Tozali na nguya ata na kati ya bolɛmbu
BOLƐMBU na yo ekoki kotungisa yo. Ekoki kokangama yo lokola sonzo. Okoki kokanisa ete okolonga yango te, to okoki komona ete ozali na ntina moko te soki omikokanisi na basusu mpe komona ete bango baleki yo. Longola yango, okoki kozala na maladi moko oyo ezali kosilisa yo makasi mpe esengo. Ata soki bolɛmbu na yo ezali ya lolenge nini, okoki komona ete okómi na nsuka. Okoki komiyoka lokola Yobo, oyo alobaki na Nzambe ete: “Ee, soki okobomba ngai kati na esika ya bakufi, soki okozipa ngai kino nkanda na yo ekosuka, soki okotyela ngai elaka mpe okokanisa ngai?”—Yobo 14:13.
Okoki kosala nini mpo na kolongola makanisi ya ndenge wana? Atako ekoki kozala mpasi, osengeli kobosana mikakatano na yo mpo na mwa ntango. Na ndakisa, okoki kokanisa mituna oyo Yehova atunaki Yobo, mosaleli na ye ya sembo: “Yo ozalaki wapi wana natyaki miboko ya mokili? Yebisá ngai, soki oyebi kososola. Nani apimaki bipimelo na yango—oyebi nde? Nani asembolaki nsinga likoló na yango?” (Yobo 38:4, 5) Kokanisa na mituna yango ekoki kotinda biso tóyeba ete Yehova aleki na bwanya mpe na nguya. Ayebi ntina oyo atiki ete mokili oyo mabe ezala tii lelo.
“Nzubɛ moko na kati ya mosuni”
Mosaleli mosusu ya sembo ya Yehova asɛngaki ye alongola ye “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” elingi koloba mokakatano moko oyo ezalaki kosila te. Ntoma Paulo abondelaki Nzambe mbala misato ete alongola mokakatano yango. Mokakatano yango oyo ezalaki lokola nzubɛ, ekokaki kolongola Paulo esengo na mosala ya Yehova. Paulo alobaki ete kozala na nzubɛ yango ezalaki lokola kobɛtama mbata ntango nyonso. Kasi, eyano ya Yehova ezalaki ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo; mpo nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” Yehova alongolaki te nzubɛ yango na kati ya mosuni. Paulo asɛngelaki koyikela yango mpiko; kasi abakisaki boye: “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.” (2 Kol. 12:7-10) Alingaki koloba nini?
Mokakatano ya Paulo elimwaki te. Kasi, yango epekisaki ye te asala makambo minene na mosala ya Yehova. Paulo atyaki elikya ete Yehova akosunga ye mpe azalaki ntango nyonso kosɛnga ye lisalisi. (Filp. 4:6, 7) Na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Paulo alobaki boye: “Nasili kobunda etumba ya malamu mingi, nasili kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka, nabateli kondima.”—2 Tim. 4:7.
Yehova asalelaka bato ya kozanga kokoka mpo na kokokisa mokano na ye atako bazali na bolɛmbu mpe mikakatano, na ndenge yango lokumu nyonso ekendaka epai na ye. Akoki kotambwisa bango mpe kopesa bango bwanya mpo bákoka kolonga mikakatano mpe kobatela esengo na mosala na ye. Ya solo, Yehova akoki kosalela bato ya kozanga kokoka mpo bákokisa makambo minene atako bazali na bolɛmbu.
Paulo alobaki ntina oyo Nzambe alongolaki te nzubɛ na kati ya mosuni na ye: “Mpo nakoka te komitombola koleka ndelo.” (2 Kol. 12:7) “Nzubɛ” yango esalisaki Paulo abosana te ete azali moto ya kozanga kokoka mpe azala ntango nyonso na komikitisa. Yango eyokani na likambo oyo Yesu ateyaki ete: “Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.” (Mat. 23:12) Mikakatano ekoki koteya basaleli ya Nzambe komikitisa mpe kosalisa bango báyeba ete mpo na kotikala sembo, basengeli kotalela Yehova. Na ndenge yango, lokola ntoma Paulo, bakoki ‘komikumisa na kati ya Yehova.’—1 Kol. 1:31.
Bolɛmbu oyo emonanaka te
Bato mosusu bayebaka te ete bazali na bolɛmbu to mpe balingaka kondima yango te. Na ndakisa, moto mosusu akoki kozala na ezaleli ya komityela motema koleka ndelo. (1 Kol. 10:12) Bolɛmbu mosusu oyo bato mingi bazalaka na yango ezali koluka lokumu.
Yoaba, oyo akómaki kokamba basoda ya Mokonzi Davidi, azalaki moto ya mpiko oyo azongaka nsima te, mpe azalaki na mayele mingi. Nzokande, Yoaba asalaki makambo ya mabe oyo emonisaki ete azalaki komityela motema koleka ndelo mpe azalaki na elimo ya komitombola. Abomaki bakonzi mibale ya basoda. Ya liboso Abinele; abombelaki ye nkanda na motema mpe nsukansuka abomaki ye. Ya mibale Amasa; asimbaki ye na mandɛfu lokola nde alingi kopwɛpwa ye mpe na nsima, akɔtisaki ye mopanga oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye ya mwasi. (2 Sam. 17:25; 20:8-10) Amasa akómaki mokonzi ya basoda na esika ya Yoaba; yango wana mpo na zuwa, Yoaba abomaki ye na elikya ete akozongela esika na ye ya mokonzi ya basoda. Emonani ete Yoaba apekisaki te makanisi na ye ya mabe, ata mpe mposa ya kozwa lokumu. Asalaki makambo ya mabe mpenza kozanga ete ayoka mawa. Ntango Mokonzi Davidi akómaki na nsuka ya bomoi na ye, ayebisaki mwana na ye Salomo ete Yoaba asengelaki kobomama mpo na mabe oyo asalaki.—1 Mik. 2:5, 6, 29-35.
Tosengeli kotika te ete bamposa na biso ya mabe etambwisa biso; tokoki kopekisa bolɛmbu na biso. Ya liboso, tosengeli koyeba mpe kondima bolɛmbu yango. Na nsima, tosengeli koluka ndenge oyo tokoki kolonga yango. Tosengeli kobondelaka Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga ye asalisa biso tólonga bolɛmbu na biso, mpe tosengeli koyekolaka Liloba na ye mpo na koyeba ndenge ya kopekisa makanisi na biso ya mabe. (Ebe. 4:12) Ntango mosusu tosengeli kokoba kosala makasi mpo na kolonga bolɛmbu na biso mpe kolɛmba nzoto te. Kutu, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mbala mosusu etumba yango ekosila te. Paulo andimaki likambo yango; akómaki boye: “Oyo nazali kolinga, nazali te na momeseno ya kosala yango; kasi oyo nazali koyina nde yango nazali kosala.” Kasi, ndenge toyebi yango, Paulo alɛmbaki nzoto te, amonaki te ete misala na ye nde ezalaki kotambwisa ye. Kutu, akobaki kobundisa bolɛmbu na ye na elikya ete Nzambe akosunga ye na nzela ya Yesu Klisto. (Lom. 7:15-25) Na mokanda mosusu, Paulo alobaki boye: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai makofi mpe kokómisa yango lokola moombo, mpo, nsima ya kosakola epai ya bamosusu, ngai moko naboyama te ezala na ndenge nini.”—1 Kol. 9:27.
Moto alukaka komilongisa. Tokoki kolonga ezaleli yango soki tozali kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango, mpe tosali ndenge Paulo alendisaki baklisto ete: “Bóyina oyo ezali mabe, bókangama na oyo ezali malamu.” (Lom. 12:9) Mpo na kolonga bolɛmbu na biso, tosengeli kozala sembo, kolendendela, mpe komipekisa. Davidi abondelaki Yehova boye: “Tángá motema na ngai mpe makanisi na ngai.” (Nz. 26:2) Ayebaki ete Nzambe akoki mpenza koyeba makanisi ya motema na biso mpe kopesa biso lisalisi oyo tosengeli na yango. Soki tondimi litambwisi oyo Yehova azali kopesa na nzela ya Liloba na ye mpe ya elimo santu na ye, nsukansuka tokolonga bolɛmbu na biso.
Bato mosusu bakoki kotungisama mpo na mikakatano oyo bazali komona ete bakokoka kolonga yango bango moko te. Bankulutu bakoki kosalisa to kolendisa. (Yis. 32:1, 2) Kasi, tosengeli kozala na bokatikati. Makambo mosusu ekosila te na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Atako bongo, bato mingi bayekoli koyika mpiko, mpe yango esalisi bango bázala na bomoi ya esengo.
Yehova akozanga te kosalisa biso
Ata soki tokutani na mokakatano ya lolenge nini na bantango oyo ya mpasi, tokoki kozala na elikya ete Yehova akotambwisa biso mpe akosunga biso. Biblia elobi boye: “Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango ekoki; wana bozali kobwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.”—1 Pet. 5:6, 7.
Ntango Kathy, oyo asali bambula mingi na Betele, ayebaki ete mobali na ye azali na maladi ya Alzheimer, amonaki ete akokoka te kolonga mikakatano oyo ezalaki kozela ye. Mokolo na mokolo, azalaki kosɛnga Yehova apesa ye bwanya mpe makasi. Ntango maladi yango ekɔtelaki mobali na ye makasi, bandeko mibali bayekolaki ndenge ya kosunga moto oyo azali na maladi yango mpe bandeko basi bazalaki kobɔndisa Kathy ná mobali na ye. Yehova asalelaki baklisto yango mpo na kobɔndisa Kathy mpe na ndenge yango, Kathy alongaki kosunga mobali na ye tii ntango akufaki mbula 11 na nsima. Alobi boye: “Nazalaki kotɔnda Yehova mingi mpo na lisungi na ye; esalisaki ngai nalɛmba te. Nandimaki te ete nakokaki kosala oyo esengelaki na boumeli ya ntango molai atako nalɛmbaki makasi!”
Lisalisi mpo na kolonga bolɛmbu oyo emonanaka te
Ntango moto azali komimona ete azali na ntina te, akoki kokanisa ete Yehova akoyoka ye te soki asɛngi lisungi ntango akutani na mpasi. Na ntango wana, ebongi kokanisa makambo oyo Davidi alobaki ntango azalaki na mawa mpo na lisumu monene oyo asalaki na Bata-seba: “Ee Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.” (Nz. 51:17) Davidi abongolaki mpenza motema, mpe ayebaki ete akoki kobondela Nzambe mpe kolikya ete akolimbisa ye. Yesu amonisaki motema mawa ya Yehova. Evanzile ya Matai emonisi ete Yesu akokisaki esakweli oyo ya Yisaya: “Nkɛkɛlɛ oyo efinamá akobuka yango te, mpe nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke akoboma yango te.” (Mat. 12:20; Yis. 42:3) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonisaki motema mawa mpo na babola mpe bato oyo bazalaki konyokwama. Abakisaki te mpasi ya bato oyo bomoi na bango ekómaki lokola mwa nsinga ya mwinda oyo ekómi pene ya kokufa. Kasi, na bolingo nyonso, abɔndisaki baoyo bazalaki konyokwama mpe azongiselaki bango elikya. Yesu amonisaki ezaleli yango na boumeli ya ntango nyonso oyo azalaki awa na mabelé. Okanisi ete Yesu abongwani te mpe ete azali na likoki ya komitya na esika na yo? Baebele 4:15 emonisi ete azali Ye oyo akoki “koyeba komitya na esika ya bolɛmbu na biso.”
Ntango Paulo alobelaki “nzubɛ na kati ya mosuni” na ye, abakisaki ete nguya ya Klisto ezalaki “lokola hema” likoló na ye. (2 Kol. 12:7-9) Amonaki ete Nzambe azalaki kobatela ye na nzela ya Klisto, se ndenge moto oyo afandi na nse ya hema abatelamaka na moi to mbula. Lokola Paulo, tosengeli kotika te ete bolɛmbu to mikakatano elɛmbisa biso. Mpo na kobatela boyokani malamu na Nzambe, tosengeli kosalela bibongiseli nyonso oyo Yehova apesi biso na nzela ya lisangá na ye. Tokoki kosala nyonso oyo tokoki mpe kotalela Yehova na elikya ete akotambwisa matambe na biso. Komona ndenge oyo nguya ya Nzambe ezali kosalisa biso na bolɛmbu na biso, ekoki kotinda biso tóloba lokola Paulo ete: “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.”—2 Kol. 12:10.
[Elilingi na lokasa 3]
Paulo akobaki kobondela Yehova atambwisa ye mpo na kokokisa mosala na ye
[Elilingi na lokasa 5]
Mokonzi Davidi atyaki Yoaba mokonzi ya basoda
[Elilingi na lokasa 5]
Yoaba abomaki Amasa mpo azongela esika na ye
[Elilingi na lokasa 6]
Bankulutu bapesaka toli ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano na biso