Osaleli elimo santu lisumu?
“Ezali na lisumu oyo ememaka na liwa.”—1 YOANE 5:16.
1, 2. Ndenge nini toyebi ete moto akoki kosalela elimo santu lisumu?
NA Allemagne, mwasi moko moklisto akomaki boye: “Nazali kotungisama na likanisi ete nasalelaki elimo santu lisumu.” Moklisto akoki nde kosalela elimo santu, to nguya ya Nzambe, lisumu?
2 Ɛɛ, moto akoki kosalela elimo santu ya Yehova lisumu. Yesu Klisto alobaki boye: “Bato bakolimbisama lisumu ya ndenge nyonso mpe kotuka ya ndenge nyonso, kasi kotuka elimo ekolimbisama te.” (Matai 12:31) Lisusu, Biblia ekebisi biso na maloba oyo: “Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, etikali lisusu te na mbeka mpo na masumu, kasi etikali kaka kozela lisambisi moko ya nsɔmɔ.” (Baebele 10:26, 27) Longola yango, ntoma Yoane akomaki boye: “Ezali na lisumu oyo ememaka na liwa.” (1 Yoane 5:16) Kasi, moto oyo asali lisumu nde akoki koloba ye moko ete asali “lisumu oyo ememaka na liwa”?
Nzambe alimbisaka moto oyo abongoli motema
3. Soki tozali na mawa makasi nsima ya kosala lisumu moko, yango ekoki komonisa nini?
3 Yehova azali Mosambisi monene ya basumuki. Biso nyonso tokozongisa monɔkɔ epai na ye, mpe ye asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo. (Genese 18:25; Baloma 14:12) Ye nde akataka ete moto asali lisumu oyo ekoki kolimbisama te, mpe akoki kolongola elimo na ye epai ya moto. (Nzembo 51:11) Nzokande, soki tozali na mawa makasi mpo na lisumu moko oyo tosali, yango ekoki komonisa ete tobongoli motema. Kasi, kobongola motema ya solosolo esɛngaka nini?
4. (a) Kobongola motema elimboli nini? (b) Mpo na nini maloba ya Nzembo 103:10-14 ekoki mpenza kobɔndisa?
4 Kobongola motema elimboli koyoka mawa mpe kotika lisumu oyo tosalaki to makanisi ya mabe mpe kobongola ndenge na biso ya kotalela yango. Soki tosalaki lisumu moko mpe tosali makambo oyo ezali komonisa ete tobongoli mpenza motema, maloba oyo ya mokomi ya nzembo ekoki kobɔndisa biso: “[Yehova] asalaki epai na biso [lokola] masumu na biso te; apesaki biso libonza lokola ekoki na lofundo na biso te. Zambi lokola molai ya lola ezali na likoló ya mokili, boboto na ye ezali monene boye epai ya baoyo bakobangaka ye. Mosika [lokola] yango kati na epai ya ebimelo ya ntango mpe epai ya elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngweli na biso. [Lokola] tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokela bango mawa baoyo bakobangaka ye. Zambi ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele putulu.”—Nzembo 103:10-14.
5, 6. Likanisi nini ya ntina ezali na 1 Yoane 3:19-22, mpe maloba yango elimboli nini?
5 Maloba ya ntoma Yoane mpe ekoki kobɔndisa biso; alobaki boye: “Na likambo oyo nde tokoyeba ete touti na solo, mpe tokondimisa mitema na biso liboso na ye na likambo nyonso oyo mitema na biso ezali kokweisa biso na yango, mpamba te Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso. Balingami, soki mitema na biso ezali kokweisa biso te, tozali na elobeli ya polele liboso ya Nzambe; mpe nyonso oyo tozali kosɛnga tozali kozwa yango epai na ye, mpamba te tozali kotosa bakomandema na ye mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye.”—1 Yoane 3:19-22.
6 ‘Toyebi ete touti na solo’ mpamba te tozali na bolingo ya bondeko mpe tozali te na momeseno ya kosala masumu. (Nzembo 119:11) Nzokande, soki tozali koyoka lokola nde tomemi ngambo, tosengeli kobosana te ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” Yehova ayokelaka biso mawa mpamba te ayebi ete tozali na “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi,” tozali kobunda etumba mpo na kokima masumu, mpe tozali kosala milende mpo na kosala mokano na ye. (1 Petelo 1:22) Motema na biso ‘ekokweisa biso’ te soki tozali kotyela Yehova motema, tozali komonisa bolingo ya bondeko, mpe tozali te na momeseno ya kosala masumu na nko. Ntango tozali kobondela, tokozala na “elobeli ya polele liboso ya Nzambe” mpe ye akoyoka biso mpo totosaka mibeko na ye.
Bato oyo basalelaki elimo santu lisumu
7. Nini ekataka soki lisumu ekoki kolimbisama to te?
7 Masumu oyo ekoki kolimbisama te ezali masumu nini? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tótalela mwa bandakisa oyo ezali na Biblia. Yango ekobɔndisa biso mpenza soki tozali kaka koyoka mpasi makasi na motema mpo na mabunga minene oyo tosalaki atako tosili kobongola motema. Tokomona ete ezali te lolenge ya lisumu oyo moto asali nde ekataka soki akoki kolimbisama to te; kasi nde makanisi oyo etindaki ye, bamposa ya motema na ye, mpe elimo na ye.
8. Ndenge nini bakonzi mosusu ya mangomba ya Bayuda na siɛklɛ ya liboso basalelaki elimo santu lisumu?
8 Na siɛklɛ ya liboso, bakonzi ya mangomba ya Bayuda oyo batɛmɛlaki Yesu Klisto bazalaki kosalela elimo santu lisumu. Bamonaki misala ya elimo na nzela ya makamwisi oyo Yesu azalaki kosala, makamwisi oyo ezalaki kopesa Nzambe nkembo. Kasi, banguna yango ya Klisto bazalaki koloba ete azali kosala makamwisi yango na nguya ya Satana Zabolo. Yesu alobaki ete bato wana oyo batukaki elimo santu ya Nzambe ndenge wana basalaki lisumu oyo ekoki kolimbisama te na ‘ebongiseli ya makambo oyo mpe na oyo ezali koya.’—Matai 12:22-32.
9. Kotuka elimboli nini, mpe Yesu alobaki nini mpo na yango?
9 Kotuka elimboli koloba maloba ya mabe, kofinga, to kotyola. Lokola elimo santu eutaka na Nzambe, koloba mabe mpo na elimo yango ezali koloba mabe mpo na Yehova. Moto oyo azali koloba mabe ndenge wana mpe abongoli motema te, azali kosala lisumu oyo ekoki kolimbisama te. Maloba ya Yesu na ntina na lisumu yango emonisi ete azalaki kolobela bato oyo bazalaki kotɛmɛla mosala ya elimo santu ya Nzambe. Lokola Yesu azalaki kosala makamwisi na elimo ya Yehovah, kasi banguna na ye balobaki ete azali kosala yango na nguya ya Zabolo, batukaki elimo santu. Yango wana, Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali kotuka elimo santu akolimbisama te mpo na libela, kasi amemi ngambo ya lisumu ya seko.”—Malako 3:20-29.
10. Mpo na nini Yesu abengaki Yuda “mwana ya libebi”?
10 Tótalela mpe ndakisa ya Yuda Mokeliota. Ye azalaki sembo te mpe azalaki koyiba mbongo na kɛsi oyo azalaki kosimba. (Yoane 12:5, 6) Na nsima, Yuda akendaki kokutana na bakonzi ya mangomba ya Bayuda mpe ayokanaki na bango ete atɛka Yesu na mbongo ya palata 30. Ya solo, Yuda ayokaki mawa nsima ya kotɛka Yesu, kasi abongolaki motema te na lisumu ya nko oyo asalaki. Yango wana Yuda abongi te ete básekwisa ye mpe Yesu abengaki ye “mwana ya libebi.”—Yoane 17:12; Matai 26:14-16.
Bato oyo basalelaki elimo santu lisumu te
11-13. Lisumu nini Mokonzi Davidi asalaki ná Bata-seba, mpe libɔndisi nini tokoki kozwa na ndenge oyo Nzambe akataki likambo yango?
11 Na bantango mosusu, baklisto oyo basalaki lisumu ya monene, bakobaka kaka komitungisa na ndenge babukaki mobeko ya Nzambe ata nsima ya koyambola lisumu yango epai ya bankulutu mpe kozwa lisalisi oyo esengeli. (Yakobo 5:14) Soki yo mpe otungisamaka ndenge wana, na ntembe te okobɔndisama soki otaleli masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo masumu na bango elimbisamaki.
12 Mokonzi Davidi asalaki lisumu ya monene ná Bata-seba, mwasi ya Uliya. Davidi amonaki mwasi yango kitoko azali kosukola na ndako moko oyo ezalaki mosika te, atindaki bato na ye báluka mwasi yango mpe báya na ye na ndako na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Ntango mwasi yango atindelaki Davidi maloba ete akómi na zemi, Davidi alukaki mayele oyo ekosala ete Uliya asangisa nzoto na Bata-seba mpo eyebana te ete asalaki ekobo. Ntango mayele na ye elongaki te, mokonzi apesaki mitindo oyo esalaki ete Uliya abomama na etumba. Na nsima, Bata-seba akómaki mwasi ya Davidi mpe mwana oyo babotaki akufaki.—2 Samwele 11:1-27.
13 Yehova akataki likambo ya Davidi ná Bata-seba. Nzambe alimbisaki Davidi, na ntembe te mpo abongolaki motema mpe mpo asalaki na ye kondimana mpo na Bokonzi. (2 Samwele 7:11-16; 12:7-14) Emonani mpe ete Bata-seba abongolaki motema, mpamba te abotaki Mokonzi Salomo mpe akómaki nkɔkɔ ya Yesu Klisto. (Matai 1:1, 6, 16) Soki tosalaki lisumu, tóyeba ete Yehova amonaka ezaleli na biso ya kobongola motema.
14. Ndenge nini bonene ya motema mawa ya Yehova emonisami na lisolo ya Mokonzi Manase?
14 Tokoki mpe komona bonene ya motema mawa ya Yehova na likambo ya Manase. Mokonzi yango ya Yuda asalaki makambo ya mabe na miso ya Yehova. Manase atongaki bitumbelo mpo na Baala, asambelaki “bibolo nyonso ya lola”; kutu, atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya lokuta na kati ya mapango mibale ya tempelo. Atumbaki bana na ye na mɔtɔ, alendisaki misala ya bilimu mabe, mpe asalisaki bafandi ya Yuda mpe ya Yelusaleme “masumu kino balekaki na mabe mabota oyo [Yehova] abebisaki bango liboso ya bana ya Yisalaele.” Aboyaki koyoka makebisi ya basakoli ya Nzambe. Nsukansuka, mokonzi ya Asulia alongaki Manase mpe amemaki ye na boombo. Kuna, Manase abongolaki motema mpe abondelaki Nzambe na etingya mpe Nzambe alimbisaki ye, azongisaki ye na kiti ya bokonzi na Yelusaleme, epai alendisaki mpenza losambo ya solo.—2 Ntango 33:2-17.
15. Likambo nini na bomoi ya ntoma Petelo emonisi ete Yehova alimbisaka “na solo”?
15 Bankama ya bambula na nsima, ntoma Petelo asalaki lisumu moko monene na ndenge awanganaki Yesu. (Malako 14:30, 66-72) Atako bongo, Yehova alimbisaki Petelo “na solo.” (Yisaya 55:7) Mpo na nini? Mpamba te Petelo abongolaki mpenza motema. (Luka 22:62) Emonani ete Nzambe alimbisaki mpenza Petelo mpamba te mikolo 50 na nsima, na mokolo ya Pantekote, Petelo azwaki libaku ya kopesa litatoli na mpiko na ntina na Yesu. (Misala 2:14-36) Tozali nde na ntina ya kokanisa ete lelo oyo Nzambe akoboya kolimbisa moklisto oyo abongoli mpenza motema? Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Ee [Yehova], soki yo okotalaka bokesene, ee Nkolo, nani akotɛlɛma? Na yo nde kolimbisa ezali.”—Nzembo 130:3, 4.
Tólongola likanisi ete tosaleli elimo santu lisumu
16. Mosumuki asengeli kosala nini mpo Nzambe alimbisa ye?
16 Bandakisa oyo touti kolobela esengeli kosalisa biso tólongola likanisi ete tosaleli elimo santu lisumu. Bandakisa yango ezali komonisa ete Yehova alimbisaka mosumuki oyo abongoli motema. Mpo na yango, ezali na ntina mingi moto abondela Nzambe na etingya. Soki tosalaki lisumu, tokoki kosɛnga bolimbisi mpo na mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki, mpo na motema mawa ya Yehova, mpo na ezaleli ya kozanga kokoka oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso, mpe mpo na mosala ya sembo oyo tosalelaka Nzambe. Lokola toyebi ete Yehova azali na boboto monene, tokoki kosɛnga bolimbisi mpe kolikya ete akokangela biso motema te.—Baefese 1:7.
17. Tosengeli kosala nini soki tosalaki lisumu mpe tozali na mposa ya lisalisi na elimo?
17 Tokosala nini soki tosalaki lisumu, kasi tozali kokoka kobondela te mpo tolɛmbi na elimo? Yakobo akomaki boye: “Tiká [moto ya ndenge wana] abenga bankulutu ya lisangá epai na ye, mpe tiká bango bábondela mpo na ye, kopakoláká ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama yango.”—Yakobo 5:14, 15.
18. Mpo na nini tokoki te koloba mbala moko ete moto oyo abimisami na lisangá asali lisumu oyo ekoki kolimbisama te?
18 Ata soki mosumuki abimisami na lisangá mpo abongoli motema te, tokoki koloba mbala moko te ete lisumu na ye ekoki kolimbisama te. Mpo na moklisto moko mopakolami oyo asalaki lisumu mpe abimisamaki na lisangá ya Kolinti, Paulo akomaki boye: “Mpamela oyo bato mingi bapesi ekoki bongo mpo na moto wana, na boye ete, sikoyo, bosengeli kutu nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye, noki te ezala na ndenge nini moto yango amɛlama na mawa na ye ya koleka ndelo.” (2 Bakolinti 2:6-8; 1 Bakolinti 5:1-5) Kasi, mpo moto oyo asali lisumu azongela boyokani ya malamu na Yehova, asengeli koluka lisalisi ya Biblia epai ya bankulutu mpe komonisa na misala ete abongoli mpenza motema. Asengeli ‘kobota mbuma oyo ebongi na kobongola motema.’—Luka 3:8.
19. Nini ekoki kosalisa biso tózala “makasi na kati ya kondima”?
19 Nini ekoki kotinda biso tókanisa ete tosaleli elimo santu lisumu? Ekoki kozala ete tozali komitungisa mingi mpo na likambo ya mabe oyo tosalaki to mpe tozali na maladi. Soki ezali bongo, kobondela mpe kopema mingi ekoki kosalisa biso. Na ntango yango, tosengeli mpenza kofungola miso mpo Satana alɛmbisa biso te mpe tótika kosalela Nzambe. Lokola Yehova asepelaka te ete ata moto mabe akufa, na ntembe te asepelaka te mosaleli na ye moko abunga. Yango wana, soki tozali kotungisama na likanisi ete tosaleli elimo santu lisumu, tosengeli kokoba kotánga Liloba ya Nzambe, ata mpe mikapo oyo ekoki kobɔndisa biso, na ndakisa na mokanda ya Nzembo. Tosengeli kotika te koyanganaka na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Nyonso wana ekosalisa biso tózala “makasi na kati ya kondima” mpe tótika komitungisa na likanisi ete tosali lisumu oyo ekoki kolimbisama te.—Tito 2:2.
20. Mituna nini ekoki kosalisa moto amona ete asaleli elimo santu lisumu te?
20 Soki moto moko azali kokanisa ete asaleli elimo santu lisumu, ebongi amituna mituna oyo: ‘Natukaki elimo santu? Nabongolaki mpenza motema? Nazali mpenza kondima ete Nzambe alimbisaka? Nazali nde mopɛngwi oyo aboyi pole ya elimo?’ Moto yango akoki komona ete atuki elimo santu ya Nzambe te, mpe akómi mopɛngwi te. Abongoli motema, mpe azali kaka na kondima ete Yehova alimbisaka. Soki ezali bongo, elakisi ete asaleli elimo santu lisumu te.
21. Tokotalela mituna nini na lisolo oyo elandi?
21 Koyeba ete tosaleli elimo santu lisumu te ekitisaka mpenza motema! Kasi, na lisolo oyo elandi, tokotalela mituna mosusu oyo ezali na boyokani na likambo yango. Na ndakisa, tokoki komituna: ‘Natambwisamaka mpenza na elimo santu ya Nzambe? Namonisaka mbuma na yango na bomoi na ngai?’
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tolobi ete moto akoki kosalela elimo santu lisumu?
• Kobongola motema elimboli nini?
• Banani basalelaki elimo santu lisumu ntango Yesu azalaki awa na mabelé?
• Tokoki kosala nini mpo tótika kokanisa ete mbala mosusu tosalaki lisumu oyo ekoki kolimbisama te?
[Elilingi na lokasa 17]
Bato oyo balobaki ete Yesu asalaki makamwisi na nguya ya Satana basalelaki elimo santu lisumu
[Elilingi na lokasa 18]
Atako Petelo awanganaki Yesu, asalaki te lisumu oyo ekoki kolimbisama te