Mokanda ya Biblia nimero 39—Malaki
Mokomi: Malaki
Esika ya bokomi: Yelusaleme
Nsuka ya bokomi: Nsima ya 443 L.T.B.
1. Nini emonisi molende ya Malaki mpo na Yehova?
MALAKI azalaki nani? Toyebi ata likambo moko te na ntina na bankɔ́kɔ na ye to bomoi na ye moko. Nzokande, na kotaleláká makambo mazali kati na esakweli na ye, emonisami polele ete azalaki na molende mingi na lolenge na ye ya komipesa epai na Yehova Nzambe, azalaki kosimba makasi nkombo na Ye mpe losambo ya pɛto, mpe azalaki koyoka nkanda makasi mpo na baoyo bazalaki koloba ete bazali kosalela Nzambe nzokande bazalaki kosala mpo na matomba na bango moko. Nkombo ya Yehova elobelami mbala 48 kati na mikapo minei ya esakweli na ye.
2. Nkombo ya Malaki mbala mosusu elimboli nini, mpe emonani ete azalaki na bomoi na ntango nini?
2 Na Liebele, nkombo na ye ezali Mal·ʼa·khiʹ, oyo ekoki mbala mosusu kolimbola “Ntoma na ngai.” Makomami ya Liebele, Biblia Septante, mpe kolandana ya ntango ya mikanda, yango nyonso etye Malaki na nsuka kati na basakoli 12, oyo babéngamaka ete basakoli ya mike. Engebene makambo ya kala mazwami na Sinagoga ya Monene, azalaki na bomoi nsima na mosakoli Hagai mpe mosakoli Zekalia, nzokande azalaki na bomoi na eleko moko na Nehemia.
3. Nini emonisi ete esakweli ya Malaki ekomamaki nsima ya mobu 443 L.T.B.?
3 Ntango nini esakweli na ye ekomamaki? Ezalaki na ntango ya boyangeli ya moyangeli moko, yango esali ete kokomama na yango ezala na ntango ya kobongisama lisusu ya Yelusaleme nsima ya mibu 70 ya kobebisama ya Yuda. (Mki. 1:8) Kasi moyangeli yango azalaki nani? Lokola mosala ya tempelo elobelami, kasi kotongama ya tempelo elobelami te, esengeli kozala nsima na ntango ya moyangeli Zelubabele, oyo na boumeli ya boyangeli na ye mosala ya botongi tempelo esilaki. Ezali bobele na moyangeli mosusu moko ya eleko wana oyo alobelami kati na Makomami, ezali bongo Nehemia. Esakweli wana ezalaki na ntango ya Nehemia? Eloko moko te elobami kati na Malaki na ntina na kotongama lisusu ya Yelusaleme mpe bifelo na yango, boye yango esali ete ezala te na eteni ya liboso ya boyangeli ya Nehemia. Nzokande, makambo mingi malobami na ntina na misala mabe ya banganga na eleko ya Malaki, misala oyo miyokani mpenza na makambo mazalaki kosalema na ntango Nehemia ayaki mpo na mbala ya mibale na Yelusaleme, nsima wana abyangamaki lisusu na Babilone na mokonzi Alatazelezese na mobu 443 L.T.B., mbula ya 32 ya boyangeli ya mokonzi yango. (Mki. 2:1; Neh. 13:6) Bokokani oyo ezali kati na mikapo ya Malaki mpe ya Nehemia emonisi ete esakweli oyo, epesamaki na ntango wana ya sikisiki.—Mki. 2:4-8, 11, 12—Neh. 13:11, 15, 23-26; Mki. 3:8-10—Neh. 13:10-12.
4. Nini emonisi ete mokanda ya Malaki ezali solo mpe epemamaki?
4 Bayuda, uta kala, bandimaka bosolo ya mokanda ya Malaki. Maloba ya Malaki oyo matángami kati na Makomami ya Greke ya boklisto, oyo mingi kati na yango emonisi kokokisama ya bisakweli na yango, ezali elembeteli ete mokanda ya Malaki epemamaki mpe ezali eteni ya kanɔ́ ya Makomami ya Liebele oyo endimamaki na lisangá ya boklisto.—Mki. 1:2, 3—Lom. 9:13; Mki. 3:1—Mat. 11:10 mpe Luka 1:76 mpe 7:27; Mki. 4:5, 6—Mat. 11:14 mpe 17:10-13; Mko. 9:11-13 mpe Luka 1:17.
5. Ezalela nini ya mabe na elimo esalaki ete esakweli ya Malaki epesama?
5 Esakweli ya Malaki emonisi ete molende mpo na losambo mpe bosepeli oyo elamwisamaki na mosakoli Hagai mpe mosakoli Zekalia na ntango ya kotongama lisusu ya tempelo esilaki. Banganga bakómaki na bopɔtu, na lolendo, mpe na komindimisa na boyengebene na bango moko. Misala ya tempelo misilaki kokóma eloko ya kotyola. Ndambo na zomi mpe makabo ezalaki kopesama lisusu te mpo bazalaki na mayoki ete Yehova azalaki kosepela lisusu na Yisalaele te. Bilikya oyo bityamaki likoló na Zelubabele bikokisamaki te, mpe na bokeseni na makambo mosusu oyo bazalaki kozela, Masiya ayaki te. Ezalela ya elimo ya Bayuda ekitaki makasi mpenza. Moboko nini ezalaki mpo na kolendisa mpe kopesa elikya? Lolenge nini bato bakokaki koyeba mpenza ezalela na bango mpe kolamwisama mpo na kozongela boyengebene? Esakweli ya Malaki eyanoli na mituna wana.
6. Ekomeli ya Malaki ezali lolenge nini?
6 Ekomeli ya Malaki ezali ya polele mpe ya nguya. Azali kolobela liboso likambo mpe na nsima azali koyanola na botɛmɛli ebimisami na baoyo ye azali kolobela. Na nsuka, andimisi likambo oyo alobelaki na ebandeli. Yango ebakisi nguya mpe bomoi kati na maloba na ye. Na esika ya kosalela maloba makasimakasi, azali nde kosalela elobeli ya polele, oyo ezali na maloba ya nguya.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MALAKI
7. Bolingo nini mpe koyina nini Yehova amonisi?
7 Etindá ya Yehova epai na banganga (1:1–2:17). Yehova amonisi liboso bolingo na ye mpo na bato na ye. Alingaki Yakobo mpe ayinaki Esau. Tiká Edome emeka kotonga lisusu bisika na yango oyo bibebisamaki; Yehova akokweisa yango mpe yango ekobyangama ete “mokili na mabe,” bato oyo batɔndɔlami na Yehova, mpamba te Yehova “akokumisama koleka molelo na Yisalaele.”—1:4, 5.
8. Lolenge nini banganga babebisaki mesa ya Yehova, mpe mpo na nini elakeli mabe ekoya likoló na bango?
8 Yehova azali sikawa koloba polele epai na ‘banganga oyo bazali kotyola nkombo na ye.’ Lokola bazali komeka komilóngisa bango moko, Yehova abendi likebi likoló na mbeka na bango ikufá miso, itɛngumá, mpe izali na maladi, mpe atuni bango, ata moyangeli akondima nde makabo motindo oyo? Yehova asepeli na yango te. Nkombo na ye esengeli kokumisama kati na mabota, kasi bato oyo bazali kotuka ye na kolobáká ete: “Mesa na [Yehova] ezali eloko na kotyolama.” Elakeli mabe ekoya likoló na bango mpamba te, na mayele mabe nyonso, basili kotika ndai na bango na kopesáká mbeka ya mpamba. “Mpo ete, ngai nazali Mokonzi monene; [Yehova] na bibele alobi bongo. Mpe nkombo na ngai ezali na nsɔ́mɔ kati na mabota.”—1:7, 12, 14.
9. Na makambo nini banganga bakweaki, mpe lolenge nini basilaki kotuka bosantu ya Yehova?
9 Yehova apesi sikawa etindá epai na banganga, kolobáká ete soki babateli toli oyo na motema te, akotinda elakeli mabe likoló na bango mpe likoló na mapamboli na bango. Akopalanganisa nyei ya bilambo na bango likoló na bilongi na bango mpamba te bazangaki kolanda kondimana ya Levi. “Zambi ekoki na bibɛbu na nganga ete bibatela boyebi mpe ete bato báluka mobeko na solo na monɔkɔ na ye. Zambi ye azali ntoma na [Yehova] na bibele.” (2:7) Malaki ayamboli lisumu monene ya Yisalaele mpe Yuda. Basili kosala na bokosi nyonso moko epai na mosusu mpe basili kotuka bosantu ya Yehova, Tata mpe Mozalisi na bango, na kokamatáká mwana mwasi ya nzambe-mopaya lokola mwasi na libala. Balekisi mpenza ndelo mpo na kolɛmbisa Yehova. Kútu basili kokóma na kotuna ete, “Nzambe na kosambisa-sembo azali wapi?”—2:17.
10. Mpo na mosala nini ya kosambisa Nkolo ayaki na tempelo na ye?
10 Nkolo na solo mpe ntoma (3:1-18). Esakweli eyei ndóngó sikawa na maloba oyo ya “Yehova na bibele”: “Talá, nazali kotinda ntoma na ngai mpo na kobongisa nzela liboso na ngai mpe Nkolo oyo bino bozali koluka ye akoya pwasa na Tempelo na ye; ntoma na kondimana oyo bino bozali kosepela mpo na ye, talá azali koya!” (3:1) Lokola mopɛtoli, Ye akopɛtola bana na Levi mpe akokóma motatoli na mbangu kotɛmɛla bato mabe oyo bazangi kobanga Ye. Yehova abongwanaka te, mpe lokola bazali bana ya Yakobo, na motema mawa nyonso akozongela bango soki bakozongela ye.
11. Lolenge nini basengeli sikawa komeka Nzambe, mpe mapamboli nini makolanda?
11 Basili koyiba Nzambe, kasi tiká ete bámeka ye na komemáká ndambo na zomi kati na ebombelo mpo ete biloko bizala na ndako na ye, na elikya ete akosopela bango mapamboli na ye mingi na kofungoláká maninisa na likoló. Bakokóma mokili na kosepela, mabota nyonso makobyanga bango bato na esengo. Baoyo bazalaki kobanga Yehova bazalaki kolobana moko epai na mosusu, mpe Yehova atyaki likebi mpe ayokamelaki. “Mpe búku na kokanisa ebandaki kokomama liboso na ye mpo na baoyo bazali kobanga Yehova mpe mpo na baoyo bazali kokanisa likoló na nkombo na ye.” (3:16, NW) Na ntembe te, bakokóma bato na Yehova na mokolo oyo akobimisa eloko na ye ya motuya.
12. Eloko nini elakami na ntina na mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ na Yehova?
12 Mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ ya Yehova (4:1-6). Oyo ezali mokolo mozali koya, oyo ekosilisa bato mabe nyɛɛ, ekotika mosisa te soko mpe etape te. Kasi moi ya boyengebene ekongɛngɛla baoyo bazali kobanga nkombo ya Yehova, mpe bakobikisama. Yehova alendisi bango ete bámikundola Mobeko ya Mose. Liboso ete mokolo na ye monene mpe ya nsɔ́mɔ eya, Yehova alaki ete akotinda mosakoli Eliya. “Akobongola mitema na batata epai na bana mpe mitema na bana epai na batata na bango ete naya mpe nabɛta mokili na ekweli mabe te.”—4:6.
LITOMBA NA YANGO
13. Makambo nini Malaki asengeli koloba na ntina na (a) motema mawa mpe bolingo ya Yehova? (b) mokumba ya bateyi ya Liloba ya Nzambe? (c) baoyo bazali kobuka mibeko mpe mitindá ya Nzambe?
13 Mokanda ya Malaki ezali kosalisa na kokanga ntina ete mitindá ya Yehova Nzambe mibongwanaka te mpe bolingo na ye etondi na motema mawa ebongwanaka mpe te. Uta na ebandeli, ezali kolobela mingi bolingo monene oyo Yehova azali na yango mpo na libota na ye “Yakobo.” Alobaki epai na bana na Yakobo ete: “Ngai [Yehova] nakobongwana te.” Atako mabe na bango ezalaki monene mingi, azalaki pene mpo na kozongela bato na ye soki bango bakolinga kozongela ye. Oyo nde Nzambe ya motema mawa! (Mki. 1:2; 3:6, 7; Lom. 11:28; Ex. 34:6, 7) Na nzela ya Malaki, Yehova alobeli makasi ete bibɛbu ya nganga bisengeli “bibatela boyebi.” Baoyo nyonso bapesameli mokumba ya koteya Liloba na Nzambe basengeli kokeba na likambo oyo, basengeli kondimisama ete oyo bazali koteya ezali boyebi ya sikisiki. (Mki. 2:7; Filp. 1:9-11; kokanisá na Yakobo 3:1.) Yehova andimaka bakosi te, baoyo bazali koloba ete “kosala mabe ezali malamu na miso ya Yehova.” Moto moko akanisa te ete akoki kokosa Yehova na kopesáká likabo ya bongo na bongo epai na Mokonzi monene wana. (Mki. 2:17, NW; 1:14; Kols. 3:23, 24) Yehova akozala motatoli ya mbangu liboso na baoyo nyonso bazali kobuka mibeko mpe mitindá na ye ya sembo; moto moko akanisa te ete akoki kosala mabe kozanga kozwa etumbu. Yehova akosambisa bango. (Mki. 3:5; Ebe. 10:30, 31) Bayengebene bándimisama mpenza ete Yehova akokanisa misala na bango mpe akopesa bango lifuti. Basengeli kotya likebi na Mobeko ya Mose, motindo moko Yesu asalaki yango, mpamba te yango ezali na makambo mingi oyo makokisamaki kati na ye.—Mki. 3:16; 4:4; Luka 24:44, 45.
14. (a) Likambo nini Malaki asakoli mingimingi mpo na mikolo mizali koya? (b) Lolenge nini Malaki 3:1 ekokisamaki na ekeke ya liboso T.B.?
14 Lokola yango ezali mokanda ya nsuka mopemami ya Makomami ya Liebele, Malaki asakoli makambo mataleli koya ya Masiya, oyo komonana na ye, koleka bikeke minei na nsima, epesaki moboko mpo na kokomama ya Makomami ya Greke ya boklisto. Lokola yango eyebisami na Malaki 3:1, Yehova na bibele alobaki ete: “Talá, nazali kotinda ntoma na ngai mpo na kobongisa nzela liboso na ngai.” Kolobáká wana apemamaki na Nzambe, mobangé Zekalia amonisaki ete yango ekokisamaki epai na mwana na ye, Yoane Mobatisi. (Luka 1:76) Yesu andimaki likambo yango, kolobáká na ntango yango ete: “Moto moko te abimi kati na baoyo babotami na basi, oyo aleki Yoane Mobatisi. Nde ye oyo aleki moke kati na Bokonzi na Likoló aleki ye na monene.” Yoane atindamaki, lokola Malaki asakolaki yango, mpo na ‘kobongisa nzela,’ na yango azalaki te kati na baoyo na nsima Yesu asalaki elongo na bango kondimana mpo na Bokonzi.—Mat. 11:7-12; Luka 7:27, 28; 22:28-30.
15. “Eliya” oyo alobelami na esakweli ya Malaki azali nani?
15 Na nsima, na Malaki 4:5, 6, Yehova alakaki ete: “Talá, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya.” “Eliya” oyo azali nani? Ezala Yesu to anzelu oyo abimelaki Zekalia, bango nyonso basalelaki maloba wana epai na Yoane Mobatisi, komonisáká ete ye azalaki moto oyo “akobongisa makambo nyonso” mpe “kobongisela [Yehova] libota likobonga mpenza” mpo na koyamba Masiya. Nzokande, Malaki alobi lisusu ete “Eliya” azali motindami liboso na koya na “mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ na [Yehova],” yango emonisi kokokisama oyo ezali koya na mokolo na kosambisama.—Mat. 17:11; Luka 1:17; Mat. 11:14; Mko. 9:12.
16. Mokolo nini ya mapamboli Malaki alobeli mpo na mikolo mizali koya, mpe elendiseli nini ya mɔ́tɔ apesi?
16 Kozeláká mokolo yango, Yehova na bibele alobi ete: “Longwa na kobima na moi kino kolimwa na yango, nkombo na ngai ezali monene kati na mabota . . . Mpo ete, ngai nazali Mokonzi monene . . . Mpe nkombo na ngai ezali na nsɔ́mɔ kati na mabota.” Nsɔ́mɔ mpenza! Mpamba te ‘mokolo yango ekopela lokola litumbu na mɔ́tɔ; mpe bato nyonso na lolendo mpe basáli na mabe basengeli kokóma mpumbulu.’ Nzokande, baoyo bazali kobanga nkombo ya Yehova bazali na esengo, mpamba te epai na bango “moi na boyengebene ekobimela [bango] na kobikisa kati na mapapu na yango.” Yango elobeli mingi ntango ya esengo wana bato na botosi kati na libota ya bato bakobikisama mpo na libela—na elimo, na mayoki, na makanisi, mpe na nzoto. (Emon. 21:3, 4) Na kosakoláká mokolo wana ya nkembo mpe ya mapamboli, Malaki azali kolendisa biso ete tosengeli, na motema moko, koyeisa makabo na ndako ya Yehova: “Meká ngai sasaipi na yango, soko nakozipwela bino maninisa na lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.”—Mki. 1:11, 14; 4:1, 2; 3:10.
17. Makebisi ya Malaki masangani na libyangami nini oyo lizali na elikya?
17 Atako ekóbi kokebisa biso na ntina na ‘kopesama ya mabelé na ekweli mabe,’ mokanda oyo ya nsuka ya Basakoli ezali kobyanga biso na kozala na elikya mpe kosepela na boyokani na maloba oyo Yehova apesaki epai na libota na ye: “Mabota nyonso bakobyanga bino ete, Na esengo, zambi bokozala mokili na kosepela.”—4:6; 3:12.