te makambo oyo olakaki ntango omipesaki na Nzambe, azali kopesa yo nzela ya kosepela na biloko ya malamu oyo apesaka. (Yak. 1:16, 17) Etikali moke, mokolo ya Yehova eya. Sikoyo nde ntango ya kozongela Tata na biso ya likoló oyo alingaka biso mpe lisangá na ye, esika kaka moko ya libateli na mikolo oyo ya nsuka.—Mib. 33:27; Ebr. 10:24, 25.
18. Mpo na nini tosengeli kolanda litambwisi ya bandeko oyo bazali kokamba biso?
18 Landáká mpenza litambwisi ya bandeko oyo bazali kokamba. Yehova akambaka biso mpe abatelaka biso, ndenge mobateli ya mpate asalaka mpo na bampate na ye. Atye Mwana na ye mpo azala mobateli ya mpate mokonzi ya etonga na ye. (1 Pe. 5:4) Bankulutu na masangá koleka 100 000 babatelaka mpate mokomoko ya Nzambe. (Mis. 20:28) Ntango tozali kolanda mpenza litambwisi ya bandeko oyo bazali kokamba biso, tomonisaka botɔndi epai ya Yehova mpe Yesu mpo na nyonso oyo basalá mpo na biso.
19. Ndenge nini tokoki kozala liboke moko?
19 Tózala na bomoko. Yango elimboli nini? Soki banguna bayei kobundisa bango, basoda oyo bazwá formasyo ya malamu bakendaka bango nyonso ngámbo moko mpe basalaka na bomoko. Na ndenge yango, bakómaka lokola efelo oyo banguna bakoki kokatisa te. Satana azali se kobakisa mayele mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe. Oyo ezali ntango te ya kobundisa bandeko na biso bakristo. Sikoyo ezali nde ntango ya kokóma lisusu pene na bandeko, ya kokanga miso na kozanga kokoka ya basusu, mpe ya komonisa ete tozali kotya motema na litambwisi ya Yehova.
20. Tosengeli kosala nini sikoyo?
20 Tiká ete tóbatela boyokani na biso na Yehova mpe tómonisa ete tozali kozela. Na motema molai, tózela ntango bakoloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” mpe ntango bakristo oyo batyami mafuta bakotyama elembo ya nsuka. Na nsima, baanzelu minei bakotika mipɛpɛ ya kobebisa, mpe Babilone Monene ekobomama. Wana tozali kozela ete makambo wana ya minene esalema, tólanda litambwisi ya bandeko oyo bazali kokamba ebongiseli ya Yehova. Tózala liboke moko mpo na kobundisa Satana mpe bademo! Sikoyo nde ntango ya kolanda toli oyo ya mokomi ya Nzembo: “Bózala na mpiko, mpe motema na bino ezala makasi, bino nyonso baoyo bozali kozela Yehova.”—Nz. 31:24.
a Mpo na koyeba bokeseni oyo ezali kati na kotyama elembo ya ebandeli mpe kotyama elembo ya nsuka ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2007, nkasa 30-31.