Salá makasi otalelaka bato ndenge oyo Yehova atalelaka bango
“[Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te.”—1 SAMWELE 16:7.
1, 2. Ndenge oyo Yehova azalaki kotalela Eliaba ekesanaki na nini na ndenge oyo Samwele atalelaki ye, mpe yango ezali koteya biso nini?
NA EKEKE ya 11 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova apesaki mosakoli Samwele mokumba moko oyo asengelaki koyebisa yango moto mosusu te. Atindaki ye na ndako ya mobali moko nkombo na ye Yisai mpo na kopakola mwana na ye moko mpo akóma mokonzi ya Yisalaele. Ntango kaka Samwele amonaki Eliaba, mwana ya liboso ya Yisai, akanisaki ete ye nde moto Nzambe aponaki. Kasi Yehova alobaki ete: “Talá na elongi na ye te mpe na molai na nzoto na ye te mpo ete naboyi ye. Mpo ete [Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:6, 7) Samwele atalelaki Eliaba ndenge oyo Yehova azalaki kotalela ye te.a
2 Bato bamikosaka mingi ntango bazali kotalela basusu! Tokoki kosepela na bato mosusu kaka na ndenge oyo tozali komona bango, nzokande na motema, bazali na makambo mabe. Lisusu, tokoki kozala na makambo makasi epai ya bato mosusu oyo bazali sembo to kokangela bango motema mpo bazali na mwa makambo mosusu oyo esepelisaka biso te.
3, 4. (a) Soki matata ebimi na kati ya baklisto mibale, mokomoko asengeli kozala na ekateli ya kosala nini? (b) Mituna nini tosengeli komituna ntango tozwani matata ná ndeko moko?
3 Mikakatano ekoki kobima soki tozali kotalela bato mosusu likolólikoló, ata bato oyo toyebi bango banda kala. Mbala mosusu ozwanaki matata na moklisto moko oyo azalaki moninga na yo mpenza. Okolinga ete bózongisa boninga na bino? Eloko nini ekosalisa yo na kosala yango?
4 Ezali malamu ofanda naino, olongola makanisi nyonso ya mabe mpo na ndeko yango, mpe obanda kotalela ye na makanisi ya malamu. Ntango ozali kosala yango, kanisá maloba oyo Yesu alobaki: “Moto moko akoki koya epai na ngai te soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoane 6:44) Na nsima, omituna mituna oyo: ‘Mpo na nini Yehova abendaki moto yango epai ya Mwana na ye? Bizaleli nini ya malamu moto yango azali na yango? Nazali nde kokanga miso na bizaleli yango to nazali nde koboya kondima yango? Nini esalaki ete liboso ngai na ye tózala baninga? Eloko nini esepelisaki ngai epai na ye?’ Na ebandeli, ekoki kozala mwa mpasi mpo bizaleli na ye ya malamu eyela yo na makanisi, mingimingi soki ozali naino na nkanda na ye na motema. Kasi, ezali na ntina osala likambo yango mpo yo na ye bóyokana lisusu. Mpo na komona ndenge oyo tokoki kosala yango, tóbanda naino koluka bizaleli malamu epai ya bato mibale oyo ntango mosusu tolobelaka mingimingi nde mabe na bango. Bato yango ezali mosakoli Yona ná ntoma Petelo.
Tótalela Yona na ndenge ya malamu
5. Mokumba nini Nzambe apesaki Yona, kasi mosakoli yango asalaki nini?
5 Yona azalaki mosakoli na Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi, na ntango oyo Mokonzi Yelobama II, mwana ya Yoasa, azalaki koyangela. (2 Mikonzi 14:23-25) Mokolo mosusu, Yehova atindaki Yona alongwa na Yisalaele mpe akende na Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia, ekólo moko ya makasi. Asengelaki kokende kosala nini kuna? Kokebisa bato ya engumba yango ete etikali moke engumba na bango ebomama. (Yona 1:1, 2) Na esika asala likambo oyo Nzambe atindaki ye, Yona akimaki! Akɔtaki na masuwa moko oyo ezalaki kokende na Talasisi, mboka oyo ezali mosika mpenza na Ninive.—Yona 1:3.
6. Mpo na nini Yehova aponaki Yona mpo na kotinda ye na Ninive?
6 Ntango ozali kokanisa Yona, makambo nini eyelaka yo mbala moko na motó? Omonaka kaka ete azalaki mosakoli oyo aboyaki kotosa? Soki otaleli makambo likolólikoló, okokanisa kaka bongo. Kasi, okanisi mpenza ete Nzambe aponaki Yona azala mosakoli mpo azalaki motó makasi? Te! Na ntembe te Yona azalaki na bizaleli mosusu ya malamu. Tótala naino oyo asalaki na mosala na ye ya mosakoli.
7. Makambo nini ezalaki kosalema ntango Yona azalaki kosalela Yehova na Yisalaele, mpe ndenge nini koyeba likambo yango ebongoli ndenge oyo otalelaka ye?
7 Yona asalelaki Nzambe na bosembo na Yisalaele, mboka ya bato ya matoi mangbongi. Mosakoli Amosa, oyo azalaki na bomoi na eleko moko ná Yona, alobaki ete Bayisalaele ya ntango na ye balingaki bisengo mingi.b Makambo mabe ezalaki kosalema na ekólo yango, kasi yango ezalaki kotungisa Bayisalaele ata moke te. (Amosa 3:13-15; 4:4; 6:4-6) Atako bongo, mokolo na mokolo Yona azalaki kokokisa mokumba na ye ya kosakola na bosembo mpenza. Soki ozali mosakoli ya nsango malamu, na ntembe te oyebi mpasi oyo ezalaka mpo na kosakola epai ya bato oyo balingaka koyoka ata moke te. Yango wana, atako toyebi ete Yona azalaki na mabunga, tosengeli te kobosana bosembo mpe ezaleli ya koyika mpiko oyo amonisaki ntango azalaki kosakola epai ya Bayisalaele oyo bazangaki kondima.
8. Mikakatano nini Moyisalaele oyo akei kosakola na Ninive akokaki kokutana na yango?
8 Mokumba ya kokende na Ninive ezalaki mpe na mokakatano mosusu ya monene. Mpo akóma na engumba yango, Yona asengelaki kotambola kilomɛtrɛ 800 na makolo—mobembo ya mpasi oyo ekokaki koumela ata sanza mobimba. Ntango akómi kuna, asengelaki kosakola epai ya Baasulia, oyo bayebanaki ete bazalaki bato mabe. Soki bakangi banguna na bitumba, bazalaki konyokola bango na ndenge ya nsɔmɔ. Kutu, bango moko bazalaki komikumisa ete bazali na makambo mabe mpenza. Tokoki kokamwa te ete bazalaki kobenga Ninive “mboka ya makila”!—Nahumu 3:1, 7.
9. Bizaleli nini Yona amonisaki ntango mopɛpɛ ya makasi etyaki bomoi ya bato ya masuwa na likama?
9 Yona aboyaki kosala likambo oyo Yehova atindaki ye, yango wana akɔtaki na masuwa moko oyo ememaki ye mosika mpenza na esika oyo batindaki ye. Atako bongo, Yehova atikaki te kosepela na mosakoli yango, alukaki mpe moto mosusu te mpo akokisa mokumba oyo atindaki ye. Kasi, Yehova asalaki makambo oyo emonisaki Yona ete asengelaki kozwa na lisɛki te mokumba oyo apesaki ye. Nzambe atindaki mopɛpɛ moko ya makasi na mbu. Mbonge elingaki kozindisa masuwa oyo Yona akɔtaki. Bomoi ya bato mosusu ekómaki na likama mpo na Yona! (Yona 1:4) Yona asalaki nini? Lokola Yona alingaki te ete bato ya masuwa bákufa mpo na ye, alobaki na bango boye: “Bótombola ngai mpe bóbwaka ngai na mai, bongo mai ekozala kimya mpo na bino.” (Yona 1:12, NW) Ntango bato ya masuwa babwakaki ye na mai, likambo moko te ekokaki komonisa Yona ete Yehova akobikisa ye. (Yona 1:15) Atako bongo, Yona andimaki kokufa mpo bato oyo bazalaki na masuwa bábika. Likambo yango ezali komonisa biso ete azalaki na mpiko, na komikitisa mpe na bolingo!
10. Nini esalemaki ntango Yehova apesaki lisusu kaka Yona mokumba oyo apesaki ye liboso?
10 Na nsuka, Yehova abikisaki Yona. Na kotalela makambo oyo Yona asalaki, Nzambe akotalela ye lisusu ete abongi mpo atinda ye? Ɛɛ, Yehova amonisaki motema mawa mpe bolingo, atindaki lisusu kaka mosakoli yango mpo akende koyebisa nsango na ye na Ninive. Ntango Yona akómaki na Ninive, abangaki te, ayebisaki bato ya engumba yango ete Nzambe atyaki likebi na ye na misala na bango ya mabe mpenza, mpe engumba na bango ekobomama nsima ya mikolo 40. (Yona 1:2; 3:4) Ntango bato ya Ninive bayokaki nsango ya polele oyo Yona ayebisaki bango, babongolaki mitema mpe engumba na bango ebomamaki lisusu te.
11. Likambo nini ezali komonisa ete Yona asimbaki liteya monene oyo Nzambe apesaki ye?
11 Atako nyonso wana, Yona azalaki naino kaka na makanisi ya malamu te. Kasi, Yehova asalaki likambo moko mpo na koteya Yona ete Ye atalaka kaka libándá te. Ye atalaka nde motema. (Yona 4:5-11) Tokanisi mpenza ete Yona asimbaki liteya yango mpamba te akomaki makambo yango na mokanda na ye. Lokola akomaki ata mabunga oyo asalaki, ezali komonisa ete azalaki na komikitisa. Esɛngaka ete moto azala na mpiko mpo andima libunga na ye!
12. (a) Nini ezali kondimisa biso ete Yesu atalelaka bato ndenge oyo Yehova atalelaka bango? (b) Balendisi biso tótalelaka bato oyo tozali kosakwela bango nsango malamu ndenge nini? (Talá etanda na lokasa 18.)
12 Nsima ya bankama ya bambula, Yesu Klisto alobelaki malamu likambo moko oyo elekaki na bomoi ya Yona. Alobaki boye: “Se ndenge Yona azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe butu misato, bongo Mwana ya moto akozala na kati ya motema ya mabelé mikolo misato mpe butu misato.” (Matai 12:40) Ntango Yona akosekwa akoyeba ete Yesu akokanisaki mikolo wana ya mpasi na bomoi ya ye na mikolo oyo Ye moko aumelaki na lilita. Tozali nde na esengo ya kosalela Nzambe oyo atikaka basaleli na ye te ntango basali mabunga? Mokomi ya nzembo akomaki boye: “[Lokola] tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokela bango mawa baoyo bakobangaka ye. Zambi ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:13, 14) “Mputulu” yango, elingi koloba bato nyonso ya kozanga kokoka, ata baoyo bazali na bomoi lelo oyo, ekoki kosala makambo minene na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe!
Tótalela Petelo na ndenge ya malamu
13. Wapi bizaleli ya Petelo oyo ekoki koya mbala moko na makanisi na biso, kasi mpo na nini Yesu aponaki ye azala ntoma?
13 Sikoyo, tólobela naino mwa moke moto ya mibale, elingi koloba ntoma Petelo. Soki basɛngi yo olobela naino mwa moke Petelo, okokanisa mbala moko ete azalaki makila mɔtɔmɔtɔ mpe azalaki komikumisa? Ya solo, Petelo amonisaki ntango mosusu bizaleli wana. Kasi, Yesu mbɛlɛ aponaki Petelo azala moko ya bantoma 12 soki azalaki mpenza moto ya makila mɔtɔmɔtɔ to mpe moto oyo akomikumisaka? (Luka 6:12-14) Te! Yesu atyaki makanisi na ye na mwa makambo ya mabe wana te, kasi amonaki ete Petelo azali na bizaleli ya malamu.
14. (a) Ekoki kozala mpo na nini Petelo nde azalaki koloba mingi? (b) Mpo na nini tosengeli kosepela na ndenge Petelo azalaki kotunatuna mituna?
14 Ntango mosusu Petelo azalaki koloba na nkombo ya bantoma mosusu. Bato mosusu bakoki kokanisa ete likambo wana ezali komonisa ete azalaki na komikitisa te. Kasi, tokanisi ete ekoki kozala na ntina mosusu te? Bato mosusu balobaka ete ekoki mpenza kozala ete Petelo azalaki mokóló koleka bantoma nyonso, mbala mosusu mpe azalaki mokóló ya Yesu. Soki ezali solo, yango ekoki komonisa ntina oyo, mbala mingi, Petelo azalaki moto ya liboso oyo azalaki kozwa maloba. (Matai 16:22) Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo tosengeli kobosana te. Petelo azalaki moto oyo alingaki makambo ya elimo. Azalaki na mposa ya koyeba, yango wana azalaki kotunatuna mituna. Mituna oyo azalaki kotuna esalisaka biso mingi lelo oyo. Yesu alobaki makambo mingi ya ntina mpenza ntango azalaki kopesa biyano na mituna oyo Petelo azalaki kotuna, mpe makambo yango ezali na kati ya Biblia. Na ndakisa, ntango Yesu alobelaki “kapita ya sembo,” azalaki nde kopesa eyano na motuna moko oyo Petelo atunaki. (Luka 12:41-44) Tókanisa mpe lisusu motuna oyo Petelo atunaki ete: “Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini mpenza ekozala mpo na biso?” Yango etindaki Yesu apesa elaka ya kolendisa ete: “Moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.”—Matai 15:15; 18:21, 22; 19:27-29.
15. Mpo na nini tokoki koloba ete Petelo azalaki mpenza sembo?
15 Petelo azalaki na ezaleli mosusu ya malamu—azalaki sembo. Ntango bayekoli mingi batikaki kolanda Yesu mpo ateyaki likambo moko oyo bakangaki ntina na yango te, Petelo alobaki na nkombo ya bantoma 12 ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.” (Yoane 6:66-68) Na ntembe te maloba yango esepelisaki motema ya Yesu! Na nsima, ntango ebele ya bato bayaki kokanga Nkolo na bango, bantoma mingi bakimaki. Kasi Petelo, atako azalaki kotikala mwa mosika, azalaki kolanda bato wana na nsima tii ye mpe akɔtaki na lopango ya nganga-nzambe monene. Ezali mpiko, kasi bibangabanga te nde etindaki ye akende kuna. Ntango bazalaki kosambisa Yesu, Petelo akendaki esika oyo mwa Bayuda bazalaki koyɔta mɔtɔ. Moombo moko ya nganga-nzambe monene oyo akangaki elongi ya Petelo ayebisaki bato oyo bazalaki wana ete Petelo azalaki kotambola na Yesu. Toyebi ete Petelo awanganaki Nkolo na ye, kasi tóbosana te ete soki akendaki tii na esika wana oyo akómaki na likama, oyo bantoma mingi bamekaki ata kokóma te, ezali mpo azalaki sembo mpe azalaki komitungisa mpo na Yesu.—Yoane 18:15-17.
16. Ntina nini totaleli bizaleli malamu ya Yona ná Petelo?
16 Petelo azalaki na bizaleli ya malamu mingi mpenza koleka mwa mabunga na ye. Ezali mpe bongo mpo na Yona. Lokola totaleli Yona ná Petelo na ndenge ya malamu, oyo mbala mosusu totalelaka bango te, tosengeli mpe kosala makasi tótalelaka bandeko na biso na ndenge yango lelo oyo. Soki tozali kosala bongo, tokoyokana na bango malamu koleka. Mpo na nini ezali na ntina tótalelaka bandeko na biso na ndenge ya malamu?
Liteya mpo na biso lelo oyo
17, 18. (a) Mpo na nini mwa matata ekoki kobima na kati ya baklisto? (b) Wapi toli ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso na kosilisa mikakatano na bandeko na biso?
17 Lelo oyo, mibali, basi mpe bana, oyo kati na bango ezali na bazwi ná bobola, bato oyo batángá mingi ná baoyo batángá mingi te, mindɛlɛ ná baindo, oyo bazali kosalela Yehova na bomoko. (Emoniseli 7:9, 10) Lisangá ya boklisto esangisi bato oyo bazali na bomoto ndenge na ndenge! Lokola tozali kosalela Nzambe elongo, ekoki kokóma ntango mosusu ete tózwana mwa matata.—Baloma 12:10; Bafilipi 2:3.
18 Atako tozali komona mabunga ya bandeko na biso, totyaka miso na biso kaka likoló na yango te. Tosalaka makasi tólanda ndakisa ya Yehova; oyo mokomi ya nzembo ayembaki na ntina na ye ete: “Soki ezalaki ete olandelaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akoki kotɛlɛma?” (Nzembo 130:3, NW) Na esika tótyaka makanisi na biso mingimingi na bizaleli ya bato oyo ekoki kokabola biso na bango, ‘tolandaka makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso.’ (Baloma 14:19) Tosalaka makasi mpo na kotalela bato ndenge oyo Yehova atalelaka bango, tobosanaka mabunga na bango mpe totyaka miso mingimingi na bizaleli na bango ya malamu. Ntango tozali kosala bongo, esalisaka biso na ‘kokoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu.’—Bakolose 3:13.
19. Tángá mwa makambo oyo moklisto akoki kosala mpo na kosilisa matata ya makasi.
19 Tokosala nini ntango ndeko moko asali biso likambo oyo ezali kaka kotungisa biso na motema? (Nzembo 4:4) Likambo ya ndenge wana ekómeli yo ná ndeko mosusu? Ekozala malamu bóbongisa likambo yango. (Genese 32:13-15) Libosoliboso, bondelá Yehova mpo na kosɛnga ye mayele. Na nsima, kanisá bizaleli malamu ya moto yango mpe kende kokutana na ye na elimo ya “boboto oyo ezali na bwanya.” (Yakobo 3:13) Yebisá ye ete ozali na mposa bóyokana. Kobosana te toli ya Biblia oyo: ‘Osengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19) Toli oyo elobi ete ‘koyokaka nkanda noki te’ ezali komonisa ete moto yango akoki koloba to kosala likambo moko oyo ekoki kosilikisa yo. Soki asali yango, sɛngá Yehova asalisa yo oyeba komipekisa. (Bagalatia 5:22, 23) Tiká ndeko na yo aloba mpe yoká ye malamumalamu. Kokata ye maloba te, ata soki yo na ye bozali na makanisi ndenge moko te. Ekoki kozala ete azali na libunga, kasi ezali ndenge wana nde azali komona makambo. Meká komitya na esika na ye. Yango ezali kosɛnga mpe ete yo moko omitalela na ndenge oyo ye azali kotalela yo.—Masese 18:17.
20. Ntango ozali koluka kosilisa matata na ndeko moko, wapi makambo mosusu oyo okoki kosala mpo bóyokana?
20 Ntango yo okozwa maloba, zalá na elobeli ya malamu. (Bakolose 4:6) Yebisá ndeko na yo bizaleli na ye oyo osepelaka na yango. Sɛngá ye bolimbisi soki yo mpe ozali na foti na likambo oyo ememi bino tii na esika wana. Soki milende oyo osali na elimo ya komikitisa esali ete bóyokana lisusu, pesá Yehova matɔndi. Soki mpe boyokani kaka te, kotika te kosɛnga Yehova mayele mpe luká mabaku mosusu ya kozongisa kimya.—Baloma 12:18.
21. Ndenge nini lisolo oyo esalisi yo na kotalela basusu ndenge oyo Yehova atalelaka bango?
21 Yehova alingaka basaleli na ye nyonso. Azali kosepela ete biso nyonso tósalela ye atako tozali bato ya kozanga kokoka. Soki tozali koyeba malamumalamu ndenge oyo ye atalelaka bato, tokolinga bandeko na biso lisusu mingi. Soki bolingo na biso mpo na ndeko na biso moko moklisto ekitaki, tokoki kozongisa yango lisusu. Tokozwa mbano monene soki tosali molende ya kotalela bato mosusu na ndenge ya malamu, elingi koloba na ndenge oyo Yehova atalelaka bango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na nsima emonanaki polele ete Eliaba, atako azalaki mobali kitoko, abongaki te kozala mokonzi ya Yisalaele. Ntango Goliata, engambe Mofilistia atumolaki Bayisalaele ete soki bazali na moto ya makasi abima mpo na kobunda na ye, Eliaba ná mibali mosusu ya Yisalaele babangaki mingi.—1 Samwele 17:11, 28-30.
b Lokola Bayisalaele balongaki bamboka mwa mingi mpe bazongisaki bandelo ya ekólo na bango ndenge ezalaki kala, mpe lokola Mokonzi Yelobama II akómaki kofutisa bamboka yango mpako, akómisaki Yisalaele, bokonzi ya mabota zomi, ekólo ya bozwi mingi.—2 Samwele 8:6; 2 Mikonzi 14:23-28; 2 Ntango 8:3, 4; Amosa 6:2.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini Yehova atalelaka mabunga ya basaleli na ye ya sembo?
• Tángá bizaleli mosusu ya malamu oyo Yona mpe Petelo bamonisaki.
• Ozwi ekateli ya kotalelaka bandeko na yo baklisto ndenge nini?
[Etanda na lokasa 18]
Kanisá ndenge oyo Yehova atalelaka bato mosusu
Ntango ozali kokanisa lisolo ya Yona, ozali komona ete osengeli kobongola ndenge oyo otalelaka bato oyo mbala na mbala okendaka koyebisa nsango malamu? Okoki komona ete bato yango bazali lokola Bayisalaele, elingi koloba ete basepelaka koyoka ata moke te, to mpe batɛmɛlaka nsango oyo euti na Nzambe. Kasi, Yehova Nzambe atalelaka bango ndenge nini? Ata bato mosusu oyo bazali bato minene na ebongiseli ya makambo oyo, mokolo mosusu, bakoki koya epai ya Yehova, ndenge kaka mokonzi ya Ninive abongolaki motema nsima ya koyoka nsango oyo Yona asakolaki.—Yona 3:6, 7.
[Elilingi na lokasa 15]
Otalelaka bato ndenge oyo Yehova atalelaka bango?
[Elilingi na lokasa 16]
Yesu azwaki likambo moko oyo akokaki kolobela malamu na bomoi ya Yona