“Tolongola bipekiseli nyonso”
Marie azalaki komilela ete: “Nazali komiyokela mpenza mawa mpe nalembi.” Wana ezalaki ye kolobela mpo na bozito oyo bomonisami na mikumba ya boklisto, abakisaki ete: “Nazali komona baninga oyo basili kolemba; ngai mpe nazali kooka bolembu makasi mpe motema likoló. Nabondeli bino, boyebisa ngai mpo na nini bongo.”
YO MPE ozali na motema likoló, ozali na bolɛmbu mingi mpo na kokokisa malamu mikumba na yo ya boklisto? Mosala ya kosakola emonanaka na yo mbala mosusu lokola mokumba ya kilo mingi, bozito oyo ekoki na yo te? Ebele na baklisto basembwi basila koleka na bileko ya kolemba, mpamba te ntango nyonso tozali kokutana na bopusi mabe oyo ekoki kobungisa esengo na biso. Lelo oyo kozala moklisto ya solo ezali likambo moke te. Na ntango mosusu yango ekoki komema basusu na kokanisa ete mosala ya kosakola ezali mokumba ya kilo mingi.
Toluka bantina
Makomami mamonisi polele ete Jéhovah azali kotyela biso masɛngami oyo mazangi ntina. Ntóma Yoane alobaki ete “mibeko na Nzambe mizali na bozito te.” (1 Yoane 5:3) Yesu alobelaki mpe na lolenge yango na ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino, mpe bozala bayekoli na ngai; mpamba te ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi, mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ekookisa mpasi te mpe mokumba na ngai mozali na bozito te.” (Matai 11:29, 30, MN) Emonani polele ete Nzambe alingi te ete na mosala na ye tonyokwama to tozala na bozito monene.
Ndenge nini moklisto mosembwi akoki kokoma na kotalela mikumba na ye ya boklisto lokola mokumba ya mpasi. Tala oyo ntóma Paulo alobi na ntina yango: “Tolongola bipekiseli nyonso . . . , mpe mpota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso.” (Baebele 12:1) Maloba na ntóma Paulo mamonisi ete moklisto akoki mbala mosusu komibakisa mikumba mizangi ntina. Ezali bobele masumu ya minene te. Na ndakisa, moklisto moko akoki kozwa ekateli oyo ekokɔtisela ye mindondo mpenza na bomoi mpe ekopesa ye mpasi na emekaneli na mbango oyo etyami liboso na basaleli na Nzambe.
Likanisi ya bokatikati na biloko ya mosuni
Totalela na ndakisa likambo litali mosala. Na ntina na makambo ya mpasi matali nkita oyo mazali kati na bamboka mingi, mbala mosusu moklisto azali na nzela mosusu te bobele kosala bangonga ebele. Kasi ekomaka mbala mingi ete bato bamipesi misala mingi mpo na kozwa esika ya lokumu to mpo na kozwa ebele na biloko kitoko. Na kotalelaka malamu ba mposa na bango, baklisto basusu bakanisaki ete ezali likambo na mayele na kotalela lisusu ezalela na bango ya mosala. Ezali nde oyo esalaki Debbie mpe mobali na ye, bango mibale ba Témoins de Jéhovah. Ye alimboli: “Bosenga na biso ya mosolo ebongwanaki mpe nasengelaki lisusu mpenza te kosala na ntango nyonso. Kasi ezalaki na ngai mpasi na kotika.” Mosika te abandaki kooka motema likoló mpo ete azalaki na misala mingi ya kokokisa. Abakisaki boye: “Natikalaki bobele na mokolo ya poso mpo na kosala mosala ya ndako.
Mbala mingi nazalaki lisusu na mposa ya kokende kosakola te. Ezalaki kotungisa lisosoli na ngai, kasi nazalaki kolinga mosala na ngai! Na nsuka na yango nayaki komitalela Ezalaki bobele na nzela moko. Nalongwaki na mosala na ngai.” Ezali solo ete bato nyonso te bakoki kosala bongo. Nzokande, na kotalelaka bangonga oyo olekisaka na mosala, mbala mosusu okososola ntina na kosala mwa mbongwana.
Banzela mosusu ya komilongola mikumba mizangi ntina ekoki kopesama na biso. Esengeli na biso kokitisa momeseno ya mibembo na biso ya kominanola, ntango oyo epesami na masano to kominanola mosusu—ná télévision? Ata soki tokanisi ete tokomi na mwa bokatikati kati na makambo yango, tosengeli kotalela likambo yango ntango nyonso mpo na kobatela bokatikati yango.
Ntina na ezaleli ya moto oyo akanisaka
Ezaleli ya moto oyo akanisaka ekosalisa biso kati na makambo yango na komesana na ezalela nyonso oyo ekoki kobima. Na bongo tokoki kobatela likanisi moko malamu likoló na mosala ya kosakola.—Baefese 5:15-17; Bafilipi 4:5.
Okanisaka ete osengeli kosala motindo moko lokola basusu na mosala na Nzambe? Liyoki ya ndenge wana likoki kopesa motema likoló mpe komema mitungisi makasi. Atako ndakisa malamu ya mozalani ekoki kosalisa yo mpenza na kosala mingi koleka, ezaleli ya moto oyo ayebi kokanisa ekosalisa yo na komityela mikano ya mayele oyo mikokani na ezalela na yo mpe na makoki na yo. Makomami mazali kopesa biso toli oyo elandi: “Tika ete moto na moto ameka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko kasi mpo na moto mosusu te, mpamba te moto na moto akomema bozito na ye moko.”—Bagalatia 6:4, 5.
Bizaleli ya bonkoko ya mboka na biso bikoki mpe kobakisama na bozito na biso. Na ntango na Yesu, bato bazalaki komilembisa na kolinga kobatela ebele na mibeko mpe malako na mangomba oyo matyami na bato. Na mikolo na biso, basaleli na Jéhovah basikolami na malako ya mangomba na lokuta. (Tala Yoane 8:32.) Ekoki kosalama ete moklisto moko amitika kokangama koleka ndelo na mimeseno ya mboka. Mpo na kopesa ndakisa moko, milulu lokola libala mbala mosusu ekozalaka na mindondo mingi. Mimeseno yango mizali mbala mosusu mpenza mabe te; mikoki kozala na lolenge ya mboka wana mpe ya kosepelisa Nzokande, baklisto bazali mpenza na ntango te mpe na makoki te ya kotosa mimeseno ya lolenge wana; mpe soki balingi bobele kotosa yango bakoki komityela mikumba ya mpamba.
Totala oyo elekaki na ntango Yesu akendeki kotala mwasi moko na nkombo Malata. Na esika ete azwa litomba na mayele ya bonzambe oyo Yesu azalaki kolakisa, “Malata . . . amipesaki na misala mingi.” Azalaki komitungisa mpo na misala mingi. (Luka 10:40) Kasi Yesu ayebisaki ye na maloba malamu ete alamba bilei na motindo mozangi mindondo mpo ete akoka kozwa matomba na liteya na ye. (Luka 10:41, 42) Ndakisa oyo emonisi ete bososoli mpe ezaleli ya moto oyo akanisaka esalisaka na kozwa bokatikati kati na mosala ya boklisto.—Yakobo 3:17.
Bososoli ezali mpe na ntina katina liponi ya baninga na biso. Masese 27:3 ekebisi biso ete: “Libanga ezali na bozito mpe zelo na bozito lokola—kasi bolozi na zoba eleki yango mibale na bozito.” Bato oyo tozalaka na bango pene bakozala mpenza na bopusi monene na lolenge na biso ya kokanisa Kotambola na bato oyo bamonaka mabunga ya basangani ya lisangá noki mpe bakotonga bango ekoki kokolisa epai na biso kolemba mpe makanisi ya mabe. (1 Bakolinti 15:33) Soki tososoli bolembu moko kati na likambo oyo, tosala mbongwana ya mayele kati na liponi ya baninga na biso; na bongo tokoyeisa mokumba na biso pepele.
Totambola na kosɔkɛma elongo na Nzambe
Tozali kokuta kati na Mika 6:8 (MN) motuna oyo ya ntina: “Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete . . . etambola na kosɔkɛma elongo na Nzambe na yo.” Libakema to adjectif “kosɔkɛma” ekoki komonisa ye oyo ayebi bandelo na ye. Baoyo bayebi bandelo na bango te bakoki komizindisa na makambo ebele. Baklisto bateli, ata bankulutu, bakomaki kino esika wana, elɛmbisaki bango, liyoki ya kozanga kolónga mpe kobungisama ya esengo. Kenneth, nkulutu kati na lisangá moko, andimaki likambo yango: “Nazalaki komiyoka ete nabandi konyokwama na makanisi; na bongo namilobelaki ete: ‘Nalingi kozela te ete nakoma kino wana.’ Na bongo namikangolaki na makambo mosusu mpe namipesaki na oyo ezalaki na makoki na ngai.”
Ata Moise, mosakoli na komikitisa monene, azalaki na mpasi mpo na kososola bandelo na ye. Bokilo na ye Yetelo asalisaki ye na kokanisa na mosala monene oyo azalaki kosala makasi na kokokisa nyonso ye moko. Yetelo atunaki. “Oyo ozali kosala mpo na bato ezali nini? Oyo ozali kosala ezali malamu te. Okomilembisa . . . mpo ete likambo oyo eleki nguya na yo. Yo moko okoki kosala yango te . . . Kasi yo, osengeli kopona babali na mayele kati na bato nyonso . . . mpe bakoya na makambo minene nyonso epai na yo, nde bango mpenza bakokata makambo mike. Boye yango ekozala na yo bozito te mpe bango bakomema yango na yo elongo.” Na nsima Moise apesaki ndambo ya mokumba na ye na basusu, mpe na lolenge yango abɔndisamaki na mokumba oyo ekomelaki ye mpasi mingi.—Exode 18:13-26.
Na libaku mosusu, Moise alobaki na Jéhovah: “Ngai moko nakoki komema bato oyo nyonso te. Mokumba yango moleki ngai na bozito.” Na ntango yango lisusu eyano ezalaki ete apesa ndambo na mosala na ye na bato mosusu. Soki ozali komyoka ete makambo malekeli yo ndelo mpo na ebele na misala, yango ekoki kozala nzela ya kobimisa yo na ezaleli oyo ya mpasi.—Mituya 11:14-17.
Jéhovah azali kosalisa biso na komema mokumba Yesu alobaki ete ekanganeli na ye ekookisa mpasi te mpe mokumba na ye ezali na bozito te. Ekanganeli oyo Yesu azali kopesa biso ezali libyangi mpo na goigoi te. Ekanganeli yango, ezali komipesa mobimba ya bomoto na biso na Nzambe lokola bayekoli ya Yesu Klisto. Na bongo moklisto ya solo ayokaka mwa kilo, mwa bopusami. (Matai 16:24-26; 19:16-29; Luka 13:24) Bopusami bakobakisama na meko oyo ezalela ya mokili ekokende na kobeba. Atako bongo tozali na ntina malamu ya kolikya mpo na bomoi na mikolo mizali koya, mpamba te libyangi na Yesu ezali koyebisa ete bato mosusu bakoki komitya na nse na ekanganeli moko elongo na ye mpe ye akosalisa bango.a Na bongo, ntango nyonso oyo tokomitya na nse na litambwisi ya Klisto, mokumba na biso makotikala pepele mpamba te akosalisa biso.
Nzambe azali kobatela baoyo balingi ye, mpe azali kobatela motema mpe makanisi ya baoyo, kati na libondeli, bazali kokitisa mikumba na bango likolo na ye. (Nzembo 55:22; Bafilipi 4:6, 7; 1 Petelo 5:6, 7) Mokomi na Nzembo alobaki: “Jéhovah akumisama, ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo, ye Nzambe na solo na kobika na biso!” (Nzembo 68:19) Ee, tondima ete mokolo na mokolo Nzambe akomema mokumba na biso mpo na biso soki tolongoli bipekiseli nyonso mpe topoti na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Note ya Traduction du monde nouveau, libongoli ya anglais ya références: “Bomitya na nse na ekanganeli na ngai elongo na ngai.”
[Elilingi na lokasa 24]
Bankulutu na mayele bazali pene na kopesa misala misusu na bandeko mosusu mpe kokabolana mokumba