“Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te”
“Bango nyonso babandaki kopesa litatoli ya malamu na ntina etali ye mpe kokamwa na maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye.”—LUKA 4:22.
1, 2. (a) Mpo na nini bapolisi oyo batindaki bákende kokanga Yesu bazongaki mabɔkɔ mpamba? (b) Nini ezali komonisa ete longola bapolisi, bato mosusu mpe bakamwaki na ndenge oyo Yesu azalaki koteya?
BANGANGA-NZAMBE na Bafalisai batindaki bapolisi bákende kokanga Yesu Klisto, kasi bazongaki mabɔkɔ mpamba. Yango wana batunaki bango: “Mpo na nini boyei na ye te?” Ɛɛ, mpo na nini bapolisi bakangaki moto yango te atako alingaki kosala matata te? Bapolisi balobaki boye: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.” Ndenge oyo Yesu azalaki koteya ekamwisaki bango mingi yango wana bazangaki kutu makasi ya kokanga moto ya kimya ndenge wana.a—Yoane 7:32, 45, 46.
2 Longola bapolisi wana, ezali mpe na bato mosusu oyo bakamwaki ntango bayokaki ndenge oyo Yesu azalaki koteya. Biblia elobi na biso ete ebele ya bato bazalaki kolanda ye mpo na koyoka ye. Na mboka na ye moko bato bakamwaki na “maloba kitoko oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye.” (Luka 4:22) Mbala mingi afandaki na kati ya bwato moko mpe azalaki koteya ebele ya bato oyo bayanganaki na libongo ya Mbu ya Galilai. (Malako 3:9; 4:1; Luka 5:1-3) Mbala moko, “ebele monene ya bato” baumelaki pene na ye mikolo mingi, babosanaki ata kolya.—Malako 8:1, 2.
3. Wapi ntina ya libosoliboso oyo Yesu azalaki moteyi monene?
3 Makambo nini esalaki ete Yesu azala moteyi monene? Likambo ya libosoliboso ezali bolingo.b Yesu alingaki solo oyo azalaki koteya, alingaki mpe bato oyo ye azalaki koteya. Kasi, Yesu ayebaki mpe malamumalamu mayele ndenge na ndenge ya koteya. Masolo oyo tokoyekola na nimero oyo ekolobela mwa ndambo ya mayele ya koteya oyo azalaki kosalela mpe ndenge oyo tokoki komekola yango.
Kozanga mindɔndɔ mpe kozala polele
4, 5. (a) Mpo na nini Yesu azalaki koteya na maloba ya mindɔndɔmindɔndɔ te, mpe nini esimbi likebi na biso na ndenge oyo azalaki kosala bongo? (b) Na ndenge nini Lisolo Likoló ya Ngomba ezali ndakisa moko oyo ezali komonisa ete Yesu azalaki koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ?
4 Bato oyo batángá bakelasi minene balingaka mingi kosalela maloba ya makasimakasi oyo bato mosusu bakangaka ntina na yango te. Kasi, soki bato mosusu bazali kokanga ntina ya makambo oyo tozali koloba te, ndenge nini bakozwa litomba na boyebi na biso? Na mosala na ye ya koteya, ata mbala moko te Yesu asalelaki maloba oyo bato bayebaki ndimbola na yango te. Kanisá ebele ya maloba oyo moto lokola Yesu akokaki kozala na yango! Kasi, atako ayebaki makambo mingi, azalaki komitya na esika ya bato oyo bazalaki koyoka ye. Ayebaki ete mingi kati na bango bazalaki “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Misala 4:13) Azalaki kosolola na bango na maloba oyo bakokaki kokanga ntina na yango. Maloba ezalaki ya mindɔndɔ te, kasi ezalaki komonisa solo ya mozindo.
5 Tókamata ndakisa ya Lisolo Likoló ya Ngomba oyo ezali na Matai 5:3–7:27. Ekoki kozala ete Yesu asalaki lisolo yango na miniti 20 mpamba. Kasi, mateya yango ezali ya likolólikoló te, ezali kolobela na bozindo makambo lokola ekobo, koboma libala mpe kolinga biloko ya mokili. (Matai 5:27-32; 6:19-34) Nzokande, ezali na maloba ya mindɔndɔmindɔndɔ to ya makasimakasi te. Kutu, ezali ata na liloba moko te oyo ata mwana moke akokaki kozala na mokakatano mpo na kokanga ntina na yango! Yango wana, ntango asilisaki koloba yango, ebele ya bato—na ntembe te, basali-bilanga, babateli ya mpate, mpe babomi-mbisi oyo bazalaki kati na bango—“bakamwaki na ndenge na ye ya koteya”!—Matai 7:28.
6. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ete Yesu azalaki koloba maloba ya mindɔndɔmindɔndɔ te, kasi oyo ezalaki na ndimbola monene.
6 Mbala mingi, Yesu azalaki koloba bafraze ya polele mpe ya mikuse mpo na koteya makanisi oyo ezalaki na mindɔndɔ te kasi oyo ezalaki na ndimbola monene. Atako na ntango wana bazalaki na babuku te lokola biso lelo oyo, Yesu ateyaki bato makambo oyo etikalaki na makanisi na bango mpe na mitema na bango. Talá mwa bandakisa: “Moto moko te akoki kosala lokola moombo mpo na bankolo mibale; . . . bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.” “Bótika kosambisa mpo bino bósambisama te.” “Bokoyeba bato wana na bambuma na bango.” “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde babɛli.” “Baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.” “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.” “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”c (Matai 6:24; 7:1, 20; 9:12; 26:52; Malako 12:17; Misala 20:35) Lelo oyo, pene na mbula 2 000 banda Yesu alobá maloba wana, bato mingi bayebaka yango na motó.
Azalaki kotuna mituna
7. Mpo na nini Yesu azalaki kotuna mituna?
7 Yesu azalaki kotuna mituna malamu mpenza. Ata soki koloba na moto likambo mbala moko ekokaki kozala nzela ya mokuse, mbala mingi azalaki kotuna mituna. Mpo na nini azalaki kotuna mituna? Na bantango mosusu, azalaki kotuna mituna oyo ezalaki kotungisa mpo na kobimisa polele makanisi mabe ya bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye mpo akangisa bango monɔkɔ. (Matai 12:24-30; 21:23-27; 22:41-46) Kasi, mbala mingi Yesu azalaki kotuna mituna mpo na koteya solo, mpo ete bato oyo azalaki koloba na bango báloba makambo oyo bazalaki na yango na mitema, mpe mpo na kolamusa makanisi ya bayekoli na ye mpe koteya bango kokanisa malamu. Tótalela ndakisa mibale oyo etalelaki ntoma Petelo.
8, 9. Ndenge nini Yesu asalelaki mituna mpo na kosalisa Petelo azwa likanisi ya malamu na likambo ya kofuta mpako ya tempelo?
8 Ya liboso, kanisá lisusu ntango bakɔngɔli ya mpako batunaki Petelo soki Yesu azalaki kofuta mpako ya tempelo.d Petelo, oyo na bantango mosusu azalaki makila mɔ́tɔmɔ́tɔ, apesaki eyano ete, “Afutaka.” Kasi, mwa moke na nsima, Yesu atunaki ye mituna mpo na kosalisa ye akanisa, atunaki ye boye: “ ‘Okanisi nini, Simona? Bakonzi ya mabelé bazwaka lifuti to mpako ya moto na moto epai ya banani? Epai ya bana na bango to epai ya bapaya?’ Ntango alobaki ete: ‘Epai ya bapaya,’ Yesu alobaki na ye ete: ‘Boye, ezali solo ete bana bazali te na mokumba ya kofuta mpako.’ ” (Matai 17:24-27) Tokanisi mpenza ete Petelo akangaki ntina ya mituna ya Yesu. Mpo na nini?
9 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, eyebanaki ete bato ya libota ya mokonzi bazalaki kofuta mpako te. Sikoyo, soki totaleli likambo ndenge yango, Yesu akokaki kofuta mpako te mpamba te azali Mwana mobotami-se-moko ya Mokonzi ya likoló oyo bazalaki kosambela na tempelo yango. Kasi, na esika ayebisa Petelo eyano mbala moko, Yesu atunaki Petelo mituna oyo ebongi, kasi na boboto, mpo na kosalisa ye akanga ntina, mpe mbala mosusu mpo na kosalisa ye ayeba ete asengeli kokanisaka malamu liboso ya koloba.
10, 11. Na butu ya Elekeli ya mobu 33 T.B., Yesu asalaki nini ntango Petelo akataki moto litoi mpe ndenge nini yango ezali komonisa ete Yesu ayebaki ntina ya mituna?
10 Ndakisa ya mibale ezali likambo oyo esalemaki na butu ya Elekeli ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.) ntango ebele ya bato bayaki kokanga Yesu. Bayekoli batunaki Yesu soki basengeli kobundisa bato yango. (Luka 22:49) Liboso kutu ayoka eyano, mbala moko Petelo akataki litoi ya moto moko na mopanga (ekoki kozala ete Petelo akanaki mpenza kozokisa ye mpota ya monene). Petelo asalaki likambo oyo ezalaki na makanisi ya nkolo na ye te, mpamba te Yesu azalaki na likanisi ya kosala matata te, alingaki komitika ete bákanga ye. Yesu asalaki nini? Azalaki kaka na motema molai ndenge amesaná, atunaki Petelo mituna misato oyo: “Kɔpɔ oyo Tata apesi ngai, nasengeli te komɛla yango ata ndenge nini?” “Okanisi nde ete nakoki te kosɛnga Tata na ngai apesa ngai sikoyo mampinga koleka zomi na mibale ya baanzelu? Bongo, ndenge nini Makomami ekokokisama ete yango esengeli kosalema bongo?”—Yoane 18:11; Matai 26:52-54.
11 Meká naino kokanisa makambo oyo elekaki wana. Ntango oyo ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda bazingaki ye, Yesu ayebaki ete liwa na ye ekómi pene mpe azalaki na mokumba monene ya kolongola nsɔni na nkombo ya Tata na ye mpe kobikisa bato. Kasi, kaka na ntango wana, ateyaki Petelo makambo ya ntina na nzela ya mituna oyo atunaki ye. Tozali komona mpenza ete Yesu ayebaki ntina ya mituna, boye te?
Maloba ya elilingi mpo na kolekisa ndelo
12, 13. (a) Maloba ya elilingi mpo na kolekisa ndelo ezali nini? (b) Ndenge nini Yesu asalelaki maloba ya elilingi ya kolekisa ndelo mpo na komonisa ete kosambisa mabunga mikemike ya bandeko na biso ezali malamu te?
12 Na mosala na ye, Yesu azalaki mbala mingi kosalela mayele mosusu mpo na koteya malamu: maloba ya elilingi mpo na kolekisa ndelo to kongalisa likambo mpo na kobɛta nsɛtɛ. Yesu azalaki kosalela bililingi ya kolekisa ndelo mpo na kolobela bandakisa oyo bato bakokaki kobosana yango noki te. Tótalela mwa bandakisa.
13 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, ntango amonisaki ete esengeli ‘kotika kosambisa’ basusu, Yesu alobaki ete: “Boye, mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali te kokanisa libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko.” (Matai 7:1-3) Ozali komeka komona likambo yango na miso ya makanisi? Moto oyo alingi kosambisa alukaka kolongola ata mwa lititi moke na “liso” ya ndeko na ye. Moto ya ndenge wana akanisaka ete ndeko na ye akoki komona makambo polele te mpo azwa bikateli ya malamu. Kasi, ye moko akoki te kotalela makambo na ndenge oyo ebongi mpamba te liso na ye ezipami na “motɔndɔ,” nzete ya monene to libaya oyo ekoki kosimba nsamba ya ndako. Yango ezali ndenge malamu mpenza ya komonisa ete kosambisa mabunga mikemike ya bandeko na biso na ntango oyo biso moko tokoki kozala na makambo mabe ezali ezaleli malamu te!
14. Mpo na nini tolobi ete maloba ya Yesu oyo etali kokɔngɔla ngungi mpe komɛla kamela ezalaki elilingi mpo na kolekisa ndelo oyo ebongi mpenza?
14 Mokolo mosusu, Yesu alobaki ete Bafalisai bazali ‘batambwisi bakufá miso, oyo bakɔngɔlaka ngungi kasi bamɛlaka kamela.’ (Matai 23:24) Yango ezalaki maloba ya elilingi ya solosolo mpo na kolekisa ndelo. Mpo na nini? Mpamba te ngungi ezali eloko moke mpenza soki tokokanisi yango na kamela oyo ezali moko ya banyama ya minene oyo bato oyo Yesu azalaki koloba na bango bayebaki. Esengeli ngungi soki milio 70 mpo na kokokana na bozito ya kamela moko! Lisusu, Yesu ayebaki ete Bafalisai bazalaki kokɔngɔla vinyo na bango na eteni ya elamba mpo na kolongola yango bosɔtɔ. Bato yango oyo batingamaki na mibeko bazalaki kosala bongo mpo bámɛla ngungi te noki te bákóma mbindo. Kasi, na maloba ya elilingi, bazalaki komɛla kamela, oyo ezalaki mpe nyama ya mbindo. (Levitike 11:4, 21-24) Likanisi ya Yesu ezalaki polele. Bafalisai bazalaki kolandela makambo mikemike ya Mibeko, kasi bazalaki kobosana makambo oyo eleki ntina, elingi koloba “bosembo mpe motema mawa mpe kondima.” (Matai 23:23) Talá ndenge oyo Yesu alakisaki bizaleli na bango polele!
15. Yebisá mwa ndambo ya makambo oyo Yesu ateyaki na nzela ya maloba ya elilingi mpo na kolekisa ndelo.
15 Na mosala na ye, Yesu azalaki mbala mingi kosalela maloba ya elilingi mpo na kolekisa ndelo. Tótalela mwa bandakisa. “Kondima monene lokola mbuma [moke] ya mutarde” oyo ekokaki kolongola ngomba mpe kotya yango na esika mosusu—Yesu asalelaki mpenza ndenge oyo ebongi mpo na komonisa ete mwa kondima moke ekoki kosala makambo minene. (Matai 17:20) Kamela oyo ezali komeka koleka na lidusu ya ntonga—yango ezali komonisa malamu mpenza mokakatano ya mozwi oyo azali koluka kosalela Nzambe soki amipesi na biloko ya mokili! (Matai 19:24) Maloba ya elilingi oyo Yesu azalaki kosalela mpe ndenge azalaki kosimba mitema na mwa maloba moke ezali kokamwisa yo te?
Makanisi ebongi oyo moto akoki kokweisa te
16. Na ndenge nini Yesu azalaki kosalela mayele mingi oyo azalaki na yango?
16 Lokola azalaki na bɔɔngɔ ya kokoka, Yesu ayebaki mpenza kokanisa malamu elongo na bato. Kasi, azalaki kosalela likoki yango na ndenge ya mabe te. Na mateya na ye, azalaki ntango nyonso kosalela mayele mingi oyo azalaki na yango mpo na kolongisa solo. Ntango mosusu azalaki kosalela makanisi oyo ebongi mpenza mpo na kokweisa makambo ya lokuta oyo banguna na ye bazalaki koloba mpo na ye. Mbala mingi, asalelaki makanisi oyo ebongi mpo na koteya bayekoli na ye makambo ya ntina mingi. Tótalela ndenge oyo Yesu ayebaki kosalela makanisi oyo ebongi.
17, 18. Yesu asalelaki makanisi nini mpo na kokweisa efundeli moko ya lokuta oyo Bafalisai bafundaki ye?
17 Tótalela likambo oyo elekaki mokolo moko oyo Yesu abikisaki mobali moko oyo azalaki na demo, azalaki komona te mpe azalaki koloba te. Ntango Bafalisai bayokaki yango, balobaki ete: “Moto oyo azali kobimisa bademo kaka na nzela ya Belezebubu [Satana], moyangeli ya bademo.” Tomoni naino ete Bafalisai bandimaki ete esengelaki nguya oyo eleki nguya ya moto mpo na kobengana bademo. Kasi, mpo bato bándimela Yesu te, Bafalisai balobaki ete asalaki likamwisi yango na nguya ya Satana. Mpo na komonisa bango ete likanisi na bango esukaki na nzela, Yesu alobaki boye: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko ekendaka na libebi, mpe engumba nyonso to ndako oyo ekabwani na kati na yango moko ekotɛlɛma te. Ndenge moko, soki Satana azali kobimisa Satana, akabwani na kati na ye moko; boye, ndenge nini bokonzi na ye ekotɛlɛma?” (Matai 12:22-26) Na maloba mosusu, Yesu azalaki koloba boye: ‘Soki ngai nazali moto ya Satana, ndenge bozali koloba, boye nazali kobebisa mosala ya Satana, elingi koloba ete Satana azali kobebisa matomba na ye moko; mpe na bongo, mosika te akokwea.’ Okanisi mpenza ete moto akokaki kokweisa makanisi wana?
18 Na nsima, Yesu akendaki na bango lisusu mosika mpo na kokanisa likambo yango. Ayebaki ete Bafalisai mosusu bazalaki mpe kobengana bademo. Yango wana, atunaki bango motuna moke kaka kasi oyo esilisaki bango mayele: “Soki ngai nazali kobimisa bademo na nzela ya Belezebubu, na nzela ya nani bana [to bayekoli] na bino bazali kobimisa bango?” (Matai 12:27) Na maloba mosusu, likanisi ya Yesu ezalaki boye: ‘Soki ngai nazali kobengana bademo na nguya ya Satana, boye bayekoli na bino bazali kosala yango na nguya se moko wana.’ Bafalisai bakokaki lisusu koloba nini? Bakokaki kondima te ete bayekoli na bango bazalaki kosala na nguya ya Satana. Na makanisi ya ndenge wana oyo ezali mpasi mpo moto akweisa yango, Yesu amonisaki bango ete efundeli na bango ezalaki solo te.
19, 20. (a) Ndenge nini ya malamu Yesu azalaki kosalela makanisi oyo ebongi? (b) Ndenge nini Yesu asalelaki likanisi oyo ezali na maloba ‘mingi boni’ wana azalaki kopesa bayekoli na ye eyano ntango basɛngaki ye alakisa bango ndenge ya kobondela?
19 Longola kosalela makanisi oyo ebongi mpo na kokangisa banguna na ye monɔkɔ, Yesu asalelaki makanisi oyo ebongi mpo na koteya makambo oyo ezali kolendisa mpenza na ntina na Yehova. Mbala mingi, azalaki kokanisa na bato na motuna oyo ezali na maloba lokola ‘mingi boni’ to ‘na koleka’ mpo na kosalisa bato bákanga ntina ya makambo mosusu na makambo oyo bayebi. Tótalela bandakisa mibale.
20 Ntango ayanolaki na motuna ya bayekoli oyo balingaki koyeba ndenge nini kobondela, Yesu alobaki na bango ndakisa ya moto moko oyo, mpo atyaki ‘mbamba makasi,’ nsukansuka moninga oyo azalaki koboya kopesa ye eloko oyo azalaki kosɛnga apesaki ye yango. Yesu alobelaki mpe mposa oyo baboti bazalaka na yango ya “kopesa” bana na bango “makabo ya malamu.” Na nsima, asukisaki boye: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!” (Luka 11:1-13) Likanisi ya Yesu ezalaki komonisa nde bokeseni ya makambo, kasi bokokani te. Soki moninga moko oyo azalaki mpenza na mposa ya kopesa te, kasi nsukansuka andimaki kopesa eloko oyo bazalaki kosɛnga ye, mpe soki bato ya kozanga kokoka bakokisaka bamposa ya bana na bango, na koleka Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo akopesa basaleli na ye ya sembo elimo santu ntango bazali kobondela na komikitisa mpo na kosɛnga ye yango!
21, 22. (a) Makanisi nini Yesu asalelaki mpo na kopesa toli na ntina etali mitungisi mpo na biloko ya mokili? (b) Nsima ya kotalela mwa ndambo ya mayele oyo Yesu azalaki kosalela mpo na koteya, tokoki mpenza koloba nini?
21 Yesu asalelaki likanisi ya ndenge yango ntango apesaki toli mpo na ndenge ya kolonga mitungisi mpo na biloko ya mokili. Alobaki boye: “Bótala malamu bayanganga elonaka te ebukaka mpe te, mpe ezali na ebombelo mpe na ndako ya kobomba biloko te, kasi atako bongo Nzambe aleisaka yango. Bino boleki bandɛkɛ na motuya mosika te? Bótala malamu ndenge bafololo kilinono ekolaka; yango emonaka mpasi te mpe etongaka te . . . Nzokande, soki Nzambe azali kolatisa matiti na bilanga ndenge wana oyo lelo ezali mpe lobi ekobwakama na litumbo, akolatisa bino na koleka, bino bato ya kondima moke!” (Luka 12:24, 27, 28) Ya solo, soki Yehova abatelaka bandɛkɛ na bafololo, na koleka akokokisa bamposa ya basaleli na ye! Na ntembe te, makanisi ya boboto mpe ya nguya motindo wana esimbaki mitema ya bato oyo Yesu azalaki koloba na bango.
22 Nsima ya kotalela mwa ndambo ya mayele ya koteya oyo Yesu azalaki kosalela, tokoki mpenza koloba ete bapolisi oyo bakangaki ye te balekisaki ndelo te ntango balobaki ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.” Kasi, ekoki mpenza kozala ete mayele ya koteya oyo mpo na yango Yesu ayebani mingi ezali bandakisa to masese. Mpo na nini Yesu azalaki kosalela mayele wana? Mpe mpo na nini bandakisa na ye ebongaki mpenza? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki mpenza kozala ete ezalaki bapolisi ya Sanedrina oyo banganga-nzambe bakonzi nde bazalaki kopesa bango mitindo.
b Talá lisolo “Napesi bino ndakisa” mpe lisolo ‘Bólanda ngai ntango nyonso,’ na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2002.
c Kaka ntoma Paulo nde azongelaki maloba oyo ya nsuka na Misala 20:35, atako Baevanzile ezali mpe kolobela likanisi yango. Ekoki kozala ete Paulo ayokaki yango na moto mosusu (mbala mosusu na moyekoli moko oyo ayokaki yango na monɔkɔ ya Yesu to mpe Paulo ayokaki yango epai ya Yesu nsima ya lisekwa na ye) to mpe na nzela ya emonaneli oyo Nzambe alakisaki ye.—Misala 22:6-15; 1 Bakolinti 15:6, 8.
d Mbala moko na mbula, Moyuda mokomoko azalaki kofuta mpako ya tempelo dalakima mibale (mbongo oyo moto azalaki kozwa na mikolo mibale ya mosala). Mpako yango ezalaki mpo na misala ya kobongisa tempelo, mpo na misala oyo ezalaki kosalema na tempelo, mpe mpo na bambeka oyo ezalaki kopesama mokolo na mokolo mpo na ekólo mobimba.
Ozali koyeba lisusu?
• Bandakisa nini ezali komonisa ete Yesu azalaki koteya na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ mpe ya polele?
• Mpo na nini Yesu azalaki kotuna mituna ntango azalaki koteya?
• Maloba ya elilingi mpo na kolekisa ndelo elimboli nini, mpe ndenge nini Yesu asalelaki mayele yango ya koteya?
• Ndenge nini Yesu asalelaki makanisi oyo ebongi mpo na koteya bayekoli solo oyo ezali kolendisa mpenza na ntina na Yehova?
[Elilingi na lokasa 9]
Yesu azalaki kosalela maloba ya polele oyo bato mpamba bakokaki kokanga ntina na yango
[Elilingi na lokasa 10]
Bafalisai ‘bazalaki kokɔngɔla ngungi kasi bazalaki komɛla kamela’